Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

 MOKAPO 6

Basakoli ya Bokonzi—Bato bamipesi na bolingo na bango moko

Basakoli ya Bokonzi—Bato bamipesi na bolingo na bango moko

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Mokonzi abimisi limpinga mobimba ya basakoli

1, 2. Yesu asakolaki nini, mpe yango ebimisi motuna nini ya ntina?

MBALA mingi, bakonzi ya politiki bapesaka bato bilaka kasi bakokisaka yango te. Ata baoyo bazalaka na makanisi ya malamu bakokaka te kokokisa bilaka na bango nyonso. Nzokande likambo ya esengo, Masiya Mokonzi, Yesu Kristo, akokisaka likambo nyonso oyo alaki.

2 Nsima ya kokóma Mokonzi na 1914, ntango ekokaki mpo Yesu akokisa esakweli moko oyo apesaki mbula soki 1 900 liboso. Mwa moke liboso akufa, asakolaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi.” (Mat. 24:14) Kokokisama ya maloba yango esengelaki kozala na kati ya elembo ya kozala ya Yesu na Bokonzi. Kasi, yango ebimisi motuna moko ya ntina mingi: Ndenge nini Mokonzi Yesu akolonga kobongisa limpinga mobimba ya basakoli oyo bakomipesa bango moko na mikolo ya nsuka—eleko oyo bato bakozala bato ya moimi, oyo bazangi bolingo, mpe oyo balingaka makambo ya Nzambe te? (Mat. 24:12; 2 Tim. 3:1-5) Tosengeli koyeba eyano na motuna yango mpo etali bakristo nyonso ya solo.

3. Elikya nini Yesu azalaki na yango, mpe nini esalisaki ye azala na yango?

3 Tótalela lisusu esakweli oyo Yesu apesaki. Maloba “ekosakolama” emonisi ete Yesu azalaki na elikya? Ɛɛ! Yesu azalaki na ntembe ata moke te ete na mikolo ya nsuka, akozwa bato oyo bakomipesa na bolingo na bango moko. Nini esalisaki ye azala na elikya ndenge wana? Alandaki ndakisa ya Tata na ye. (Yoa. 12:45; 14:9) Liboso aya awa na mabele, Yesu amonaki ete Yehova azalaka na elikya ete basaleli na Ye bakomonisa elimo ya komipesa. Tótala ndenge Yehova amonisaki yango.

“Bato na yo bakomipesa na bolingo na bango moko”

4. Yehova asɛngaki Bayisraele bátya makabo mpo na mosala nini, mpe nini esalemaki?

4 Kanisá ndenge makambo esalemaki ntango Yehova ayebisaki Moize atonga tabernakle, to hema, oyo esengelaki kozala esika ya losambo mpo na ekólo Yisraele. Na nzela ya Moize, Yehova asɛngaki bato bátya makabo mpo na mosala yango. Moize ayebisaki bango ete: “Moto nyonso oyo motema na ye elingi amema . . . likabo ya Yehova.” Nini esalemaki?  Bato ‘bazalaki kaka komema likabo ya bolingo ntɔngɔ na ntɔngɔ.’ Bamemaki biloko mingi koleka tii “bapekisaki bato koya na eloko”! (Kob. 35:5; 36:3, 6) Bayisraele bamonisaki ete elikya oyo Yehova atyelaki bango ezalaki ya mpamba te.

5, 6. Na kolanda Nzembo 110:1-3, Yehova ná Yesu bazalaki na elikya ya komona elimo nini epai ya basaleli ya Nzambe na ntango ya nsuka?

5 Yehova azalaki mpe na elikya ete basambeli na ye ya mikolo ya nsuka bakozala na elimo ya komipesa? Ɛɛ! Mbula koleka 1 000 liboso Yesu abotama awa na mabele, elimo ya Yehova esalisaki Davidi akoma makambo oyo ekosalema ntango Masiya akobanda koyangela. (Tángá Nzembo 110:1-3.) Esakweli yango elobaki ete Yesu, Mokonzi oyo auti kotyama sika akozala na banguna oyo bakotɛmɛla ye. Kasi, akozala mpe na ebele ya bato oyo bakozala na ngámbo na ye. Ekosɛnga te bátindika bango na makasi mpo básalela Mokonzi. Ata baoyo bazali bilenge bakomipesa na bolingo na bango moko; bakokóma ebele mpenza lokola matangá ya mamwɛ oyo ezipaka matiti na ntɔngɔntɔngɔ, oyo moto akoki kotánga yango te. *

Bato oyo bamipesi mpo na kosakola Bokonzi bazali ebele lokola mamwɛ (Talá paragrafe 5)

6 Yesu ayebaki ete esakweli wana ya Nzembo 110 etali ye. (Mat. 22:42-45) Na yango, azalaki mpenza na elikya ete ekozala na bato ya sembo oyo bakomipesa na bolingo na bango moko mpo na kosakola nsango malamu na mabele mobimba. Makambo oyo esalemi na bambula oyo eleki emonisi nini? Mokonzi Yesu alongi mpenza kobimisa limpinga mobimba ya bato oyo bamipesi na bolingo na bango moko mpo na kosakola na mikolo oyo ya nsuka?

“Nazali na libaku malamu mpe mokumba ya kosakola nsango yango”

7. Nsima ya kotyama Mokonzi, makambo nini Yesu asalaki mpo na kobongisa bayekoli na ye mpo na mosala?

7 Mwa moke nsima ya kotyama Mokonzi, Yesu abandaki kobongisa bayekoli na ye mpo na mosala monene oyo esengelaki kosalema. Ndenge tomonaki yango na Mokapo 2, ayaki kotala bango mpe kopɛtola bango kobanda na 1914 tii  na ebandeli ya 1919. (Mal. 3:1-4) Na nsima, na 1919, atyaki moombo ya sembo mpo akamba bayekoli na ye. (Mat. 24:45) Mingimingi kobanda na ntango wana, moombo yango akómaki kopesa bilei ya elimo, na nzela ya badiskur na mayangani minene mpe na nzela ya mikanda, oyo ezalaki komonisa mbala na mbala ete mokristo nyonso asengeli kosakola.

8-10. Na ndenge nini mayangani minene esalisaki basakoli bábakisa molende? Pesá ndakisa. (Talá mpe etanda “ Mayangani oyo esalisaki basakoli bábakisa molende.”)

8 Badiskur na mayangani minene. Nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, lokola Bayekoli ya Biblia bazalaki na mposa ya litambwisi, basalaki liyangani monene ya liboso, kobanda na mokolo ya yambo tii na mokolo ya mwambe na sanza ya libwa na mobu 1919, na Cedar Point, na etúka ya Ohio, na États-Unis. Na mokolo ya mibale, na diskur moko oyo ndeko Rutherford asalaki, alobaki na bayangani polele ete: “Mosala ya mokristo awa na mabele . . . ezali ya kosakola nsango ya bokonzi ya Nkolo.”

9 Likambo monene na liyangani yango esalemaki na mokolo ya mitano, ntango ndeko Rutherford asalaki diskur oyo ezalaki na moto ya likambo “diskur mpo na baninga ya mosala,” oyo na nsima ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na nse ya motó ya likambo “Bósakola Bokonzi.” Alobaki boye: “Na ntango ya mikakatano, mokristo amitunaka ete: Mpo na nini nazali awa na mabele? Eyano na motuna wana esengeli kozala ete: na boboto na ye, Nkolo atye ngai ambasadɛrɛ na ye mpo na komema nsango ya Nzambe ya kozongisa boyokani elongo na bato; na yango nazali na libaku malamu mpe mokumba ya kosakola nsango yango.”

10 Na diskur wana, ndeko Rutherford apesaki liyebisi ete zulunalo ya sika L’Âge d’Or (lelo oyo Lamuká!) ekobanda kobima mpo esalelama na mosala ya kosakola mpo na komonisa bato ete Bokonzi nde elikya mpo na bato. Na nsima, atunaki bayangani soki banani balingi komipesa mpo na kokabola zulunalo yango. Lapolo oyo epesamaki mpo na liyangani yango elobaki ete: “Ezalaki likambo ya kokamwa. Bato nyonso nkóto motoba batɛlɛmaki nzela moko.” * Ya solo, Mokonzi Yesu azalaki na bato oyo bandimaki komipesa na bolingo na bango moko mpo na kosakola Bokonzi na ye!

11, 12. Na 1920, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete mosala ya kosakola ekosalema ntango nini?

11 Mikanda. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekobaki komonisa polele ntina ya mosala oyo Yesu alobelaki, elingi koloba mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Tólobela mwa masolo oyo ebimaki na ebandeli ya bambula ya 1920.

12 Nsango nini esengeli kosakolama mpo na kokokisa Matai 24:14? Ntango nini mosala yango esengelaki kosalema? Lisolo “Evanzile ya Bokonzi” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/1920 elobelaki nsango oyo esengeli kosakolama; elobaki boye: “Nsango malamu yango etali nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo mpe kotyama ya bokonzi ya Masiya.” Lisolo yango emonisaki polele ntango oyo nsango yango esengeli kosakolama; elobaki: “Nsango yango esengeli  kosakolama na eleko oyo ebandi na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba tii na ‘bolɔzi monene.’” Yango wana, lisolo yango ebakisaki ete: “Sikoyo nde ntango . . . ya kosakola nsango malamu yango na mangomba nyonso ya bokristo ya nkombo mpamba.”

13. Na 1921, ndenge nini Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elendisaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo bámonisa elimo ya komipesa?

13 Esɛngaki kotinda basaleli ya Nzambe na makasi mpo básala mosala oyo Yesu alobelaki? Te. Lisolo “Zalá na mpiko,” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/03/1921 elendisaki elimo ya komipesa ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Mokristo mokomoko asengelaki komituna boye: “Kosala mosala yango ezali te libaku oyo eleki monene mpe mokumba oyo nazwi?” Lisolo yango ebakisaki ete: “Tozali na elikya ete soki bomoni makambo ndenge wana [ete kosakola ezali libaku malamu] bokozala lokola Yirimia, oyo na motema na ye liloba ya Nkolo ezalaki ‘lokola mɔtɔ oyo ezali kopela, oyo ekangamaki na kati ya mikuwa’ na ye, mpe ezalaki kosala ete atika koloba te.” (Yir. 20:9) Elendiseli wana ya boboto emonisaki elikya oyo Yehova ná Yesu bazalaka na yango epai ya bato ya sembo oyo bazali na ngámbo ya Bokonzi.

14, 15. Na 1922, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elendisaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo básala nini mpo bákutana na bato?

14 Bakristo ya solo basengelaki kosala nini mpo na kokutana na bato mpe koyebisa bango nsango ya Bokonzi? Lisolo moko mokuse oyo elobaki “Kosakola ezali na ntina mingi,” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/08/1922, elendisaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo bámipesa “na molende mpo na komemela bato mikanda oyo ezali na nsango ya Biblia na bandako na bango mpe kosakwela bango ete bokonzi ya likoló ekómi pene.”

15 Ezali polele ete kobanda na 1919, Kristo asalelaka moombo ya sembo mpe ya mayele mpo na komonisa mbala na mbala ete kosakola nsango ya Bokonzi ezali libaku malamu mpe mokumba ya mokristo nyonso awa na mabele. Kasi, Bayekoli ya Biblia ya ntango wana basalaki nini ntango balendisaki bango ete bámipesa na kosakola Bokonzi?

“Bato ya sembo bakomipesa”

16. Ndenge nini bankulutu mosusu batalelaki likanisi oyo elobaki ete moto nyonso asengeli kosakola?

16 Na bambula ya 1920 mpe ya 1930, bandeko mosusu baboyaki kondima ete bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo basengeli kobimaka mosala ya kosakola. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/11/1927 elobelaki likambo oyo ezalaki kosalema; elobaki boye: “Lelo oyo, ezali na bato mosusu na lingomba [lisangá] oyo bazali bankulutu . . . kasi bazali koboya kolendisa bandeko na bango bákende kosakola, mpe bango moko bazali koboya kosakola. . . . Bazali kotyola likanisi ya kokende ndako na ndako mpo na koyebisa bato nsango ya Nzambe, Mokonzi oyo atye, mpe Bokonzi na ye.” Lisolo yango ebakisaki polele ete: “Sikoyo nde ntango oyo bato ya sembo basengeli kokeba na bato ya ndenge wana mpe kokima bango, mpe koloba na bango ete tokopona lisusu bato ya ndenge wana te mpo bázwa mokumba ya nkulutu.” *

17, 18. Bandeko mingi basalaki nini nsima ya kozwa malako ya biro monene, mpe na mbula 100 oyo euti koleka, bamilio ya bato basali nini?

 17 Likambo ya esengo, bandeko mingi na masangá bandimaki malako oyo eutaki na biro monene. Bamonaki ete kosakola nsango ya Bokonzi ezali libaku malamu. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/03/1926 emonisaki yango na maloba oyo: “Bato ya sembo bakomipesa . . . mpo na koyebisa bato nsango yango.” Bato wana ya sembo bakokisaki esakweli ya Nzembo 110:3 mpe bamipesaki na bolingo na bango moko mpo na kosalela Masiya Mokonzi.

18 Na mbula 100 oyo euti koleka, bamilio ya bato bamipesi na bolingo na bango moko na mosala ya kosakola Bokonzi. Na mikapo oyo elandi, tokolobela mayele mpe biloko oyo basaleli na mosala yango, mpe matomba oyo yango ebimisi. Kasi liboso, tólobela naino ntina oyo bamilio ya bato bazali komipesa na bolingo na bango moko na kosakola Bokonzi, nzokande na mokili ya lelo, bato balukaka liboso bolamu na bango moko. Ntango tokotalela ntina yango, tosengeli komituna boye: ‘Nini etindaka ngai nasakola?’

“Bókoba koluka liboso bokonzi”

19. Mpo na nini tolandaka toli ya Yesu ya ‘kokoba koluka liboso bokonzi’?

19 Yesu apesaki bayekoli na ye toli ete ‘bákoba koluka liboso bokonzi.’ (Mat. 6:33) Mpo na nini totosaka toli yango? Libosoliboso mpo toyebi ete Bokonzi ezali na esika monene na mokano ya Nzambe. Ndenge tomonaki yango na mokapo eleki, elimo santu esalisaka basaleli ya Nzambe mokemoke mpo bákanga ntina ya mateya oyo etali Bokonzi. Ntango solo ya Bokonzi esimbi motema na biso, etindaka biso tóluka liboso Bokonzi yango.

Ndenge moko na moto oyo asepelaki ntango amonaki eloko ya motuya oyo ebombami, bakristo basepelaka mingi ndenge bayebi solo ya Bokonzi (Talá paragrafe 20)

20. Ndakisa ya eloko ya motuya oyo ebombami emonisi ete bayekoli ya Yesu basalaka nini mpo na toli ya kokoba koluka liboso Bokonzi?

20 Yesu ayebaki ndenge bayekoli na ye bakosala mpo na toli oyo etali kokoba koluka liboso Bokonzi. Tótalela ndakisa oyo apesaki ya eloko ya motuya oyo ebombami. (Tángá Matai 13:44.) Mokolo moko na mosala na ye, mosali-bilanga moko akutaki eloko ya motuya oyo ebombami na esika moko mpe amonaki mbala moko valɛrɛ na yango. Asalaki nini? ‘Na esengo, akendaki kotɛka biloko oyo azalaki na yango mpe asombaki elanga yango.’ Yango eteyi biso nini? Ntango toyoki solo ya Bokonzi mpe tomoni valɛrɛ na yango, na esengo nyonso, tokosala nyonso oyo esengeli mpo makambo ya Bokonzi ekoba kozala na esika na yango—na esika ya liboso na bomoi na biso. *

21, 22. Ndenge nini bato ya sembo bamonisaka ete bazali kokoba koluka liboso Bokonzi? Pesá ndakisa.

21 Bato ya sembo oyo bazali na ngámbo ya Bokonzi bamonisaka kaka na maloba te, kasi mpe na misala na bango ete bakobaka koluka liboso Bokonzi. Basalelaka ntango na bango, mayele na bango, mpe biloko oyo bazali na yango mpo na kosakola Bokonzi. Mingi bamipimeli makambo ebele mpo na komipesa na kosakola ntango nyonso. Basakoli nyonso oyo bamipesi na bolingo na bango moko ndenge wana bamonaka mpenza ndenge Yehova apambolaka baoyo batyaka Bokonzi na esika ya liboso. Tótalela ndakisa moko ya bambula oyo eleki.

 22 Avery Bristow ná mwasi na ye Lovenia bakómaki ba-colporteur (babongisi-nzela) na sudi ya États-Unis na nsuka ya bambula ya 1920. Bambula mingi na nsima, Lovenia alobaki boye: “Ngai ná Avery tolekisi bambula ebele ya esengo na mosala ya mobongisi-nzela. Mbala mingi, tozalaki koyeba te esika tokozwa mbongo ya kosomba esansi to biloko ya kolya. Kasi, Yehova azalaki ntango nyonso kosunga biso. Tokataki mosala ya mobongisi-nzela te. Tozalaki ntango nyonso kozwa biloko oyo tosengeli na yango.” Lovenia alobelaki likambo moko oyo esalemaki ntango bazalaki kosala na Pensacola, na étuká ya Floride, mpe bazalaki na mbongo mpe bilei mingi te. Ntango bazongaki na mwa ndako na bango, bakutaki saani minene mibale etondi na biloko ya kolya, mpe mwa mokanda oyo elobaki: “Euti na lisangá ya Pensacola.” Nsima ya kokanisa ebele ya bambula oyo alekisi na mosala ya kosakola ntango nyonso, Lovenia alobaki boye: “Yehova asundolaki biso ata mokolo moko te. Toyokaki nsɔni te ndenge totyelaki ye motema.”

23. Oyokaka ndenge nini lokola oyebá solo ya Bokonzi, mpe ozali na ekateli ya kosala nini?

23 Biso nyonso tokoki kosala ndenge moko te na mosala ya kosakola. Makambo ya bomoi na biso ekeseni. Atako bongo, biso nyonso tosengeli komona ete kosakola nsango malamu na molimo mobimba ezali lokumu monene. (Kol. 3:23) Lokola toyebi motuya ya solo ya Bokonzi oyo toyekolá, tondimaka komipimela nyonso oyo tokoki mpo tómipesa mobimba na kosakola, mpe tozalaka na mposa makasi ya kosala yango. Yo mpe ozalaka na ekateli wana?

24. Wapi moko ya makambo minene oyo Bokonzi esali na mikolo oyo ya nsuka?

24 Na boumeli ya mbula 100 oyo euti koleka, Mokonzi akokisi mpenza esakweli ya Matai 24:14. Mpe akokisi yango kozanga ete atindika moto na makasi. Ntango bayekoli na ye bakabwani na mokili oyo bato balukaka liboso bolamu na bango, bamipesaka na bolingo na bango moko mpo na kosakola. Mosala ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba ezali na kati ya elembo ya kozala ya Yesu na Bokonzi, mpe ezali moko ya makambo minene oyo Bokonzi ezali kosala na mikolo oyo ya nsuka.

^ par. 5 Na Biblia, mamwɛ elimbolaka ebele to mingi.Eba. 27:28; Mika 5:7.

^ par. 10 Mwa buku Bato oyo bazwi mosala (To Whom the Work Is Entrusted) elobaki ete: “L’Âge d’Or ebimisami mpo na mosala ya kosakola nsango ya bokonzi ndako na ndako. . . . Nsima ya kosakola, esengeli kotika nimero moko ya L’Âge d’Or na ndako nyonso, ata soki basɛngaki yango te.” Na boumeli ya bambula oyo elandaki, bazalaki kolendisa bandeko bázwaka nkombo ya bato oyo balingi kosala abonema ya L’Âge d’Or mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Kobanda na mokolo ya 01/02/1940, balendisaki basaleli ya Yehova báyebisaka motángo ya bazulunalo oyo bakabolaki.

^ par. 16 Na ntango wana, bandeko ya lisangá bazalaki kopona bankulutu na voti. Na yango, lisangá ekokaki koboya kopona mibali oyo bazalaki kotɛmɛla mosala ya kosakola. Na Mokapo 12, tokolobela ndenge lisangá ekómaki kolanda masɛngami ya Biblia mpo na kotya bankulutu.

^ par. 20 Yesu amonisaki mpe likambo yango ntango apesaki ndakisa ya moto moko ya mombongo oyo asalaka mibembo ya koluka mayaka ya kitoko. Ntango amonaki liyaka moko ya motuya monene, atɛkaki biloko na ye nyonso mpe asombaki yango. (Mat. 13:45, 46) Bandakisa yango mibale ezali mpe koteya biso ete bato nyonso bayebaka solo ya Bokonzi ndenge moko te. Tokoki koloba ete bato mosusu bakutanaka na yango kaka boye; bato mosusu balukaka yango koluka. Kasi, ata soki toyebá solo na nzela nini, biso nyonso tondimaka komipimela makambo mosusu mpo na kotya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na biso.