Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Biblia eteyaka mpenza nini?

 MOKAPO YA ZOMI NA MOTOBA

Kangamá na losambo ya solo

Kangamá na losambo ya solo
  • Biblia eteyaka nini na likambo ya kosalela bililingi to bikeko na losambo mpe losambo ya bonkɔkɔ?

  • Ndenge nini baklisto batalelaka bafɛti ya mangomba?

  • Ndenge nini okoki kolimbwela bato mateya oyo ondimaka na ndenge oyo bakosilika te?

1, 2. Motuna nini osengeli komituna nsima ya kobima na lingomba ya lokuta, mpe mpo na nini okanisi ete motuna wana ezali na ntina?

KANISÁ ete oyei koyeba ete moto moko atyaki na mayele eloko moko ya mabe na esika oyo ozwaka mai ya komɛla. Sikoyo, bomoi na yo ekómi na likama. Okosala nini? Na ntembe te, okoluka nokinoki epai oyo okozwa mai ya pɛto. Kasi, ata nsima ya kozwa mai ya pɛto, okomituna motuna oyo ya ntina mpenza: ‘Namɛlaki mai wana ya mabe te?’

2 Ezali mpe bongo mpo na mangomba ya lokuta. Biblia ezali koteya ete losambo na yango ebebi na mateya mpe na misala ya mbindo. (2 Bakolinti 6:17) Yango wana ezali na ntina mingi ete obima na “Babilone Monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba. (Emoniseli 18:2, 4) Osili kosala yango? Soki ɛɛ, topesi yo longonya. Kasi esengeli kosuka kaka te na kokabwana na lingomba moko ya lokuta to kozala lisusu mondimi na yango te. Nsima ya kobima na lingomba ya lokuta, osengeli komituna motuna oyo: ‘Tii lelo nazali naino na mwa makambo mosusu ya losambo ya lokuta?’ Tózwa mwa bandakisa.

 BILILINGI TO BIKEKO MPE LOSAMBO YA BONKƆKƆ

3. (a) Biblia elobi nini na likambo ya kosalela bililingi to bikeko na losambo, mpe mpo na nini ekoki kozala mpasi mpo bato mosusu bándima likanisi ya Nzambe? (b) Osengeli kosala nini na biloko nyonso oyo ozali na yango oyo etali losambo ya lokuta?

3 Bato mosusu bazali na bililingi to bikeko, to mpe mwa bisika ya losambo epai na bango banda kala. Yo mpe ozali na yango? Soki ozali na yango, ntango mosusu okanisaka ete ebongi te to ezali mabe kobondela Nzambe kozanga kosalela biloko wana. Ntango mosusu mpe olingaka biloko yango mingi. Kasi, Nzambe nde alakisi ndenge oyo bato basengeli kosambela ye, mpe Biblia eteyaka ete alingi te ete tósalela bililingi to bikeko mpo na kosambela ye. (Exode 20:4, 5; Nzembo 115:4-8; Yisaya 42:8; 1 Yoane 5:21) Yango wana, okomonisa ete okangami na losambo ya solo soki obwaki biloko nyonso oyo ozali na yango oyo etali losambo ya lokuta. Talelá mpenza biloko yango ete ezali “mbindo,” ndenge Yehova atalelaka yango.​—Deteronome 27:15.

4. (a) Ndenge nini toyebi ete kosambela bankɔkɔ ezali na ntina ata moko te? (b) Mpo na nini Yehova apekisaki bato na ye bámipesa ata na mosala moko te ya bilimo mabe?

4 Ebele ya mangomba ya lokuta ezali na momeseno ya kosambela bankɔkɔ. Bato mosusu, liboso báyeba solo ya Biblia,  bazalaki kokanisa ete bato oyo bakufá bafandaka na mokili moko oyo emonanaka te mpe bakoki kosalisa bato ya bomoi to kosala bango mabe. Ntango mosusu ozalaki koboma nzoto mpo na kokitisa bankɔkɔ motema. Kasi, ndenge oyekolaki yango na Mokapo 6 ya buku oyo, bato oyo bakufá bayebi eloko te mpe bazali na bomoi esika moko te. Yango wana, koluka kosolola na bango ezali na ntina ata moko te. Ezala nsango nini oyo emonani ete euti epai ya ndeko to moninga na biso moko oyo akufá, eutaka mpenza nde epai ya bademo. Yango wana, Yehova ayebisaki Bayisalaele ete bámeka te kosolola na bato oyo bakufá to bámipesa ata na mosala moko te ya bilimo mabe.​—Deteronome 18:10-12.

5. Okosala nini soki losambo oyo omipesaki na yango liboso esɛngaki ete osalela bililingi to bikeko to mpe osambela bankɔkɔ?

5 Okosala nini sikoyo soki losambo oyo omipesaki na yango liboso esɛngaki ete osalela bililingi to bikeko to mpe osambela bankɔkɔ? Tángá mpe kanisá malamumalamu bavɛrsɛ ya Biblia oyo ezali komonisa ndenge oyo Nzambe atalelaka makambo yango. Mokolo na mokolo, yebisá Yehova na mabondeli mposa na yo ya kokangama na losambo ya solo, mpe sɛngá ye asalisa yo okanisaka lokola ye.​—Yisaya 55:9.

BAKLISTO YA LIBOSO BAZALAKI KOSALA FƐTI YA NOELE TE

6, 7. (a) Ndenge balobaka, Noele ezali mpo na kokanisa nini; bayekoli ya Yesu na siɛklɛ ya liboso bazalaki mpe kosala yango? (b) Na ntango bayekoli ya liboso ya Yesu bazalaki awa na mabelé, banani bazalaki kosala bafɛti ya kokanisa mokolo ya kobotama?

6 Losambo oyo moto azali kosambela Nzambe ekoki kobebisama na makambo ya mangomba ya lokuta soki moto yango azali komipesa na bafɛti oyo bato mingi basalaka. Tózwa ndakisa ya Noele. Ndenge balobaka, Noele ezali mpo na kokanisa mbotama ya Yesu Klisto, mpe tokoki koloba ete pene na mangomba nyonso oyo elobaka ete elandaka Klisto esalaka fɛti yango. Kasi, ezali na eloko ata moko te oyo emonisi ete bayekoli ya Yesu na siɛklɛ ya liboso bazalaki mpe kosala yango. Buku moko (Sacred Origins of Profound Things) elobi ete: “Na mbula nkama mibale oyo elandaki mbotama ya Klisto, moto moko  te ayebaki mokolo mpenza oyo [Klisto] abotamaki mpe kaka mwa bato moke nde bazalaki kokanisa likambo yango.”

7 Ata soki bayekoli ya Yesu báyebaka mokolo mpenza oyo ye abotamaki, balingaki kosalela mokolo yango fɛti te. Mpo na nini? Mpamba te, ndenge buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi, baklisto ya liboso “bazalaki kotalela likambo ya kokanisa mokolo oyo moto abotamaki lokola momeseno moko ya bapakano.” Biblia mobimba elobeli kaka bafɛti mibale ya kokanisa mokolo ya kobotama mpe bakonzi mibale oyo basalaki yango bazalaki kosambela Yehova te. (Genese 40:20; Malako 6:21) Bafɛti ya kokanisa mokolo ya kobotama ezalaki mpe kosalema mpo na banzambe ya bapakano. Na ndakisa, na mokolo ya 24 Mai, Baloma bazalaki kokanisa mokolo ya kobotama ya nzambe-mwasi Diana. Na mokolo oyo elandi, bazalaki kokanisa mokolo ya kobotama ya Apollon, nzambe-moi. Na yango, bapakano nde bazalaki kosala bafɛti ya kokanisa mokolo ya kobotama, kasi baklisto te.

8. Limbolá boyokani oyo ezali kati na bafɛti ya kokanisa mokolo ya kobotama ná biyambayamba.

8 Ezali mpe na ntina mosusu oyo baklisto ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kokanisa mokolo ya kobotama ya Yesu te. Emonani ete bayebaki ete bafɛti ya kokanisa mokolo ya kobotama ezali na boyokani na biyambayamba. Na ndakisa, Bagrɛki ná Baloma mingi ya ntango ya kala bazalaki kokanisa ete elimo moko ezalaka na esika moto nyonso azali kobotama mpe ebatelaka ye bomoi na ye mobimba. Buku moko (The Lore of Birthdays) elobi ete: “Elimo yango ezalaki na boyokani moko oyo bato bayebi te elongo na nzambe oyo mokolo na ye ya kobotama ekokani na oyo ya moto oyo abotami.” Na ntembe te, Yehova alingaki kosepela te na fɛti moko oyo ekokɔtisa nkombo ya Yesu na makambo ya biyambayamba. (Yisaya 65:11, 12) Kasi, mpo na nini bato mingi basalaka fɛti ya Noele?

NDENGE NOELE EBANDAKI

9. Ebandaki ndenge nini bápona mokolo ya 25 Desɛmbɛ mokolo ya kokumisa mbotama ya Yesu?

9 Bato babandaki kokanisa mbotama ya Yesu na mokolo ya 25 Desɛmbɛ bankama ya bambula nsima ya kozonga  na ye na likoló. Nzokande, Yesu abotamaki mokolo wana te, abotamaki nde na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ. * Bongo mpo na nini baponaki mokolo yango? Ekoki kozala ete bato mosusu oyo na nsima bakómaki koloba ete bazali baklisto “balingaki ete mokolo yango ekokana na fɛti oyo bapakano ya Loma bazalaki kosala” mpo na kokanisa mokolo ya kobotama ya moi. (The New Encyclopædia Britannica) Na eleko ya mpiɔ makasi, ntango moi​—esika molunge mpe kongɛnga eutaka—​emonanaka ete ezali kongɛnga moke mpenza lokola nde ekei mobembo mosika, bapakano bazalaki kosala milulu mpo ezonga. Bazalaki kokanisa ete mokolo ya 25 Desɛmbɛ nde ezali mokolo oyo moi ebandaki kozonga. Mpo na kokómisa bapakano bandimi, bakonzi ya mangomba bazwaki fɛti yango mpe bakómisaki yango fɛti “ya baklisto.” *

10. Na ntango ya kala, mpo na nini bato mosusu bazalaki kosala fɛti ya Noele te?

10 Banda kala, bato bayebi ete Noele euti na bapakano. Lokola fɛti yango euti na Makomami te, na siɛklɛ ya 17 bapekisaki yango na Angleterre mpe na bitúká mosusu ya Amerika ntango ezalaki koyangelama na Angleterre. Moto oyo ameki ata komeka kotikala na ndako na mokolo ya Noele na esika akende na mosala, asengelaki kofuta amande. Kasi, eumelaki te, mimeseno ya kala ezongaki lisusu, mpe mosusu ya sika ebakisamaki. Noele ekómaki lisusu fɛti moko oyo bato mingi bazali kosala, mpe tii lelo ezali se bongo na bamboka mingi. Kasi, lokola  Noele ezali na boyokani na mangomba ya lokuta, baoyo balingi kosepelisa Nzambe basalaka fɛti yango te, ata mpe bafɛti mosusu oyo euti na losambo ya bapakano. *

KOYEBA ESIKA FƐTI MOKO EUTI EZALI MPENZA NA NTINA?

11. Mpo na nini bato mosusu basalaka bafɛti oyo bato mingi basalaka, kasi likambo nini esengeli kozala na ntina mingi koleka mpo na biso?

11 Bato mosusu bandimaka ete bafɛti lokola Noele euti na bapakano, kasi bamonaka ete ezali mabe te kosala yango. Kutu, mpo na bango, bato mingi bazalaka ata na likanisi ya losambo ya lokuta te ntango basalaka bafɛti yango. Longola yango, bafɛti wana esalisaka mabota báfanda esika moko. Yo mpe okanisaka bongo? Soki okanisaka bongo, mbala mosusu ezali mpo olingaka libota na bino mingi, kasi ezali te mpo olingaka mangomba ya lokuta; yango wana ezalaka mpasi osala makambo oyo losambo ya solo esɛngaka. Kitisá motema; Yehova, ye oyo abandisaki libota, alingi ete oyokanaka malamu na bandeko na yo. (Baefese 3:14, 15) Kasi okoki kokómisa boyokani yango makasi na banzela oyo endimami na Nzambe. Ntoma Paulo amonisaki likambo oyo esengeli kozala na ntina mingi koleka mpo na biso, akomaki boye: “Bókoba kotalela malamumalamu mpenza oyo ekoki kondimama epai ya Nkolo.”​—Baefese 5:10.

Okolya bɔmbɔ oyo balɔkɔti na terase?

12. Pesá ndakisa moko oyo ezali komonisa ntina oyo tosengeli koboya mimeseno mpe bafɛti oyo euti na bisika ya mabe.

12 Ntango mosusu okanisaka ete lelo, mpo bato básala fɛti moko, batalelaka te esika yango euti. Koyeba epai fɛti moko euti ezali mpenza na ntina? Ɛɛ! Tózwa ndakisa, omoni bɔmbɔ moko na terase. Okolɔkɔta yango olya? Te! Bɔmbɔ wana ezali pɛto te. Ndenge moko mpe, bafɛti oyo bato mingi basalaka ekoki kosepelisa, kasi euti nde na bisika ya mbindo. Mpo tókangama na losambo ya solo, tosengeli kozala na makanisi ndenge moko na mosakoli Yisaya, ye ayebisaki basambeli ya solo ete: ‘Bósimba eloko ya mbindo te.’​—Yisaya 52:11.

 MONISÁ EKATELI NA YO NA BOSOSOLI

13. Mikakatano nini ekoki kokómela yo mpo ozali kosala te bafɛti oyo bato mingi basalaka?

13 Soki ozwi ekateli ete okosala lisusu te bafɛti oyo bato mingi basalaka, yango ekobendela yo mikakatano. Na ndakisa, baninga na yo ya mosala bakoki komituna mpo na nini ozali kosangana na bango te na makambo mosusu ya fɛti moko na mosala. Okosala nini soki bakabeli yo eloko moko na Noele? Soki ondimi yango, ekozala mabe? Okosala ndenge nini soki mobali to mwasi na yo azali mondimi ya lingomba mosusu? Okoki kosala nini mpo bana na yo bámona te ete bazangi eloko moko ya malonga mpo bazali kosala te bafɛti oyo bato mingi basalaka?

14, 15. Okoki kosala nini soki batombeli yo to balobi na yo bonɛ fɛti to soki moto alingi kokabela yo eloko?

14 Mpo na koyeba ndenge ya kosala ntango okutani na moko ya mikakatano yango, ezali kosɛnga bososoli. Na ndakisa, soki moto atombeli yo to alobi na yo bonɛ fɛti, okoki koyebisa ye kaka na mokuse ete, napesi yo matɔndi to mersi. Kasi, soki ezali moto moko oyo ozalaka na ye mbala na mbala to osalaka na ye esika moko, ntango mosusu okomona malamu ete osuka wana te. Ezala moto oyo oyebi to te, kozokisa ye te na maloba na yo. Biblia epesi toli oyo: “Tiká liloba na bino ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa, mpo na koyeba ndenge oyo bosengeli kopesa moto moko na moko eyano.” (Bakolose 4:6) Kebá! Kokatela bato mangala te. Limbwelá bango nde ekateli na yo kozanga kozokisa bango na maloba na yo. Yebisá bango polele ete kokabelana biloko mpe kokutana esika moko ezali mabe te, kasi yo olingaka kosala makambo yango nde na mikolo mosusu.

15 Okosala nini soki moto alingi kokabela yo eloko mokolo ya fɛti? Yango ekotalela mingimingi ntina oyo alingi kokabela yo yango. Moto yango akoki koyebisa yo boye: “Nayebi ete yo osalaka fɛti oyo te. Atako bongo, nalingi kokabela yo eloko oyo.” Na ntango wana, okoki komona ete soki ondimi yango elakisi te ete yo mpe osangani na fɛti yango. Kasi, soki moto yango ayebi makambo ya losambo na yo malamu te, okoki mpe  koyebisa ye ete osalaka fɛti yango te. Yango ekosalisa ye ayeba ntina oyo ondimi eloko oyo apesi yo kasi yo okabelaka bato biloko na mokolo yango te. Nzokande, ekozala malamu te kozwa eloko soki moto apesi yo yango mpo na komonisa ete olandaka te makambo ya losambo na yo to okoki kokakola makambo yango kaka mpo na kozwa eloko moko boye.

BONGO SOKI BATO YA LIBOTA BAZALI NA LINGOMBA MOSUSU?

16. Okosala ndenge nini mpo maloba na yo ezokisa bato te na makambo ya bafɛti?

16 Bongo soki bato ya libota na bino bazali na lingomba mosusu? Awa mpe, maloba na yo ezokisa bango te. Ntina ya kotyana na bango ntembe mpo na momeseno to fɛti mokomoko oyo balingi kosala ezali te. Monisá nde ete otikeli bango nzela básala ndenge balingi, se ndenge yo mpe olingi básalela yo. (Matai 7:12) Kosala ata likambo moko te oyo ekomonisa ete yo mpe ozali kosala fɛti elongo na bango. Atako bongo, kobimisa mindɔndɔ te na makambo oyo etali mpenza fɛti te. Kasi, osengeli ntango nyonso komitambwisa na ndenge oyo ekosala ete ozala ntango nyonso na lisosoli ya malamu.​—1 Timote 1:18, 19.

17. Ndenge nini okoki kosalisa bana na yo bámona te ete bazangi eloko moko ya malonga mpo bazali komona basusu bazali kosala bafɛti oyo bato mingi basalaka?

17 Okosala nini mpo bana na yo bámona te ete bazangi eloko moko ya malonga mpo bazali kosala te bafɛti oyo eyokani na Makomami te? Yango ekotalela mingimingi makambo oyo osalelaka bango mikolo mosusu. Baboti mosusu babongisaka bantango ya kokabela bana na bango biloko. Moko ya biloko oyo eleki malamu oyo okoki kopesa bango ezali ntango na yo mpe likebi oyo otyelaka bango na bolingo mpenza.

OMIPESA NA LOSAMBO YA SOLO

Komipesa na losambo ya solo epesaka esengo ya solosolo

18. Na ndenge nini koyangana na makita ya boklisto ekoki kosalisa yo okangama na losambo ya solo?

18 Mpo osepelisa Nzambe, osengeli kobwaka losambo ya lokuta mpe kokangama na losambo ya solo. Kokangama na losambo yango esɛngaka mpe nini? Biblia elobi ete: “Tiká tótyelanaka likebi mpo na kopusama na kozala na bolingo  mpe na misala ya malamu, kotikáká te koyangana na biso mpenza, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi nde tólendisanaka, mpe tósalaka bongo na koleka mpenza lokola bozali komona mokolo yango ezali kokóma pene.” (Baebele 10:24, 25) Makita ya baklisto ezali bantango ya esengo oyo ekopesa yo nzela ya kosambela Nzambe na ndenge oyo andimaka. (Nzembo 22:22; 122:1) Na makita yango, baklisto ya sembo ‘balendisanaka.’​—Baloma 1:12.

19. Mpo na nini ezali na ntina ete oyebisaka basusu makambo oyo oyekoli na Biblia?

19 Lolenge mosusu oyo okoki kokangama na losambo ya solo ezali ya koyebisa bato makambo oyo oyekoli na Biblia elongo na Batatoli ya Yehova. Bato mingi bazali mpenza ‘kokimela mpe kolela’ mpo na mabe oyo ezali kosalema na mokili lelo oyo. (Ezekiele 9:4) Ntango mosusu oyebi bato ya ndenge wana. Mpo na nini te koyebisa bango elikya oyo Biblia epesi yo mpo na mikolo ezali koya? Ntango okobanda kosangana na baklisto ya solo mpe koyebisa basusu mateya malamu ya Biblia oyo oyekoli, okomona ete mokemoke mposa nyonso ya mimeseno ya losambo ya lokuta oyo ntango mosusu etikalaki na motema na yo ekosila. Yebá ete okozala mpenza na esengo mpe okozwa ebele ya mapamboli soki okangami na losambo ya solo.​—Malaki 3:10.

^ par. 9 Talá na Apɛndisi, lisolo “Yesu abotamaki na sanza ya Desɛmbɛ?

^ par. 9 Baponaki mokolo ya 25 Desɛmbɛ mpe mpo na fɛti babengi Saturnales, oyo Baloma bazalaki kosalela nzambe na bango ya mosala ya bilanga. Bazalaki kosala yango kobanda mokolo ya 17 tii mokolo ya 24 Desɛmbɛ. Bato bazalaki kolya, komɛla, kobina mpe kokabelana biloko na fɛti yango.

^ par. 10 Soki olingi koyeba ndenge oyo baklisto ya solo batalelaka bafɛti mosusu oyo bato mingi basalaka, talá na Apɛndisi, lisolo “Tosengeli mpe kosalaka bafɛti oyo bato mingi basalaka?