Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

 MOKAPO 21

Bokonzi ya Nzambe elongoli banguna na yango

Bokonzi ya Nzambe elongoli banguna na yango

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Makambo oyo ekomema na etumba ya Armagedone

1, 2. (a) Nini emonisi ete Mokonzi na biso azali koyangela banda 1914? (b) Tokolobela nini na mokapo oyo?

KONDIMA na biso elendisami mpenza ndenge totaleli makambo oyo Bokonzi ya Nzambe esali na katikati ya banguna na yango. (Nz. 110:2) Mokonzi na biso abongisi limpinga mobimba ya basakoli oyo bamipesi na bolingo na bango moko. Apɛtoli bayekoli na ye na elimo mpe na bizaleli. Mpe atako banguna ya Bokonzi basali nyonso mpo na kokabola biso, biso nyonso na mokili mobimba lelo oyo tozali na bomoko. Makambo wana mpe makambo mosusu ebele oyo Bokonzi esali, oyo tolobeli na buku oyo, emonisi polele mpenza ete banda 1914, Mokonzi na biso azali koyangela na katikati ya banguna ya Bokonzi.

2 Mosika te, Bokonzi ekosala makambo mosusu ya kokamwa koleka. Bokonzi ‘ekoya’ mpo na ‘kotuta mpe kosukisa’ banguna na yango. (Mat. 6:10; Dan. 2:44) Kasi, liboso ntango yango ekóma, makambo mosusu ya minene ekosalema. Makambo yango nini? Bisakweli ebele ya Biblia epesi eyano na motuna yango. Tótalela bisakweli yango mosusu mpo tóyeba makambo nini ekosalema na mikolo ezali koya.

Liboso ete “libebi ya mbalakaka” eya

3. Likambo nini ya liboso tozali kozela?

3 Kosakola kimya. Na mokanda na ye epai ya Batesaloniki, ntoma Paulo alobelaki likambo ya liboso oyo tozali kozela. (Tángá 1 Batesaloniki 5:2, 3.) Na mokanda yango, Paulo alobelaki “mokolo ya Yehova,” oyo ekobanda na kobebisama ya “Babilone Monene.” (Em. 17:5) Kasi, mwa moke liboso mokolo ya Yehova ebanda, mabota ekoloba “Kimya, likambo ya kobanga ezali te!” Maloba yango ekoki kolobama mbala moko to mbala ebele. Bakonzi ya mangomba mpe bakoloba yango? Lokola bazali bato ya mokili oyo, mbala mosusu bakoloba elongo na mabota ete: “Kimya ezali!” (Yir. 6:14; 23:16, 17; Em. 17:1, 2) Kosakolama wana ya “kimya, likambo ya kobanga ezali te,” ekomonisa ete mokolo ya Yehova elingi kobanda. Banguna ya Bokonzi ya Nzambe “bakokima soki moke te.”

4. Koyeba ndimbola ya esakweli ya Paulo oyo etali kosakolama ya “kimya, likambo ya kobanga ezali te” ezali na litomba nini mpo na biso?

 4 Koyeba ndimbola ya esakweli yango ezali na litomba nini mpo na biso? Paulo alobaki ete: “Bozali na molili te, mpo mokolo wana ebimela bino pwasa lokola nde ebimeli miyibi.” (1 Tes. 5:3, 4) Biso tokeseni na bato ya mokili mpamba te toyebi esika makambo ya mokili oyo ezali kokende. Ndenge nini mpenza esakweli ya “kimya, likambo ya kobanga ezali te,” ekokokisama? Toyebi te, tózela kaka. Yango wana, “tózala . . . ekɛngɛ mpe tóbatela makanisi na biso.”1 Tes. 5:6; Sef. 3:8.

Kobanda ya bolɔzi monene

5. Likambo nini ekozala ebandeli ya “bolɔzi monene”?

5 Kobebisama ya mangomba. Tóbosana te ete Paulo akomaki: “Na ntango oyo bato bakoloba ete: ‘Kimya, likambo ya kobanga ezali te!’ na ntango yango libebi ya mbalakaka ekoyela bango na mbala moko.” Ndenge kaka nkake ebɛtaka mbala moko nsima ya mokalikali, “libebi ya mbalakaka” ekoya na mbala moko nsima ya maloba “Kimya, likambo ya kobanga ezali te!” Nini ekobebisama? Ekozala liboso “Babilone Monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba, oyo Biblia ebengi mpe ‘mwasi ya ndumba.’ (Em. 17:5, 6, 15) Kobebisama ya mangomba nyonso ya bokristo mpe mangomba mosusu nyonso ya lokuta nde ekozala ebandeli ya ‘bolɔzi monene.’ (Mat. 24:21; 2 Tes. 2:8) Bato mingi bakosutuka ntango likambo yango ekosalema. Mpo na nini? Mpo tii na ntango wana, mwasi ya ndumba akozala kaka komimona lokola “mokonzi” oyo ‘akomona mawa ata moke te.’ Kasi, akomona mbala moko ete azalaki kobɛta ntolo kaka mpamba. Akobomama nokinoki, lokola “na mokolo kaka moko.”Em. 18:7, 8.

6. Nini to nani akobundisa “Babilone Monene”?

6 Nini to nani akobundisa “Babilone Monene”? “Nyama mabe” ya “maseke zomi.” Mokanda ya Emoniseli emonisi ete nyama mabe yango ezali ONU. Maseke zomi ezali elilingi ya bakonzi nyonso ya politiki oyo bazali kosunga nyama mabe yango “ya langi ya motane makasi.” (Em. 17:3, 5, 11, 12) Libebi yango ekozala nsɔmɔ mpenza. Bikólo ya ONU ekopunza bozwi nyonso ya mwasi ya ndumba, ekolya misuni na ye, mpe “ekozikisa ye na mɔtɔ nyɛɛ.”Tángá Emoniseli 17:16. *

7. Ndenge nini maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 24:21, 22 ekokisamaki na siɛklɛ ya liboso, mpe ndenge nini ekokokisama na mikolo ezali koya?

7 Koyeisa mikolo yango mokuse. Mokonzi na biso Yesu alobelaki makambo oyo ekosalema na ntango wana ya bolɔzi monene. Alobaki boye: “Mpo na bato oyo baponami mikolo yango ekoyeisama mokuse.” (Tángá Matai 24:21, 22.) Maloba ya Yesu ekokisamaki mpo na mbala ya liboso na mobu 66 T.B., ntango Yehova ‘ayeisaki mokuse’ etumba ya Baroma na Yerusaleme. (Mrk. 13:20) Likambo wana epesaki bakristo ya Yerusaleme mpe ya Yudea nzela ya kokima mpo bábika. Kasi, ndenge nini maloba yango ekokokisama na monene na yango na boumeli ya bolɔzi monene oyo ezali  koya? Na nzela ya Mokonzi na biso, Yehova ‘akoyeisa mokuse’ etumba oyo ONU ekobundisa mangomba, mpo lingomba ya solo ebebisama te elongo na mangomba ya lokuta. Na yango, ntango mangomba nyonso ya lokuta ekobebisama, lingomba ya solo ekotikala. (Nz. 96:5) Sikoyo, tólobela makambo mosusu oyo ekosalema nsima ya eteni yango ya bolɔzi monene.

Makambo oyo ekomema na Armagedone

8, 9. Mbala mosusu Yesu alobelaki makambo nini ya nsɔmɔ, mpe bato bakosala nini soki bamoni yango?

8 Esakweli ya Yesu mpo na mikolo ya nsuka emonisi ete makambo ebele ya minene ekosalema liboso ya Armagedone. Makambo mibale ya liboso oyo tokolobela ezali na Evanzile ya Matai, ya Marko, mpe ya Luka.Tángá Matai 24:29-31; Mrk. 13:23-27; Luka 21:25-28.

9 Bilembo na likoló. Yesu alobaki boye: “Sanza ekopesa pole na yango te, mpe minzoto ekouta na likoló ekwei.” Na ntembe te, bato bakoluka lisusu litambwisi ya bakonzi ya mangomba te, mpo bakotalelama lisusu lokola pole te. Maloba wana ya Yesu elingaki mpe komonisa ete makambo ya nsɔmɔ ekosalema na likoló? Ntango mosusu. (Yis. 13:9-11; Yoe. 2:1, 30, 31) Bato bakosala nini ntango bakomona makambo wana? “Bakozala na nsɔmɔ” mpo “bakoyeba te ndenge ya kosala.” (Luka 21:25; Sef. 1:17) Ya solo, banguna ya Bokonzi ya Nzambe, banda na ‘bakonzi tii na baombo,’ “bakolɛmba nzoto na kobanga mpe na kozela makambo oyo ezali koya” mpe bakoluka esika ya komibomba. Kasi, bakozwa esika moko te oyo ekokoka kobomba bango mpo bákima nkanda ya Mokonzi na biso.Luka 21:26; 23:30; Em. 6:15-17.

10. Lisambisi nini Yesu akokweisa, mpe baoyo bazali na ngámbo ya Bokonzi ya Nzambe mpe banguna bakosala nini?

10 Kosambisa. Na ntango wana, banguna nyonso ya Bokonzi ya Nzambe bakomona likambo moko oyo ekobakisela bango mpenza bwale. Yesu alobaki boye: “Bakomona Mwana ya moto azali koya na mapata na nguya makasi mpe na nkembo.” (Mrk. 13:26) Likambo wana ya nsɔmɔ oyo Yesu akosala mpo na komonisa nguya na ye ekolakisa ete ayei kosambisa. Na esika mosusu oyo Yesu alobelaki mpe esakweli oyo etali mikolo ya nsuka, alobaki makambo ebele mpo na lisambisi yango. Makambo yango ezali na ndakisa ya bampate ná bantaba. (Tángá Matai 25:31-33, 46.) Bato ya sembo oyo bandimi Bokonzi ya Nzambe bakozala na ngámbo ya “bampate” mpe ‘bakotombola mitó na bango,’ mpo bakomona ete ‘kosikolama na bango ekómi pene.’ (Luka 21:28) Kasi, banguna ya Bokonzi bakozala na ngámbo ya “bantaba” mpe “bakomibɛtabɛta na kolela,” mpo bakomona ete “bakokufa liwa ya seko.”Mat. 24:30; Em. 1:7.

11. Likambo nini tosengeli kobosana te wana tozali kotalela makambo oyo ezali koya?

11 Nsima ya ntango oyo Yesu akosambisa “bikólo nyonso,” makambo mosusu ya minene ekosalema liboso etumba ya Armagedone ebanda. (Mat. 25:32) Tokolobela  makambo mibale kati na yango: etumba ya Goge mpe koyanganisama ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Wana tozali kotalela makambo yango mibale, tosengeli kobosana te ete Liloba ya Nzambe eyebisi na bosikisiki te ntango oyo makambo yango ekosalema. Kutu, emonani lokola ete na ntango moko boye, makambo yango mosusu ekokutana.

12. Na ndenge nini Satana akobundisa Bokonzi mpo na mbala ya nsuka?

12 Kobundisa basaleli ya Nzambe. Goge ya Magoge akobundisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bakozala naino awa na mabele ná baninga na bango bampate mosusu. (Tángá Ezekiele 38:2, 11.) Satana akobundisa Bokonzi ya Nzambe oyo ezali koyangela na ndenge akobundisa mpo na mbala ya nsuka bakristo oyo batyami mafuta na elimo, na etumba oyo abundisaka bango banda babenganá ye na likoló. (Em. 12:7-9, 17) Mingimingi banda bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakómaki koyanganisama na lisangá ya bokristo oyo epɛtolami, Satana alukaki kobebisa paradiso na bango ya elimo, kasi alongi te. (Mat. 13:30) Kasi, ntango bibongiseli nyonso ya mangomba ya lokuta ekobebisama mpe ekomonana lokola ete basaleli ya Nzambe “bafandi kozanga efelo, mpe bazali kutu na ekangiseli te, baporte mpe te,” Satana akomona yango libaku ya malamu. Akotinda bato na ye bábundisa bato ya Bokonzi ya Nzambe.

13. Ndenge nini Yehova akokɔtela basaleli na ye?

13 Ezekiele alobelaki makambo oyo ekosalema. Esakweli na ye elobaki boye mpo na Goge: “Okouta mpenza na esika na yo, na nsukansuka ya nɔrdi, yo mpe bato ya bikólo ebele elongo na yo, bango nyonso bamati na bampunda, lisangá moko monene, ɛɛ, limpinga moko monene ya basoda. Mpe okozanga te koya kobundisa bato na ngai.” (Ezk. 38:15, 16) Yehova akosala nini mpo na likambo wana oyo ekomonana lokola ete ekosuka te? Yehova alobi boye: “Nkɛlɛ na ngai ekomata na zolo na ngai.” Mpe “nakobenga mopanga.” (Ezk. 38:18, 21; tángá Ezekiele 2:8.) Yehova akokɔtela basaleli na ye awa na mabele. Kokɔtela yango nde etumba ya Armagedone.

14, 15. Likambo nini mosusu ekosalema mwa moke nsima ya etumba oyo Satana akobundisa bato ya Nzambe?

14 Liboso tólobela ndenge Yehova akokɔtela bato na ye na ntango ya etumba ya Armagedone, tólobela naino likambo mosusu ya ntina mingi. Likambo yango ekosalema na ntango moko boye, kati na eleko oyo Satana akobanda kobundisa basaleli ya Yehova mpe oyo Yehova akokɔtela bango na Armagedone. Ndenge tomonaki yango na paragrafe 11, likambo yango ya mibale ezali koyanganisama ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele.

15 Koyanganisama ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Evanzile ya Matai ná ya Marko emonisi ete makambo oyo Yesu alobaki mpo na “baponami” (bakristo oyo batyami mafuta na elimo) ezali na kati ya makambo oyo ekosalema  liboso etumba ya Armagedone ebanda. (Talá paragrafe 7.) Alobaki ete ye Mokonzi “akotinda baanzelu mpe bakoyanganisa baponami na ye esika moko uta na mipɛpɛ minei, uta na nsuka ya mabele tii na nsuka ya likoló.” (Mrk. 13:27; Mat. 24:31) Koyanganisama nini Yesu azalaki kolobela? Alobelaki te ntango oyo bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakotyama elembo ya nsuka mpamba te likambo yango ekosalema nde mwa moke liboso bolɔzi monene ebanda. (Em. 7:1-3) Yesu alobelaki nde likambo oyo ekosalema na boumeli ya bolɔzi monene. Na yango, emonani ete na ntango moko boye, nsima ya ntango oyo Satana akobanda kobundisa basaleli ya Nzambe, bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bakozala naino na mabele, bakoyanganisama na likoló.

16. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo, wana basili kosekwa, bakosala nini na etumba ya Armagedone?

16 Boyokani nini ezali kati na koyanganisama wana mpe likambo oyo ekosalema na nsima, elingi koloba Armagedone? Ntango oyo koyanganisama wana ekosalema emonisi ete bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo bakozala na likoló liboso etumba ya Armagedone ebanda. Na likoló, elongo na Yesu, bato 144 000 bakozwa bokonzi ya kosalela “lingenda ya ebende” ya kobebisa banguna nyonso ya Bokonzi ya Nzambe. (Em. 2:26, 27) Na nsima, elongo na baanzelu ya nguya, bakristo oyo batyami mafuta na elimo, wana basili kosekwa, bakolanda Kristo, Mokonzi-Mobundi, ntango akobundisa ‘limpinga monene’ ya banguna oyo ekopusana mpo na kosilisa basaleli ya Yehova. (Ezk. 38:15) Etumba yango ya nsɔmɔ nde ezali etumba ya Armagedone!Em. 16:16.

Nsuka ya bolɔzi monene

Etumba ya Armagedone ebandi!

17. Nini ekokómela “bantaba” na ntango ya Armagedone?

17 Kopesa etumbu. Etumba ya Armagedone nde ekozala nsuka ya bolɔzi monene. Na ntango yango, Yesu akosala mpe likambo mosusu. Longola kosambisa “bikólo nyonso,” akopesa mpe etumbu na bikólo, elingi koloba bato nyonso oyo atyaki na ngámbo ya “bantaba.” (Mat. 25:32, 33) Mokonzi na biso ‘akobɛta bikólo’ na “mopanga moko ya molai oyo epeli makasi.” Ya solo, bato nyonso oyo bazali lokola bantaba—banda na “bakonzi” tii na “baoombo,” “bakokufa liwa ya seko.”Em. 19:15, 18; Mat. 25:46.

18. (a) Ndenge nini makambo ekobongwana mpo na “bampate”? (b) Ndenge nini Yesu akolonga tii na nsuka?

18 Makambo ekobongwana mpenza mpo na bato oyo Yesu atyaki na ngámbo ya “bampate”! Limpinga monene ya Satana oyo esalami na “bantaba” ekoluka konyatanyata “ebele mpenza ya bato,” kasi ekolonga te. “Bampate” yango, oyo ekomonana lokola nde bazali na libateli te, bakobika na etumba wana oyo Satana akobundisa bango mpe bakobika na “bolɔzi monene.” (Em. 7:9, 14) Na nsima, ntango Yesu akolonga mpe akolongola banguna nyonso ya Bokonzi ya Nzambe awa na mabele, akobwaka Satana ná bademo na ye  na libulu mozindo. Kuna bakozala lokola bato oyo bakufi, bakozala na makasi ya kosala eloko te na boumeli ya mbula nkóto (1 000).Tángá Emoniseli 6:2; 20:1-3.

Ndenge oyo tokoki komibongisa

19, 20. Ndenge nini tokoki kosalela mateya oyo ezali na Yisaya 26:20 mpe 30:21?

19 Ndenge nini tokoki komibongisa mpo na makambo ya nsɔmɔ oyo ezali koya? Eleki mwa bambula, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete: “Esengeli kozala na botosi mpo na kobika.” Mpo na nini? Eyano ezali na likebisi oyo Yehova apesaki Bayuda oyo bazalaki na boombo na Babilone. Yehova asakolaki ete Babilone ekokwea; kasi ndenge nini basaleli ya Nzambe basengelaki komibongisa mpo na likambo yango? Yehova alobaki: “Kende, yo ekólo ya bato na ngai, kɔtá na bashambrɛ na yo ya kati, mpe kangá baporte na yo. Omibomba kaka mpo na mwa ntango kino makaneli ekoleka.” (Yis. 26:20) Talá maloba oyo vɛrsɛ yango esaleli: “kende,” “kɔtá,” “kangá,” mpe “omibomba”—nyonso wana ezali mitindo; makambo ya kosala. Bayuda oyo batosaki mitindo wana batikalaki na bandako na bango, ntango oyo basoda bazalaki kobunda na babalabala. Na yango, lobiko na bango etalelaki botosi na bango na malako ya Yehova. *

20 Yango eteyi biso nini? Kaka ndenge ezalaki mpo na basaleli wana ya Nzambe na ntango ya kala, mpo tóbika na makambo oyo ezali koya, tosengeli kotosa malako ya Yehova. (Yis. 30:21) Tozwaka malako yango na nzela ya lisangá. Yango wana, tosengeli komesana kotosa na motema mobimba malako oyo tozali kozwa. (1 Yoa. 5:3) Soki tozali kosala bongo lelo, ekozala mpasi te tótosa na motema mobimba na mikolo oyo ezali koya, mpe na ndenge yango Tata na biso Yehova ná Mokonzi na biso Yesu bakobatela biso. (Sef. 2:3) Libateli yango ekopesa biso libaku ya komona ndenge Bokonzi ya Nzambe ekolongola banguna na yango nyonso. Tokobosana likambo yango soki moke te!

^ par. 6 Emonani ete kobomama ya “Babilone Monene” ezali mingimingi kobomama ya bibongiseli ya mangomba, kasi te ya bandimi nyonso ya mangomba yango. Na yango, bandimi mingi oyo bazalaki na mangomba ya lokuta bakokufa te na ntango wana, mpe mbala mosusu bakoluka kokima mangomba yango, ndenge emonisami na Zekaria 13:4-6.

^ par. 19 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso I, nkasa 282-283.

Makambo mosusu

Pusaná penepene na Yehova

Nguya ya kobebisa—“Yehova azali elombe ya etumba”

Ndenge nini “Nzambe ya kimya” abundaka bitumba na ye?