Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

 MOKAPO 8

Biloko oyo tosaleli—Kobimisa mikanda mpo na mokili mobimba

Biloko oyo tosaleli—Kobimisa mikanda mpo na mokili mobimba

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Yehova azali kokoba kopesa biso bisaleli oyo tosengeli na yango mpo na koteya bato na bikólo nyonso, mabota nyonso, mpe minɔkɔ nyonso

1, 2. (a) Na siɛklɛ ya liboso, nini esalisaki na kopalanganisa nsango malamu na Ampire ya Roma mobimba? (b) Nini emonisaka yo ete Yehova azali kosunga biso lelo oyo? (Talá mpe etanda “ Nsango malamu na minɔkɔ koleka 670.”)

BAPAYA oyo bayaki na Yerusaleme bazalaki kokamwa makambo oyo bazalaki koyoka. Bato ya Galile bazalaki koloba malamu minɔkɔ ya bapaya, mpe makambo oyo bazalaki koloba ebendaki likebi na bango. Ezalaki na Pantekote ya mobu 33 T.B., ntango bayekoli ya Yesu bazwaki elimo santu mpe bakómaki koloba minɔkɔ mosusu na ndenge ya likamwisi; yango emonisaki ete Nzambe azalaki na bango. (Tángá Misala 2:1-8, 12, 15-17.) Bato ya mikili ndenge na ndenge bayokaki nsango malamu oyo bayekoli basakolaki mokolo wana, mpe na nsima bapalanganisaki yango na Ampire ya Roma mobimba.Kol. 1:23.

2 Lelo oyo, basaleli ya Nzambe balobaka minɔkɔ mosusu na ndenge ya likamwisi te. Atako bongo, bazali kosakola na minɔkɔ ebele mpenza koleka na siɛklɛ ya liboso, mpo bazali kobongola nsango ya Bokonzi na minɔkɔ koleka 670. (Mis. 2:9-11) Basaleli ya Nzambe babimisi mikanda ebele mpenza na minɔkɔ ndenge na ndenge mpe yango esali ete nsango ya Bokonzi ekɔti na bisika nyonso ya mokili. * Likambo yango mpe ezali komonisa polele ete Yehova azali kosalela Mokonzi Yesu Kristo mpo na kotambwisa mosala ya kosakola. (Mat. 28:19, 20) Wana tozali kotalela mwa biloko oyo tosaleli na mosala ya kosakola na boumeli ya mbula 100 oyo eleki, talá ndenge Mokonzi asalisi biso mokemoke mpo tóyeba kotyela bato likebi mpe alendisi biso tózala bateyi ya Liloba ya Nzambe.2 Tim. 2:2.

Mokonzi apesi bato na ye bisaleli mpo bálona mboto ya solo

3. Mpo na nini tosaleli biloko ndenge na ndenge na mosala ya kosakola?

3 Yesu alobaki ete “liloba ya bokonzi” ezali lokola mboto mpe motema ya moto lokola mabele. (Mat. 13:18, 19) Ndenge kaka mosali-bilanga asalelaka bisaleli ya ndenge na ndenge mpo na kobalola mabele mpe kobongisa yango liboso alona mboto, bato ya Yehova basaleli biloko ndenge na ndenge mpo na kobongisa mitema ya bamilio ya bato mpo bándima nsango ya Bokonzi. Bisaleli mosusu esalelamaki kaka na boumeli ya ntango moko boye. Mosusu, na ndakisa babuku  mpe bazulunalo, ezali kosalisa mingi tii lelo. Mayele ndenge na ndenge oyo tolobelaki na mokapo oyo eleki ezalaki mpo na bato ebele na mbala moko; kasi biloko nyonso oyo tokolobela na mokapo oyo, esalisi basakoli ya Bokonzi bákutana mpenza na moto mokomoko mpe básolola na ye.Mis. 5:42; 17:2, 3.

Esika bazalaki kosala bafono ná bikoliseli-loláká na Toronto, Canada

4, 5. Ndenge nini bazalaki kosalela fono, kasi ezangaki nini?

4 Badiskur na badiskɛ. Na bambula ya 1930 tii na bambula ya 1940, basakoli basalelaki badiskur oyo etyami na badiskɛ mpe bazalaki kobɛta yango na fono. Diskur moko ezalaki koumela miniti soki mitano. Badiskur mosusu ezalaki na mitó ya makambo ya mikuse, na ndakisa “Bosato,” “Epongelo,” mpe “Bokonzi.” Ndenge nini bazalaki kosalela badiskɛ yango? Ndeko Clayton Woodworth, oyo azwaki batisimo na 1930 na États-Unis, alobaki boye: “Nazalaki komema mwa sakosi ya moke oyo ezalaki na fono mpe mwa ebende oyo nakotya na nse ya fono mpo ebɛta malamu. Soki nakómi liboso ya porte moko, nazalaki kobimisa fono, mpe soki nabongisi yango malamu, nazalaki kobɛta porte. Soki moto afungoli, nazalaki koloba ete: ‘Nazali na nsango moko ya ntina mingi; nalingi oyoka yango.’” Nini ezalaki kosalema? Ndeko Woodworth alobi boye: “Mbala mingi bato bazalaki kondima. Na bantango mosusu, okomona moto akangi mbala moko porte. Bato mosusu mpe bazalaki kokanisa ete natɛkaka bafono.”

Na 1940, basalaki badiskur koleka 90 mpe babimisaki yango na badiskɛ koleka milio moko

5 Na 1940, basalaki badiskur koleka 90 mpe batyaki yango na badiskɛ koleka milio moko. John Barr, oyo na ntango wana azalaki mobongisi-nzela na Grande-Bretagne mpe na nsima akómaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alobaki boye: “Na 1936 tii 1945, fono ezalaki mpenza moninga na ngai. Kutu, na ntango wana, soki fono ezali te, nazalaki kokoka  koteya te. Koyokisa bato mongongo ya ndeko Rutherford na porte ya ndako na bango ezalaki mpenza kolendisa bango; ezalaki lokola nde ye moko azali wana. Atako bongo, fono ezalaki te lokola moto oyo azali koteya: ezangaki likoki ya kosimba mitema ya bato.”

6, 7. (a) Ndenge nini mokanda ya litatoli esalisaki, kasi mabe na yango ezalaki nini? (b) Ndenge nini Yehova ‘atyaki maloba na monɔkɔ na biso’?

6 Mokanda ya litatoli. Kobanda na 1933, lisangá elendisaki basakoli básalelaka mokanda ya litatoli na mosala ya kosakola ndako na ndako. Mokanda ya litatoli ezalaki mwa lokasa moko ya santimɛtrɛ 8 na mokuse mpe santimɛtrɛ 13 na molai. Ezalaki na nsango mokuse ya Biblia mpe elobelaki mikanda na biso oyo tokokaki kopesa moto. Mosakoli azalaki kaka kopesa moto mokanda yango mpe kosɛnga ye atánga. Ndeko moko na nkombo Lilian Kammerud, oyo na nsima akómaki misionɛrɛ na Porto Rico mpe na Argentine, alobaki boye: “Nazalaki kosepela mingi kosalela mokanda ya litatoli.” Mpo na nini? Alobaki boye: “Mingi kati na biso tozalaki koyeba te ndenge ya kobanda lisolo malamu. Mokanda yango esalisaki ngai namesana kobanda lisolo na bato.”

Mokanda ya litatoli (na monɔkɔ ya Italien)

7 Ndeko David Reusch, oyo azwaki batisimo na 1918, alobaki boye: “Mokanda ya litatoli esalisaki bandeko mingi, mpo kaka bandeko moke nde bazalaki komona ete bayebi kobanda lisolo.” Atako bongo, mokanda yango esalisaki na makambo nyonso te. Ndeko Reusch abakisaki boye: “Na bantango mosusu, bato bazalaki kokanisa ete tolobaka te. Tokoki koloba ete ezalaki lokuta te, mpo mingi kati na biso tozalaki kokoka kosolola na bato te. Kasi, Yehova azalaki kobongisa biso mpo tóyeba kosolola na bato. Eumelaki te, atyaki maloba na monɔkɔ na biso na ndenge ateyaki biso kosalela Biblia na mosala ya ndako na ndako. Asalaki yango na nzela ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, oyo ebandaki na bambula ya 1940.”Tángá Yirimia 1:6-9.

8. Ndenge nini okoki kotika Kristo abongisa yo?

8 Babuku. Banda na 1914, basaleli ya Yehova basili kobimisa babuku koleka 100 oyo elobelaka makambo ya Biblia. Babuku mosusu ebimisamaki libosoliboso mpo na kopesa basakoli formasyo na mosala ya kosakola. Ndeko Anna Larsen, moto ya Danemark, oyo azali mosakoli esali mbula soki 70, alobi boye: “Yehova asalisaki biso tókóma basakoli ya malamu mpenza na nzela ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe babuku na yango. Nayebaka ete buku ya liboso ya eteyelo ezalaki Lisalisi ya Teokrasi mpo na basakoli ya Bokonzi (na Lingelesi), oyo ebimaki na 1945. Na nsima, tozwaki buku “Tozali na oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu,” oyo ebimaki na 1946. Lelo oyo, tozali na buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, oyo ebimaki na 2001.” Ya solo, na nzela ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ná babuku na yango, Yehova abongisi biso mpenza mpo tózala basakoli. (2 Ko. 3:5, 6) Opesá nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi? Omemaka buku Eteyelo ya mosala pɔsɔ nyonso na makita mpe ofungolaka yango na lokasa oyo mokɛngɛli ya eteyelo  azali kolobela? Soki osalaka bongo, okotika Kristo abongisa yo mpo okóma moteyi ya malamu koleka.2 Ko. 9:6; 2 Tim. 2:15.

9, 10. Ndenge nini babuku esalisi na mosala ya kolona mboto mpe kosopela yango mai?

9 Yehova azali mpe kobongisa biso na ndenge asali ete ebongiseli na ye ebimisaka babuku mpo na kosalisa basakoli báyeba kolimbola mateya ya Biblia. Moko na yango oyo esalisaki mingi ezalaki buku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko. Ebimisamaki mpo na mbala ya liboso na 1968 mpe esalisaki bato ebele. Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya 11 na mobu 1968 elobaki boye: “Lokola bato ebele mpenza bazali kosɛnga buku Solo, na sanza ya libwa, bandeko ya Brooklyn basalaki butubutu na masini ya kobimisa mikanda.” Lisolo yango ebakisaki ete: “Na sanza ya mwambe, longola motángo oyo ezalaki kobimisama, bato basɛngaki babuku koleka milio moko na ndambo!” Na 1982, tosilaki kobimisa babuku koleka milio 100 na minɔkɔ 116. Na boumeli ya mbula 14, elingi koloba kobanda 1968 tii 1982, buku Solo esalisaki bato koleka milio moko bákóma basakoli ya Bokonzi. *

10 Na 2005, buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimaki; buku moko malamu mpo na koyekola na bato Biblia. Tosili kobimisa buku yango milio 200 na minɔkɔ 256! Ndenge nini esalisi? Na mbula nsambo mpamba, kobanda 2005 tii na 2012, bato soki milio moko na ndambo bakómi basakoli ya nsango malamu. Kaka na eleko yango, motángo ya bato oyo bazali koyekola Biblia emati makasi; elongwe na milio 6 ekómi koleka milio 8 na ndambo. Ntembe ezali te ete Yehova azali kopambola milende oyo tozali kosala mpo na kolona solo ya Bokonzi mpe kosopela yango mai.Tángá 1 Bakorinti 3:6, 7.

11, 12. Na lisalisi ya bavɛrsɛ, yebisá soki bazulunalo na biso ebimisamaka mpo na banani.

11 Bazulunalo. Na ebandeli, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki kobimisama libosoliboso mpo na “etonga moke,” baoyo ‘babengami mpo na kokende na likoló.’ (Luka 12:32; Ebr. 3:1) Na mokolo ya 01/10/1919, lisangá ya Yehova ebimisaki zulunalo mosusu, oyo ebongisamaki mpo na bato nyonso. Bayekoli ya Biblia mpe bato mosusu basepelaki mingi na zulunalo yango na boye ete na boumeli ya bambula mingi, ezalaki kobimisama mingi mpenza koleka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Na ebandeli, bazalaki kobenga zulunalo yango L’Âge d’Or. Na 1937, bakómaki kobenga yango Consolation. Na nsima na 1946, ekómaki kobengama Lamuká!

12 Na boumeli ya bambula, ezipeli mpe ekomeli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! ebongwani mingi, kasi ntina na yango ebongwani te: kosakola Bokonzi ya Nzambe mpe kosalisa bato bákóma kondimela Biblia. Lelo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekómá mibale: nimero ya boyekoli mpe nimero ya bato nyonso. Nimero ya Boyekoli ebimaka mpo na “basali ya ndako”: “etonga moke” mpe “bampate mosusu.” * (Mat. 24:45; Yoa. 10:16) Nimero ya bato nyonso ebimaka mingimingi mpo na bato oyo bayebi naino mateya ya Biblia te, kasi bazalaka na limemya mpo na Biblia mpe Nzambe. (Mis. 13:16) Lamuká!  ezali mingimingi mpo na bato oyo bayebi Biblia malamu te mpe bayebi Nzambe ya solo Yehova te.Mis. 17:22, 23.

13. Likambo nini ebendi likebi na yo na oyo etali kobimisama ya bazulunalo na biso? (Talá etanda “ Kobimisama ya mikanda na mokili mobimba.”)

13 Kobanda na mobu 2014 tokómaki kobimisa koleka milio 44 ya Lamuká! mpe milio soki 46 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli sanza nyonso. Lamuká! ebongolami na minɔkɔ soki 100, mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na minɔkɔ koleka 200; na yango ezali bazulunalo oyo eleki kobongolama mpe kokabolama na mokili mobimba! Ezali likambo monene, kasi esengeli kokamwisa biso te. Bazulunalo yango ezali na nsango oyo Yesu alobaki ete esengeli kosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi.Mat. 24:14.

14. Likambo nini tosalaki na molende, mpe mpo na nini?

14 Biblia. Na 1896, ndeko Russell ná baninga na ye babongolaki nkombo ya ebongiseli oyo bazalaki kosalela mpo bákɔtisa liloba Biblia na nkombo yango; ekómaki kobengama Watch Tower Bible and Tract Society. Mbongwana yango ebongaki mpenza mpo Biblia nde esaleli ya libosoliboso mpo na kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi. (Luka 24:27) Na boyokani na nkombo yango oyo eyebani na Leta, basaleli ya Nzambe bakabolaki Biblia na molende mpe balendisaki bato bátánga yango. Na ndakisa, na 1926, tonyataki na bamasini na biso libongoli moko ya Makomami ya Grɛki ya bokristo ya Benjamin Wilson (The Emphatic Diaglott). Kobanda na 1942, tonyataki mpe tokabolaki Babiblia King James Version soki 700 000. Mbula mibale mpamba na nsima, tokómaki konyata na masini Biblia mosusu (American Standard Version) oyo esaleli nkombo ya Yehova na bisika 6 823. Na 1950, tokabolaki Biblia yango koleka 250 000.

15, 16. (a) Nini esepelisaka yo na Libongoli ya Mokili ya Sika? (Lobelá mpe etanda “ Kobongola Biblia na minɔkɔ ebele.”) (b) Ndenge nini okoki kotika Yehova asimba motema na yo?

15 Na 1950, tobimisaki Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo. Na 1961 nde tobimisaki Biblia yango ya mobimba. Biblia yango ekumisaka mpenza Yehova na ndenge ezongisi nkombo na ye na bisika oyo ezalaki na makomi ya Ebre ya ebandeli. Nkombo ya Nzambe etyami mpe mbala 237 na Makomami ya Grɛki ya bokristo. Mpo Libongoli ya Mokili ya Sika ezala sikisiki mpe mpasi te na kotánga, tobongisaki yango mbala mingi; mbala ya nsuka esalemaki na 2013. Na 2013, tosilaki kobimisa Babiblia milio 201 ya Libongoli ya Mokili ya Sika na mobimba na yango to na ndambo na minɔkɔ 121.

16 Bato mosusu bayokaka ndenge nini ntango batángaka Libongoli ya Mokili ya sika na minɔkɔ ya mboka na bango? Na Népal, moto moko alobaki ete: “Bato mingi bazalaki komona ete libongoli ya monɔkɔ ya Népalais oyo tozalaki na yango ezali mpasi na kokanga ntina, mpo elobeli na yango ezali makasi mingi. Kasi sikoyo tokoki kokanga ntina ya Biblia malamu, mpo [Libongoli ya Mokili ya Sika] ekomami na elobeli ya mikolo oyo.” Ntango mwasi moko na République centrafricaine abandaki kotánga Libongoli ya Mokili ya Sika na monɔkɔ ya Sango, abandaki kolela mpe alobaki: “Oyo mpenza monɔkɔ ya mboka na ngai.” Lokola mwasi wana, mokomoko  na biso akoki kotika ete Yehova asimba motema na ye soki azali kotánga Liloba na ye mokolo na mokolo.Nz. 1:2; Mat. 22:36, 37.

Tózala na botɔndi mpo na bisaleli mpe formasyo oyo tozwaka

17. Ndenge nini okoki komonisa botɔndi mpo na bisaleli mpe formasyo oyo ozwaka, mpe matomba nini okozwa soki osali bongo?

17 Ozalaka na botɔndi mpo na bisaleli mpe formasyo oyo Mokonzi Yesu Kristo apesaka biso? Ozwaka ntango mpo na kotánga mikanda oyo moombo ya sembo abimisaka, mpe osalelaka yango mpo na kosalisa basusu? Soki osalaka bongo, yo mpe okoki koyoka lokola ndeko Opal Betler, oyo azwaki batisimo na mokolo ya 04/10/1914. Opal alobaki boye: “Na boumeli ya bambula, ngai ná mobali na ngai [Edward] tosalelaki fono mpe mokanda ya litatoli. Tozalaki kosakola ndako na ndako mpe kopesa bato babuku, mwa babuku, mpe bazulunalo. Tokómaki kobima mpe kotambola na babalabala mpo na kokabola mikanda. Na nsima, balakisaki biso ndenge ya kozongela bato na bandako na bango mpe koyekola Biblia na baoyo basepelaki. Tozalaki na makambo mingi ya kosala mpe tozalaki na esengo mingi.” Yesu alakaki ete bayekoli na ye bakomipesa na kolona, kobuka, mpe ete bakobanda kosepela elongo. Lokola Opal, bamilio ya bato bakoki koloba ete elaka wana ya Yesu ekokisami mpenza.Tángá Yoane 4:35, 36.

18. Libaku nini tozali na yango?

18 Bato mingi oyo bakómi naino kosalela Mokonzi te bakoki komona ete basaleli ya Nzambe bazali “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba.” (Mis. 4:13) Kasi kanisá naino. Mokonzi asali ete bato na ye, oyo batalelami lokola bato mpamba, bakóma babimisi minene ya mikanda, oyo mosusu ezali kobongolama mpe kobimisama koleka mikanda nyonso oyo ebimaka na mokili mobimba! Longola yango, apesi biso formasyo mpe alendisaka biso tósalela mikanda yango mpo na kopalanganisa nsango malamu na mabota nyonso. Ezali mpenza libaku malamu kosala elongo na Kristo na mosala ya kolona mboto ya solo mpe kokómisa bato bayekoli!

^ par. 2 Na mbula 10 mpamba oyo euti koleka, basaleli ya Yehova babimisaki mikanda koleka miliare 20 oyo elimbolaka Biblia. Longola yango, bato koleka miliare mibale na ndambo oyo basalelaka Internet bakoki kokɔta na site na biso jw.org.

^ par. 9 Babuku mosusu oyo esalisaki basakoli na koteya solo ya Biblia ezali La harpe de Dieu (ebimaki na 1921), Que Dieu soit reconnu pour vrai! (ebimaki na 1946), Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis (ebimaki na 1982), mpe Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko (ebimaki na 1995).

^ par. 12 Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2013, lokasa 23, paragrafe 13, oyo esalisaki biso tóyeba malamu soki “basali ya ndako” ezali banani.

Makambo mosusu

KOBIMISA MIKANDA

Tozwi mokumba ya kobongola “maloba mosantu ya Nzambe”—Baroma 3:2

Batatoli ya Yehova basalelaki mabongoli mingi ya Biblia na basiɛklɛ oyo eleki. Kasi mpo na nini babimisi libongoli na bango moko ya Biblia na Lingelesi ya mikolo oyo?