Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

 MOKAPO 13

Basakoli ya Bokonzi liboso ya batribinale

Basakoli ya Bokonzi liboso ya batribinale

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Ndenge Yesu asakolaki yango, bakonzi mosusu ya Leta mpe ya mangomba batɛmɛlaka mosala na biso ya kosakola

1, 2. (a) Bakonzi ya mangomba balongaki kosala nini, kasi bantoma basalaki nini? (b) Mpo na nini bantoma baboyaki kotosa epekiseli oyo etyamaki na mosala ya kosakola?

EZALAKI mwa moke nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B. Lisangá ya bokristo efungwamaki na Yerusaleme esalaki kaka mwa bapɔsɔ. Satana amonaki ete ezali ntango ya malamu ya kobundisa lisangá yango. Liboso lisangá yango ekóma makasi, alukaki koboma yango. Eumelaki te, Satana asalaki ete bakonzi ya mangomba bápekisa mosala ya kosakola Bokonzi. Kasi, bantoma bakobaki kosakola na mpiko, mpe ebele ya mibali ná basi bakómaki “kondimela Nkolo.”Mis. 4:18, 33; 5:14.

Bantoma basepelaki “mpo batángamaki bato oyo babongi kosambwisama mpo na nkombo na ye”

2 Banguna basilikaki makasi mpe na mbala oyo, babwakaki bantoma nyonso na bolɔkɔ. Kasi, na butu, anzelu ya Yehova afungolaki baporte ya bolɔkɔ mpo bantoma bábima, mpe na ntɔngɔntɔngɔ, bazongelaki kosakola! Bakangaki bango lisusu mpe bamemaki bango epai ya bankumu; bankumu yango balobaki ete bantoma babuki mobeko oyo epekisaki mosala ya kosakola. Na mpiko nyonso, bantoma balobaki ete: “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.” Bankumu yango basilikaki makasi mpe balingaki “koboma” bantoma. Na ntango yango ya likama, Gamaliele, moteyi moko ya Mibeko oyo azalaki na lokumu mingi, akebisaki bankumu na maloba oyo: “Bókeba na bino . . . Bókɔta na makambo ya bato oyo te, kasi bótika bango.” Likambo ya kokamwa, bankumu bandimaki toli wana mpe batikaki bantoma bákende. Mibali yango ya sembo basalaki nini? Na mpiko nyonso “bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Kristo, Yesu.”Mis. 5:17-21, 27-42; Mas. 21:1, 30.

3, 4. (a) Mayele mabe nini Satana asalelaka banda kala mpo na kobundisa basaleli ya Nzambe? (b) Tokotalela nini na mokapo oyo mpe na mikapo mibale oyo elandi?

3 Likambo wana oyo elekaki na tribinale na mobu 33 T.B. ezalaki mbala ya liboso bakonzi bátɛmɛla lisangá ya bokristo, kasi ezalaki mbala ya nsuka te. (Mis. 4:5-8; 16:20; 17:6, 7) Na mikolo na biso mpe Satana asalaka ete banguna ya losambo ya solo bátinda bakonzi bápekisa mosala na biso ya kosakola. Banguna yango bafundaka basaleli ya Nzambe na makambo ndenge na ndenge. Na ndakisa, balobaka ete totyaka mobulu na mboka, tobimisaka botomboki mpe ete tosalaka mombongo. Na ntango oyo ebongi, bandeko bakendaki na batribinale mpo na komonisa ete bifundeli wana nyonso ezali lokuta. Makambo esukaki ndenge nini? Ndenge nini bikateli oyo batribinale ezwá  na bambula oyo eleki esalisaka yo lelo? Tótalela mwa makambo oyo tosambaki na batribinale mpe tómona ndenge esalisi na “kokɔtela nsango malamu mpe kofandisa yango na nzela ya mibeko.”Flp. 1:7.

4 Na mokapo oyo, tokolobela mingimingi ndenge oyo tosambaki mpo na lotomo na biso ya kozwa bonsomi ya kosakola. Na mikapo mibale oyo elandi, tokolobela makambo oyo tosambaki mpo na komonisa ete tokoki kokɔta na makambo ya mokili te mpe ete tosengeli kotosa mibeko ya Bokonzi ya Nzambe.

Totyaka mobulu to tozali sembo na Bokonzi ya Nzambe?

5. Na nsuka ya bambula ya 1930, mpo na nini bakangaki basakoli ebele ya Bokonzi, mpe bandeko oyo bazalaki kokamba bakanisaki kosala nini?

5 Na nsuka ya bambula ya 1930, bakonzi ya bingumba mpe bitúká ndenge na ndenge ya États-Unis basɛngisaki Batatoli ya Yehova ete bázwa mokanda na Leta oyo ekopesa bango ndingisa ya kobima na mosala ya kosakola. Kasi bandeko baboyaki kozwa mokanda ya ndenge wana. Baboyaki mpo guvɛrnema ezalaki na lotomo ya koboma ndingisa oyo mokanda yango epesi. Bamonaki mpe ete guvɛrnema moko te ezalaki na bokonzi ya kotɛmɛla etinda oyo Yesu apesá bakristo ete básakola nsango ya Bokonzi. (Mrk. 13:10) Na yango, bakangaki bankama ya basakoli ya Bokonzi. Na bongo, bandeko oyo bazalaki kokamba lisangá bakanisaki komema likambo yango na tribinale. Bazalaki na elikya ya komonisa ete epekiseli oyo Leta atyelaki Batatoli eyokanaki te na mibeko oyo epesi bango bonsomi ya losambo. Mpe likambo moko oyo esalemaki na 1938 etikaki nsango na tribinale. Likambo yango nini?

6, 7. Likambo nini ekómelaki ndeko Cantwell ná libota na ye?

6 Na ntɔngɔ ya mwamibale, mokolo ya 26/04/1938, ndeko Newton Cantwell, oyo azalaki na mbula 60, mwasi na ye Esther, mpe bana na bango ya mibali Henry, Russell, ná Jesse—bango nyonso mitano babongisi-nzela monene—bamibongisaki mpo na kokende kosakola mokolo mobimba na engumba New Haven, na etúká ya Connecticut. Kutu, bayebaki ete mbala mosusu bakozonga ndako te mokolo yango. Mpo na nini? Lokola bakangaki bango mbala mingi liboso, bayebaki ete bakoki kokanga bango lisusu. Atako bongo, mposa na bango ya kosakola nsango ya Bokonzi ekitaki te. Bakómaki na New Haven na mituka mibale. Ndeko Newton atambwisaki motuka oyo ezalaki na mikanda ná bafono, mpe Henry, oyo azalaki na mbula 22, amemaki motuka oyo ezalaki na bikóliseli-loláká. Kaka ndenge bakanisaki yango, mwa bangonga na nsima, bapolisi bakangaki bango.

7 Bakangaki liboso Russell, oyo azalaki na mbula 18, mpe na nsima bakangaki ndeko Newton ná mwasi na ye Esther. Na mosika, Jesse, oyo azalaki na mbula 16, amonaki ndenge bapolisi bazalaki komema baboti na ye ná yaya na ye. Lokola Henry akendaki kosakola na eteni mosusu ya engumba yango, elenge Jesse atikalaki ye moko. Atako bongo, amemaki fono na ye mpe akobaki kosakola. Mibali mibale ya Lingomba ya Katolike bandimaki ete Jesse ayokisa bango diskur ya ndeko Rutherford  oyo ezalaki na motó ya likambo “Banguna.” Kasi, ntango bayokaki diskur yango, mibali yango basilikaki makasi mpe balingaki kobɛta Jesse. Jesse alongwaki wana na malɛmbɛ, kasi mwa moke na nsima, polisi moko akangaki ye. Na yango, Jesse mpe asukaki na bolɔkɔ. Bapolisi balobaki ete ndeko Esther azali na likambo te, nzokande bakweisaki ndeko Cantwell ná bana na ye. Kasi, bafutaki lomande mpe batikaki bango kaka na mokolo wana.

8. Mpo na nini tribinale emonaki ete Jesse Cantwell azali kotya mobulu na mboka?

8 Mwa basanza na nsima, na sanza ya libwa na 1938, libota ya ndeko Cantwell bakendaki kosamba na tribinale ya New Haven. Bafundaki ndeko Newton, Russell, ná Jesse ete bazalaki kosɛnga bato makabo nzokande bazwaki te mokanda ya ndingisa mpo na kosala yango. Atako bamemaki likambo yango na Tribinale monene ya etúká ya Connecticut, bazuzi bakweisaki Jesse; balobaki ete azali kotya mobulu na mboka. Mpo na nini? Mibali mibale ya Lingomba ya Katolike oyo bayokaki diskur ya ndeko Rutherford balobaki na tribinale ete diskur yango efingaki lingomba na bango mpe etumolaki bango. Mpo na komonisa ete ekateli wana ya tribinale ezalaki malamu te, bandeko oyo bazalaki kokamba lisangá bamemaki likambo yango na Tribinale monene ya États-Unis.

9, 10. (a) Ekateli nini Tribinale monene ya États-Unis ezwaki na likambo ya ndeko Cantwell ná libota na ye? (b) Ndenge nini ekateli wana esalisaka tii lelo?

9 Kobanda na mokolo ya 29/03/1940, ndeko Hayden Covington, avoka ya Batatoli ya Yehova, asambaki liboso ya  zuzi-mokonzi Charles Hughes ná bazuzi mosusu mwambe. * Ntango prokirɛrɛ ya etúká ya Connecticut azwaki maloba mpo na komonisa ete Batatoli bazalaki kotya mobulu, zuzi moko atunaki boye: “Nsango oyo Kristo Yesu ateyaki na mikolo na ye esepelisaki bato nyonso te, boye te?” Prokirɛrɛ azongisaki ete: “Ezali bongo, kutu soki namikosi te, Biblia elobi mpe likambo oyo ekómelaki Yesu mpo na nsango oyo azalaki koteya.” Amikweisaki mpenza! Kozanga ete ayeba, prokirɛrɛ yango atyaki Batatoli na ngámbo ya Yesu, mpe bakonzi ya etúká ya Connecticut na ngámbo ya baoyo bafundaki ye. Na mokolo ya 20/05/1940, bazuzi nyonso ya Tribinale monene balongisaki Batatoli.

Hayden Covington (liboso, na katikati), Glen How (pembeni na ye), mpe bato mosusu bazali kobima na tribinale nsima ya kolonga

10 Matomba nini ekateli ya Tribinale wana ebimisaki? Elongisaki lotomo ya kosala makambo ya losambo na bonsomi nyonso na boye ete ezalaki na mobeko mosusu te oyo mboka, engumba, to etúká ekokaki kosalela mpo na kopekisa bonsomi ya losambo. Lisusu, bazuzi ya Tribinale wana bamonaki ete likambo oyo Jesse asalaki “etyaki mobulu na mboka te.” Na yango, ekateli ya bazuzi emonisaki polele ete Batatoli ya Yehova batyaka mobulu na mboka te. Ezalaki bolongi monene mpenza mpo na basaleli ya Nzambe! Ndenge nini likambo yango esalisaka biso ata lelo? Avoka moko oyo azali Motatoli alobi boye: “Lotomo ya kosala makambo ya lingomba na biso na bonsomi kozanga kobanga bipekiseli oyo ezangi bosembo epesi biso Batatoli nzela ya koyebisa bato nsango oyo epesaka elikya na bisika nyonso oyo tozali.”

Tobimisaka botomboki to tosakolaka solo?

Trakte Likunya makasi ya bato ya Québec mpo na Nzambe, mpo na Kristo mpe bonsomi ezali nsɔni mpo na Canada mobimba

11. Bandeko na biso ya Canada basalaki kampanye ya nini, mpe mpo na nini?

11 Na bambula ya 1940, Batatoli ya Yehova na Canada bakutanaki na botɛmɛli makasi. Na yango, na 1946, mpo bato báyeba ete Leta aboyaki kotosa bonsomi ya losambo, bandeko basalaki kampanye ya mikolo 16 mpo na kokabola trakte oyo elobaki Likunya makasi ya bato ya Québec mpo na Nzambe, mpo na Kristo, mpe mpo na bonsomi ezali nsɔni mpo na Canada mobimba. Trakte yango ya nkasa minei emonisaki malamu ndenge bakonzi ya mangomba bazalaki kotinda bato bátungisa bandeko ya etúká ya Québec, ndenge bapolisi bazalaki konyokola bango, mpe makambo ya mobulu oyo bato bazalaki kosala bango. Trakte yango elobaki boye: “Bazali kokanga Batatoli ya Yehova kaka boye, ntina te. Bakoseli Batatoli ya Yehova makambo soki 800 na Montréal.”

12. (a) Banguna bayokaki ndenge nini mpo na kampanye ya trakte wana? (b) Bafundaki bandeko na biso ete bazali kosala nini? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

12 Maurice Duplessis, ministre-mokonzi ya Québec, oyo azalaki kosala na boyokani makasi na Villeneuve, kardinale ya Lingomba ya Katolike, asepelaki na trakte wana te mpe alobaki polele ete esengeli kobundisa Batatoli tii na nsuka. Eumelaki te, bifundeli elongwaki 800 mpe ekómaki 1 600. Ndeko mwasi moko ya mobongisi-nzela alobaki boye: “Bapolisi bakangaki biso mbala ebele, toyebi kutu te soki mbala boni.” Batatoli oyo bapolisi bakutaki bazali kokabola trakte wana, bakangaki bango mpe bafundaki bango ete bazali kokabola mikanda “mpo na kobimisa botomboki.” *

13. Banani bato ya liboso oyo basambaki mpo bafundaki bango ete bazali kobimisa botomboki, mpe tribinale ezwaki ekateli nini?

 13 Na 1947, bato ya liboso oyo basambaki mpo na efundeli ya kobimisa botomboki ezalaki ndeko Aimé Boucher ná bana na ye mibale: Gisèle, mbula 18, mpe Lucille, mbula 11. Bakabolaki trakte Likunya makasi ya bato ya Québec pene na ferme na bango na sudi ya engumba Québec, kasi soki otali bango, ezalaki mpasi koloba ete batyaka mobulu na mboka. Ndeko Boucher azalaki moto ya komikitisa mpe ya boboto. Azalaki kosala na kimya na mwa ferme na ye; na bantango mosusu azalaki kokende na engumba monene na mpunda mpe sharɛti. Atako bongo, libota na ye mpe ekutanaki na minyoko mosusu ya makasi oyo trakte wana elobelaki. Zuzi ya tribinale, oyo azalaki koyina Batatoli ya Yehova, aboyaki kondima bilembeteli oyo emonisaki ete libota ya ndeko Boucher bazali na likambo te. Zuzi yango andimaki ete trakte wana ezalaki kolendisa mobulu, mpe na yango libota mobimba esengeli kokweisama. Na yango, na makanisi ya zuzi wana, koloba solo, ezali mabe! Akataki ete Aimé ná Gisèle bazalaki kobimisa botomboki; kutu, ata elenge Lucille alalaki mikolo mibale na bolɔkɔ. Bandeko bamemaki likambo na Tribinale monene ya Canada, mpe bazuzi bandimaki koyoka yango.

14. Bandeko na biso ya Québec basalaki nini na boumeli ya bambula ya minyoko?

14 Nzokande, bandeko mibali mpe bandeko basi ya Québec bamonisaki mpiko mpe bakobaki kosakola nsango ya Bokonzi atako banguna bazalaki konyokola bango makasi—mpiko na bango ebimisaki mbuma ya malamu mpenza. Mbula minei nsima ya kampanye wana oyo ebandaki na 1946, motángo ya Batatoli na Québec elongwaki 300 mpe ekómaki 1 000! *

15, 16. (a) Tribinale monene ya Canada ezwaki ekateli nini na likambo ya ndeko Boucher ná bana na ye? (b) Bolongi wana ezalaki na litomba nini mpo na bandeko mpe bato mosusu?

15 Na sanza ya motoba na 1950, bazuzi nyonso libwa ya Tribinale monene ya Canada bayokaki likambo ya ndeko Aimé Boucher. Sanza motoba na nsima, na mokolo ya 18/12/1950, tribinale yango elongisaki biso. Mpo na nini? Ndeko Glen How, avoka ya Batatoli ya Yehova, alobaki ete bazuzi bandimaki makanisi oyo bandeko babimisaki mpo na komonisa ete “kobimisa botomboki” elimboli nde kotinda bato básala mobulu to bátɛmɛla guvɛrnema. Nzokande, trakte wana “etindaki ata moke te na makambo wana mpe na yango, ezalaki kaka lolenge moko ya komonisa ete tozali na bonsomi ya koloba.” Ndeko How abakisaki ete: “Namonaki mpenza ndenge Yehova asalisaki biso tólonga.” *

16 Ekateli oyo Tribinale monene ezwaki ezalaki mpenza bolongi monene mpo na Bokonzi ya Nzambe. Ekweisaki bifundeli mosusu 122 oyo ezalaki na batribinale, oyo elobaki ete Batatoli ya Québec bazalaki kobimisa botomboki. Lisusu, ekateli wana emonisaki ete bana-mboka Canada mpe ya bikólo mosusu nyonso oyo Angleterre eyangelá bazali sikoyo na bonsomi ya koloba soki basepeli te na makambo ya guvɛrnema. Longola yango, bolongi wana esalaki mpe ete bakonzi ya lingomba mpe bakonzi ya Leta na Québec bátika kobundisa Batatoli ya Yehova. *

 Tosalaka mombongo to tosakolaka Bokonzi ya Nzambe na molende?

17. Bakonzi mosusu balukaka kotyela biso mibeko nini mpo na mosala ya kosakola?

17 Lokola bakristo ya liboso, biso basaleli ya Yehova “tozali te bato oyo batɛkaka liloba ya Nzambe.” (Tángá 2 Bakorinti 2:17.) Nzokande, bakonzi mosusu balukaka kotambwisa mosala na biso na kolanda mibeko oyo etali makambo ya mombongo. Tótala ndenge batribinale mibale ekataki likambo ya koyeba soki Batatoli ya Yehova bazali bato ya mombongo to basakoli.

18, 19. Ndenge nini bakonzi ya Danemark balukaki kopekisa mosala ya kosakola?

18 Danemark. Na mokolo ya 01/10/1932, bakómaki kosalela mobeko moko oyo epekisaki kotɛka mikanda kozanga kozwa mokanda ya Leta oyo epesi ndingisa ya kosala mombongo. Nzokande, bandeko ya Danemark bazwaki mokanda moko te ya ndenge wana. Na mokolo oyo elandaki, bandeko mitano bakendaki kosakola na mboka Roskilde, na kilomɛtrɛ koleka 30 na wɛsti ya engumba-mokonzi, Copenhague. Na mpokwa, moko na bango, ndeko August Lehmann azalaki komonana te. Nzokande, bakangaki ye mpe bafundaki ye ete azali kotɛka biloko, kasi azalaki na mokanda ya ndingisa te.

19 Na mokolo ya 19/12/1932, ndeko August Lehmann akendaki kosamba na tribinale. Alobaki ete azalaki kokende epai ya bato mpo na kolakisa bango mikanda oyo elimbolaka Biblia, kasi te mpo na kotɛka biloko. Bazuzi bandimelaki ye. Balobaki boye: “Moto oyo bafundi . . . azali na mbongo na ye ya kobikela, mpe bafutaka ye te mpe azelaka te ete báfuta ye [mpo na mosala ya kosakola], kutu asalelaka nde mbongo na ye mpo na mosala yango.” Bazuzi balongisaki Batatoli ya Yehova; bamonisaki ete mosala oyo Lehmann azalaki kosala “ezali mombongo te.” Kasi, banguna ya basaleli ya Nzambe bazalaki kaka koluka kosukisa mosala ya kosakola na ekólo yango. (Nz. 94:20) Prokirɛrɛ amemaki likambo yango na Tribinale monene ya ekólo. Bandeko na biso basalaki nini?

20. Ekateli nini Tribinale monene ya Danemark ezwaki, mpe bandeko basalaki nini?

20 Pɔsɔ moko liboso bákende kosamba na Tribinale monene, Batatoli na Danemark mobimba babakisaki molende na mosala ya kosakola. Na mokolo ya mibale 03/10/1933, Tribinale monene eyebisaki ekateli na yango. Endimaki ekateli oyo ezwamaki na tribinale ya moke ete August Lehmann abukaki mibeko te. Ekateli wana emonisaki ete Batatoli bakoki kokoba kosakola na bonsomi. Mpo na kopesa Yehova matɔndi na ndenge asalisaki bango bálonga na likambo wana, bandeko babakisaki lisusu milende. Banda wana, Leta atungisaka lisusu bandeko na biso ya Danemark te mpo na mosala ya kosakola.

Batatoli ya mpiko na Danemark na bambula ya 1930

21, 22. Tribinale monene ya États-Unis ezwaki ekateli nini na likambo ya ndeko Murdock?

21 États-Unis. Na mokolo ya lomingo 25/02/1940, bakangaki ndeko moko ya mobongisi-nzela Robert Murdock elongo na Batatoli mosusu nsambo ntango bazalaki kosakola na Jeannette, engumba moko pene na Pittsburgh, na etúká ya Pennsylvanie. Bafundaki bango ete bazwaki te mokanda ya ndingisa mpo na kokabola mikanda. Ntango bamemaki likambo  yango na Tribinale monene ya États-Unis, bazuzi bandimaki kotalela likambo yango.

22 Na mokolo ya 03/05/1943, Tribinale monene eyebisaki ekateli na yango, oyo ekɔtelaki Batatoli. Elobaki ete esengeli te kozwa mokanda ya ndingisa mpamba te yango ezalaki lokola kofutisa moto “mpako liboso asala likambo moko oyo mibeko ya mboka epesá moto nyonso bonsomi ya kosala yango.” Tribinale yango ekweisaki mobeko oyo eutaki na engumba Jeannette mpe elobaki ete mobeko yango “ezalaki kolongola bonsomi ya kobimisa mikanda mpe bonsomi ya losambo.” Ntango zuzi William Douglas azalaki koyebisa ekateli ya Tribinale monene, alobaki ete mosala ya Batatoli ya Yehova “esuki kaka na kosakola te; esuki mpe kaka na kokabola mikanda te. Kasi, esangisi makambo yango nyonso mibale.” Abakisaki ete: “Kosala makambo wana ya losambo . . . ezali ndenge moko na kosambela mpe koteya na ndako-nzambe.”

23. Mpo na nini makambo oyo tolongaki na 1943 ezali na ntina lelo?

23 Ekateli wana ya Tribinale monene ezalaki bolongi monene mpenza mpo na basaleli ya Nzambe. Emonisaki polele ete tozali basakoli ya Bokonzi, kasi te bato ya mombongo. Na mokolo wana oyo etiká nsango na 1943, Batatoli ya Yehova balongaki makambo 12 na kati ya makambo 13 oyo bamemaki na Tribinale monene, kati na yango lisambisi ya Murdock. Bikateli  wana ya tribinale esalisi mingi na mikolo eleki ntango tosambaki lisusu mpo banguna balingaki lisusu kobebisa bonsomi na biso ya kosakola nsango ya Bokonzi na babalabala mpe na ndako na ndako.

“Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato”

24. Tosalaka nini soki Leta apekisi mosala ya kosakola?

24 Biso basaleli ya Yehova tosepelaka mingi ntango bakonzi ya Leta bapesi biso lotomo ya kosakola nsango ya Bokonzi na bonsomi. Kasi, soki guvɛrnema epekisi biso kosakola, tokómaka kosalela mayele mosusu, mpo tókoba mosala na biso ya kosakola. Ndenge moko na bantoma ya Yesu, “tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.” (Mis. 5:29; Mat. 28:19, 20) Kasi, tomemaka mpe likambo yango na batribinale mpo na kosɛnga ete epekiseli elongwa. Tótalela bandakisa mibale.

25, 26. Makambo nini bandeko ya Nicaragua bamemaki na Tribinale monene, mpe esukaki ndenge nini?

25 Nicaragua. Na mokolo ya 19/11/1952, ndeko Donovan Munsterman, oyo azalaki misionɛrɛ mpe mokɛngɛli ya filiale, akendaki na biro oyo etalelaka makambo ya bapaya na Managua, engumba-mokonzi ya Nicaragua. Kapitɛni Arnoldo García, oyo azalaki mokonzi na biro yango nde abengisaki ye. Kapitɛni yango ayebisaki ndeko Donovan ete epekisami na Batatoli ya Yehova nyonso na Nicaragua kosakola mateya na bango mpe kosala makambo na bango ya losambo. Ntango ndeko Donovan atunaki ntina ya mobeko yango, kapitɛni García alobaki ete ministre apesá Batatoli ndingisa ya kosakola te mpe ete bafundaki bango ete bazali Bakoministe. Banani bafundaki biso? Bakonzi ya Lingomba ya Katolike.

Bandeko ya Nicaragua na ntango ya epekiseli

26 Ndeko Donovan amemaki mbala moko likambo yango epai ya ministre oyo atalelaka makambo ya mangomba mpe  epai ya Anastasio Somoza García, prezida ya ekólo yango, kasi esimbaki te. Na yango, bandeko basalelaki mayele mosusu. Bakangaki Ndako ya Bokonzi, bakómaki kosala makita na bituluku ya mike, mpe batikaki kopesa litatoli na babalabala, kasi bazalaki kaka kosakola nsango ya Bokonzi. Bakomelaki mpe Tribinale monene ya Nicaragua mpo na kosɛnga ete epekiseli wana elongwa. Lokola bazulunalo ebele elobelaki epekiseli wana mpe makambo oyo tosɛngaki, Tribinale monene endimaki kotalela likambo na biso. Esukaki ndenge nini? Na mokolo ya 19/06/1953, bazuzi nyonso ya Tribinale monene balongisaki Batatoli. Bamonaki ete epekiseli wana ebukaki mobeko oyo epesá bato bonsomi ya koloba, ya kolanda lisosoli na bango, mpe ya kolobela bindimeli na bango. Basɛngaki mpe ete boyokani ya Leta ya Nicaragua ná Batatoli ezonga ndenge ezalaki liboso.

27. Mpo na nini bana-mboka Nicaragua bakamwaki ekateli oyo Tribinale monene ezwaki, mpe ndenge nini bandeko batalelaki bolongi yango?

27 Bana-mboka Nicaragua bakamwaki makasi ndenge Tribinale monene elongisaki Batatoli ya Yehova. Liboso ya ntango wana, bakonzi ya mangomba bazalaki na bokonzi mingi na boye ete Tribinale monene ezalaki kolinga kokweisa bango te. Lisusu, mbala mingi tribinale yango ezalaki kokweisa ekateli ya bakonzi ya Leta te mpo bazalaki na nguya mingi. Bandeko bamonaki mpenza ete balongaki na likambo wana kaka mpo Mokonzi Yesu abatelaki bango mpe bakobaki kosakola.Mis. 1:8.

28, 29. Na katikati ya bambula ya 1980, makambo nini esalemaki na Zaïre?

28 Zaïre. Na katikati ya bambula ya 1980, Batatoli bazalaki soki 35 000 na Zaïre (lelo oyo République Démocratique du Congo). Lokola bokoli ezalaki makasi, filiale ebandaki kotonga bandako ya sika. Na sanza ya zomi na mibale na 1985, basalaki liyangani oyo esangisaki mikili mingi na engumba-mokonzi Kinshasa, mpe bato 32 000 oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge batondisaki libándá ya masano. Kasi na nsima, makambo ya basaleli ya Yehova ekómaki kobongwana. Nini esalemaki?

29 Ndeko Marcel Filteau, misionɛrɛ moko oyo autaki na Québec, mpe amonaki botɛmɛli oyo ezalaki na boyangeli ya Duplessis, azalaki kosala na Zaïre na ntango wana. Ayebisaki ndenge makambo elekaki; alobaki boye: “Na mokolo ya 12/03/1986, bandeko oyo bazalaki kokamba mosala bazwaki mokanda oyo elobaki ete ebongiseli ya Batatoli ya Yehova na Zaïre eyebani na Leta te.” Epekiseli yango eutaki epai ya prezida ya ekólo, Mobutu Sese Seko.

30. Bandeko ya Komite ya filiale bamitunaki nini, mpe ekateli nini bazwaki?

30 Mokolo oyo elandaki, radio ya ekólo eyebisaki ete: “Tokoyoka lisusu Batatoli ya Yehova te na [Zaïre].” Minyoko ebandaki wana. Bakómaki kobebisa Bandako ya Bokonzi, mpe bazalaki kopunza biloko ya bandeko, kokanga bango, kobwaka bango na bolɔkɔ, mpe kobɛta bango. Bazalaki kotya ata bana na bolɔkɔ. Na mokolo ya 12/10/1988, Leta akangaki biloko ya filiale, mpe basoda oyo babengamaki ba Garde civile bakómaki kofanda na esika oyo bazalaki kotonga filiale. Bandeko oyo bazalaki na mikumba bakomelaki prezida Mobutu, kasi bazwaki eyano  te. Na ntango wana, bandeko ya Komite ya filiale bamitunaki boye: “Tómema likambo na Tribinale monene, to tózela?” Timothy Holmes [Timothée Holmes], oyo azalaki misionɛrɛ mpe mokambi misala ya Komite ya filiale na Zaïre, alobi boye: “Tosɛngaki Yehova apesa biso mayele mpe alakisa biso nzela.” Nsima ya kosolola mpe kobondela elongo, bandeko ya komite bamonaki ete ntango ekokaki naino te mpo na komema likambo yango na tribinale. Bamipesaki na kolendisa bandeko mpe na koluka mayele mosusu mpo na kokoba kosakola.

“Ntango tozalaki kosamba likambo yango, tomonaki ete Yehova akoki mpenza kobongola makambo”

31, 32. Ekateli nini Tribinale monene ya Zaïre ezwaki, mpe esalaki nini epai ya bandeko?

31 Mwa bambula elekaki. Bazalaki lisusu konyokola Batatoli ya Yehova mingi te, mpe ntomo ya bato ekómaki kotosama mingi na mboka. Bandeko ya Komite ya filiale bamonaki ete ntango ekokaki mpo na komema makambo na Tribinale monene ya Zaïre mpo na kosɛnga ete epekiseli elongwa. Likambo ya kokamwa, tribinale yango endimaki kotalela likambo na biso. Na nsima, na mokolo ya 08/01/1993, bambula pene na nsambo nsima ya ntango oyo prezida apekisaki misala ya Batatoli ya Yehova, Tribinale monene elobaki ete makambo oyo guvɛrnema esalaki Batatoli ya Yehova eyokanaki na mibeko te, mpe epekiseli elongwaki. Kanisá naino! Bazuzi wana batyaki bomoi na bango na likama mpo balongolaki mobeko oyo prezida ye moko atyaki! Ndeko Holmes alobi boye: “Ntango tozalaki kosamba likambo yango, tomonaki ete Yehova akoki mpenza kobongola makambo.” (Dan. 2:21) Bolongi wana elendisaki kondima ya bandeko. Bamonaki ete Mokonzi Yesu asalisaki bato na ye báyeba ntango ya kosala likambo mpe ndenge ya kosala yango.

Bandeko ya Congo-Kinshasa basepelaka mingi na bonsomi na bango ya kosambela Yehova

32 Ntango epekiseli wana elongwaki, Leta apesaki biro ya filiale nzela ya kobengisa bamisionɛrɛ, ya kotonga bandako ya  sika, mpe ya kokɔtisa mikanda oyo elimbolaka Biblia na mboka. * Basaleli ya Nzambe na mokili mobimba basepelaka mingi komona ndenge Yehova abatelaka bato na ye mpo bázala malamu na elimo!Yis. 52:10.

“Yehova azali mosungi na ngai”

33. Mwa makambo oyo totaleli emonisi nini?

33 Mwa makambo oyo touti kotalela emonisi ete Yesu akokisi elaka oyo apesaki ete: “Nakopesa bino monɔkɔ mpe bwanya, oyo batɛmɛli na bino nyonso bakokoka te kotɛmɛla to kotyela ntembe.” (Tángá Luka 21:12-15.) Na bantango mosusu, emonani ete Yehova asalaki ete bato básala lokola Gamaliele mpo na kobatela basaleli na ye; na bantango mosusu atindaki bazuzi mpe baavoka ya mpiko bákata makambo na bosembo. Ya solo, Yehova akweisi bibundeli ya banguna na biso. (Tángá Yisaya 54:17.) Botɛmɛli ekoki kopekisa mosala ya Nzambe te.

34. Mpo na nini makambo oyo tolongi na batribinale ezali likambo ya kokamwa, mpe yango emonisi nini? (Talá mpe etanda “ Makambo minene oyo tolongi elendisi mosala ya kosakola Bokonzi.”)

34 Mpo na nini bolongi nyonso oyo tozwi na batribinale ezali mpenza kokamwisa? Kanisá naino: Batatoli ya Yehova bazali bato ya lokumu to bato ya nguya te. Tosalaka voti te, tokɔtelaka bato ya politiki te, totindaka mpe bango te ete básalela biso makambo. Lisusu, bandeko mingi oyo bakendaka kosamba na batribinale minene batalelamaka lokola “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba.” (Mis. 4:13) Na yango, na miso ya bomoto, eloko moko te ekoki kotinda bazuzi bázwa bikateli mpo na kolongisa biso mpe kokweisa makanisi ya banguna na biso—bakonzi ya mangomba mpe bato minene ya politiki. Nzokande, mbala mingi bazuzi balongisaka biso! Bolongi na biso na batribinale emonisi ete tozali kotambola “na miso ya Nzambe, esika moko na Kristo.” (2 Ko. 2:17) Yango wana, biso mpe tolobaka lokola ntoma Paulo ete: “Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te.”Ebr. 13:6.

^ par. 9 Likambo yango, oyo ebengamaki lisambisi ya Cantwell ná etúká ya Connecticut ezalaki likambo ya liboso kati na makambo 43 oyo ndeko Hayden Covington asambaki mpo na bandeko na Tribinale monene ya États-Unis. Akufaki na 1978. Mwasi na ye Dorothy, asalelaki Yehova na bosembo tii ntango akufaki na 2015, na mbula 92.

^ par. 12 Efundeli yango eutaki na mobeko moko oyo ebimaki na 1606. Mobeko yango epesaki bazuzi nzela ya kokweisa moto soki bamoni ete maloba na ye ezali kolendisa mobulu, ata soki maloba yango ezali solo.

^ par. 14 Na 1950, bandeko oyo bazalaki na mosala ya ntango nyonso na Québec bazalaki 164, kati na bango bandeko 63 oyo bautaki na Gileade, mpe bandimaki kosala kuna atako botɛmɛli makasi ezalaki kozela bango.

^ par. 15 Ndeko Glen How azalaki avoka ya mpiko mpenza, mpe kobanda 1943 tii na 2003, asambaki malamu makambo ebele mpo na Batatoli ya Yehova na Canada mpe na mikili mosusu.

^ par. 16 Mpo na koyeba likambo yango malamu, talá lisolo “La bataille n’est pas la vôtre, mais celle de Dieu,” na Lamuká ya 22/04/2000, nkasa 18-24, na Lifalanse.

^ par. 32 Nsukansuka, basoda yango balongwaki na lopango ya filiale; kasi filiale etongamaki na esika mosusu.