Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Biblia eteyaka mpenza nini?

 MOKAPO YA ZOMI NA MINEI

Ndenge ya kozala na libota ya esengo

Ndenge ya kozala na libota ya esengo
  • Makambo nini mobali ya malamu asengeli kosala?

  • Mwasi ya libala asengeli kosala nini mpo na kokokisa mokumba na ye malamu?

  • Kozala moboti ya malamu esɛngaka nini?

  • Bana bakoki kosala nini mpo libota ezala na esengo?

1. Esɛngaka nini mpo na kozala na libota ya esengo?

YEHOVA NZAMBE alingi ete libota na yo ezala na esengo. Biblia, Liloba na ye, epesi moto mokomoko ya libota malako mpe elobeli mokumba oyo Nzambe alingi ete moto na moto akokisa. Na libota, soki moto na moto azali kokokisa mokumba na ye ndenge Nzambe alingi, yango ekobota mbuma ya malamu mpenza. Yesu alobaki ete: “Esengo na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kobatela yango!”​—Luka 11:28.

2. Esɛngaka kondima likambo nini mpo na kozala na libota ya esengo?

2 Mpo na kozala na libota ya esengo esɛngaka mpenzampenza kondima ete Yehova, ye oyo Yesu abengaki “Tata na biso,” nde abandisaki libota. (Matai 6:9) Soki libota mokomoko awa na mabelé ezali, Tata na biso ya likoló nde alingi bongo​—mpe ntembe ezali te ete ayebi nini epesaka mabota esengo. (Baefese 3:14, 15) Soki bongo, Biblia eteyaka nini mpo na mokumba ya moto mokomoko na libota?

NZAMBE NDE ABANDISÁ LIBOTA

3. Biblia elobi ete libota ebandaki ndenge nini, mpe nini endimisi biso ete ezalaki mpenza bongo?

3 Yehova asalaki Adama na Eva, bato ya liboso, mpe abalisaki  bango. Atyaki bango na paladiso moko ya kitoko awa na mabelé​—elanga ya Edene—​mpe ayebisaki bango bábotaka. Yehova alobaki na bango ete: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili.” (Genese 1:26-28; 2:18, 21-24) Lisolo yango ezali lisapo te, mpamba te Yesu amonisaki ete makambo oyo mokanda ya Genese elobi mpo na ebandeli ya libota ezali solo. (Matai 19:4, 5) Atako tozali na mikakatano mingi mpe lelo oyo bomoi ezali te ndenge Nzambe akanaki, tótala ntina oyo libota ekoki kozala na esengo.

4. (a) Ndenge nini moto na moto akoki kosala ete esengo ezala na libota? (b) Mpo na nini koyekola bomoi ya Yesu ezali na ntina mingi mpo esengo ezala na libota?

4 Moto na moto akoki kosala ete esengo ezala na libota soki azali komonisa bolingo ndenge Nzambe amonisaka yango. (Baefese 5:1, 2) Bongo, ndenge nini biso bato tokoki kolanda ndakisa ya Nzambe, nzokande tomonaka ye te? Tokoki koyeba ndenge oyo Yehova asalaka makambo, mpamba te atindaki Yesu Klisto, Mwana na ye ya liboso, awa na mabelé. (Yoane 1:14, 18) Awa na mabelé, Mwana yango alandaki malamumalamu ndakisa ya Tata na ye ya likoló. Yango wana, moto oyo amonaki Yesu mpe ayokaki ye, ezalaki lokola nde moto yango azali esika moko na Yehova mpe azali koyoka Ye. (Yoane 14:9) Na yango, soki mokomoko na biso ayekoli ndenge oyo Yesu amonisaki bolingo mpe alandi ndakisa na ye, tokoki kosala ete esengo ezala mpenza na libota.

NDAKISA MPO NA MIBALI

5, 6. (a) Ndakisa nini mibali basengeli kozwa na makambo Yesu asalelaki lisangá? (b) Esengeli kosala nini mpo na kolimbisama masumu?

5 Biblia elobi ete mibali basengeli kofanda na basi na bango ndenge Yesu afandaki na bayekoli na ye. Yoká etinda oyo Biblia epesi: “Mibali, bókoba kolinga basi na bino, se ndenge Klisto mpe alingaki lisangá mpe amikabaki mpo na yango . . . Na ndenge wana nde mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko. Moto oyo azali kolinga mwasi na ye azali komilinga ye moko, mpo ata moto moko te ayinaka mosuni na ye moko; kasi aleisaka nde yango mpe alɛngɛlaka yango, ndenge Klisto mpe asalaka epai ya lisangá.”​Baefese 5:23, 25-29.

 6 Bolingo oyo Yesu alingaki lisangá ya bayekoli na ye ezali ndakisa ya malamu mpenza mpo na mibali. Yesu “alingaki bango tii na nsuka,” apesaki bomoi na ye mpo na bango atako bazalaki bato ya kozanga kokoka. (Yoane 13:1; 15:13) Ndenge moko mpe, balendisi mibali boye: “Bókoba kolinga basi na bino mpe bóyokelaka bango nkanda makasimakasi te.” (Bakolose 3:19) Nini ekosalisa mobali asalela toli yango, mingimingi soki mwasi na ye asalaka ntango mosusu makambo na bokɛngi te? Asengeli koyeba ete ye mpe asalaka mabunga mpe asengeli kobosana te likambo oyo esengeli mpo Nzambe alimbisa ye. Likambo nini? Kolimbisa baoyo basali ye mabe, ezala mpe mwasi na ye. Mwasi na ye asengeli mpe kosala bongo. (Matai 6:12, 14, 15) Omoni sikoyo ntina oyo bato mosusu balobaka ete libala ya malamu ezali oyo mobali ná mwasi balimbisanaka?

7. Yesu azalaki kotalela likambo nini, mpe yango epesi mibali ndakisa nini?

7 Mibali basengeli mpe koyeba ete Yesu azalaki ntango nyonso kotyela bayekoli na ye likebi. Ayebaki esika makoki na bango esuki mpe oyo nzoto na bango esengelaki na yango. Na ndakisa, soki balɛmbi, azalaki koyebisa bango ete: “Bino bóya, kaka bino moko, na esika oyo bato bazali te mpe bópema mwa moke.” (Malako 6:30-32) Ebongi mpe kotyelaka basi likebi bongo. Biblia elobi ete bazali “mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ” mpe esɛngi mibali bápesaka bango “lokumu.” Mpo na nini? Mpamba te ezala mibali to basi, bango nyonso bazwi “boboto monene ya bomoi.” (1 Petelo 3:7) Mibali basengeli kobosanaka te ete bosembo nde epesaka moto motuya na miso ya Nzambe, ezala mwasi to mobali.​—Nzembo 101:6.

8. (a) Na ndenge nini mobali “oyo azali kolinga mwasi na ye azali komilinga ye moko”? (b) Kozala “mosuni moko” elakisi nini mpo na mobali ná mwasi na ye?

8 Biblia elobi ete mobali “oyo azali kolinga mwasi na ye azali komilinga ye moko.” Ezali bongo mpamba te, ndenge Yesu alobaki yango, mobali ná mwasi na ye “bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko kaka.” (Matai 19:6) Yango wana, basengeli kokokisa bamposa na bango ya kosangisa nzoto  kaka bango mibale, kasi na moto mosusu te. (Masese 5:15-21; Baebele 13:4) Mpo básala bongo, esengeli mokomoko na bango aluka nde kokokisa bamposa ya moninga, kasi kaka ya ye moko te. (1 Bakolinti 7:3-5) Maloba oyo ezali mpe na ntina mingi: “Ata moto moko te ayinaka mosuni na ye moko; kasi aleisaka nde yango mpe alɛngɛlaka yango.” Mibali basengeli kolinga basi na bango lokola bamilingaka bango moko, basengeli kobosanaka te ete bazali na ngambo epai ya Yesu Klisto, mokonzi na bango, soki basali bongo te.​—Baefese 5:29; 1 Bakolinti 11:3.

9. Wapi ezaleli ya Yesu oyo balobeli na Bafilipi 1:8, mpe mpo na nini mibali basengeli komonisa yango epai na basi na bango?

9 Ntoma Paulo alobelaki ‘bolingo ya motema oyo Klisto Yesu azali na yango.’ (Bafilipi 1:8) Boboto ya Yesu ezalaki kokitisa bato motema. Yango wana, basi oyo bakómaki bayekoli na ye bazalaki kosepela na yango mingi. (Yoane 20:1, 11-13, 16) Mpe basi bazalaka na mposa makasi ete mibali na bango bámonisa ete balingaka bango mingi.

NDAKISA MPO NA BASI

10. Yesu atikeli basi ndakisa nini?

10 Libota ezali lokola kompani; yango wana, mpo etambola malamu, esengeli mokonzi azala. Ata Yesu azali na Mokonzi oyo ye atosaka. Se ndenge “mokonzi ya mwasi ezali mobali,” “mokonzi ya Klisto ezali Nzambe.” (1 Bakolinti 11:3) Kotosa oyo Yesu atosaka bokonzi ya Nzambe ezali ndakisa moko ya malamu mpenza mpo na biso, mpamba te biso nyonso tozali na mokonzi oyo tosengeli kotosa.

11. Ezaleli nini mwasi asengeli kozala na yango epai ya mobali na ye, mpe yango ekoki kobota mbuma nini?

11 Mibali bazali bato ya kozanga kokoka; yango wana, basalaka mabunga mpe mbala mingi batambwisaka libota na ndenge esengeli te. Na yango, mwasi asengeli kosala nini? Asengeli kokitisa mobali na ye te to koluka kobɔtɔla bokonzi na ye te. Mwasi asengeli kobosanaka te ete elimo ya kimya mpe ya boboto nde ezali na motuya monene na miso ya Nzambe. (1 Petelo 3:4) Soki azali komonisa elimo yango, ekozala  pɛtɛɛ mpenza mpo atosa ndenge Nzambe azali kosɛnga, ezala ata na ntango ya mikakatano. Longola yango, Biblia elobi ete: “Mwasi asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.” (Baefese 5:33) Bongo soki mobali na ye azali kondima te ete Klisto azali Mokonzi na ye? Biblia elendisi basi boye: “Bótosaka mibali na bino moko, mpo ete, soki bamosusu batosaka liloba te, bázwama kozanga liloba na nzela ya etamboli ya basi na bango, mpamba te bamoni na miso na bango moko etamboli na bino ya pɛto elongo na limemya makasi.”​1 Petelo 3:1, 2.

12. Mpo na nini ezali mabe te ete mwasi apesa makanisi na ye na limemya?

12 Ata soki mobali azali mondimi lokola mwasi to te, soki mwasi apesi ye likanisi na mayele mpenza, yango emonisi te ete azangi limemya. Likanisi na ye ekoki kozala malamu, mpe libota mobimba bakoki kozwela yango bolamu soki mobali na ye ayokeli ye. Atako Abalayama andimaki te kosala likambo oyo mwasi na ye Sara ayebisaki ye mpo na kosilisa mokakatano moko oyo ebimaki na libota na bango, Nzambe ayebisaki ye boye: “Yoká mongongo na ye.” (Genese 21:9-12, NW) Nzokande, ntango mobali azwi ekateli na likambo moko, mwasi na ye asengeli kotosa yango soki ebuki mibeko ya Nzambe te.​—Misala 5:29; Baefese 5:24.

Ndakisa nini ya malamu mpenza Sara atikelá basi?

13. (a) Tito 2:4, 5 elendisi basi básala nini? (b) Biblia elobi nini mpo na kokabwana mpe koboma libala?

13 Mwasi akoki kokokisa mokumba na ye na libota na ndenge mingi. Na ndakisa, Biblia elobi ete basi basengeli ‘kolinga mibali na bango, kolinga bana na bango, kozala bato ya makanisi malamu, pɛto na bizaleli, basali misala na ndako, bato malamu, oyo batosaka mibali na bango moko.’ (Tito 2:4, 5) Soki mwasi, oyo azali mpe na bana, azali kosala bongo, mobali ná bana na ye bakolinga ye mpe bakomemya ye ntango nyonso. (Masese 31:10, 28) Lokola libala esangisaka bato mibale oyo bazangi kokoka, mikakatano mosusu ya makasi ekoki kosala ete bákabwana to báboma libala. Biblia elobi ete ezali na makambo oyo ekoki kosala ete mwasi ná mobali bákabwana. Atako bongo, kokabwana ezali likambo ya lisɛki te,  mpamba te Biblia epesi toli oyo: “Mwasi akabwana na mobali na ye te; . . . mpe mobali asengeli kotika mwasi na ye te.” (1 Bakolinti 7:10, 11) Mpe Biblia epesi moto nzela ya koboma libala kaka soki mobalani na ye asali pite.​—Matai 19:9.

NDAKISA YA MALAMU MPENZA MPO NA BABOTI

14. Makambo nini Yesu azalaki kosalela bana, mpe bana bazalaka na mposa baboti básalela bango nini?

14 Makambo oyo Yesu azalaki kosalela bana ezali ndakisa malamu mpenza oyo atikeli baboti. Ntango bamekaki kopekisa bana mike bápusana penepene na Yesu, alobaki boye: “Bótika bana mike báya epai na ngai; bómeka te kopekisa bango.” Biblia elobi ete nsima na yango, “akamataki bana na mabɔkɔ na ye mpe abandaki kopambola bango, kotyáká mabɔkɔ na ye likoló na bango.” (Malako 10:13-16) Lokola Yesu alekisaki ntango elongo na bana mike, yo mpe osengeli te kosalaka bongo na bana na yo? Bazali na mposa olekisaka elongo na bango kaka mwa ntango moke te, kasi nde ntango mingi. Osengeli kolekisaka ntango elongo na bango mpo na koteya bango, mpamba te yango nde likambo Yehova asɛngi baboti básala.​—Deteronome 6:4-9.

15. Baboti bakoki kosala nini mpo na kobatela bana na bango?

15 Lokola mokili oyo ezali se kobeba, bana bazali na mposa  ya baboti oyo bakobatela bango mpo bákwea te na mabɔkɔ ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe, na ndakisa bato oyo bakosaka bana mpo na kosangisa na bango nzoto. Talá ndenge Yesu abatelaki bayekoli na ye, baoyo azalaki kobenga na bolingo mpenza “bana mike.” Ntango bakangaki Yesu mpo báboma ye, asalaki ete bayekoli na ye bákoka kokima. (Yoane 13:33; 18:7-9) Yo moboti, osengeli kozala ekɛngɛ na makambo oyo Zabolo azali kosala mpo na koluka kobebisa bana na yo ya mike. Osengeli kokebisa bango. * (1 Petelo 5:8) Lelo oyo, bomoi ya bana, elimo mpe etamboli na bango ekómi na likama monene koleka ndenge ezalaki liboso.

Liteya nini baboti bakoki kozwa na makambo oyo Yesu azalaki kosalela bana?

16. Liteya nini baboti bakoki kozwa na lolenge oyo Yesu azalaki kosala soki bayekoli na ye basali libunga?

 16 Na butu oyo ezalaki liboso Yesu akufa, mwa kowelana ebimaki na kati ya bayekoli na ye na likambo ya koyeba nani aleki baninga. Na esika Yesu asilika, na bolingo mpenza atikaki te koluka kosimba mitema na bango na maloba mpe na ndakisa na ye. (Luka 22:24-27; Yoane 13:3-8) Soki ozali moboti, omoni sikoyo ndenge oyo okoki kolanda ndakisa ya Yesu na lolenge na yo ya kopesa bana disipilini? Ezali solo ete bana bazali na mposa na yango, kasi esengeli kopesa bango yango “na ndenge oyo esengeli” kasi na nkanda te. Ekozala malamu te kobimisa maloba kozanga kokanisa ‘lokola nde ozali kotuba na mopanga.’ (Yilimia 30:11, NW; Masese 12:18) Osengeli kopesa mwana disipilini na ndenge oyo mwana akomona ete ezalaki na ntina.​—Baefese 6:4; Baebele 12:9-11.

NDAKISA MPO NA BANA

17. Na makambo nini Yesu atikelaki bana ndakisa ya malamu mpenza?

17 Bana bakoki kozwa liteya epai ya Yesu? Ɛɛ! Na makambo oyo Yesu ye moko asalaki, amonisaki ndenge oyo bana basengeli kotosa baboti na bango. Alobaki ete: “Kaka ndenge Tata ateyaki ngai, ndenge mpe nazali koloba.” Abakisaki boye: “Nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka ye.” (Yoane 8:28, 29) Yesu azalaki kotosa Tata na ye ya likoló, mpe Biblia ezali koyebisa bana bátosaka baboti na bango. (Baefese 6:1-3) Atako Yesu azalaki mwana ya kokoka, azalaki kotosa baboti na ye, Yozefe ná Maria, bato ya kozanga kokoka. Na ntembe te, botosi wana esalaki mpe ete moto mokomoko ya libota wana azala na esengo!​—Luka 2:4, 5, 51, 52.

18. Mpo na nini Yesu azalaki ntango nyonso kotosa Tata na ye ya likoló, mpe nani asepelaka ntango bana bazali kotosa baboti na bango lelo oyo?

18 Ezali nde na makambo oyo bana bakoki kosala mpo na kozala mpenza lokola Yesu mpe kosepelisa baboti na bango? Ezali solo ete bana bayokaka ntango mosusu kilo kotosa baboti na bango, kasi yango nde likambo Nzambe alingi ete  básala. (Masese 1:8; 6:20) Yesu azalaki ntango nyonso kotosa Tata na ye ya likoló, ata na ntango ya mikakatano. Mokolo moko, Nzambe alingaki ete Yesu asala likambo moko ya mpasi mpenza, Yesu alobaki na ye ete: “Longolá kɔpɔ oyo [likambo oyo Nzambe asɛngaki ye] epai na ngai.” Atako bongo, Yesu asalaki likambo yango, mpamba te andimaki ete Tata na ye ayebi eloko oyo ezalaki malamu mingi mpo na ye na ntango wana. (Luka 22:42) Soki bana bazali koyekola kozala na botosi, bakosepelisa mpenza baboti na bango mpe Tata na bango ya likoló. *​—Masese 23:22-25.

Bilenge basengeli kokanisa nini ntango bamekami?

19. (a) Ndenge nini Satana amekaka bana? (b) Etamboli mabe ya bana ekoki kosala nini epai ya baboti na bango?

19 Zabolo amekaki Yesu, mpe tóyeba ete akomeka mpe bilenge mpo básala mabe. (Matai 4:1-10) Satana Zabolo asalelaka baninga mpo bátinda bilenge mosusu na kosala mabe, mpe ntango mosusu ezalaka mpasi mpo na koboya. Yango wana, ezali na ntina mingi ete bana bátambolaka te na bato oyo basalaka mabe! (1 Bakolinti 15:33) Dina, mwana mwasi ya Yakobo, azalaki kotambola na bato oyo bazalaki kosambela Yehova te, mpe yango ebimisaki mpasi mingi na nsima. (Genese 34:1, 2) Kanisá mpasi oyo bato ya libota bakoyoka soki moko na bango asali pite to ekobo!​—Masese 17:21, 25.

 SƐKƐLƐ YA KOZALA NA LIBOTA YA ESENGO

20. Mpo na kozala na libota ya esengo, moto mokomoko ya libota asengeli kosala nini?

20 Soki bato ya libota bazali kosalela toli ya Biblia, ezalaka mpasi mingi te bálonga mikakatano oyo ebimaka na libota. Kutu, kosalela toli yango nde ezali sɛkɛlɛ mpo na kozala na libota ya esengo. Na yango, mibali, bólinga basi na bino, bómonisela bango ezaleli oyo Yesu amoniselaka lisangá. Basi, bótosaka bokonzi ya mibali na bino mpe bólanda ndakisa ya mwasi ya makoki oyo balobeli na Masese 31:10-31. Baboti, bóteyaka bana na bino. (Masese 22:6) Batata, ‘bókambaka ndako na bino na ndenge ya malamu mingi.’ (1 Timote 3:4, 5; 5:8) Mpe bino bana, bótosaka baboti na bino. (Bakolose 3:20) Moto moko te na libota azali moto ya kokoka, mpamba te biso nyonso tosalaka mabunga. Yango wana, bózalaka na komikitisa, bósɛnganaka bolimbisi.

21. Makambo nini ya malamu mpenza ezali kozela biso, mpe ndenge nini tokoki kozala na libota ya esengo banda sikoyo?

21 Ya solo mpenza, Biblia ezali na ebele ya toli mpe ya mateya ya ntina oyo etali libota. Longola yango, ezali koteya biso makambo ya mokili ya sika ya Nzambe, mpe ya paladiso awa na mabelé oyo ekotonda na bato ya esengo oyo bakosambela Yehova. (Emoniseli 21:3, 4) Talá makambo ya malamu mpenza oyo ezali kozela biso! Ata sikoyo, tokoki kozala na libota ya esengo soki tozali kosalela malako ya Nzambe oyo ezali na Liloba na ye, Biblia.

^ par. 15 Mpo na koyeba ndenge ya kobatela bana, talá buku Yekolá epai ya Moteyi Monene, na Mokapo 32, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 18 Soki moboti asɛngi mwana abuka mobeko ya Nzambe, na ntango wana nde mwana akotosa te.​—Misala 5:29.