Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

 MOKAPO 1

“Bokonzi na yo eya”

“Bokonzi na yo eya”

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Elobeli makambo oyo Yesu ateyaki mpo na Bokonzi ya Nzambe

1, 2. Maloba nini ya Yehova bantoma misato ya Yesu bayokaki, mpe basalaki nini?

SOKI Yehova Nzambe ye moko alobi na yo osala likambo moko, okosala nini? Ata soki asɛngi nini, na ntembe te okosepela mpenza kosala nyonso oyo alobi, boye te?

2 Mwa moke nsima ya fɛti ya Elekeli ya mobu 32 T.B., bantoma misato ya Yesu—Petro, Yakobo, ná Yoane—bakutanaki na likambo ya ndenge wana. (Tángá Matai 17:1-5.) Ntango bazalaki elongo na Nkolo na bango Yesu “na ngomba moko molai,” bazwaki emonaneli oyo elakisaki bango nkembo ya Yesu na Bokonzi ya likoló. Emonanaki lokola likambo ya solo mpenza, yango wana Petro alukaki kosala mwa eloko na emonaneli yango. Ntango Petro azalaki naino koloba, lipata ezipaki bango. Na nsima, Petro ná baninga na ye bakutanaki na likambo oyo bato moke kaka nde bazwaki libaku ya kokutana na yango: bayokaki mongongo ya Yehova. Yehova alobaki ete Yesu azali Mwana na ye, mpe abakisaki polele ete: “Bóyoka ye.” Bantoma basalaki likambo oyo Nzambe asɛngaki bango. Bayokaki makambo oyo Yesu ateyaki, mpe balendisaki bato mosusu básala mpe bongo.Mis. 3:19-23; 4:18-20.

Yesu alobelaki Bokonzi ya Nzambe mingi koleka makambo mosusu nyonso

3. Mpo na nini Yehova alingi tóyoka Mwana na ye, mpe tokotalela likambo nini?

3 Maloba yango—“Bóyoka ye”—ekomamaki na Biblia mpo na litomba na biso. (Rom. 15:4) Mpo na nini? Mpo Yesu azali Molobeli ya Yehova mpe mbala nyonso oyo azalaki koteya, azalaki kolobela makambo oyo Tata na ye alingi ete tóyeba. (Yoa. 1:1, 14) Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya Masiya oyo ezali na likoló, oyo ekotambwisama na Kristo Yesu ná bato 144 000. Lokola Yesu alobelaki Bokonzi yango mingi koleka makambo mosusu nyonso, ekozala malamu tótalela Bokonzi yango na likebi mpenza. (Em. 5:9, 10; 14:1-3; 20:6) Kasi, tótalela naino ntina oyo Yesu alobelaki Bokonzi ya Nzambe mingi ndenge wana.

“Monɔkɔ elobaka nde makambo oyo etondi na motema”

4. Ndenge nini Yesu amonisaki ete Bokonzi ezali na ntina mingi na miso na ye?

4 Bokonzi ezali likambo ya ntina mingi na miso ya Yesu. Mpo na nini tolobi bongo? Mpo maloba ya moto emonisaka makambo oyo ezali na ntina mingi na miso na ye mpe oyo esepelisaka motema na ye. Yesu ye moko alobaki: “Monɔkɔ  elobaka nde makambo oyo etondi na motema.” (Mat. 12:34) Na libaku nyonso, Yesu azalaki kolobela Bokonzi. Baevanzile minei elobeli Bokonzi mbala koleka 100, mpe mbala mingi ezalaki na maloba ya Yesu. Bokonzi nde likambo ya libosoliboso oyo azalaki kolobela na mosala ya kosakola; alobaki ete: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.” (Luka 4:43) Yesu akobaki koyebisa bayekoli na ye makambo ya Bokonzi ata nsima ya lisekwa na ye. (Mis. 1:3) Ya solo, Yesu azalaki kosepela na Bokonzi mingi, yango wana azalaki kolobela yango.

5-7. (a) Ndenge nini toyebi ete Bokonzi ezali na ntina mingi na miso ya Yehova? Pesá ndakisa. (b) Ndenge nini tokoki komonisa ete Bokonzi ezali na ntina mingi na miso na biso?

5 Bokonzi ezali mpe na ntina mingi na miso ya Yehova. Ndenge nini toyebi yango? Tóbosana te, Yehova nde atindaki Mwana na ye se moko na mokili mpe makambo nyonso oyo Yesu alobaki mpe ateyaki eutaki epai ya Yehova. (Yoa. 7:16; 12:49, 50) Ezali mpe Yehova nde asalisaki bakomi minei ya Baevanzile bákoma masolo ya bomoi mpe mosala ya Yesu. Yango emonisi nini?

Mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Bokonzi ya Nzambe ezali na ntina mingi na miso na ngai?’

6 Kanisá ete olingi kotya bafɔtɔ ya libota na bino na album. Bafɔtɔ ezali ebele, kasi nyonso ekokoka na album yango te. Okosala nini? Okopona bafɔtɔ oyo okotya na album. Baevanzile ezali lokola album ya bafɔtɔ oyo esalisaka biso tóyeba Yesu malamu. Yehova asalaki te ete bakomi ya Baevanzile bákoma likambo mokomoko oyo Yesu alobaki mpe asalaki awa na mabele. (Yoa. 20:30; 21:25) Kasi, asalisaki nde bango bákoma maloba mpe misala ya Yesu oyo ekosalisa biso tóyeba ntina ya mosala na ye mpe mokano ya Yehova. (2 Tim. 3:16, 17; 2 Pe. 1:21) Lokola Baevanzile elobeli mingi makambo oyo Yesu ateyaki mpo na Bokonzi ya Nzambe, tokoki mpenza koloba ete Bokonzi ezali na ntina mingi na miso ya Yehova. Kanisá naino: Yehova alingi tóyeba Bokonzi na ye!

7 Mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Bokonzi ya Nzambe ezali na ntina mingi na miso na ngai?’ Soki ezali bongo, tokolinga koyoka makambo oyo Yesu alobaki mpe ateyaki mpo na Bokonzi yango: ntina na yango, ndenge nini ekoya, mpe ntango nini ekoya.

“Bokonzi na yo eya”—Na ndenge nini?

8. Ndenge nini Yesu alobelaki na mokuse ntina ya Bokonzi?

8 Tótalela libondeli oyo Yesu alakisaki bayekoli na ye. Na maloba ya polele, Yesu alobelaki na mokuse ntina ya Bokonzi, mpe amonisaki makambo oyo Bokonzi yango ekosala. Libondeli yango ezali na malɔmbɔ nsambo. Malɔmbɔ misato ya liboso etali mokano ya Yehova: kosantisama ya nkombo na ye, koya ya Bokonzi na ye, mpe kokokisama ya mokano na ye na mabele ndenge ezali na likoló. (Tángá Matai 6:9, 10.) Makambo yango misato ezali na boyokani. Bokonzi ya Masiya nde eloko oyo Yehova akosalela mpo na kosantisa nkombo na ye mpe kokokisa mokano na ye.

9, 10. (a) Bokonzi ya Nzambe ekosala nini ntango ekoya? (b) Elaka nini ya Biblia ozelaka na motema moko?

 9 Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya, ekosala nini? Ntango tobondelaka ete, “Bokonzi na yo eya,” tosɛngaka ete Bokonzi ya Nzambe ebongola makambo. Ntango Bokonzi yango ekoya, ekomonisa nguya na yango awa na mabele. Ekolongola mokili oyo ya mabe, kati na yango baguvɛrnema nyonso ya bato, mpe ekotya mokili ya sika ya boyengebene. (Dan. 2:44; 2 Pe. 3:13) Na nsima, ntango Bokonzi ya Nzambe ekobanda koyangela, mabele mobimba ekokóma paradiso. (Luka 23:43) Baoyo Nzambe abombá bango na makanisi na ye bakozonga na bomoi mpe bakokutana lisusu na bandeko mpe baninga na bango. (Yoa. 5:28, 29) Bato ya botosi bakokóma bato ya kokoka mpe bakozwa bomoi ya seko. (Em. 21:3-5) Nsukansuka, mokano ya Yehova Nzambe ekosalema awa na mabele ndenge ezali na likoló! Ozali na mposa makasi ya komona kokokisama ya bilaka wana ya Biblia? Yebá ete mbala nyonso oyo obondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya, osɛngaka nde ete bilaka wana ya kitoko ekokisama.

10 Tomoni polele ete Bokonzi ya Nzambe ‘eyei’ naino te mpo na kokokisa libondeli oyo Yesu alakisaki bayekoli na ye. Tii lelo baguvɛrnema ya bato ezali naino koyangela mpe mokili ya sika ya boyengebene eyei naino te. Kasi, nsango ya malamu ezali: Bokonzi ya Nzambe esilá kotyama, ndenge tokomona yango na mokapo oyo elandi. Tólobela sikoyo makambo oyo Yesu alobaki mpo na ntango oyo Bokonzi esengelaki kotyama mpe ntango oyo ekoya.

Ntango nini Bokonzi ya Nzambe esengelaki kotyama?

11. Likambo nini Yesu amonisaki mpo na kotyama ya Bokonzi?

11 Yesu amonisaki ete Bokonzi ekotyama na siɛklɛ ya liboso te, atako bayekoli mosusu bazalaki kozela ete esalema bongo. (Mis. 1:6) Tótalela makambo oyo alobaki na bandakisa mibale oyo apesaki, mosusu na mobu 31 T.B., mpe mosusu na mobu 33 T.B.

12. Ndenge nini ndakisa ya blé ná matiti mabe emonisi ete Bokonzi ebandaki koyangela na siɛklɛ ya liboso te?

12 Ndakisa ya blé ná matiti mabe. (Tángá Matai 13:24-30.) Nsima ya kopesa ndakisa yango, mbala mosusu na prɛnta ya mobu 31 T.B., Yesu alimbwelaki bayekoli na ye ndakisa yango. (Mat. 13:36-43) Ndimbola yango na mokuse ezalaki boye: Nsima ya liwa ya bantoma, Zabolo akolona matiti mabe (bakristo ya lokuta) na kati ya blé (“bana ya Bokonzi,” to bakristo oyo batyami mafuta na elimo). Bakotika blé ná matiti mabe ekola elongo, esika moko, tii na ntango ya kobuka mbuma, oyo ezali “bosukisi ya makambo ya ntango moko boye.” Nsima ya kobanda ya eleko ya kobuka mbuma, bakopikola matiti mabe. Na nsima, bakoyanganisa blé esika moko. Na yango, ndakisa wana emonisi ete Bokonzi esengelaki kotyama na siɛklɛ ya liboso te, kasi nde soki blé ná matiti mabe ekoli tii na nsuka mpe eleko ya kobuka mbuma ebandi. Ndenge eyaki komonana, eleko ya kobuka mbuma ebandaki na 1914.

13. Ndenge nini Yesu amonisaki ete akotyama Mokonzi mbala moko te nsima ya kozonga na ye na likoló?

 13 Ndakisa ya mina. (Tángá Luka 19:11-13.) Yesu apesaki ndakisa yango na mobu 33 T.B., ntango azalaki kokende na Yerusaleme mpo na mbala ya nsuka. Bato mosusu oyo bazalaki koyoka ye bakanisaki ete akotya Bokonzi soki bakómi na Yerusaleme. Mpo na kosembola likanisi wana mpe komonisa ete Bokonzi ekotyama na ntango wana te, Yesu alobaki ete azali lokola “moto moko boye ya lokumu” oyo asengelaki liboso kosala mobembo “na mokili moko ya mosika mpo na kozwa nguya ya bokonzi.” * Mpo na Yesu, ‘mokili ya mosika’ ezalaki likoló, epai Tata na ye akopesa ye nguya ya bokonzi. Kasi, Yesu ayebaki ete soki azongi na likoló, akotyama Mokonzi mbala moko te. Akofanda naino na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe mpe akozela ntango oyo etyamá. Ndenge eyaki komonana, Yesu azelaki na boumeli ya basiɛklɛ mingi.Nz. 110:1, 2; Mat. 22:43, 44; Ebr. 10:12, 13.

Ntango nini Bokonzi ya Nzambe ekoya?

14. (a) Eyano nini Yesu apesaki na motuna oyo bantoma na ye minei batunaki ye? (b) Kokokisama ya esakweli ya Yesu emonisi nini mpo na kozala na ye mpe Bokonzi?

14 Mwa mikolo moke liboso Yesu abomama, bayekoli na ye minei batunaki ye ete: “Elembo nini ekomonisa kozala na yo mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo?” (Mat. 24:3; Mrk. 13:4) Na eyano na ye, Yesu apesaki esakweli moko oyo ezali na makambo ebele; esakweli yango ezali na Matai mokapo 24 mpe 25. Yesu alobelaki makambo ndenge na ndenge oyo ekosalema na mokili, oyo ekomonisa eleko oyo ebengami “kozala” na ye. Ebandeli ya kozala na ye ná kotyama ya  Bokonzi esengelaki kosalema ntango moko; mpe na nsuka ya kozala na ye nde Bokonzi ekoya. Tozali na bilembeteli mingi oyo emonisi ete esakweli ya Yesu ebandaki kokokisama na 1914. * Na yango, ezali na mobu yango nde eleko ya kozala ya Kristo ebandaki mpe Bokonzi etyamaki.

15, 16. Maloba “libota oyo” etaleli banani?

15 Sikoyo, ntango nini Bokonzi ya Nzambe ekoya? Yesu ayebisaki te mokolo mpe ngonga nini ekoya. (Mat. 24:36) Kasi, alobaki likambo moko oyo esengeli kondimisa biso ete koya ya Bokonzi yango ekómi mpenza pene. Yesu alobaki ete liboso Bokonzi eya, esengeli “libota oyo” emona naino kokokisama ya elembo ya esakweli. (Tángá Matai 24:32-34.) Maloba “libota oyo” etaleli banani? Tótalela malamumalamu makambo oyo Yesu alobaki.

16 “Libota oyo.” Yesu azalaki nde kokanisa bapakano? Te. Banani bazalaki wana ntango Yesu alobaki likambo yango? Ntango Yesu apesaki esakweli yango, azalaki kaka elongo na mwa bantoma na ye oyo “bapusanaki epai na ye kaka bango moko.” (Mat. 24:3) Ayebaki ete mosika te, bantoma bakotyama mafuta na elimo santu. Tótalela mpe makambo oyo alobaki liboso. Liboso alobela “libota oyo,” Yesu alobaki: “Sikoyo, bózwa liteya oyo na ndakisa ya nzete ya figi: Ntango kaka etape na yango ya sika ekómi pɛtɛpɛtɛ mpe ebimisi nkasa, boyebi ete eleko ya molunge ekómi pene. Bino mpe ndenge moko, ntango bokomona makambo yango nyonso, bóyeba ete azali pene, na baporte.” Bayekoli ya Yesu oyo batyami mafuta na elimo—kasi bapakano te—nde basengelaki komona makambo oyo asakolaki mpe kososola ndimbola na yango: Yesu “azali pene, na baporte.” Na yango, ntango Yesu alobelaki “libota oyo,” azalaki kokanisa nde bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo.

17. Liloba “libota” elimboli nini mpe “makambo wana nyonso” ezali nini?

17 “Ekoleka ata moke te tii makambo wana nyonso ekosalema.” Ndenge nini maloba yango ekokokisama? Mpo na kozwa eyano, tosengeli koyeba makambo mibale: ndimbola ya liloba “libota” mpe ya maloba “makambo wana nyonso.” Mbala mingi, liloba “libota” to “nkola” (génération) esalelamaka mpo na kolobela bato ya mbula moko te, oyo bomoi na bango ekutani na eleko moko boye. Libota to nkola ezalaka molai koleka ndelo te, mpe ezalaka na nsuka. (Kob. 1:6) “Makambo wana nyonso” ezali makambo nyonso oyo Yesu asakolaki ete ekosalema na eleko ya kozala na ye, banda ntango ebandaki na 1914 tii ntango ekosuka na ‘bolɔzi monene.’Mat. 24:21.

18, 19. Maloba “libota oyo,” oyo Yesu alobelaki elimboli nini, mpe tokoki koloba nini na mokuse?

18 Na yango, maloba “libota oyo,” oyo Yesu alobelaki elimboli nini? Libota yango ezali bituluku mibale ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bomoi na bango ekutanaki na eleko moko boye. Etuluku ya liboso ezali bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bamonaki ebandeli ya kokokisama ya elembo na 1914. Etuluku ya mibale ezali bakristo oyo  batyami mafuta na elimo, oyo na eleko moko, bazalaki na bomoi na baoyo ya etuluku ya liboso. Mwa ndambo ya bakristo ya etuluku ya mibale bakozala na bomoi mpo bámona ebandeli ya bolɔzi monene. Bituluku yango mibale ezali libota moko mpamba te bomoi na bango ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo ekutanaki na eleko moko boye. *

19 Na mokuse, tokoloba nini? Toyebi ete elembo oyo emonisi kozala ya Yesu na Bokonzi ezali komonana polele na mokili mobimba. Tomoni mpe ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali naino na bomoi mpe bazali na kati ya “libota oyo,” bazali kokóma mibange; nzokande bango nyonso bakosila kokufa te liboso ete bolɔzi monene ebanda. Na yango, tokoki koloba ete etikali moke mpenza Bokonzi ya Nzambe eya mpo na koyangela mabele mobimba! Ekozala mpenza esengo mingi komona kokokisama ya libondeli oyo Yesu ateyaki biso ete: “Bokonzi na yo eya”!

20. Buku oyo ekolobela makambo nini, mpe tokotalela nini na mokapo oyo elandi?

20 Tóbosana te maloba oyo Yehova ye moko alobaki uta na likoló mpo na Mwana na ye ete: “Bóyoka ye.” Biso bakristo ya solo tosepelaka mpenza kotosa etinda wana ya Nzambe. Totyaka likebi na likambo nyonso oyo Yesu alobaki mpe ateyaki mpo na Bokonzi ya Nzambe. Buku oyo ekolobela makambo oyo Bokonzi yango esili kosala mpe oyo ekosala na mikolo ezali koya. Mokapo oyo elandi ekolobela makambo minene oyo esalemaki mwa moke liboso Bokonzi ya Nzambe ebanda koyangela na likoló.

^ par. 13 Ntango mosusu ndakisa ya Yesu etindaki bayoki na ye bákanisa Arkelausi, mwana ya Erode Monene. Liboso Erode akufa, aponaki Arkelausi mpo ayangela Yudea mpe bamboka ya zingazinga nsima na ye. Nzokande, liboso ete Arkelausi abanda koyangela, asengelaki kosala mobembo molai tii na Roma mpo Kaisala Augusto andima ye.

^ par. 14 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Mokapo 9 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?

^ par. 18 Mokristo nyonso oyo atyamaki mafuta na elimo nsima ya liwa ya bakristo nyonso ya etuluku ya liboso oyo batyamaki mafuta na elimo, oyo bamonaki “ebandeli ya bampasi” na 1914, azali te na kati ya “libota oyo.”Mat. 24:8.