Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

 MOKAPO 22

Bokonzi ekokisi mokano ya Nzambe na mabele

Bokonzi ekokisi mokano ya Nzambe na mabele

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Bokonzi ekokisi bilaka nyonso ya Nzambe oyo etali bato mpe mabele

1, 2. (a) Mpo na nini ekoki kozala mpasi mpo tóndima ete Paradiso ezali likambo ya solo? (b) Nini ekoki kosalisa biso tólendisa kondima na biso na bilaka ya Nzambe?

KANISÁ ete ndeko moko ayei na makita, auti mosala mpe alɛmbi makasi. Ndeko yango azali na mitungisi ebele: patrɔ na ye ya makambo makasimakasi anyokolaka ye, azali kobunda mpo na koleisa mpe kolatisa bato ya libota na ye, mpe azali komitungisa mpo mwasi na ye azali kobɛla. Na makita, loyembo ya ebandeli ekitisi ye motema, asepeli kozala na Ndako ya Bokonzi elongo na bandeko na ye. Loyembo yango elobeli elikya ya bomoi na Paradiso, mpe maloba na yango esɛngi ye akanisa elaka yango, mpe amimona na mokili ya sika. Alingaka loyembo yango mingi, mpe ntango azali koyemba yango elongo na libota na ye, elikya yango ebɔndisi ye.

2 Likambo ya ndenge wana esilá kokómela yo? Esilá kokomela bato mingi kati na biso. Kasi, bomoi na mokili oyo ya Satana ekoki kosala ete tóndima na mpasi ete Paradiso ekoya mpenza solo. Tozali na “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano,” mpe mokili oyo ezali mosika ya kozala paradiso. (2 Tim. 3:1) Nini ekoki kosalisa biso tómona ete elikya na biso ezali mpenza solo? Ndenge nini toyebi ete mosika te Bokonzi ya Nzambe ekoyangela bato nyonso? Tólobela mwa bisakweli mosusu ya Yehova oyo basaleli na ye ya ntango ya kala bamonaki ndenge ekokisamaki. Na nsima, tokomona ndenge oyo bisakweli yango mpe bisakweli mosusu ya ndenge wana ezali kokokisama lelo. Na nsuka, lokola kondima na biso ekolendisama, tokotalela ndenge oyo bisakweli yango ekokokisama mpo na biso na mikolo ezali koya.

Ndenge Yehova akokisaki bilaka na ye na ntango ya kala

3. Elaka nini ebɔndisaki Bayuda oyo bazalaki na boombo na Babilone?

3 Kanisá ndenge bomoi ya Bayuda ezalaki ntango bazalaki na boombo na Babilone na siɛklɛ ya motoba L.T.B. Ndenge moko na baboti na bango, Bayuda mingi bakolaki lokola baombo na mboka mopaya, mpe bomoi ezalaki mpasi. Bato ya Babilone bazalaki kotyola bango mpo bazalaki kondimela Yehova. (Nz. 137:1-3) Na boumeli ya bambula mingi, Bayuda ya sembo bakangamaki na elikya kaka moko oyo bazalaki na yango: Yehova alakaki ete akozongisa bato na ye na mboka na  bango. Yehova alobaki ete na mboka na bango, makambo ekozala malamu mpenza. Alobaki kutu ete mokili ya Yuda ekokóma lokola elanga ya Edene—paradiso! (Tángá Yisaya 51:3.) Ezali polele ete bilaka yango epesamaki mpo ekitisa bato ya Nzambe motema, mpe elongola kobanga oyo bakokaki kozala na yango. Na ndenge nini? Tólobela mwa bisakweli mosusu.

4. Ndenge nini Yehova amonisaki Bayuda ete kimya ekozala na mokili na bango?

4 Kimya. Bayuda oyo bazalaki na boombo balingaki kozonga na paradiso te, kasi na mokili moko oyo etikalaki mpamba mbula 70, oyo mingi kati na bango bamonaki yango naino te. Na ntango wana, bankɔsi, bambwa ya zamba, bankoi mpe banyama mosusu ya zamba bazalaki mingi. Na yango, batata ya mabota bakokaki komituna boye: ‘Ndenge nini nakobatela mwasi mpe bana na ngai? Ndenge nini nakobatela bibwɛlɛ mpe bangɔmbɛ na ngai?’ Komituna ndenge wana ezalaki mabe te. Kanisá sikoyo elaka ya Nzambe oyo ezali na Yisaya 11:6-9 mpe ndenge oyo elendisaki bango na ntango wana. (Tángá.) Na maloba wana kitoko ya elilingi, Yehova ayebisaki bato oyo bazalaki na boombo ete bango ná bibwɛlɛ na bango bakobatelama. Nkosi ekolya matiti ya kokauka—elingi koloba ete ekolya bangɔmbɛ ya Bayuda te. Bayuda oyo bazalaki na kondima bazalaki na ntina te ya kobanga banyama yango ya zamba. Yehova alakaki ete ntango bato na ye bakozonga na mokili ya Yuda bakozala na kimya, ata na esobe mpe na bazamba.Ezk. 34:25.

5. Bisakweli nini esalisaki Bayuda oyo bazalaki na boombo bándima ete Yehova akokokisa mpenza bamposa na bango?

5 Biloko beboo. Ekoki kozala ete batata ya mabota bazalaki komitungisa mpo na likambo mosusu. ‘Ntango tokozonga mboka na biso, nakosala nini mpo na koleisa bato ya libota na ngai? Tokofanda wapi? Nakozwa mosala? Ekozala malamu koleka mosala makasi oyo bato ya nko bazali kosalisa biso awa na mboka mopaya?’ Na nzela ya bisakweli oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo na ye, Yehova ayebisaki mpe ndenge akosilisa mikakatano wana. Alakaki ete akopesa bato ya botosi mbula mingi na mokili yango, mpe mabele ekobota mbuma ebele mpo na mampa. (Yis. 30:23) Na oyo etali bisika ya kofanda mpe mosala, Yehova alakaki mpo na bato na ye ete: “Bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga mpo moto mosusu afandaka kuna te; bakolona mpo moto mosusu alya te.” (Yis. 65:21, 22) Ya solo, na makambo mingi, bomoi elingaki kozala malamu koleka ndenge ezalaki na Babilone, mboka ya bapakano. Kasi ezalaki na mokakatano mosusu oyo elekaki monene, oyo esalaki ete bámemama na boombo!

6. Boyokani ya Bayuda ná Nzambe ekómaki ndenge nini banda kala, kasi Yehova alakaki nini epai ya Bayuda oyo bakozonga na mboka na bango?

6 Losambo. Kala mpenza liboso bámemama na boombo, Bayuda bazalaki lisusu na boyokani malamu te na Nzambe. Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova alobaki na bato na ye ete: “Motó mobimba ezali na maladi, mpe motema mobimba elɛmbi.” (Yis. 1:5) Na ndenge ya elimo, bazalaki bato bakufá miso  mpe bato oyo bayokaka te mpamba te bazalaki lisusu koyoka toli ya Yehova te, mpe bakangaki miso na pole oyo azalaki kotindela bango. (Yis. 6:10; Yis. 5:21; Ezk. 12:2) Soki makambo ya ndenge wana ekómeli lisusu bato oyo bauti na boombo, bakozala na kimya ata moke te. Boyokani na bango na Yehova ekobeba lisusu. Na yango, elaka oyo Yehova apesaki ekitisaki mpenza mitema; elobaki ete: “Na mokolo yango, bato oyo bakufá matoi bakoyoka maloba ya buku oyo, mpe miso ya bato oyo bakufá miso ekolongwa na . . . molili makasi mpe ekomona.” (Yis. 29:18) Ya solo, Yehova akozongisa boyokani malamu kati na ye na bato na ye oyo babongoli mitema. Soki bakobi kotosa ye mpe kosalela mitindo na ye, akolakisa bango nzela mpe akopesa bango malako oyo ekobatela bomoi na bango.

7. Ndenge nini bilaka oyo Nzambe apesaki Bayuda ekokisamaki, mpe mpo na nini yango esengeli kolendisa kondima na biso?

7 Yehova akokisaki bilaka na ye? Tokozwa eyano soki totaleli ndenge makambo elekaki. Bayuda oyo bazongaki na mokili na bango bazalaki na kimya, na biloko beboo, mpe boyokani na bango na Nzambe ebongaki. Na ndakisa, Yehova abatelaki bango na bato ya bikólo ya zingazinga oyo bazalaki makasi mpe ebele koleka bango. Banyama mabe balyaki bibwɛlɛ ya Bayuda te. Ya solo, Bayuda wana bamonaki kaka mwa moke kokokisama ya bisakweli kitoko oyo bato lokola Yisaya, Yirimia, mpe Ezekiele bakomaki, kasi komona kokokisama ya bisakweli yango epesaki bango esengo mingi mpe yango nde basengelaki na yango na ntango wana. Soki tokanisi makambo oyo Yehova asalelaki bato na ye na ntango wana, kondima na biso ekokóma makasi. Soki kokokisama ya moke ya bisakweli wana epesaki esengo mingi, kokokisama na yango na monene ekozala esengo makasi koleka! Tótalela makambo oyo Yehova asali mpo na biso lelo.

Ndenge Yehova azali kokokisa bilaka na ye na ntango na biso

8. Basaleli ya Nzambe lelo bazali na kati ya “mokili” ya ndenge nini?

8 Basaleli ya Yehova lelo bazali bango nyonso na ekólo moko te, mpe bafandi bango nyonso na mokili moko te. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali na ekólo moko ya elimo, “Yisraele ya Nzambe.” (Gal. 6:16) Elongo na baninga na bango ya “bampate mosusu,” bazali na “mokili” moko ya elilingi, epai basambelaka Yehova Nzambe na bomoko. Losambo yango nde etambwisaka bomoi na bango. (Yoa. 10:16; Yis. 66:8) Yehova apesi biso “mokili” ya ndenge nini? Mokili yango ezali paradiso ya elimo. Na paradiso yango, bilaka kitoko oyo Nzambe apesaki Bayuda oyo bazalaki na boombo ezali kokokisama na ndenge ya elilingi. Tótalela mwa bandakisa.

9, 10. (a) Ndenge nini esakweli ya Yisaya 11:6-9 ezali kokokisama lelo? (b) Nini emonisi ete basaleli ya Nzambe lelo bazali na kimya?

9 Kimya. Esakweli oyo ezali na Yisaya 11:6-9 elobelaki bomoko mpe kimya kati na banyama ya zamba mpe kati na bato ná banyama ya mboka. Esakweli yango ezali kokokisama na ndenge ya elilingi lelo? Ɛɛ! Vɛrsɛ 9 emonisi ete bikelamu yango ekosala eloko moko te ya mabe mpe ekobebisa eloko  moko te “mpo mabele ekotonda na boyebi ya Yehova ndenge mai etondi na mbu.” “Boyebi ya Yehova” ebongolaka nde bizaleli ya banyama? Te, bato nde babongwanaka ntango bayebi Nzambe Oyo-Aleki-Nyonso mpe bayekoli komekola bizaleli na ye oyo etyaka kimya. Yango wana na paradiso na biso ya elimo lelo, tozali komona ndenge esakweli wana ekokisami. Lokola Bokonzi ezali kotambwisa basaleli ya Nzambe, bazali koyekola kolongola bizaleli ya mabe, ya bonyama, mpe bazali kofanda na kimya mpe na bomoko elongo na bandeko na bango ya elimo.

10 Na ndakisa, na mokanda oyo tolobelaki likambo ya koboya kokɔta na makambo ya mokili. Tolobelaki mitinda ya Biblia oyo epekisi biso kosala yango mpe botɛmɛli oyo basaleli ya Nzambe bakutanaki na yango mpo baboyaki kokɔta na makambo ya mokili. Ezali likambo ya kokamwa mpenza komona ete na mokili oyo etondi na mobulu, ezali na “ekólo” moko oyo bato na yango baboyaka kokɔta na makambo nyonso ya mobulu, ata soki balingi koboma bango. Yango ezali mpenza komonisa ete ya solo, bana-mboka ya Bokonzi ya Masiya bazali na kimya oyo Yisaya alobelaki! Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakoyebana mpo na bolingo oyo bazali komoniselana. (Yoa. 13:34, 35) Na kati ya lisangá, Kristo azali kosalela “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na koteya mbala na mbala  bakristo nyonso ya solo ete basengeli kozala bato oyo batyaka kimya, oyo balingaka basusu, mpe bato ya boboto.Mat. 24:45-47.

11, 12. Mokili ezali na nzala ya ndenge nini lelo, kasi ndenge nini Yehova azali koleisa mpenza basaleli na ye?

11 Biloko beboo. Mokili oyo ezali na nzala ya elimo. Biblia elobaki boye: “ ‘Talá! Mikolo ezali koya,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘mpe nakotinda nzala kati na mokili, nzala ya mampa te, mpe nakotinda mposa, mposa ya mai te, kasi nde ya koyoka maloba ya Yehova.’” (Amo. 8:11) Bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe mpe bazali na nzala ya elimo? Ata moke te; Yehova amonisaki bokeseni kati na basaleli na ye mpe banguna na ye na maloba oyo: “Basaleli na ngai bakolya, kasi bino bokozala na nzala. Talá! Basaleli na ngai bakomɛla, kasi bino bokozala na mposa ya mai. Talá! Basaleli na ngai bakosepela, kasi bino bokozala na nsɔni.” (Yis. 65:13) Ndenge nini maloba yango ezali kokokisama?

12 Tozali na bilei ya elimo ebele mpenza. Mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia, bakasɛti, ba-CD, bavideo, ata mpe makita, mayangani na biso mpe makambo oyo tobimisaka na site Internet na biso, nyonso wana ezali ebele ya bilei ya elimo oyo tozali kozwa na kati ya mokili oyo bato bazali kokufa nzala ya elimo. (Ezk. 47:1-12; Yoe. 3:18) Osepelaka te komona ndenge bilaka wana ya Yehova ezali kokokisama na miso na yo? Olyaka mokolo na mokolo na mesa ya Yehova?

Lisangá esalisaka biso tólya malamu na elimo, tózala na kimya, mpe na makasi

13. Ndenge nini omonaki bato bakufá miso bazali komona mpe baoyo bakufá matoi bazali koyoka, ndenge Yehova alakaki yango?

13 Losambo. Molili ya elimo epalangani na mokili lokola maladi moko ya mabe. (2 Ko. 4:4) Atako bongo, Kristo azali kobikisa bato na mokili mobimba. Osilá komona miso ya moto efungwami, mpe matoi ya moto ekómi koyoka? Soki omoná bato bazwi boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe, batiki mateya ya mangomba ya lokuta oyo ekómisaki bango bato bakufá miso mpe matoi ya elimo, boye, omoná kokokisama ya elaka oyo ete: “Na mokolo yango, bato oyo bakufá matoi bakoyoka maloba ya buku oyo, mpe miso ya bato oyo bakufá miso ekolongwa na . . . molili makasi mpe ekomona.” (Yis. 29:18) Na mokili mobimba, bankóto na bankóto ya bato bazali kobikisama na elimo mbula na mbula. Moto nyonso oyo alongwe na Babilone Monene mpe ayei na losambo ya solo na kati ya paradiso ya elimo azali elembeteli ya polele oyo emonisi ete bilaka ya Yehova ekokisami mpenza!

14. Komanyola likambo nini ekokómisa kondima na biso makasi?

14 Mokapo mokomoko ya buku oyo elobeli likambo moko oyo ezali elembeteli monene ete Kristo atye bayekoli na ye na paradiso ya elimo na mikolo oyo ya nsuka. Tiká ete tókoba komanyola ebele ya mapamboli oyo tozali na yango na paradiso ya elimo lelo oyo. Soki tosali bongo, kondima na biso na bilaka oyo Yehova akokokisa na mikolo ezali koya ekokóma makasi koleka.

“Bokonzi na yo eya”

15. Mpo na nini tokoki mpenza kondima ete mabele ekokóma paradiso?

15 Banda kala, mokano ya Yehova ezali ete mabele mobimba ekóma paradiso. Atyaki Adama ná Eva na elanga moko  oyo ezalaki paradiso, mpe apesaki bango mitindo ete bábota mpe bátondisa mabele, mpe bábatela bikelamu nyonso oyo ezalaki kuna. (Eba. 1:28) Nzokande, Adama ná Eva bakɔtaki na botomboki ya Satana mpe batikelá bana na bango nyonso kozanga kokoka, lisumu, mpe liwa. Kasi, mokano ya Nzambe ebongwani te. Soki alobi likambo, ezangaka kokokisama te. (Tángá Yisaya 55:10, 11.) Na yango, tokoki mpenza kondima ete bana ya Adama ná Eva bakotondisa mabele mpe bakotya yango na nse na bango; bakobatela bozalisi ya Yehova na paradiso na mabele mobimba. Na ntango wana, bisakweli kitoko oyo Nzambe apesaki Bayuda oyo bazalaki na boombo ekokokisama malamumalamu! Tótalela mwa bandakisa.

16. Ndenge nini Biblia emonisi kimya oyo tokozala na yango na Paradiso?

16 Kimya. Nsukansuka, maloba ya Yisaya 11:6-9 ekokokisama malamumalamu na ndenge ya solo. Mibali, basi, mpe bana bakozala na kimya esika nyonso oyo bakokende na mabele mobimba. Ekelamu moko te, ezala moto to nyama, akonyokola basusu. Kanisá ntango oyo okobanda komona mabele mobimba lokola ndako na yo, epai okoki kobɛta mai na ebale, na laki, mpe na mbu; okoki kokatisa bangomba, mpe kotambolatambola na esobe na kimya nyonso. Mpe soki butu ekɔti, okobanga eloko te. Maloba ya Ezekiele 34:25 ekokokisama mpo basaleli ya Nzambe bákoka ‘kofanda mpenza na kimya na esobe mpe bakolala na bazamba.’

17. Mpo na nini tokoki mpenza kondima ete Yehova akokokisa mpenza bamposa na biso ntango Bokonzi ekoyangela mabele mobimba?

17 Biloko beboo. Kanisá ntango oyo makambo lokola bobola, nzala, bibongiseli ya kosunga babola ekozala lisusu te. Bilei beboo ya elimo oyo basaleli ya Nzambe bazali na yango lelo oyo emonisi ete Masiya Mokonzi akoleisa mpenza bato na ye na elimo mpe na mosuni. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki mwa moke ete azali na likoki ya kokokisa bilaka yango, na ndenge aleisaki bankóto ya bato kaka na mampa mpe mbisi moke. (Mat. 14:17, 18; 15:34-36; Mrk. 8:19, 20) Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele mobimba, tokomona kokokisama ya bisakweli lokola oyo: “Akopesa mpenza mbula mpo na momboto na yo oyo ozali kolona na mabele, mpe mbuma ya mabele nde mampa, oyo ekokóma mpenza na mafuta mpe ekozala mafutamafuta. Na mokolo yango, bibwɛlɛ na yo ekolya na esika monene ya kolya matiti.”Yis. 30:23.

18, 19. (a) Esakweli ya Yisaya 65:20-22 ekomemela yo matomba nini? (b) Na ndenge nini mikolo na biso ekozala “lokola mikolo ya nzete”?

18 Mpo na bato mingi, kozala na ndako ya malamu mpe mosala ya malonga lelo oyo ezalaka kaka ndɔtɔ mpamba. Na mokili oyo mabe, bato mingi bamonaka ete basalaka mosala makasi mokolo mobimba, kasi yango ezalaka na litomba te mpo na bango moko mpe libota na bango, nzokande bato ya bozwi mpe bato ya lokoso bazwaka matomba nyonso. Kanisá sikoyo ndenge bomoi ekozala ntango esakweli oyo ekokokisama na mokili mobimba: “Bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga mpo moto mosusu afandaka  kuna te; bakolona mpo moto mosusu alya te. Mpo mikolo ya bato na ngai ekozala lokola mikolo ya nzete; mpe bato oyo naponi bakozwa mpenza litomba na mosala ya mabɔkɔ na bango.”Yis. 65:20-22.

19 Koloba ete mikolo na biso “ekozala lokola mikolo ya nzete” elimboli nini? Ntango otɛlɛmi na nse ya nzete moko monene, na ntembe te okamwaka soki okanisi ebele ya bambula oyo nzete yango esali wana, mbala mosusu kutu liboso bankɔkɔ ya bankɔkɔ na yo bábotama! Okoki komona ete soki otikali kaka moto ya kozanga kokoka, lobilobi okokufa, kasi nzete yango ekotikala kaka wana, epikami na kimya, nzokande yo osilá kopɔla. Yehova azali malamu mpenza ndenge alaki biso ete na Paradiso, mikolo na biso ekozala molai mpe tokozala na kimya! (Nz. 37:11, 29) Mokolo mosusu, ata nzete oyo eumeli ndenge nini ekomonana na miso na biso lokola matiti mpamba, ekokufa mpe mosusu ekobota, wana biso tokozala na bomoi libela na libela!

20. Ndenge nini bana-mboka ya sembo ya Bokonzi bakokóma bato ya kokoka?

20 Nzoto kolɔngɔnɔ. Lelo oyo, maladi ná liwa ezali konyokola bato bisika nyonso na mokili. Tokoki koloba ete biso nyonso tozali na maladi moko oyo ememaka na liwa: lisumu. Nkisi kaka moko mpo na yango ezali mbeka ya lisiko ya Kristo. (Rom. 3:23; 6:23) Na Boyangeli ya Mbula nkóto, Yesu ná bato oyo bakoyangela elongo na ye bakosalisa bato bázwa mpenza matomba ya mbeka ya lisiko, mpe mbeba oyo lisumu ememá ekolongwa mokemoke. Esakweli moko ya Yisaya ekokokisama mpenza na ndenge ya solo ete: “Moto moko te oyo afandi kuna akoloba: “Nazali na maladi.” Bato oyo bafandi na mokili yango bakolimbisama libunga na bango.” (Yis. 33:24) Kanisá ntango bakufi miso bakozala te, bababa te, batɛngumi mpe te. (Tángá Yisaya 35:5, 6.) Yesu akosilisa maladi nyonso, ezala ya nzoto to ya makanisi. Bana-mboka ya sembo ya Bokonzi bakokóma bato ya kokoka!

21. Liwa ekosuka ndenge nini, mpe mpo na nini elaka yango ezali kobɔndisa yo?

21 Bongo liwa? Liwa ezali “monguna ya nsuka,” oyo lelo to lobi, esukisaka moto nyonso ya kozanga kokoka. (1 Ko. 15:26) Kasi, liwa ezali mpe monguna oyo ebangisaka Yehova? Talá makambo oyo Yisaya asakolaki: “Akolongola mpenza liwa mpo na libela, mpe Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova akopangwisa mpenza mpisoli na bilongi nyonso.” (Yis. 25:8) Kanisá naino. Bibembe ekozala lisusu te, matangá te, malita te, mpe kolela te! Tokolela nde na esengo ntango Yehova akokokisa elaka kitoko ya kozongisa bakufi na bomoi! (Tángá Yisaya 26:19.) Nsukansuka, ebele ya bampota oyo tozoká na mitema likoló ya liwa ekosila!

22. Nini ekosalema ntango Bokonzi ya Masiya ekokokisa mokano ya Nzambe na mabele?

22 Na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, Bokonzi ekosila kokokisa mokano ya Nzambe na mabele, mpe Kristo akozongisa boyangeli epai ya Tata na ye. (1 Ko. 15:25-28) Bato, oyo na ntango wana bakozala bato ya kokoka, bakomekama mpo na mbala ya nsuka ntango Satana akobimisama na  libulu mozindo. Na nsima, Kristo akoboma nyoka yango ya nsɔmɔ mpe bikelamu nyonso oyo bakozala na ngámbo na ye. (Eba. 3:15; Em. 20:3, 7-10) Kasi, bato nyonso ya sembo oyo balingaka Yehova bakozwa bolamu mingi. Mbala mosusu, ezali na liloba moko te oyo ekoki komonisa malamumalamu elaka oyo Biblia epesi ete bato ya sembo bakozwa “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.”Rom. 8:21.

Bokonzi ekokokisa bilaka nyonso ya Yehova mpo na bato mpe mabele

23, 24. (a) Mpo na nini bilaka ya Nzambe ekozanga te kokokisama? (b) Ekateli nini ozwi?

23 Bilaka wana ezali ndɔtɔ to bilikya ya mpambampamba te. Bilaka yango ya Yehova ekokokisama mpenza! Mpo na nini? Kanisá lisusu maloba ya Yesu oyo tolobelaki na mokapo ya liboso ya buku oyo. Ateyaki bayekoli na ye bábondelaka Yehova ete: “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Mat. 6:9, 10) Bokonzi ya Nzambe ezali te likambo oyo moto abimisi na makanisi na ye. Ezali likambo ya solo! Ezali sikoyo koyangela na likoló. Eleki sikoyo mbula 100, Bokonzi ya Nzambe ekokisi bilaka ya Yehova na ndenge oyo tokoki komona polele na lisangá ya bokristo. Na yango, tokoki mpenza kondima ete bilaka nyonso ya Yehova ekokokisama ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya mpo na komonisa nguya na yango nyonso awa na mabele!

24 Toyebi ete Bokonzi ya Nzambe ekoya. Toyebi ete likambo nyonso oyo Yehova alaki ekokokisama. Mpo na nini? Mpo BOKONZI YA NZAMBE EZALI KOYANGELA! Motuna oyo mokomoko na biso asengeli komituna yango oyo: ‘Bokonzi yango ezali koyangela ngai?’ Tiká tósala nyonso oyo tokoki mpo tózala bana-mboka ya sembo ya Bokonzi yango banda sikoyo, mpo tózwa matomba na boyangeli na yango ya kokoka, ya bosembo mpe libela na libela!

Makambo mosusu

Pusaná penepene na Yehova

Nguya ya kozongisa makambo ndenge ezalaki—Yehova azali “kosala biloko nyonso biloko ya sika”

Yehova asili kozongisa losambo ya pɛto. Akozongisa nini na mikolo ezali koya?

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—YA BOYEKOLI

Zalá na kondima makasi na elikya ya Bokonzi

Yehova asalelaki kondimana nsambo mpo na kondimisa biso ete Bokonzi na ye ekokokisa mokano na ye. Ndenge nini kondimana yango nyonso esalisaka biso tókóma na kondima makasi?