Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Poná monɔkɔ Lingala

 MOKAPO 2

Bokonzi ebotami na likoló

Bokonzi ebotami na likoló

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Elobeli ndenge basaleli ya Nzambe babongisamaki liboso Bokonzi ebanda koyangela

1, 2. Likambo nini eleki monene oyo esalemá na mokili, mpe mpo na nini tokoki kokamwa te ndenge esalemaki na miso ya bato te?

OSILÁ komituna soki bomoi ezalaki ndenge nini na eleko oyo makambo minene oyo ebongolá mokili esalemaki? Bato mingi bamitunaka bongo. Kasi, kanisá naino: Soki ozalaki na bomoi na eleko ya ndenge wana, olingaki mpenza komona makambo yango ya ntina oyo ememaki mbongwana? Mbala mosusu olingaki komona yango te. Mbala mingi, makambo oyo ekweisaka baguvɛrnema mpe oyo balobelaka mingi na babuku ya istware esalemaka na miso ya bato te. Na maloba mosusu, makambo mingi ya minene oyo ebimaka na mokili esalemaka na nkuku: na babiro ya bakonzi, na makita ya bato minene ya politiki, to mpe na babiro ya Leta. Atako bongo, makambo yango ebongolaka bomoi ya bamilio ya bato.

2 Tokoki koloba nini mpo na likambo eleki monene oyo esalemá na mokili? Likambo yango etali bamilio ya bato. Kasi, esalemaki na miso ya bato te. Likambo yango nini? Kobotama na likoló ya Bokonzi ya Nzambe, guvɛrnema ya Masiya oyo elakamaki banda kala, oyo mosika te ekobebisa mokili oyo mabe. (Tángá Danyele 2:34, 35, 44, 45.) Lokola bato bamonaki te ntango likambo yango esalemaki, elingi koloba ete Yehova abombelaki bato likambo yango? To, abongisaki nde basaleli na ye ya sembo liboso likambo yango esalema? Tótalela yango.

“Momemi-nsango na ngai . . . akobongisa mpenza nzela liboso na ngai”

3-5. (a) “Momemi-nsango ya kondimana” oyo Malaki 3:1 elobeli ezalaki nani? (b) Nini esengelaki kosalema liboso “momemi-nsango ya kondimana” aya kotala tempelo?

3 Banda na ntango ya kala, Yehova akanaki ete akobongisa basaleli na ye liboso ya kobotama ya Bokonzi ya Masiya. Na ndakisa, talá esakweli oyo ezali na Malaki 3:1: “Talá! Nazali kotinda momemi-nsango na ngai, mpe akobongisa mpenza nzela liboso na ngai. Mpe Nkolo ya solosolo oyo bino bozali koluka akoya pwasa na tempelo na Ye ná momemi-nsango ya kondimana oyo bino bozali kosepela na ye.”

4 Na mikolo na biso, ntango nini Yehova “Nkolo ya solosolo,” ayaki kotala bato oyo bazalaki kosalela ye awa na mabele na lopango ya tempelo na ye ya elimo? Esakweli yango elobaki ete Yehova akoya elongo na “momemi-nsango ya kondimana.” Ezalaki nani? Ezalaki Masiya Mokonzi, Yesu Kristo!  (Luka 1:68-73) Nsima ya kotyama Mokonzi, asengelaki koya kotala basaleli ya Nzambe awa na mabele mpe kopɛtola bango.​—1 Pe. 4:17.

5 Kasi, “momemi-nsango” ya liboso, oyo Malaki 3:1 elobelaki, ezalaki nani? Momemi-nsango yango asengelaki komonana liboso ya kozala ya Masiya Mokonzi. Mwa bambula mingi liboso ya 1914, ezalaki nde na momemi-nsango oyo ‘abongisaki nzela’ liboso ya Masiya Mokonzi?

6. “Momemi-nsango” ya liboso oyo abongisaki basaleli ya Nzambe mpo na makambo oyo esengelaki koya ezalaki nani?

6 Na buku oyo, tokozwa biyano na mituna ya ndenge wana mpo tokolobela makambo minene oyo basaleli ya Yehova na mikolo na biso basali. Makambo yango emonisi ete na nsuka ya bambula ya 1800, mwa etuluku moko moke ya bato ya sembo bamonisaki ete bango nde bazali bakristo ya solo, atako bakristo ya lokuta bazalaki ebele mpenza. Na nsima, bamipesaki nkombo Bayekoli ya Biblia. Bandeko oyo bazalaki kokamba bango, elingi koloba Charles Russell ná baninga na ye ya sembo, nde bazalaki “momemi-nsango” oyo esakweli wana elobelaki. Batambwisaki basaleli ya Nzambe na makambo ya elimo mpe babongisaki bango mpo na makambo oyo ezalaki koya. Tólobela makambo minei oyo “momemi-nsango” yango asalaki.

Kosambela Nzambe na solo

7, 8. (a) Na bambula ya 1800, banani bamonisaki liboso ete liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ezali lokuta? (b) Mateya nini mosusu ndeko Charles Russell ná baninga na ye bamonisaki ete ezali lokuta?

7 Bayekoli yango ya Biblia bazalaki kobondela ntango bazali koyekola; soki bayokani na likambo moko, bazalaki kotya makanisi nyonso esika moko, mpe bazalaki kobimisa na mikanda mateya ya solo oyo bayekoli. Mangomba ya bokristo ya lokuta ezalaki na kati ya molili ya elimo na boumeli ya bankama ya bambula; mateya na yango mingi eutaki na losambo ya bapakano. Ndakisa ya liboso ezali liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te. Kasi, na bambula ya 1800, mwa etuluku ya bato oyo bazalaki koyekola Biblia na bosolo batalelaki malamumalamu liteya yango mpe bamonaki ete eutá na Liloba ya Nzambe te. Henry Grew, George Stetson, mpe George Storrs babimisaki mikanda mpe bateyaki na molende ete liteya wana eutaki epai ya Satana. * Mateya na bango esalisaki mpenza Charles Russell ná baninga na ye ya sembo.

8 Charles Russell ná baninga na ye ya sembo bamonaki mpe ete mateya mosusu oyo eyokani na liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te, ezalaki kobulunganisa bato mpe ezalaki lokuta. Na ndakisa, liteya oyo elobaka ete bato nyonso ya malamu bakendaka likoló to ete Nzambe anyokolaka milimo ya bato mabe na lifelo ya mɔtɔ libela na libela. Na molende nyonso, Russell ná baninga na ye ya sembo bakomaki masolo ndenge na ndenge, babimisaki babuku, mwa babuku, batrakte, mpe masolo na bazulunalo, mpo na komonisa ete mateya wana ezali lokuta.

9. Ndenge nini Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona emonisaki ete liteya ya Bosato ezali lokuta?

9 Bayekoli ya Biblia bamonisaki mpe polele ete liteya ya Bosato, oyo bato ebele bazalaki kondima na motema moko, ezali lokuta. Na 1887, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona elobaki boye:  “Makomami emonisi polele ete Yehova ná Nkolo Yesu bazali bato mibale oyo bakeseni.” Na nsima, lisolo yango ebakisaki ete ezali likambo ya kokamwa ndenge ebele ya bato bazalaki kondima “likanisi oyo elobeli Nzambe moko na bapersona misato: Banzambe misato kati na Nzambe moko, mpe Nzambe moko kati na banzambe misato. Kasi, lokola bato ebele bazali kondima yango, emonisi ete lingomba elalá mpɔngi makasi, mpe monguna akangá yango minyɔlɔlɔ mpo elongwa na libunga te.”

10. Ndenge nini Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaki ete 1914 ekozala mobu ya ntina mingi?

10 Motó ya likambo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona mpe Mosakoli ya kozala ya Kristo emonisaki ete zulunalo yango ezalaki kotya likebi mingi na bisakweli oyo etalaki kozala ya Kristo. Bandeko ya sembo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazalaki kokoma zulunalo yango, bamonaki ete esakweli ya Danyele oyo elobeli “ntango nsambo” etalelaki ntango oyo mokano ya Nzambe mpo na Bokonzi ya Masiya ekokokisama. Bambula mingi liboso, na bambula ya 1870, balobaki ete ntango nsambo wana ekosila na 1914. (Dan. 4:25; Luka 21:24) Atako bandeko na biso yango bayebaki mpenza te makambo minene oyo ekosalema na  mbula yango, basakolaki bipai nyonso makambo oyo bayekolaki mpe mosala na bango esalisaka biso tii lelo.

11, 12. (a) Ndeko Russell apesaki lokumu epai ya banani mpo na makambo oyo azalaki koteya? (b) Ndenge nini mosala oyo ndeko Russell ná baninga na ye basalaki mwa bambula liboso ya 1914 esalisaki bato?

11 Ata mokolo moko te, Russell ná baninga na ye ya sembo babɛtaki ntolo ete bayekolaki mpe basosolaki mateya wana ya solo na mayele na bango moko. Russell azalaki na botɔndi mingi epai ya bato mosusu oyo bazalaki liboso na ye mpo basalisaki ye. Kasi, azongisaki lokumu nyonso epai ya Yehova Nzambe, ye oyo ateyaka basaleli na Ye makambo oyo basengeli koyeba na ntango oyo basengeli koyeba yango. Emonani polele ete Yehova apambolaki Russell ná baninga na ye na milende oyo basalaki mpo na kobimisa mateya ya solo. Nsima ya bambula, bakabwanaki malamumalamu na bokristo ya lokuta.

Ndeko Russell ná baninga na ye ya sembo balongisaki mateya ya Biblia

12 Mosala oyo bato wana ya sembo basalaki mpo na kobimisa mateya ya solo na bambula wana liboso ya 1914 ezalaki likambo ya kokamwa mpenza! Mpo na ntango wana, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona mpe Mosakoli ya kozala ya Kristo ya 01/11/1917 elobaki boye: “Bamilio ya bato lelo balongwe na boombo ya bibangabanga, oyo eutaki na liteya ya lifelo ya mɔtɔ mpe na mateya mosusu ya lokuta . . . Mateya ya solo oyo ekómaki komata lokola mbonge eleki sikoyo mbula koleka 40, ezali se komata nokinoki mpe ekokoba komata tii ekotonda na mabele mobimba; mpe banguna bakoki kosala nyonso mpo na kozongisa yango nsima, kasi bakolonga te kopekisa mateya ya solo epalangana na mabele mobimba.”

13, 14. (a) Ndenge nini “momemi-nsango” asalisaki na kobongisa nzela mpo na Masiya Mokonzi? (b) Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya bandeko na biso oyo basakolaki liboso ya 1914?

13 Kanisá naino: Basaleli ya Nzambe balingaki nde kozala bato oyo babongisami mpo na ebandeli ya kozala ya Kristo soki bayebaki te kokesenisa Yesu ná Tata na ye Yehova? Soki moke te! Balingaki mpe te kozala bato oyo babongisami soki bazalaki kokanisa ete moto nyonso azalaka na molimo oyo ekufaka te, mpo bayebi te ete ezali nde likabo oyo Nzambe apesi kaka na mwa bayekoli moke ya Kristo. Balingaki mpe te kozala bato oyo babongisami soki bazalaki kokanisa ete Nzambe anyokolaka bato na lifelo ya mɔtɔ libela na libela! Ya solo mpenza, “momemi-nsango” abongisaki nzela mpo na Masiya Mokonzi!

14 Bongo biso lelo? Liteya nini tokoki kozwa epai ya bandeko na biso wana oyo bazalaki na bomoi na bambula ya 1800? Biso mpe tosengeli kozala batángi mpe bayekoli ya molende ya Liloba ya Nzambe. (Yoa. 17:3) Awa mokili oyo elingá biloko ya mosuni ezali se kokufa nzala na elimo, biso tosengeli kokóma na mposa makasi koleka ya kolya bilei ya elimo!​—Tángá 1 Timote 4:15.

“Bóbima kati na ye, bato na ngai”

15. Likambo nini Bayekoli ya Biblia bayaki komona mokemoke? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

15 Bayekoli ya Biblia bateyaki ete esengeli kokata nsinga nyonso na mangomba ya mokili. Na 1879, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobelaki “Lingomba ya Babilone.” Elingaki kolobela nde bokonzi ya pápa? Lingomba ya Katolike? Bankama ya bambula liboso, mangomba ya Protesta ezalaki koloba ete Babilone yango, oyo bisakweli ya Biblia elobeli, ezali Lingomba ya Katolike. Nzokande, mokemoke Bayekoli ya Biblia bayaki komona ete  “Babilone” ya mikolo na biso ezali nde mangomba nyonso ya bokristo. Mpo na nini? Mpo yango nyonso ezalaki koteya mateya ya lokuta lokola oyo touti kolobela. * Na nsima, mikanda na biso ekómaki koyebisa polelepolele makambo oyo bato ya mitema sembo oyo bazali na mangomba ya Babilone basengeli kosala.

16, 17. (a) Ndenge nini Volimi III ya Aurore du millénium mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elendisaki bato bálongwa na mangomba ya lokuta? (b) Nini esalaki ete makebisi yango ezala na nguya mingi te? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

16 Na ndakisa, na 1891, Volimi III ya buku Aurore du millénium emonisaki ete Nzambe andimaka te Babilone ya mikolo na biso, mpe elobaki ete: “Mangomba nyonso ya bokristo eboyami.” Ebakisaki ete bato nyonso oyo “bandimaka te mateya na yango ya lokuta mpe misala na yango basengeli kolongwa nokinoki kati na yango.”

17 Na sanza ya yambo na 1900, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli epesaki toli na bato oyo bankombo na bango ezalaki naino na baliste ya mangomba ya bokristo ya lokuta mpe oyo bazalaki komilongisa, mpe koloba ete: “Nandimaka mateya nyonso ya solo, mpe nakɔtaka mingi te na mangomba mosusu.” Lisolo yango etunaki boye: “Kasi bongo ezali malamu? Lokolo moko na kati ya solo, lokolo mosusu na kati ya Babilone? Yango nde botosi oyo tosengeli kozala na yango? . . . Nzambe andimaka mpe asepelaka na makambo ya ndenge wana? Ata moke te. Moto [oyo akómi mondimi na lingomba] asalaka polele kondimana na lingomba yango ntango akɔti kuna, mpe asengeli kotosa masɛngami nyonso ya kondimana yango tii ntango . . . akoloba polele ete azali lisusu na lingomba yango te to akosɛnga bálongola nkombo na ye na liste ya bandimi.” Na boumeli ya bambula, babɛtaki nsɛtɛ mingi na likambo yango. * Basaleli ya Yehova basengeli kokata nsinga nyonso na mangomba ya lokuta.

18. Mpo na nini ezalaki na ntina ete bato bábima na Babilone Monene?

18 Soki bázongelaka mbala na mbala te ete esengeli kobima na Babilone Monene, Mokonzi Kristo alingaki nde kokuta etuluku ya bato oyo batyami mafuta na elimo awa na mabele, oyo babongisami malamu mpe bazali kosalela Nzambe? Ata moke te, mpo kaka bakristo oyo balongwe na boombo ya Babilone nde bakoki kosambela Yehova “na elimo mpe na solo.” (Yoa. 4:24) Biso mpe lelo tosengeli ntango nyonso kozala mosika na mangomba ya lokuta! Tókoba kotosa etinda oyo: “Bóbima kati na ye, bato na ngai”!​—Tángá Emoniseli 18:4.

Makita mpo na losambo

19, 20. Ndenge nini Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elendisaki basaleli ya Nzambe báyanganaka na makita mpo na losambo?

19 Bayekoli ya Biblia bateyaki bato ete na bisika oyo likoki ezali, basengeli koyanganaka mpo na losambo. Bakristo ya solo basukaka kaka te na kobima na mangomba ya lokuta. Basengeli mpe kosala makambo oyo esɛngami na losambo ya solo. Banda na banimero na yango ya ebandeli, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki kolendisa batángi báyanganaka elongo mpo na losambo. Na ndakisa, na nimero ya sanza ya nsambo 1880, ndeko Russell alobelaki mobembo moko oyo asalaki, mpe amonisaki ndenge makita ebele oyo asalaki elendisaki bandeko. Na nsima, alendisaki batángi bátinda mikanda oyo elobeli ndenge makita ezali kosalema; mikanda yango mosusu ebimisamaki na  zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Na mokano nini? Akomaki boye: “Tiká ete biso nyonso tóyeba . . . ndenge Nkolo azali kopambola bino, mpe soki bozali kokoba kosala makita elongo na bato ya kondima lokola bino.”

Charles Russell ná Bayekoli ya liboso ya Biblia na Copenhague, na Danemark na 1909

20 Na 1882, lisolo moko oyo elobaki “Tóyanganaka elongo” ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Lisolo yango elendisaki bakristo básalaka makita “mpo na kolendisana mpe kopesana makasi.” Ebakisaki ete: “Ezali na ntina te bózala na moto moko ya mayele mingi to oyo atángá mingi. Mokomoko aya na Biblia na ye, papye, krɛyo, mpe moto nyonso oyo akomona buku oyo elimbolaka maloba ya Biblia (Concordance), . . . aya na yango. Bópona likambo moko oyo bokolobela; bósɛnga elimo santu ekamba bino mpo bókanga ntina na yango; na nsima, bótánga, bókanisa, bókokanisa bavɛrsɛ ya Biblia; na ntembe te, elimo ekokamba bino na solo.”

21. Lisangá ya Allegheny etiká ndakisa nini na oyo etali kosala makita mpe kolendisa bandeko?

21 Bayekoli ya Biblia batyaki biro monene na bango na engumba Allegheny, na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis. Kuna, batiká ndakisa ya malamu na ndenge bazalaki koyangana elongo mpo na kotosa toli ya Biblia oyo ezali na Baebre 10:24, 25. (Tángá.)  Bambula ebele na nsima, ndeko moko ya mokóló na nkombo Charles Capen alobelaki makita yango, oyo azalaki kokɔta ntango azalaki mwana moke. Akomaki boye: “Nabosanaka te moko ya bavɛrsɛ oyo bakomaki na efelo ya ndako ya makita ya la Société. ‘Bozali na Nkolo kaka moko, ye Kristo; mpe bino nyonso bozali bandeko.’ Maloba wana etikalá na makanisi na ngai: bakonzi bazalaka te na lisangá ya Yehova.” (Mat. 23:8) Ndeko Capen alobelaki mpe makambo ya malamu oyo bazalaki kolobela na makita, ndenge ezalaki kolendisa, mpe milende oyo ndeko Russell azalaki kosala mpo na kolendisa ndeko mokomoko ya lisangá.

22. Bato ya sembo basalaki nini ntango balendisaki bango básalaka makita mpo na losambo, mpe liteya nini tokoki kozwa?

22 Bato ya sembo balandaki ndakisa wana mpe malako oyo epesamaki. Bafungolaki masangá na bitúká mosusu, na ndakisa na Ohio mpe na Michigan mpe na nsima na Amerika ya Nɔrdi mobimba mpe na mikili mosusu. Kanisá naino: Bato ya sembo balingaki mpenza kozala bato oyo babongisami mpo na kozala ya Kristo soki bateyaki bango te kotosa toli ya Biblia ya koyangana mpo na losambo? Ata moke te! Bongo lelo? Biso mpe tosengeli kozala na ekateli ya koyanganaka pɔsɔ na pɔsɔ na makita nyonso ya lisangá mpe na ndenge yango, kosimba libaku nyonso ya kosambela elongo mpe kolendisana na elimo.

Kosakola na molende

23. Ndenge nini Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaki polele ete bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo basengeli kosakola?

23 Bayekoli ya Biblia bateyaki ete bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo basengeli kozala basakoli ya solo. Na mobu 1885, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki boye: “Tosengeli kobosana te ete mokristo nyonso oyo atyami mafuta na elimo  atyami mafuta mpo na kobima na mosala ya kosakola (Yis. 61:1).” Na mobu 1888, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko elendisaki bandeko na maloba oyo: “Toyebi malamu mokumba oyo bapesi biso . . . Soki tosali lokola toyebi yango te to soki tozali koluka kokima yango, tokozala mpenza basaleli ya gɔigɔi, mpe tokomonisa ete tobongi te kozwa esika ya lokumu oyo balaki biso.”

24, 25. (a) Ndenge nini ndeko Russell ná baninga na ye bamonisaki ete bazali kosuka kaka te na kolendisa bato básakola? (b) Colporteur moko alobaki nini mpo na mosala ya kosakola na eleko oyo mituka ezalaki mingi te?

24 Ndeko Russell ná baninga na ye ya sembo basukaki kaka te na kolendisa bato básakola. Babandaki mpe kobimisa batrakte oyo bazalaki kobenga Batrakte ya Bayekoli ya Biblia, oyo na nsima ekómaki mpe kobengama Cahiers trimestriels de théologie ancienne. Bato oyo bazalaki kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli bazalaki kozwa batrakte yango mpe kopesa yango bato ofele.

Omituna boye: ‘Mosala ya kosakola ezali na esika ya liboso na bomoi na ngai?’

25 Bato oyo bamipesaki na mosala ya kosakola ntango nyonso babengamaki ba colporteur. Ndeko Charles Capen, oyo tolobelaki liboso, azalaki mpe colporteur. Bambula na nsima, alobaki boye: “Nazalaki kosalela bakarte ya États-Unis oyo guvɛrnema esalaki mpo esalisa ngai nasakola na teritware nyonso oyo nazwaki na Pennsylvanie. Bakarte yango ezalaki kolakisa babalabala nyonso, mpe esalisaki ngai nakóma na bakartye nyonso na makolo. Na bantango mosusu, nsima ya kotambola mboka mobimba mikolo misato mpo na kozwa bankombo ya bato oyo balingi kozwa babuku Études des Écritures, nazalaki kofutela mpunda ná sharɛti mpo namemela bato mikanda yango. Mbala mingi nazalaki kolala esika moko na basali-bilanga. Na ntango wana, mituka ezalaki mingi te.”

Colporteur. Basalá liyemi ya “Carte des âges” na sharɛti

26. (a) Mpo na nini esɛngaki ete basaleli ya Nzambe bámipesa na mosala ya kosakola mpo bábongisama mpo na boyangeli ya Kristo? (b) Mituna nini tosengeli komituna?

26 Esɛngaki milende mpe mpiko mpenza mpo na kosakola na ntango wana. Bakristo ya solo balingaki nde kozala bato oyo babongisami mpo na boyangeli ya Kristo soki bateyaki bango te ntina ya mosala ya kosakola? Soki moke te! Kutu, mosala yango esengelaki kokóma likambo moko ya ntina mingi na eleko ya kozala ya Kristo. (Mat. 24:14) Esengelaki kobongisa basaleli ya Nzambe mpo mosala wana oyo ebikisaka bomoi ya bato ekóma na esika ya liboso na bomoi na bango. Biso mpe lelo oyo tosengeli komituna boye: ‘Mosala ya kosakola ezali na esika ya liboso na bomoi na ngai? Namipimelaka makambo mosusu mpo namipesa na mosala yango?’

Bokonzi ya Nzambe ebotami!

27, 28. Likambo nini ntoma Yoane amonaki na emonaneli? Satana ná bademo na ye basalaki nini ntango Bokonzi ebandaki koyangela?

27 Nsukansuka, mobu 1914 ekómaki. Ndenge tolobaki yango na ebandeli ya mokapo oyo, moto moko te amonaki makambo minene oyo esalemaki na likoló. Kasi, ntoma Yoane azwaki emonaneli moko oyo elobelaki makambo na maloba ya elilingi. Kanisá naino: Yoane amonaki “elembo moko ya monene” na likoló. “Mwasi” ya Nzambe, elingi koloba ebongiseli ya bikelamu ya elimo na likoló, azalaki na zemi mpe abotaki mwana ya mobali. Lisolo elobi ete ekoumela te, mwana yango ya elilingi “akokamba bikólo nyonso na lingenda ya ebende.” Kasi ntango mwana yango abotamaki, “bamemaki [ye] epai ya Nzambe mpe esika kiti na ye ya bokonzi ezali.” Mongongo moko  makasi eyokanaki na likoló elobi: “Sikoyo lobiko, ná nguya, ná bokonzi ya Nzambe na biso, ná bokonzi ya Kristo na ye eyei.”​—Em. 12:1, 5, 10.

28 Ntembe ezali te ete makambo oyo Yoane amonaki na emonaneli wana ezalaki mbotama ya Bokonzi ya Masiya. Likambo yango ezalaki ya esengo monene, kasi esepelisaki moto nyonso te. Satana ná bademo na ye babundisaki baanzelu ya sembo, oyo Mikaele, to Kristo azalaki kokamba. Esukaki ndenge nini? Biblia elobi: “Dragɔ yango ya monene ebwakamaki na nse, yango nyoka ya ebandeli, oyo babengi Zabolo mpe Satana, oyo azali kokosa mabele mobimba esika bato bafandi; abwakami na mabele, mpe baanzelu na ye babwakami na nse elongo na ye.”​—Em. 12:7, 9.

Na 1914, Bayekoli ya Biblia babandaki kososola elembo ya kozala ya Kristo na likoló

29, 30. Nsima ya kotyama ya Bokonzi ya Masiya, makambo ekómaki ndenge nini (a) na mabele? (b) na likoló?

29 Bambula mingi liboso ya 1914, Bayekoli ya Biblia balobaki ete eleko moko ya yikiyiki ekobanda na mobu yango. Kasi, ata bango moko bayebaki mpenza te ndenge oyo maloba na bango ekokokisama. Ndenge emonaneli oyo Yoane azwaki emonisaki yango, Satana akobanda sikoyo kotya miso mingi koleka na makambo ya bato awa na mabele; Yoane alobaki: “Mawa na mabele mpe na mbu, mpo Zabolo akiteli bino na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na ntango mokuse.” (Em. 12:12) Na mobu 1914, Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki mpe elembo ya kozala ya Kristo na nguya ya bokonzi ebandaki komonana na mabele mobimba. “Mikolo ya nsuka” ya mokili oyo mpe ebandaki.​—2 Tim. 3:1.

30 Nzokande, esengo monene ezalaki na likoló. Babenganaki Satana ná bademo na ye kuna mpo na libela. Yoane alobaki: “Bósepela, bino likoló mpe bino baoyo bofandi na likoló!” (Em. 12:12) Lokola likoló epɛtolamaki mpe Yesu atyamaki Mokonzi, Bokonzi ya Masiya ekokaki sikoyo kozwa makambo na mabɔkɔ mpo na kosalisa basaleli ya Nzambe na mabele. Likambo nini Bokonzi yango esalaki? Ndenge tomonaki yango na ebandeli ya mokapo oyo, likambo ya liboso oyo Kristo, “momemi-nsango ya kondimana,” asalaki ezalaki ya kopɛtola basaleli ya Nzambe awa na mabele. Ndenge nini asalaki yango?

Ntango ya komekama

31. Malaki asakolaki nini mpo na eleko ya kopɛtola, mpe ndenge nini esakweli yango ebandaki kokokisama? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

31 Malaki asakolaki ete kopɛtolama yango ekozala ya mpasi. Akomaki boye: “Nani akokoka na mokolo ya koya na ye, mpe nani akotɛlɛma ntango ye akomonana? Mpo ye akozala lokola mɔtɔ ya monyangwisi-bibende mpe lokola sabuni ya basukoli-bilamba.” (Mal. 3:2) Maloba yango ekokisamaki mpenza! Kobanda na mobu 1914, basaleli ya Nzambe awa na mabele bakutanaki na komekama makasi mpe mikakatano ya ndenge na ndenge. Wana Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ezalaki kotɔka, Bayekoli mingi ya Biblia banyokwamaki makasi, mpe basusu bakɔtaki bolɔkɔ. *

32. Yikiyiki nini ebimaki na kati ya lisangá ya Nzambe nsima ya 1916?

32 Na kati ya lisangá mpe, yikiyiki makasi ebimaki. Na mobu 1916, ndeko Russell akufaki ntango azalaki na mbula 64 mpamba, mpe basaleli mingi ya Nzambe bayokaki mpasi makasi  na motema. Ntango ndeko Russell akufaki, emonanaki ete bandeko mosusu bazalaki kokumisa ye koleka ndelo. Atako ndeko Russell azalaki kolinga te bápesa ye lokumu ya ndenge wana, bato mingi bazalaki kosambela ye lokola Nzambe. Bato mingi bakanisaki ete lokola akufi, solo ekopalangana lisusu te, mpe bamosusu bakómaki kotɛmɛla mpenza makasi bandeko oyo balingaki kokoba kokende liboso. Ezaleli wana ebimisaki lipɛngwi monene oyo ekabolaki lisangá.

33. Na ndenge nini bilikya oyo ekokisamaki te emekaki basaleli ya Nzambe?

33 Likambo mosusu oyo emekaki basaleli ya Nzambe ezali ete bilikya na bango ekokisamaki te. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki solo ete 1914 ezali mbula oyo Ntango ya Mabota ekosuka; kasi bandeko bayebaki naino te makambo oyo ekosalema na mbula yango. (Luka 21:24) Bakanisaki ete na mobu 1914, Kristo akoya kozwa mwasi na ye ya elilingi, elingi koloba bakristo oyo batyami mafuta na elimo, mpo bákende koyangela na ye na likoló. Makambo wana oyo bazelaki ekokisamaki te. Na nsuka ya mobu 1917, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete eleko moko ya kobuka mbuma ya mbula 40 ekosuka na 1918. Nzokande mosala ya kosakola esukaki te; ekobaki kokende liboso ata nsima ya mobu 1918. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete kobuka mbuma esilaki mpenza, kasi etikalaki eleko ya kolɔkɔta mbuma. Atako bongo, bato mingi batikaki kosalela Yehova mpo balɛmbaki nzoto.

34. Komekama nini ya makasi ebimaki na 1918, mpe mpo na nini bakonzi ya mangomba bakanisaki ete basaleli ya Nzambe “bakufi”?

34 Komekama mosusu ya makasi eyaki na 1918. Ndeko Joseph Rutherford, oyo azwaki esika ya ndeko Charles Russell, ná bandeko mosusu nsambo oyo bazalaki mpe na mikumba na lisangá bakɔtaki bolɔkɔ. Atako basalaki mabe te, bakatelaki bango bitumbu ya bambula ebele ya bolɔkɔ na Atlanta, na etúká ya Géorgie, na États-Unis. Na boumeli ya mwa ntango, emonanaki lokola ete mosala ya basaleli ya Nzambe etɛlɛmi. Bakonzi mingi ya mangomba ya bokristo basepelaki. Bakanisaki ete lokola “bakonzi” bakɔti bolɔkɔ, biro monene ya Brooklyn ekangami, mpe bapekisi mosala ya kosakola na Amerika mpe na Mpoto, Bayekoli ya Biblia, bato oyo bazalaki kotya bango mpanzi likoló, “bakufi,” bakotungisa bango lisusu te. (Em. 11:3, 7-10) Bamikosaki mpenza!

Bazwi lisusu makasi!

35. Mpo na nini Yesu atikaki ete mikakatano ekómela bayekoli na ye, mpe asalaki nini mpo na kosalisa bango?

35 Banguna bayebaki te ete soki Yesu atikaki mikakatano wana ekómela bayekoli na ye, ezalaki kaka mpo Yehova afandaki “lokola moto oyo anyangwisaka mpe apɛtolaka palata.” (Mal. 3:3) Yehova ná Mwana na ye bayebaki ete nsima ya komekama wana, bato ya sembo bakomonana, bakozala bato oyo bapɛtolami mpe oyo babongi mpenza mpo na kosalela Mokonzi. Kobanda 1919, emonanaki polele ete elimo ya Nzambe esalaki likambo oyo banguna ya basaleli na ye bakanisaki ete ekoki kosalema te. Bato ya sembo bazwaki lisusu makasi! (Em. 11:11) Na ntango wana, emonani ete Kristo asalaki likambo moko ya ntina mingi oyo ezalaki na kati ya elembo ya mikolo ya nsuka. Atyaki “moombo ya sembo mpe ya mayele,” mwa etuluku moke  ya bandeko mibali oyo bakokamba bayekoli na ye mpe bakobanda kopesa bango bilei ya elimo na ntango oyo ebongi.​—Mat. 24:45-47.

36. Nini emonisaki ete basaleli ya Nzambe bazwi lisusu makasi na elimo?

36 Ndeko Rutherford ná baninga na ye babimaki na bolɔkɔ na mokolo ya 26/03/1919. Kaka na mbula yango, babongisaki liyangani moko na sanza ya libwa. Bazwaki bibongiseli mpo bábanda kobimisa zulunalo mosusu na nkombo L’Âge d’Or. Zulunalo yango oyo ezalaki kobima nzela moko na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebongisamaki mpo esalelama na mosala ya kosakola. * Kaka na mbula yango, babimisaki nimero ya liboso ya Bulletin, oyo ezali lelo Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya Bakristo. Banda na ebandeli, elendisaka bandeko mpo na mosala ya kosakola. Ntembe ezali te ete kobanda 1919, mosala ya kosakola ndako na ndako mpo na kokutana na bato ekómaki na esika ya liboso.

37. Na bambula oyo elandaki 1919, ndenge nini bato mosusu bamonisaki ete bazali sembo te?

37 Mosala ya kosakola ekobaki kopɛtola bayekoli ya Kristo; baoyo bazalaki na lolendo mpe lofundo bandimaki te kosala mosala yango oyo esɛngaka komikitisa. Bato oyo balingaki mosala yango te bakabwanaki na bandeko oyo bazalaki sembo. Na bambula oyo elandaki 1919, bato yango mosusu basilikaki mpe  bakómaki koloba lokuta mpe kokoma mikanda ya lokuta; bamosusu kutu bakómaki ngámbo moko na bato oyo bazalaki konyokola basaleli ya sembo ya Yehova.

38. Ndenge bayekoli ya Kristo bazali kolonga na mokili oyo ya Satana, emonisi nini?

38 Atako bongo, bayekoli ya Kristo awa na mabele bazalaki se kokóma ebele mpe kokende liboso na elimo. Banda wana, likambo nyonso oyo balongi kosala emonisaka polele ete Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela! Kaka elimo santu mpe lipamboli oyo Nzambe azali kopesa bango na nzela ya Mwana na ye mpe ya Bokonzi ya Masiya nde esalisaka etuluku yango ya bato ya kozanga kokoka bálonga Satana mpe mokili na ye mabe mbala na mbala!​—Tángá Yisaya 54:17.

Ndeko Rutherford azali kosala diskur moko ya kafukafu na liyangani moko mwa basanza nsima ya kobima na bolɔkɔ

39, 40. (a) Buku oyo ezali na makambo nini? (b) Koyekola buku oyo ekoki kosalisa yo na nini?

39 Na mikapo oyo elandi, tokomona makambo oyo Bokonzi ya Nzambe esali awa na mabele banda etyamá na likoló na mobu 1914. Eteni mokomoko ya buku oyo ekolobela likambo moko na makambo oyo Bokonzi esali awa na mabele. Mokapo mokomoko ezali na etanda ya bozongeli oyo ekosalisa mokomoko na biso ayeba soki Bokonzi ezali likambo ya solo na miso na ye. Na mikapo ya nsuka, tokolobela makambo oyo Bokonzi yango ekosala mosika te ntango ekoya mpo na kobebisa bato mabe mpe kotya paradiso na mabele. Koyekola mokanda oyo ekosalisa yo na nini?

40 Satana alingi otika kondima ete Bokonzi ya Nzambe ezali likambo ya solo. Kasi, Yehova alingi kolendisa kondima na yo mpo ebatela yo mpe ekoba kopesa yo makasi. (Ef. 6:16) Yango wana, tozali kolendisa yo otya makanisi na yo nyonso ntango ozali koyekola mokanda oyo. Omitunaka boye: ‘Bokonzi ya Nzambe ezali likambo ya solo na miso na ngai?’ Soki ezali bongo banda sikoyo, mpe soki ozali kopesa Bokonzi yango mabɔkɔ na bosembo nyonso mpe na molende, okozala wana mokolo oyo moto nyonso akomona ete Bokonzi ya Nzambe ezali mpenza solo mpe ete ezali koyangela!

^ par. 7 Mpo na koyeba makambo etali Grew, Stetson, mpe Storrs, talá buku Les Témoins de Jéhovah​—Prédicateurs du Royaume de Dieu, nkasa 45 mpe 46.

^ par. 15 Bayekoli ya Biblia bamonaki ete basengeli kokabwana na mangomba oyo ekɔtaki na makambo ya mokili; kasi na boumeli ya bambula mingi, bakobaki kaka kotalela lokola bandeko, bato oyo, atako bazalaki Bayekoli ya Biblia te, bazalaki kondima lisiko mpe koloba ete bamipesaki na Nzambe.

^ par. 17 Likambo moko oyo esalaki ete makebisi ya ndenge wana ezala mpenza na nguya te ezali mpo bazalaki koloba ete etali kaka etonga moke ya Kristo oyo ezali na bato 144 000. Na mokapo ya 5, tokomona ete liboso ya 1935, bazalaki kokanisa ete na kati ya “ebele monene,” oyo Emoniseli 7:9, 10 elobeli na Biblia haut fleuve, ezali mpe na ebele ya bandimi ya mangomba ya bokristo mpe ete bakozwa bisika ya lokumu moke na likoló mpo bayaki na ngámbo ya Kristo na nsuka.

^ par. 31 Na sanza ya libwa 1920, zulunalo L’Âge d’Or (lelo Lamuká!) ebimisaki lisolo moko oyo elobelaki na mozindo ebele ya minyoko, misusu ya nsɔmɔ mpenza, oyo bandeko bakutanaki na yango na ntango ya etumba na Allemagne, na Angleterre, na Canada, mpe na États-Unis. Nzokande, mwa bambula liboso ya etumba ya liboso ya mokili mobimba, minyoko ya ndenge wana ezalaki mpenza te.

^ par. 36 Na boumeli ya bambula mingi, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki kobimisama mingimingi mpo na kolendisa bandeko oyo bazalaki na kati ya etonga moke.