Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

 MOKAPO 14

Bamonisi bosembo na bango na Bokonzi ya Nzambe

Bamonisi bosembo na bango na Bokonzi ya Nzambe

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Mpo na komonisa ete bazali sembo na Bokonzi ya Nzambe, basaleli ya Nzambe bakɔtaka na makambo ya mokili te

1, 2. (a) Likambo nini oyo Yesu alobaki etambwisaka bayekoli na ye tii lelo? (b) Banguna balukaki kosala nini, kasi nini esalemaki?

NTANGO Yesu azalaki kosamba liboso ya Pilate, zuzi moko ya nguya mingi na ntango ya Bayuda, Yesu alobaki likambo moko oyo etambwisaka bayekoli na Ye ya solo lelo oyo. Alobaki boye: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te. Soki bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, mbɛlɛ basaleli na ngai babundi mpo nakabama epai ya Bayuda te. Kasi nde bokonzi na ngai euti awa te.” (Yoa. 18:36) Pilate abomisaki Yesu, kasi bolongi yango ezalaki ya ntango mokuse, mpo Yesu asekwaki. Bakonzi ya Roma, ampire moko ya nguya, balukaki kosilisa bayekoli ya Kristo, kasi balongaki te. Bakristo bapalanganisaki nsango ya Bokonzi na mikili nyonso ya ntango wana.Kol. 1:23.

2 Nsima ya kotyama ya Bokonzi na 1914, bakonzi mosusu ya nguya balukaki kolimwisa basaleli ya Nzambe. Kasi, moko te alongi biso. Baguvɛrnema ebele mpe bakonzi mosusu ya politiki bamekaki kokɔtisa biso na makasi na matata na bango. Kasi, balongaki te kokɔtisa bokabwani kati na biso. Lelo, bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe bazali na bikólo nyonso awa na mabele. Atako bongo, tozali na bomoko mpo tozali bandeko, mpe tokɔtaka ata moke te na makambo ya politiki ya mokili oyo. Bomoko na biso emonisi mpenza ete Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela mpe ete Mokonzi Yesu Kristo azali kokoba kotambwisa, kopɛtola, mpe kobatela bato na ye. Tótala ndenge asali yango, mpe ndenge alendisi kondima na biso na nzela ya bolongi oyo apesi biso na batribinale, mpo toboyaka ‘kozala bato ya mokili.’Yoa. 17:14.

Likambo moko ya ntina mingi

3, 4. (a) Makambo nini esalemaki ntango Bokonzi ebotamaki? (b) Basaleli ya Nzambe bayebaki malamu ndimbola ya koboya kokɔta na makambo ya mokili? Limbolá.

3 Nsima ya kobotama ya Bokonzi, etumba moko ebimaki na likoló, mpe na nsima Satana abwakamaki awa na mabele. (Tángá Emoniseli 12:7-10, 12.) Etumba moko mpe ebimaki awa na mabele, oyo emekaki mpenza basaleli ya Nzambe. Bazalaki na ekateli ya kolanda ndakisa ya Yesu mpe kozala bato ya mokili te. Kasi na ebandeli, bayebaki mpenza  te soki koboya kokɔta na makambo ya politiki elimboli nini.

4 Na ndakisa, volimi ya motoba ya buku L’Aurore du Millénium, * oyo ebimaki na 1904 epekisaki bakristo kokende etumba. Kasi, ebakisaki ete soki basɛngisi mokristo asala mosala ya soda, asengeli kosala makasi mpo bápesa ye misala oyo ezali na boyokani na bitumba te. Soki azwi mosala ya ndenge wana te, kasi batindi ye na etumba, asengeli kosala nyonso mpo aboma moto te. Na likambo yango, ndeko Herbert Senior, oyo azalaki kofanda na Grande-Bretagne mpe azwaki batisimo na 1905, alobaki boye: “Bandeko bazalaki mpenza na mobulungano mpe eyebanaki polele te soki kokɔta na mosala ya soda ezali mabe te kasi kokende na bitumba nde ezali mabe.”

5. Ndenge nini Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/09/1915 ekómaki kosembola boyebi na biso?

5 Kasi, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/09/1915 ekómaki kosembola boyebi na biso na likambo yango. Mpo na malako oyo epesamaki na buku Études des Écritures, Linɔ́ngi yango elobaki boye: “Tozali komituna soki kosala bongo elimboli te kozanga bosembo.” Mokristo asengelaki kosala nini soki balobi ete bakoboma ye lokola aboyi kolata bilamba ya basoda mpe kokóma soda? Lisolo yango ebakisaki ete: “Eleki malamu te moto akufa mpo azali sembo epai ya Nkumu ya kimya mpe aboyi kobuka mitindo na Ye, na esika akufa ntango azali kosalela bakonzi ya mokili oyo, mpe kopesa bango mabɔkɔ na lolenge moko boye, likambo oyo eyokani te na mateya ya Mokonzi na biso ya likoló? Tosengeli kopona kokufa mpo tozali sembo epai ya Mokonzi na biso ya likoló.” Atako elobaki makambo polele ndenge wana, lisolo yango ebakisaki ete: “Totindi moto moko te asala bongo. Topesi kaka likanisi.”

6. Ndakisa ya ndeko Herbert Senior epesi yo liteya nini?

6 Kasi, bandeko mosusu bamonaki polele ete kokende etumba ezali mabe, mpe balobaki ete ‘oyo ekoya, eya.’ Ndeko Herbert Senior, oyo tolobelaki liboso, alobaki boye: “Mpo na ngai, kokitisa masasi na masuwa [mosala oyo esɛngi kobunda te] mpe kotya yango na mondoki mpo na kobɛta yango ezalaki kaka ndenge moko.” (Luka 16:10) Lokola lisosoli ya ndeko Senior epekisaki ye kosala mosala ya soda, batyaki ye na bolɔkɔ. Ye ná bandeko mibali mosusu 4 bazalaki na kati ya bato 16 oyo bakɔtaki bolɔkɔ ya Richmond na Grande-Bretagne, mpe na nsima bakómaki kobengama Richmond 16; bazalaki elongo na mibali ya mangomba mosusu, oyo lisosoli na bango mpe epekisaki bango mosala ya soda. Mokolo moko, batyaki ndeko Senior ná bato mosusu na kati ya masuwa mpo bámema bango na etumba na France kozanga ete báyeba. Kuna, bakatelaki bango etumbu ya liwa. Batandaki ye ná bato mosusu na molɔngɔ mpo bábɛta bango masasi, kasi esalemaki bongo te. Balongolaki etumbu ya liwa mpe bakatelaki bango etumbu ya mbula 10 ya bolɔkɔ.

“Nakangaki ntina ete basaleli ya Nzambe basengeli kozala na kimya na bato nyonso, ata soki bitumba ezali koya.”—Simon Kraker (Talá paragrafe 7)

7. Ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, basaleli ya Nzambe basosolaki likambo nini?

 7 Ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, basaleli ya Yehova bakómaki kososola polele ndimbola ya koboya kokɔta na makambo ya mokili mpe oyo esengelaki kosala mpo na kolanda ndakisa ya Yesu. (Mat. 26:51-53; Yoa. 17:14-16; 1 Pe. 2:21) Na ndakisa, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/11/1939 ebimisaki lisolo moko ya ntina mingi oyo ezalaki na motó ya likambo “Koboya kokɔta na makambo ya mokili”; elobaki boye: “Bato ya Yehova basengeli sikoyo kolanda mobeko oyo elobi ete esengeli kokɔta ata moke te na bitumba kati na bikólo.” Mpo na lisolo yango, ndeko Simon Kraker, oyo na nsima akómaki kosala na biro monene ya Brooklyn, na New York, alobaki boye: “Nakangaki ntina ete basaleli ya Nzambe basengeli kozala na kimya na bato nyonso, ata soki bitumba ezali koya.” Bilei wana ya elimo eyaki mpenza na ntango oyo ebongi mpe ebongisaki basaleli ya Nzambe mpo na komekama monene oyo eyelaki bango mpo na bosembo na bango na Bokonzi ya Nzambe.

“Ebale” ya botɛmɛli

8, 9. Ndenge nini esakweli ya ntoma Yoane ekokisamaki?

8 Ntoma Yoane asakolaki ete nsima ya kotyama ya Bokonzi na 1914, dragɔ, elingi koloba Satana, akosanza ebale moko ya elilingi mpo na koluka kosilisa bato oyo bazali na  ngámbo ya Bokonzi ya Nzambe. * (Tángá Emoniseli 12:9, 15.) Ndenge nini esakweli ya Yoane ekokisamaki? Kobanda na bambula ya 1920, basaleli ya Nzambe bakómaki kokutana na botɛmɛli makasi. Ndenge moko na ebele ya bandeko oyo bazalaki kofanda na Amerika ya Nɔrdi na ntango ya etumba ya mibale ya mokili mobimba, ndeko Kraker akɔtaki bolɔkɔ mpo azalaki sembo na Bokonzi ya Nzambe. Kutu, na ntango ya etumba yango, Batatoli ya Yehova nde bazalaki ebele mpenza na babolɔkɔ ya États-Unis, koleka bato ya mangomba mosusu oyo lisosoli na bango mpe epekisaki bango kokende etumba.

9 Zabolo ná bato na ye bazalaki na mokano ya kobebisa bosembo ya bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe, ata soki bazali wapi. Na Afrika, na Mpoto mpe na États-Unis, bamemaki bango na batribinale mpe bazalaki kolaka bango ete bakotika bango soki babongoli makanisi na bango. Lokola baboyaki na motema moko kokɔta na makambo ya mokili, bamosusu bakɔtaki bolɔkɔ, babɛtamaki, mpe batikaki bango na bilembo na nzoto. Na Allemagne, basaleli ya Nzambe bakutanaki na minyoko ndenge na ndenge mpo baboyaki kosambela Hitler to mpe kokende etumba. Bato soki 6 000 bakɔtaki bolɔkɔ na bakaa ya Banazi, mpe Batatoli koleka 1 600 ya Allemagne mpe ya bikólo mosusu bakufaki na mabɔkɔ ya bato oyo bazalaki konyokola bango. Kasi, Zabolo anyokolaki basaleli ya Nzambe libela na libela te.Mrk. 8:34, 35.

“Mabele” emɛli “ebale”

10. “Mabele” ezali elilingi ya nini, mpe ndenge nini ebateli basaleli ya Nzambe?

10 Esakweli ya ntoma Yoane emonisaki ete “mabele,” oyo ezali elilingi ya bato ya mokili oyo bazali na mwa makanisi ya malamu,” bakomɛla “ebale” ya minyoko, mpe na ndenge yango bakosalisa basaleli ya Nzambe. Ndenge nini eteni wana ya esakweli ekokisami? Na bambula oyo elandaki Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mbala mingi “mabele” ekɔtelaki baoyo bazalaki sembo na Bokonzi ya Masiya. (Tángá Emoniseli 12:16.) Na ndakisa, batribinale ndenge na ndenge ya minene ebateli ntomo ya Batatoli ya Yehova ya koboya mosala ya soda mpe ya koboya kokɔta na milulu oyo elakisaka bolingo ya ekólo. Ya liboso, tótala mwa moke ndenge Yehova asalisi basaleli na ye bálonga na batribinale na likambo etali mosala ya soda.Nz. 68:20.

11, 12. Likambo nini ndeko Sicurella ná ndeko Thlimmenos bakutanaki na yango, mpe esukaki ndenge nini?

11 États-Unis. Anthony Sicurella azalaki na bandeko mitano mpe baboti na bango bazalaki Batatoli ya Yehova. Azwaki batisimo ntango azalaki na mbula 15. Ntango akómaki na mbula 21, akendaki kokomisa nkombo na biro ya Leta ete akoki kokende etumba te mpo azali mosaleli ya Nzambe. Mbula mibale na nsima, na 1950, akendaki lisusu mpo bátya ye na molɔngɔ ya bato oyo lisosoli na bango epekisi bango kosala mosala ya soda. Biro ya bato oyo basalaka  baankɛtɛ (FBI) emonaki mabe te kosala bongo, kasi biro oyo etalelaka makambo ya kosambisa eboyaki kokokisa mposa na ye. Nsima ya kolandela likambo yango na batribinale ya mike, Tribinale monene ya États-Unis etalelaki likambo ya ndeko Sicurella, mpe elongisaki ye. Bakómaki mpe kosalela ekateli yango mpo na bato mosusu ya États-Unis oyo lisosoli na bango mpe eboyaki mosala ya soda.

12 Grèce. Na 1983, bafundaki Iakovos Thlimmenos ete azangi botosi mpo aboyaki kolata bilamba ya basoda mpe batyaki ye na bolɔkɔ. Ntango abimaki na bolɔkɔ, akɔtisaki nkombo na kompanyi moko mpo asala mosala ya comptable, kasi baboyaki kozwa ye mpo bakonzi bakomaki na mikanda na ye ete asalá makambo ya mobulu. Amemaki likambo yango na batribinale ya Grèce, kasi lokola alongaki te, amemaki yango na Tribinale monene ya Mpoto mpo na ntomo ya bato. Na mobu 2000, bazuzi minene 17 ya tribinale yango balongisaki ye, mpe bazwaki ekateli oyo epekisaki kokanisela basusu mabe. Liboso ekateli wana ezwama, bakonzi bakomaki na mikanda ya bandeko 3 500 ya Grèce ete basalá makambo ya mobulu, kaka mpo bakɔtaki bolɔkɔ mpamba te bakɔtaka na makambo ya mokili te. Ntango tribinale elongisaki ndeko Thlimmenos, Grèce etyaki mobeko moko oyo elongolaki bifundeli wana na nkombo ya bandeko. Mpe ntango batalelaki lisusu Mibeko ya Grèce, bazongisaki mobeko moko oyo endimamaki mwa bambula liboso, oyo epesaki bana-mboka nyonso ya Grèce lotomo ya kosala mosala mosusu na esika ya mosala ya soda.

“Liboso nakɔta na tribinale, nabondelaki Yehova na etingya; na nsima nayokaki ete apesaki ngai kimya.”—Ivailo Stefanov (Talá paragrafe 13)

13, 14. Mateya nini tokoki kozwa na likambo oyo ekómelaki Ivailo Stefanov ná Vahan Bayatyan?

13 Bulgarie. Na 1994, bakɔtisaki ndeko Ivailo Stefanov, oyo azalaki na mbula 19, na mosala ya soda na makasi. Aboyaki kokóma soda to mpe kosala misala mosusu nyonso oyo mokambi na yango ezali soda. Bakatelaki ye bolɔkɔ ya sanza 18, kasi amemaki likambo yango na tribinale mosusu, mpo azalaki na lotomo ya kolanda lisosoli na ye. Nsukansuka, likambo na ye ekómaki na Tribinale monene ya Mpoto. Na 2001, liboso tribinale yango etalela likambo na ye, bakonzi ya Bulgarie basilisaki likambo na ndeko Stefanov na kimya. Batikaki kolandela ye, mpe bapesaki mwana-mboka nyonso ya Bulgarie lotomo ya kosala mosala mosusu na esika ya mosala ya soda. *

14 Arménie. Na 2001, ndeko Vahan Bayatyan akokisaki mbula oyo basɛngaka moto nyonso akɔta mosala ya soda. * Alobaki ete akoki kosala yango te mpo na lisosoli na ye, kasi batribinale nyonso ya Arménie ekweisaki ye. Na sanza ya libwa na 2002, akɔtaki bolɔkɔ mpo na mbula mibale ná ndambo, kasi babimisaki ye nsima ya sanza zomi na ndambo. Na ntango yango, amemaki likambo na ye na Tribinale monene ya Mpoto, mpe batalelaki yango. Kasi, na mokolo ya 27/10/2009, bazuzi ya tribinale yango mpe bakweisaki ye.  Ekateli wana esalaki mpasi mingi epai ya bandeko ya Arménie oyo bazalaki mpe na mokakatano wana. Kasi, bazuzi minene ya tribinale yango batalelaki lisusu ekateli wana. Na mokolo ya 07/07/2011, balongisaki Vahan Bayatyan. Ezalaki mbala ya liboso Tribinale monene ya Mpoto mpo na ntomo ya bato endima ete esengeli kotosa lotomo oyo moto azali na yango ya kolanda lisosoli na ye na kotalela mateya ya lingomba na ye mpamba te yango eyokani na bonsomi ya kokanisa, ya kolanda lisosoli, mpe ya losambo. Ekateli wana ebatelaki ntomo ya Batatoli ya Yehova, mpe ya bamilio ya bato mosusu oyo bafandi na bikólo oyo ezali na kati ya Conseil de l’Europe. *

Tribinale monene ya Mpoto (CEDH) elongisaki bandeko ya Arménie, mpe na nsima babimaki bolɔkɔ

Milulu mpe bafɛti ya ekólo

15. Mpo na nini basaleli ya Yehova baboyaka kosala milulu ya ekólo?

15 Lokola Batatoli ya Yehova bazali sembo na Bokonzi ya Masiya, baboyaka mosala ya soda, kasi baboyaka mpe na limemya nyonso kosala bafɛti mpe milulu ya ekólo. Mingimingi banda na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bolingo  ya ekólo epalangani mingi na mokili. Na bikólo mingi, basɛngaka bana-mboka bálapa ndai ya kotikala sembo na ekólo na nzela ya elako, báyemba loyembo ya ekólo, to mpe bápesa bɛndɛlɛ ya ekólo losako. Nzokande, biso tolapá ndai ya kokangama kaka na Yehova. (Kob. 20:4, 5) Mpo na yango, tokutani na minyoko ya ndenge na ndenge. Atako bongo, Yehova asaleli lisusu “mabele” mpo na komɛla botɛmɛli yango. Tótala kaka mwa makambo oyo Yehova asalisi biso tólonga na likambo yango na nzela ya Kristo.Nz. 3:8.

16, 17. Likambo nini Lillian ná William Gobitas bakutanaki na yango, mpe liteya nini yango epesi yo?

16 États-Unis. Na 1940, na bazuzi 9 ya Tribinale monene ya États-Unis, 8 bakweisaki Batatoli ya Yehova na lisambisi ya eteyelo ya etúká ya Minersville ná Gobitis. Lillian Gobitas, * oyo azalaki na mbula 12, ná leki na ye William, ya mbula 10, balingaki kotikala sembo epai ya Yehova, yango wana baboyaki kopesa bɛndɛlɛ losako mpe kosala elako. Na yango, balongolaki bango na kelasi. Bamemaki likambo yango na Tribinale monene, mpe bazuzi balongisaki bakambi ya eteyelo mpe balobaki ete likambo oyo basalaki ezalaki mpo na kolendisa “bomoko na ekólo.” Ekateli wana ebimisaki minyoko ya makasi. Babenganaki bana mosusu na biteyelo, balongolaki mikóló na misala, mpe Batatoli ebele banyokwamaki na mabɔkɔ ya bato ya mobulu. Buku moko (The Lustre of Our Country) elobaki ete “minyoko oyo Batatoli bakutanaki na yango kobanda 1941 tii 1943 ezalaki makasi koleka oyo bato bakutaná na yango mpo na losambo na bango na Amerika na siɛklɛ ya 20 mobimba.”

17 Bolongi ya banguna ya Nzambe ezalaki ya ntango mokuse. Na 1943, Tribinale monene etalelaki likambo moko oyo ekokanaki na likambo ya Gobitis. Babengaki yango lisambisi ya bakambi ya eteyelo ya etúká ya Virginie ya wɛsti ná Barnette. Na mbala oyo, Tribinale monene elongisaki Batatoli ya Yehova. Ezalaki mbala ya liboso Tribinale monene ya États-Unis ebongola ekateli na yango nsima ya mwa ntango moke. Nsima ya ekateli wana, minyoko makasi ya Batatoli ya Yehova na États-Unis ekitaki mpenza. Bakómaki mpe kotosa mpenza ntomo ya mwana-mboka nyonso na États-Unis.

18, 19. Ndeko Pablo Barros alobaki ete nini nde epesaki ye makasi, mpe ndenge nini basaleli mosusu ya Yehova bakoki kolanda ndakisa na ye?

18 Argentine. Na 1976, balongolaki Pablo Barros oyo azalaki na mbula 8 ná leki na ye Hugo oyo azalaki na mbula 7 na kelasi mpo baboyaki kosala molulu ya komatisa bɛndɛlɛ. Mokolo moko, mokambi ya eteyelo atindikaki Pablo mpe abɛtaki ye na motó. Ntango kelasi ebimaki, atikalaki na Pablo mpe Hugo ngonga mobimba mpo na kondimisa bango ete basengeli kosala milulu ya ekólo. Pablo alobaki boye: “Soki Yehova asalisaki ngai te, mbɛlɛ nabatelaki bosembo na ngai te.”

19 Ntango bamemaki likambo yango na tribinale, zuzi andimaki ekateli ya kolongola Pablo ná Hugo na kelasi. Kasi, bamemaki likambo yango na Tribinale monene ya  Argentine. Na 1979, Tribinale wana ekweisaki ekateli oyo ezwamaki na tribinale ya moke mpe elobaki boye: “Etumbu wana [kobengana bana] eyokani te na mobeko oyo epesi bonsomi ya koyekola (Artikle 14) mpe na mokumba ya Leta ya kotángisa mwana nyonso (Artikle 5).” Bolongi wana esalisaki bana soki 1 000 ya Batatoli. Bana oyo balingaki kobengana bango na kelasi, babenganaki bango lisusu te, mpe basusu lokola Pablo ná Hugo, bazongisaki bango na biteyelo.

Ebele ya bilenge oyo bazali Batatoli batikali sembo liboso ya komekama

20, 21. Ndenge nini likambo ya Roel ná Emily Embralinag elendisi kondima na yo?

20 Philippines. Na 1990, bakonzi ya eteyelo babenganaki Roel Embralinag, * oyo azalaki na mbula 9, ná yaya na ye Emily, oyo azalaki na mbula 10, elongo na bana mosusu ya Batatoli ya Yehova soki 66, mpo baboyaki kopesa bɛndɛlɛ losako. Leonardo, tata ya Roel ná Emily, asololaki na bakonzi ya eteyelo, kasi esimbaki te. Lokola makambo eyaki ndongo, Leonardo amemaki likambo yango na Tribinale monene. Leonardo azalaki na mbongo te, mpe azalaki na avoka te mpo asambela ye. Ye ná libota na ye babondelaki Yehova alakisa bango nzela. Na ntango yango, bazalaki kotyola bana  na ye mpe kotumola bango. Leonardo amonaki ete akolonga te mpo ayebaki makambo ya mibeko te.

21 Kasi eyaki kosalema ete ndeko Felino Ganal, oyo liboso azalaki avoka ya biro moko monene ya makambo ya mibeko na ekólo yango, asambaki mpo na libota yango. Ntango likambo ya ndeko Leornado ebimaki, Ganal azalaki kosala lisusu mosala ya avoka te mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Ntango bamemaki likambo yango na Tribinale monene, bazuzi nyonso balongisaki Batatoli mpe bapekisaki likambo ya kobengana bana na eteyelo. Na mbala oyo mpe, baoyo balukaki kotinda basaleli ya Nzambe bábebisa bosembo na bango balongaki te.

Koboya kokɔta na makambo ya mokili etyaka bomoko

22, 23. (a) Mpo na nini tozwi bolongi ebele na batribinale minene? (b) Ndenge tozali na kimya na bandeko ya mokili mobimba emonisi nini?

22 Mpo na nini Batatoli ya Yehova bazwi bolongi mbala ebele na batribinale ya minene? Tozali na mokonzi moko te ya politiki oyo akɔtelaka biso. Kasi, na mikili mpe na batribinale ndenge na ndenge, bazuzi ya sembo babateli biso na banguna ya mitema mabe, mpe bazwi bikateli oyo ekɔti na mibeko ya mboka. Ntembe ezali te ete Kristo asungi biso mpo tózwa bolongi wana nyonso. (Tángá Emoniseli 6:2.) Mpo na nini tomemaka makambo na biso na batribinale? Mokano na biso ezalaka ya kobongola mibeko te. Kasi, tolukaka nde kosala nyonso mpo tókoba kosalela Mokonzi na biso Yesu Kristo, kozanga epekiseli.Mis. 4:29.

23 Na mokili oyo ekabwaná mpo na makambo ya politiki mpe koyinana, Yesu Kristo Mokonzi na biso oyo azali koyangela na likoló, apamboli milende oyo bayekoli na ye basalaka na mokili mobimba mpo bákɔta na makambo ya mokili te. Satana alongi te kokɔtisa bokabwani kati na biso mpe kokweisa biso. Bokonzi eyanganisi bamilio ya bato oyo baboyi ‘koyekola etumba lisusu.’ Lisangá na biso ya bandeko na mokili mobimba oyo ezali na kimya ezali mpenza likamwisi: emonisi polele ete Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!Yis. 2:4.

^ par. 4 Babengaka mpe volimi yango La Nouvelle Création. Na nsima, bavolimi nyonso ya L’Aurore du Millénium ekómaki kobengama Études des Écritures.

^ par. 8 Balimboli esakweli yango malamumalamu na buku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!, na mokapo 27, nkasa 184-186.

^ par. 13 Boyokani yango esɛngaki mpe ete guvɛrnema ya Bulgarie endima ete moto nyonso oyo lisosoli na ye eboyi mosala ya soda asala mosala mosusu oyo mokonzi na yango ezali soda te.

^ par. 14 Mpo na koyeba likambo yango mobimba, talá lisolo “Tribinale monene ya Mpoto endimi lotomo ya kotosa lisosoli ya moto oyo aboyi mosala ya soda,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/11/2012.

^ par. 14 Na boumeli ya mbula 20, guvɛrnema ya Arménie ekɔtisaki bilenge Batatoli koleka 450 na bolɔkɔ. Na sanza ya zomi na moko na 2013, bilenge mosusu oyo bazalaki naino na bolɔkɔ babimaki.

^ par. 16 Nkombo ya libota yango ekomamaki malamu te na mikanda ya tribinale.

^ par. 20 Nkombo yango ekomamaki Ebralinag na mikanda ya tribinale.