Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

 MOKAPO 9

Mosala ya kosakola—“Bilanga . . . eteli mpo na bobuki mbuma”

Mosala ya kosakola—“Bilanga . . . eteli mpo na bobuki mbuma”

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Yehova asali ete mboto ya Bokonzi ekola

1, 2. (a) Mpo na nini bayekoli ya Yesu bakamwaki makasi? (b) Yesu alobelaki kobuka mbuma ya ndenge nini?

BAYEKOLI ya Yesu bakamwaki makasi. Yesu ayebisaki bango ete: “Bótombola miso na bino mpe bótala bilanga, ndenge eteli mpo na bobuki mbuma.” Ntango batalaki na ngámbo oyo Yesu alakisaki, bamonaki ete bilanga ya ɔrje eteli naino te, kutu ebandi nde kokola sika. Na ntembe te bamitunaki ete: ‘Kobuka mbuma ya nini? Etikali basanza mingi liboso eleko ya kobuka mbuma ebanda.’Yoa. 4:35.

2 Nzokande, Yesu azalaki kolobela kobuka mbuma ya elilingi. Na libaku yango, alingaki nde koteya bayekoli na ye makambo mibale ya ntina oyo etali mosala ya kobuka mbuma ya elilingi, to mosala ya kosakola. Makambo yango nini? Mpo na koyeba yango, tótalela lisolo yango malamumalamu.

Alendisi bango na mosala mpe alaki ete ekopesa esengo

3. (a) Mbala mosusu nini nde etindaki Yesu aloba ete: “Bilanga . . . eteli mpo na bobuki mbuma”? (b) Ndenge nini Yesu amonisaki ete alobelaki kobuka mbuma ya elilingi?

3 Yesu ayebisaki bayekoli ete bilanga eteli mpo na kobuka mbuma na nsuka ya mobu 30 T.B., bazalaki libándá ya engumba Sikare, na etúká ya Samaria. Bayekoli na ye bakɔtaki na engumba yango, mpe Yesu afandaki pembeni ya libulu moko ya mai epai ateyaki mwasi moko mateya ya solo mpe mwasi yango akangaki mbala moko ntina na yango. Ntango bayekoli bazongaki epai ya Yesu, mwasi yango akendaki mbangu na engumba Sikare mpo na koyebisa bato ya mboka na ye makambo ya kokamwa oyo ayokaki. Maloba na ye ebendaki likebi ya bato ebele, mpe mingi bapotaki mbangu tii na libulu ya mai mpo na kokutana na Yesu. Ekoki kozala ete na ntango wana nde ntango Yesu atombolaki miso, mpe amonaki na mosika ebele ya Basamaria bazali koya, alobaki ete: “Bótala bilanga, ndenge eteli mpo na bobuki mbuma.” Na nsima, mpo na komonisa ete azalaki kolobela kobuka mbuma ya elilingi, Yesu abakisaki ete: “Mobuki-mbuma azali . . . koyanganisa mbuma mpo na bomoi ya seko.”Yoa. 4:5-30, 36.

4. (a) Yesu ateyaki makambo nini mibale na oyo etali kobuka mbuma? (b) Tokotalela mituna nini?

4 Makambo nini mibale ya ntina Yesu ateyaki na oyo etali kobuka mbuma ya elilingi? Ya liboso, mosala esengeli kosalema na lombangu. Maloba na ye ete “bilanga . . . eteli mpo na bobuki mbuma” ezalaki mpo na kolendisa bayekoli na ye na mosala. Mpo na komonisa bayekoli na ye ete mosala yango  esengelaki kosalema na lombangu, Yesu abakisaki boye: “Libelalibela mobuki-mbuma azali kozwa lifuti.” Ya solo, mosala ya kobuka mbuma esilaki kobanda: ntango ya kozela ezalaki te! Ya mibale, basali bakozala na esengo. Yesu alobaki ete baloni ná babuki-mbuma ‘bakosepela elongo.’ (Yoane 4:35b, 36) Ndenge kaka Yesu ye moko asepelaki lokola “Basamaria mingi . . . bandimelaki ye,” bayekoli na ye mpe bakosepela ndenge wana soki bamipesi na molimo na bango mobimba na mosala ya kobuka mbuma. (Yoane 4:39-42) Likambo yango oyo elekaki na siɛklɛ ya liboso ezali na ntina mingi mpo na biso mpamba te emonisi makambo oyo ezali kosalema na mosala monene ya kobuka mbuma ya elilingi lelo oyo. Ntango nini mosala ya kobuka mbuma ya mikolo na biso ebandaki? Banani bazali kosala yango? Makambo nini mosala yango ezali kosala?

Mokonzi azali kokamba mosala monene ya kobuka mbuma

5. Nani azali kokamba mosala monene ya kobuka mbuma, mpe ndenge nini emonaneli ya Yoane emonisi ete mosala yango esengeli kosalema na lombangu?

5 Na emonaneli moko oyo ntoma Yoane azwaki, Yehova amonisaki ete apesaki Yesu mokumba ya kokamba mosala ya kobuka mbuma—mosala ya kosakola na mokili mobimba. (Tángá Emoniseli 14:14-16.) Na emonaneli yango, Yesu alati motole mpe asimbi likwangola. “Motole ya wolo na motó” ya Yesu emonisi ete azali Mokonzi oyo azali koyangela. “Likwangola moko oyo epeli makasi na lobɔkɔ na ye” emonisi ete azali Mobuki-mbuma. Ndenge Yehova alobaki na nzela ya anzelu ete “mbuma ya mabele eteli mpenza,” amonisaki ete mosala esengeli kosalema na lombangu. Ya solo, “ngonga ya kobuka mbuma ekómi,” ntango ya kozela ezali te! Na kolanda etinda ya Nzambe ete “tyá likwangola na yo,” Yesu asembolaki lobɔkɔ na ye mpo na kobuka mbuma ya mabele, elingi koloba bato. Emonaneli yango ekundweli biso lisusu ete “bilanga . . . eteli mpo na bobuki mbuma.” Emonaneli wana esalisi biso tóyeba ntango nini kobuka mbuma ya mabele mobimba ebandaki? Ɛɛ!

6. (a) Ntango nini “eleko ya kobuka mbuma” ebandaki? (b) Ntango nini mosala ya kobuka “mbuma ya mabele” ebandaki mpenzampenza? Limbolá.

6 Lokola emonaneli ya Yoane na Emoniseli mokapo 14 elobeli Yesu, Mobuki-mbuma, alati motole (vɛrsɛ 14), emonisi ete asilaki kokóma Mokonzi na 1914. (Dan. 7:13, 14) Mwa moke na nsima, Yesu azwaki etinda ete abanda kobuka mbuma (vɛrsɛ 15). Likambo yango emonisami mpe na ndakisa oyo Yesu apesaki ya kobuka mbuma ya blé, epai alobaki ete: “Ntango ya kobuka mbuma ezali bosukisi ya makambo ya ntango moko boye.” Na yango, eleko ya kobuka mbuma mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo ebandaki na mbula moko: 1914. Na nsima na kati ya “eleko ya kobuka mbuma,” nde mosala ya kobuka ebandaki mpenzampenza. (Mat. 13:30, 39) Soki tozongisi makanisi nsima, tokomona ete kobuka mbuma ebandaki mwa bambula na nsima ya ntango oyo Yesu akómaki Mokonzi. Liboso, kobanda na 1914 tii na ebandeli ya 1919, Yesu asalaki mosala ya kopɛtola bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo.  (Mal. 3:1-3; 1 Pe. 4:17) Na nsima, na kati ya mobu 1919 nde kobuka “mbuma ya mabele” ebandaki. Kozanga koumela, Yesu asalelaki moombo ya sembo mpe ya mayele oyo autaki kotyama mpo asalisa bandeko bámona ete mosala ya kosakola esengeli kosalema na lombangu. Tótala ndenge esalemaki.

7. (a) Nini esalisaki bandeko na biso bámona ete mosala ya kosakola esengeli kosalema na lombangu? (b) Balendisaki bandeko básala nini?

7 Na sanza ya nsambo na 1920, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki boye: “Boyekoli na biso ya Makomami emonisi polele ete lisangá ezwi libaku malamu ya kosakola nsango ya bokonzi.” Na ndakisa, maloba ya esakweli ya Yisaya esalisaki bandeko bámona ete nsango ya Bokonzi esengeli kosakolama na mokili mobimba. (Yis. 49:6; 52:7; 61:1-3) Bayebaki te ndenge oyo mosala yango ekosalema, kasi batyaki motema ete Yehova akofungwela bango nzela. (Tángá Yisaya 59:1.) Lokola emonanaki polele ete mosala ya kosakola esengeli kosalema na lombangu, balendisaki bandeko bámipesa koleka na mosala yango. Bandeko basalaki nini?

8. Na 1921, bandeko basosolaki makambo nini mibale ya ntina mpo na mosala ya kosakola?

8 Na sanza ya zomi na mibale na 1921, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki boye: “Mbula oyo [1921] ezalaki mbula oyo eleki nyonso; bato ebele bayoki nsango malamu koleka na bambula nyonso liboso.” Lisolo yango ebakisaki ete: “Kasi mosala ezali naino mingi. . . . Tósala yango na motema ya esengo.” Tósimba ete bandeko basosolaki makambo mibale ya ntina oyo Yesu ayebisaki bantoma na ye mpo na mosala ya kosakola: Mosala yango esengeli kosalema na lombangu, mpe basali basengeli kozala na esengo.

9. (a) Na 1954, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki nini mpo na mosala ya kobuka mbuma, mpe mpo na nini? (b) Na bambula 50 oyo eleki, ndenge nini motángo ya basakoli ya Bokonzi ebakisami? (Talá etanda “ Bokoli na mokili mobimba.”)

9 Na bambula ya 1930, ntango bandeko basosolaki ete “ebele mpenza ya bato” ya bampate mosusu bakoyoka nsango ya Bokonzi, babakisaki lisusu molende na mosala ya kosakola. (Yis. 55:5; Yoa. 10:16; Em. 7:9) Nini esalemaki? Motángo ya basakoli ya Bokonzi elongwaki 41 000 na 1934, mpe ekómaki 500 000 na 1953! Yango wana, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/1954 elobaki ete: “Elimo ya Yehova mpe nguya ya Liloba na ye nde esali mosala monene oyo ya kobuka mbuma na mokili mobimba.” *Zek. 4:6.

 

BOKOLI NA MOKILI MOBIMBA

Ekólo

1962

1987

2013

Australie

15 927

46 170

66 023

Brésil

26 390

216 216

756 455

France

18 452

96 954

124 029

Italie

6 929

149 870

247 251

Japon

2 491

120 722

217 154

Mexique

27 054

222 168

772 628

Nigéria

33 956

133 899

344 342

Philippines

36 829

101 735

181 236

États-Unis

289 135

780 676

1 203 642

Zambie

30 129

67 144

162 370

 

BATO OYO BAZALI KOYEKOLA BIBLIA

1950

234 952

1960

646 108

1970

1 146 378

1980

1 371 584

1990

3 624 091

2000

4 766 631

2010

8 058 359

 Bandakisa oyo elobelaki mosala ya kobuka mbuma

10, 11. Ndakisa ya mbuma ya mutarde emonisi nini mpo na bokoli ya mboto?

10 Na bandakisa oyo Yesu apesaki mpo na Bokonzi, alobelaki makambo oyo mosala ya kobuka mbuma ekosala. Tótalela ndakisa ya mbuma ya mutarde mpe ndakisa ya levire. Tokolobela mingimingi ndenge ekokisami na mikolo oyo ya nsuka.

11 Ndakisa ya mbuma ya mutarde. Mobali moko alonaki mbuma ya mutarde. Na nsima ekolaki, ekómaki nzete monene, mpe bandɛkɛ bayaki kofanda wana. (Tángá Matai 13:31, 32.) Ndakisa yango ezali komonisa nini mpo na bokoli ya mboto? (1) Bokoli oyo emonani ezali likambo ya kokamwa. Mbuma ya mutarde oyo “ezalaki moke mpenza koleka mboto nyonso” ekómaki nzete oyo ezali na “bitape minene.” (Mrk. 4:31, 32) (2) Bokoli yango ezali likambo ya kotyela ntembe te. Yesu alobaki ete “ntango [mboto] elonami, ebimaka.” Alobaki te ete “ekoki kobima.” Alobaki nde “ebimaka.” Eloko moko te ekoki kopekisa bokoli yango. (3) Nzete yango ezali kobenda bapaya mpe ekómi esika ya kofanda. “Bandɛkɛ ya likoló” ezalaki “koya kofanda na nse ya elili na yango.” Ndenge nini makambo yango misato eyokani na mosala ya kobuka mbuma ya elilingi oyo ezali kosalema lelo?

12. Ndenge nini ndakisa ya mbuma ya mutarde eyokani na mosala ya kobuka mbuma oyo ezali kosalema lelo? (Talá mpe etanda “ Bato oyo bazali koyekola Biblia.”)

12 (1) Bokoli oyo emonani: Ndakisa ya mbuma ya mutarde emonisi bokoli ya nsango ya Bokonzi mpe ya lisangá ya bokristo. Banda 1919, basali ya molende na mosala ya kobuka mbuma bayanganisami na lisangá ya bokristo oyo epɛtolami. Na ntango wana, motángo ya basali ezalaki moke, kasi ekolaki nokinoki. Kutu, bokoli yango kobanda na ebandeli ya bambula ya 1900 tii lelo ezali likambo ya kokamwa mpenza. (Yis. 60:22) (2) Likambo ya kotyela ntembe te: Eloko moko te epekisi bokoli ya lisangá ya bokristo. Atako banguna ya Nzambe batyaki mitambo ndenge na ndenge mpo na kotɛmɛla mbuma yango ya moke, ekobaki kaka kokola, elongaki mikakatano nyonso. (Yis. 54:17) (3) Esika ya kofanda: “Bandɛkɛ ya likoló,” oyo ezali koya kofanda na nzete yango ezali elilingi ya bamilio ya bato ya mitema sembo ya mikili soki 240 oyo bandimi nsango ya Bokonzi mpe bakɔti na lisangá ya bokristo. (Ezk. 17:23) Na lisangá, bazali kozwa bilei ya elimo, libɔndisi, mpe libateli.Yis. 32:1, 2; 54:13.

Ndakisa ya mbuma ya mutarde emonisi ete bato oyo bayaka na lisangá bazwaka esika ya kofanda mpe libateli (Talá paragrafe 11 mpe 12)

13. Ndakisa ya levire emonisi nini mpo na bokoli?

13 Ndakisa ya levire. Mwasi moko abakisaki mwa levire na pɔtɔpɔtɔ ya farini mpe levire yango evimbisaki pɔtɔpɔtɔ mobimba. (Tángá Matai 13:33.) Ndakisa yango ezali komonisa nini mpo na bokoli ya mboto? Tótalela makambo mibale. (1) Bokoli ememaka mbongwana. Levire epanzanaki ‘tii pɔtɔpɔtɔ mobimba evimbaki.’ (2) Bokoli ezali kopalangana. Levire evimbisaki pɔtɔpɔtɔ mobimba, “bimekelo [nyonso] misato ya minene ya farini.” Ndenge nini makambo yango mibale eyokani na mosala ya kobuka mbuma ya elilingi oyo ezali kosalema lelo?

14. Ndenge nini ndakisa ya levire eyokani na mosala ya kobuka mbuma oyo ezali kosalema lelo?

 14 (1) Mbongwana: Levire ezali elilingi ya nsango ya Bokonzi, mpe pɔtɔpɔtɔ ya farini ezali elilingi ya bato. Ntango basangisi levire ná farini, levire esalaka ete pɔtɔpɔtɔ ya farini ebongwana; ndenge moko mpe ntango bato bandimi nsango ya Bokonzi, nsango yango ebongolaka mitema na bango. (Rom. 12:2) (2) Kopalangana: Kopalangana ya levire ezali elilingi ya kopalangana ya nsango ya Bokonzi. Levire esalaka na kati ya farini tii ekopalangana na pɔtɔpɔtɔ mobimba. Ndenge moko mpe, nsango ya Bokonzi ezali kopalangana “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Likambo yango emonisi mpe ete ata na mikili oyo mosala na biso epekisamá, nsango ya Bokonzi ekopalangana, ata soki mosala na biso ya kosakola na bisika yango eyebanaka mpenza te.

15. Ndenge nini maloba ya Yisaya 60:5, 22 ekokisami? (Talá mpe bitanda “ Yehova asalaki ete esalema,” mpe “ ‘Oyo azali mpamba’ akómi ‘ekólo ya nguya.’”)

15 Mbula soki 800 liboso Yesu apesa bandakisa wana mibale, elimo ya Yehova esalisaki Yisaya asakola na maloba ya polele mosala monene ya kobuka mbuma oyo ezali kosalema  lelo mpe esengo oyo ekopesa basali. * Yehova alobelaki bato oyo “bauti mosika” bazali kosopana na lisangá na ye. Yehova alobaki na “mwasi” moko (elilingi ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele) ete: “Okomona mpe okotonda mpenza na esengo, mpe motema na yo ekolɛnga mpenza mpe ekovimba, mpo bozwi ya mbu ekoleka epai na yo; biloko ya bikólo ekoya epai na yo.” (Yis. 60:1, 4, 5, 9) Maloba yango ezali mpenza solo! Lelo, bato oyo bazali kosalela Nzambe banda bambula mingi batondaka mpenza na esengo na komona ndenge basakoli ya Bokonzi na bamboka na bango bakómi lelo bankóto na bankóto, nzokande liboso bazalaki kaka moke.

Ntina oyo basaleli nyonso ya Yehova basengeli kosepela

16, 17. Mpo na nini ‘moloni ná mobuki-mbuma basengeli kosepela elongo’? (Talá mpe etanda “ Batrakte mibale esimbaki mitema ya bato mibale na Amazonie.”)

16 Kobosana te ete Yesu alobaki na bantoma na ye ete: “Mobuki-mbuma . . . azali koyanganisa mbuma mpo na bomoi ya seko, mpo moloni ná mobuki-mbuma básepela elongo.” (Yoa. 4:36) Ndenge nini tozali ‘kosepela elongo’ na mosala ya kobuka mbuma na mokili mobimba? Na ndenge mingi. Tólobela misato.

17 Ya liboso, tosepelaka komona ndenge Yehova azali kosunga biso. Ntango tosakoli nsango ya Bokonzi, toloni mboto. (Mat. 13:18, 19) Ntango tosalisi moto akóma moyekoli ya Kristo, tobuki mbuma. Biso nyonso toyokaka esengo makasi mpe tokamwaka ntango tomoni ndenge Yehova asali ete mboto ya Bokonzi ‘ebima mpe ekola.’ (Mrk. 4:27, 28) Mboto mosusu oyo tolonaka eyaka kobota na nsima, mpe bandeko mosusu nde babukaka mbuma. Mbala mosusu osilá kokutana na likambo lokola oyo elandi. Joan, ndeko mwasi moko ya Angleterre, azwá batisimo esali mbula 60. Ndeko yango alobaki boye: “Nakutaná na bato ebele oyo bayebisaki ngai ete nalonaki mboto ya solo na mitema na bango eleki bambula ebele. Kozanga ete nayeba yango, na nsima, Batatoli mosusu bayekolaki na bango Biblia mpe basalisaki bango bákóma basaleli ya Yehova. Nasepelaka ndenge mboto oyo nalonaki ekolaki mpe babukaki mbuma na yango.”Tángá 1 Bakorinti 3:6, 7.

18. Na kolanda 1 Bakorinti 3:8, nini esengeli kotinda biso tósepela?

18 Ya mibale, tokozala ntango nyonso basali ya esengo soki tobosani te maloba ya ntoma Paulo ete: “Moto na moto akozwa mbano na ye na kolanda mosala na ye.” (1 Ko. 3:8) Mbano ekopesama na kolanda mosala, kasi te na kolanda mbuma oyo mosala yango ebimisi. Likambo yango esengeli kokitisa mitema ya bandeko oyo basakolaka na bateritware oyo bato mingi te bandimaka solo! Na miso ya Nzambe, Motatoli nyonso oyo amipesaka mobimba na mosala ya kolona mboto azali “kobota mbuma mingi” mpe mpo na yango, asengeli kosepela.Yoa. 15:8; Mat. 13:23.

19. (a) Ndenge nini esakweli ya Yesu oyo ezali na Matai 24:14 emonisi ntina oyo tosengeli kosepela? (b) Nini tosengeli kobosana te ata soki tolongi te kokómisa moto moyekoli?

19 Ya misato, tosepelaka mpo mosala na biso ezali kokokisa esakweli. Talá eyano oyo Yesu apesaki bantoma na ye ntango batunaki ye ete: “Elembo nini ekomonisa kozala na yo  mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo?” Ayebisaki bango ete likambo moko oyo ekozala na kati ya elembo yango ezali mosala ya kosakola na mokili mobimba. Azalaki nde kolobela mosala ya kokómisa bato bayekoli? Te. Alobaki: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli.” (Mat. 24:3, 14) Na yango, kosakola Bokonzi, to kolona mboto, ezali na kati ya elembo oyo Yesu apesaki. Yango wana, ntango tozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi, tóbosanaka te ete ata soki tolongi kokómisa moto moyekoli te, tolongi kopesa “litatoli.” * Ya solo, bato bándima to bándima te, tozali kokokisa esakweli ya Yesu mpe tozali na lokumu monene ya kozala “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.” (1 Ko. 3:9) Nyonso wana etindaka biso tósepela!

“Banda esika moi ebimaka tii esika yango elalaka”

20, 21. (a) Ndenge nini maloba oyo ezali na Malaki 1:11 ezali kokokisama? (b) Ekateli nini ozwi mpo na mosala ya kobuka mbuma, mpe mpo na nini?

20 Na siɛklɛ ya liboso, Yesu asalisaki bantoma na ye bámona ete mosala ya kobuka mbuma esengelaki kosalema na lombangu. Kobanda 1919 tii lelo, Yesu asalisi bayekoli na ye báyeba mpe likambo yango. Na yango, basaleli ya Nzambe babakisi molende na mosala yango. Kutu, emonani ete eloko moko te ekoki kopekisa mosala ya kobuka mbuma. Ndenge Malaki asakolaki yango, mosala ya kosakola ezali kosalema lelo “banda esika moi ebimaka tii esika yango elalaka.” (Mal. 1:11) Ya solo, banda na kobima ya moi tii na kolala na yango, elingi koloba banda na ɛsti tii na wɛsti, na mokili mobimba, baloni mboto mpe babuki-mbuma bazali kosala mosala mpe kosepela elongo. Ɛɛ, banda na kobima ya moi tii na kolala na yango, elingi koloba banda ntɔngɔ tii mpokwa, tozali komipesa na kosakola mpo toyebi ete mikolo etikali ya kotánga.

21 Soki tozongisi makanisi na mbula soki 100 oyo eleki mpe tokanisi ndenge mwa etuluku moke ya basaleli ya Nzambe ekómi lelo “ekólo ya nguya,” mitema na biso ‘elɛngaka mpenza mpe evimbaka’ na esengo. (Yis. 60:5, 22) Tiká esengo wana mpe bolingo na biso mpo na Yehova, “Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma,” etinda mokomoko na biso akoba komipesa tii na nsuka na mosala monene ya kobuka mbuma oyo ezali kosalema lelo oyo!Luka 10:2.

^ par. 9 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo esalemaki na bambula yango mpe bambula oyo elandaki, tolendisi yo otánga nkasa 425-520 na buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu, oyo elobeli mosala ya kobuka mbuma kobanda 1919 tii na 1992.

^ par. 15 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali esakweli yango, talá buku Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso II, nkasa 303-320.

^ par. 19 Bayekoli ya Biblia mpe basosolaki likambo yango. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona ya 15/11/1895 elobaki ete: “Ata soki kaka mwa blé moke nde ekoyanganisama, litatoli mpo na solo ekopesama mingi. . . . Biso nyonso tokoki kosakola evanzile.”