Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Biblia eteyaka mpenza nini?

 MOKAPO YA MINEI

Yesu Klisto azali nani?

Yesu Klisto azali nani?
  • Mokumba nini oyo kaka Yesu nde azali na yango?

  • Ye autaki wapi?

  • Azalaki moto ya ndenge nini?

1, 2. (a) Mpo na nini koyeba nkombo mpamba ya moto moko oyo ayebani mingi elakisi te ete oyebi ye malamu? (b) Makanisi nini bato bazalaka na yango mpo na Yesu?

EZALI na ebele ya bato oyo bayebani mingi na mokili. Basusu bayebani mingi na bisika bafandi, na engumba to na ekólo na bango. Basusu bayebani na mokili mobimba. Nzokande, koyeba nkombo mpamba ya moto moko oyo ayebani mingi elakisi te ete oyebi ye malamu. Elakisi mpe te ete oyebi malamu bomoi na ye mpe bizaleli na ye.

2 Bipai nyonso na mokili, bato basilá koyoka ata mwa lisolo moke oyo etali Yesu Klisto, atako azalaki awa na mokili eleki sikoyo mbula soki 2 000. Atako bongo, mingi bayebi malamu te soki Yesu azalaki mpenza nani. Basusu balobaka ete azalaki moto moko boye ya malamu. Mpo na basusu, azalaki mosakoli lokola basakoli nyonso. Nzokande, basusu bakanisaka ete Yesu azali Nzambe mpe esengeli kosambela ye. Ezali mpenza bongo?

3. Mpo na nini esengeli oyeba Yesu malamu?

3 Esengeli oyeba Yesu malamu. Mpo na nini? Mpamba te Biblia elobi ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Ɛɛ, koyeba Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto malamu ekoki kosala ete moto azwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. (Yoane 14:6) Longola yango, Yesu apesi ndakisa oyo eleki malamu na ndenge  moto asengeli kozala mpe na ndenge ya kofanda na bato. (Yoane 13:34, 35) Na mokapo ya liboso ya buku oyo, tolobelaki mateya ya solo na ntina na Nzambe. Sikoyo, tótala oyo Biblia ezali mpenza koteya mpo na Yesu Klisto.

MASIYA OYO ALAKAMAKI

4. Titre “Masiya” ná “Klisto” elimboli nini?

4 Ebele ya bambula liboso Yesu abotama, Biblia esakolaki ete Nzambe akotinda moto moko aya mpo na kozala Masiya, to Klisto. Titre “Masiya” (oyo euti na liloba moko ya Liebele) ná titre “Klisto” (oyo euti na liloba moko ya Grɛki) nyonso mibale elimboli “Mopakolami.” Nzambe akopakola Ye oyo alakamaki, elingi koloba akopona ye mpo azwa esika moko ya lokumu koleka.  Na mikapo mosusu ya buku oyo, tokoyekola makambo mosusu oyo etali mokumba monene ya Masiya kati na kokokisama ya bilaka ya Nzambe. Tokoyeba mpe mapamboli oyo Yesu akoki kopesa biso banda sikoyo. Nzokande, liboso Yesu abotama, na ntembe te bato mingi bazalaki komituna, ‘Nani akozala mpenza Masiya?’

5. Bayekoli ya Yesu bandimaki na motema moko ete azali nani?

5 Na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso (T.B.), bayekoli ya Yesu, moto ya Nazarete, bandimaki na motema moko ete Yesu azali Masiya oyo asakolamaki. (Yoane 1:41) Simona Petelo, moko ya bayekoli na ye, ayebisaki ye polele ete: “Ozali Klisto.” (Matai 16:16) Kasi, nini endimisaki bayekoli wana​—mpe nini ekoki kondimisa biso—​ete Yesu azali mpenza Masiya oyo alakamaki?

6. Pesá ndakisa moko mpo na komonisa ndenge oyo Yehova asalisi bato ya sembo báyeba Masiya.

6 Basakoli ya Nzambe oyo bazalaki na bomoi liboso Yesu abotama basakolaki makambo mingi etali Masiya. Makambo yango nde esengelaki kosalisa bato mosusu báyeba Masiya yango. Mpo na kokanga ntina ya likanisi yango, tokoki kopesa ndakisa oyo: Kanisá ete basɛngi yo okende kozwa moto moko oyo omoná naino te, na esika bazelaka motuka, to na gare to mpe na libándá ya mpɛpɔ, epai bato bazali mingi. Na ntembe te, soki bayebisi yo mwa makambo etali moto yango, ekosalisa yo mingi, boye te? Ndenge moko mpe, Yehova asalelaki basakoli oyo bakomaki mikanda mosusu ya Biblia mpo na koyebisa biso makambo mingi na ntina na mosala oyo Masiya akosala mpe makambo oyo akokutana na yango na bomoi na ye. Kokokisama ya ebele ya bisakweli yango esengelaki kosalisa bato ya sembo báyeba ye malamumalamu.

7. Wapi bisakweli mibale kati na oyo ekokisamaki epai ya Yesu?

7 Tózwa bandakisa mibale mpamba. Ya liboso, mbula koleka 700 liboso likambo yango esalema, mosakoli Mika asakolaki ete Ye oyo alakami akobotama na Beteleme, engumba moko moke na mokili ya Yuda. (Mika 5:2) Yesu  abotamaki mpenza wapi? Epai mosusu te, kaka na engumba yango mpenza! (Matai 2:1, 3-9) Ya mibale, bankama ya bambula liboso, esakweli oyo ezali na Danyele 9:25 eyebisaki mbula mpenza oyo Masiya akomonana​—mobu 29 ya ntango na biso. * Kokokisama ya bisakweli yango mpe ya bisakweli mosusu emonisi ete Yesu azali Masiya oyo alakamaki.

Ntango Yesu azwaki batisimo, akómaki Masiya, to Klisto

8, 9. Mokolo ya batisimo ya Yesu, likambo nini emonisaki polele ete azali Masiya?

8 Likambo mosusu oyo emonisaki ete Yesu azali Masiya eyaki komonana polele pene na nsuka ya mobu 29 T.B., mbula oyo Yesu akendeki kozwa batisimo epai ya Yoane Mobatisi na Ebale Yolodani. Yehova alakaki Yoane ete akopesa ye elembo oyo ekosalisa ye ayeba Masiya. Yoane amonaki elembo yango ntango abatisaki Yesu. Biblia elobi ete likambo yango esalemaki boye: “Nsima ya kobatisama, Yesu na mbala moko abimaki na mai; mpe, talá! likoló efungwamaki, mpe amonaki elimo ya Nzambe ezali kokita lokola ebenga koyáká likoló na ye. Talá! Ezalaki lisusu na mongongo moko uta na likoló oyo elobaki ete: ‘Oyo azali Mwana na ngai, molingami, oyo nandimi.’” (Matai 3:16, 17) Nsima ya komona likambo oyo esalemaki mpe koyoka mongongo wana, Yoane azalaki na ntembe ata moko te ete Yesu atindamaki na Nzambe. (Yoane 1:32-34) Ntango kaka elimo ya Nzambe, to nguya oyo asalaka na yango mosala, ekitelaki Yesu na mokolo wana, akómaki Masiya, to Klisto, ye oyo aponami mpo na kozala Motambwisi mpe Mokonzi.​—Yisaya 55:4.

9 Kokokisama ya bisakweli ya Biblia mpe litatoli ya Yehova Nzambe ye moko emonisi polele ete Yesu azali Masiya oyo alakamaki. Kasi esuki wana te; Biblia ezali kopesa biyano na mituna mosusu mibale ya ntina oyo etali Yesu Klisto: Ye autaki wapi, mpe azalaki moto ya ndenge nini?

 YESU AUTAKI WAPI?

10. Biblia elobi nini mpo na bomoi oyo Yesu azalaki na yango liboso aya awa na mabelé?

10 Biblia elobi ete Yesu azalaki na likoló liboso aya awa na mabelé. Mika asakolaki ete Masiya akobotama na Beteleme mpe alobaki ete bomoi na Ye ebandaki ‘uta kalakala.’ (Mika 5:2) Mbala mingi, Yesu ye moko azalaki koloba ete azalaki na likoló liboso abotama moto. (Yoane 3:13; 6:38, 62; 17:4, 5) Kuna na likoló azalaki ekelamu ya elimo mpe azalaki na boyokani ya ndenge mosusu elongo na Yehova.

11. Ndenge nini Biblia emonisi ete Yesu azali Mwana ya Yehova oyo Yehova alingaka mingi mpenza?

11 Yesu azali Mwana ya Yehova oyo alingaka mingi mpenza​—mpe ezali na ntina moko ya solosolo oyo alingaka ye bongo. Abengami “mwana ya liboso na bozalisi nyonso,” mpamba te ye nde Nzambe akelaki liboso. * (Bakolose 1:15) Ezali na eloko mosusu oyo ezali kokesenisa Mwana yango na bikelamu mosusu. Azali ‘Mwana mobotami-se-moko.’ (Yoane 3:16) Yango elingi koloba ete kaka Yesu nde akelamaki mpenza na mabɔkɔ ya Nzambe ye moko. Lisusu, Nzambe asalelaki Yesu mpo na kokela biloko mosusu nyonso. (Bakolose 1:16) Yesu abengami mpe “Liloba.” (Yoane 1:14) Yango elakisi ete azalaki molobeli ya Nzambe, na ntembe te azalaki koyebisa maloba mpe malako ya Tata epai ya bana na Ye mosusu, bikelamu ya elimo mpe bato.

12. Ndenge nini toyebi ete Mwana ya liboso akokani na Nzambe te?

12 Mwana ya liboso yango akokani na Nzambe, ndenge bato mosusu bakanisaka? Biblia elobi bongo te. Ndenge tomoni na paragrafe oyo eleki, Mwana akelamaki. Na yango, ezali komonana polele ete azali na ebandeli; nzokande, Yehova Nzambe azali na ebandeli te, azali mpe na nsuka te. (Nzembo 90:2) Mwana mobotami-se-moko ameká ata  komeka te komikokanisa na Tata na ye. Biblia ezali koteya polele ete Tata aleki Mwana. (Yoane 14:28; 1 Bakolinti 11:3) Kaka Yehova nde azali ‘Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.’ (Genese 17:1) Yango wana, ezali na moto moko te oyo akokani na ye. *

13. Biblia elingi mpenza koloba nini ntango elobi ete Mwana azali “elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te”?

13 Yehova afandaki elongo na Mwana na ye ya liboso bamiliare ya bambula​—kala mpenza liboso akela likoló oyo etondi na minzoto mpe mabelé. Na ntembe te, balinganaki mingi! (Yoane 3:35; 14:31) Mwana yango ya bolingo azalaki mpenza lokola Tata na ye. Yango wana, Biblia elobi ete azali “elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te.” (Bakolose 1:15) Ndenge kaka mwana ya moto akoki kozala lokola tata na ye na makambo mwa mingi, Mwana yango mpe amonisaki bizaleli mpe bomoto ya Tata na ye.

14. Ndenge nini Mwana mobotami-se-moko ya Yehova abotamaki moto?

14 Mwana mobotami-se-moko ya Yehova andimaki kolongwa na likoló mpe koya awa na mabelé mpo na kozala moto. Kasi, ntango mosusu okomituna, ‘Ndenge nini ekelamu ya elimo ekokaki kobotama moto?’ Mpo likambo yango esalema, Yehova asalaki likamwisi. Azwaki bomoi ya Mwana na ye ya liboso kuna na likoló mpe atyaki yango na libumu ya Maria, elenge mwasi moko Moyuda oyo ayebaki naino mibali te. Zemi yango eutaki na mobali te. Yango wana, Maria abotaki mwana moko ya kokoka mpe apesaki ye nkombo Yesu.​—Luka 1:30-35.

YESU AZALAKI MOTO YA NDENGE NINI?

15. Mpo na nini tokoki koloba ete tozali koyeba Yehova malamu na nzela ya Yesu?

15 Makambo oyo Yesu alobaki mpe oyo asalaki ntango azalaki awa na mabelé ezali kosalisa biso tóyeba ye malamu. Longola yango, tozali koyeba Yehova malamu na nzela ya  Yesu. Na ndenge nini? Kobosana te ete Mwana yango azali mpenza lokola Tata na ye. Yango wana, Yesu alobaki na moyekoli na ye moko ete: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.” (Yoane 14:9) Mikanda minei ya Biblia oyo ebengami Baevanzile​—Matai, Malako, Luka, mpe Yoane—​elobeli makambo mingi ya bomoi, mosala mpe bizaleli ya Yesu Klisto.

16. Nsango nini Yesu azalaki koteya mingi mpenza, mpe epai wapi mateya na ye eutaki?

16 Yesu ayebanaki mingi lokola “Moteyi.” (Yoane 1:38; 13:13) Azalaki koteya nini? Nsango oyo azalaki koteya mingi mpenza ezali “nsango malamu ya bokonzi”​—elingi koloba, Bokonzi ya Nzambe, guvɛrnema ya likoló oyo ekoyangela mabelé mobimba mpe ekopesa bato ya botosi mapamboli ya seko. (Matai 4:23) Nkolo-nsango yango nani? Yesu ye moko alobaki boye: “Oyo nazali koteya ezali ya ngai te, kasi ya moto oyo atindaki ngai,” elingi koloba Yehova. (Yoane 7:16) Yesu ayebaki ete Tata na ye alingi bato báyoka nsango malamu ya Bokonzi na ye. Na Mokapo 8, tokoyeba malamumalamu Bokonzi ya Nzambe mpe mosala oyo yango ekosala.

17. Epai wapi Yesu azalaki koteya, mpe mpo na nini amipesaki mobimba na koteya basusu?

17 Epai wapi Yesu azalaki koteya? Na bisika nyonso oyo azalaki kokuta bato​—na bandako na bango, na bamboka, na bingumba mpe na bazando. Yesu azalaki kozela te ete bato báya epai na ye. Ye moto azalaki kokende kokutana na bango. (Malako 6:56; Luka 19:5, 6) Mpo na nini Yesu amipesaki mobimba bongo mpe apesaki ntango na ye mingi na mosala ya kosakola mpe koteya? Mpo Nzambe alingaki ete asala bongo. Yesu azalaki ntango nyonso kosala mokano ya Tata na ye. (Yoane 8:28, 29) Kasi ezalaki mpe na likambo mosusu oyo ezalaki kotinda Yesu asakola. Azalaki koyokela ebele ya bato oyo bazalaki koya epai na ye mawa. (Matai 9:35, 36) Bakonzi ya mangomba na bango, oyo basengelaki koteya bango solo na ntina na Nzambe mpe mikano na ye, bazalaki kotyela bango likebi te. Yesu ayebaki ete bato bazali na mposa makasi ya koyoka nsango ya Bokonzi.

18. Wapi bizaleli ya Yesu oyo esepelisi yo mingi koleka?

 18 Yesu azalaki moto ya boboto mpe ya bolingo, azalaki mpe koyokela basusu mawa. Yango wana, ezalaki mpasi te kosolola na ye mpe azalaki moto malamu. Ata mpe bana mike bazalaki kosepela kozala esika moko na ye. (Malako 10:13-16) Yesu azalaki kopona bilongi te. Ayinaki kanyaka mpe makambo oyo ezali sembo te. (Matai 21:12, 13) Azalaki kopesa basi kilo; nzokande, ntango azalaki awa na mabelé, bato bazalaki kopesa basi limemya mingi te mpe bazalaki kopekisa bango makambo mingi. (Yoane 4:9, 27) Yesu azalaki na komikitisa ya solosolo. Kutu, mokolo moko asukolaki bantoma na ye makolo, nzokande yango ezalaki mosala ya bangamba mpenza.

Yesu azalaki koteya na bisika nyonso oyo azalaki kokuta bato

19. Wapi ndakisa oyo emonisi ete Yesu azalaki kotyela bamposa ya basusu likebi?

19 Yesu azalaki kotyela bamposa ya basusu likebi. Azalaki komonisa yango mingimingi ntango azalaki kobikisa bato na ndenge ya likamwisi, na lisalisi ya elimo ya Nzambe. (Matai 14:14) Na ndakisa, moto moko ya maba ayaki mokolo  moko epai na ye mpe alobaki ete: “Soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.” Yesu ayokaki lokola nde mpasi ya moto yango ezali ya ye. Ayokaki mawa; yango wana, asembolaki lobɔkɔ, asimbaki ye mpe alobaki boye: “Nalingi. Kómá pɛto.” Mbala moko, moto yango abikaki! (Malako 1:40-42) Okanisi ete moto yango ayokaki ndenge nini?

ATIKALAKI SEMBO TII NA NSUKA

20, 21. Na ndenge nini Yesu apesaki ndakisa oyo eleki malamu na likambo etali kotosa Nzambe na bosembo mpenza?

20 Yesu atosaki Nzambe na bosembo mpenza, apesaki ndakisa oyo eleki malamu na likambo yango. Ezala akutanaki na makambo, na botɛmɛli to na mpasi ya ndenge nini, atikalaki sembo epai ya Tata na ye ya likoló. Yesu aboyaki masɛnginya ya Satana na motema moko, mpe alongaki. (Matai 4:1-11) Na ntango moko boye, bandeko na ye mosusu bazalaki kondimela ye te; kutu, bazalaki koloba ete “abɛli motó.” (Malako 3:21) Kasi, Yesu alandaki bango te; atikaki te kosala mosala ya Nzambe. Atako afingamaki mpe  atyolamaki, azalaki kaka komipekisa; ata mbala moko te amekaki kosala banguna na ye mabe.​—1 Petelo 2:21-23.

21 Yesu atikalaki sembo tii na liwa​—liwa moko ya nsɔmɔ mpe ya mpasi na mabɔkɔ ya banguna na ye. (Bafilipi 2:8) Talá naino makambo oyo basalaki ye na mokolo ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé. Bakangaki ye, batɛmwɛ ya lokuta bafundaki ye, bazuzi ya sembo te bakweisaki ye na likambo, ebele ya bato batyolaki ye mpe basoda banyokolaki ye. Ntango azalaki na nzete oyo babakaki ye na nsɛtɛ, liboso akata motema, agangaki ete: “Ekokisami!” (Yoane 19:30) Kasi, na mokolo ya misato nsima ya liwa na ye, Tata na ye ya likoló asekwisaki ye mpe azongaki lisusu ekelamu ya elimo. (1 Petelo 3:18) Nsima ya mwa bapɔsɔ, azongaki na likoló. Kuna, “afandaki na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe” mpe azelaki Nzambe atya ye mokonzi.​—Baebele 10:12, 13.

22. Bosembo ya Yesu tii na liwa ebotaki mbuma nini?

22 Bosembo ya Yesu tii na liwa ebotaki mbuma nini? Liwa ya Yesu epesi biso likoki mpenza ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé, ndenge Yehova alingaki banda na ebandeli. Na ndenge nini? Mokapo oyo elandi ekolobela likambo yango.

^ par. 7 Mpo na kozwa ndimbola ya esakweli ya Danyele oyo ekokisamaki epai ya Yesu, talá na Apɛndisi, lisolo “Ndenge oyo esakweli ya Danyele eyebisi koya ya Masiya.”

^ par. 11 Babengaka Yehova Tata mpo azali Mozalisi. (Yisaya 64:8) Babengaka Yesu Mwana ya Nzambe mpo Nzambe nde akelaki ye. Mpo na ntina wana kaka, babengaka bikelamu mosusu ya elimo bana ya Nzambe, ná Adama mpe.​—Yobo 1:6; Luka 3:38.

^ par. 12 Soki olingi koyeba makambo mosusu oyo emonisi ete Mwana ya liboso akokani na Nzambe te, talá na Apɛndisi, lisolo “Oyo osengeli koyeba mpo na Tata, Mwana mpe Elimo Santu.”