Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Biblia eteyaka mpenza nini?

 MOKAPO YA ZOMI NA MIBALE

Bomoi oyo esepelisaka Nzambe

Bomoi oyo esepelisaka Nzambe
  • Ndenge nini okoki kokóma moninga ya Nzambe?

  • Na ndenge nini ntembe oyo Satana abimisaki etali mpe yo?

  • Bomoi ya ndenge nini esepelisaka Nzambe te?

  • Ndenge nini okoki kozala na bomoi oyo esepelisaka Nzambe?

1, 2. Tángá bato mosusu oyo Yehova amonaki ete bazali baninga na ye ya motema.

OKOLINGA kozala na moninga ya ndenge nini? Ntembe ezali te ete okolinga kozala na moninga oyo atalelaka makambo lokola yo, oyo alingaka makambo oyo yo olingaka mpe oyo alandaka mitinda oyo yo olandaka. Lisusu, okolinga moto oyo azali na bizaleli malamu, na ndakisa bosembo mpe boboto.

2 Banda kala, Yehova Nzambe aponaka bato mosusu bázala baninga na ye ya motema. Na ndakisa, abengaki Abalayama moninga na ye. (Yisaya 41:8; Yakobo 2:23) Abengaki Davidi ete “moto oyo motema na ngai esepeli na ye,” mpamba te Davidi azalaki lolenge ya bato oyo ye alingaka. (Misala 13:22) Mpe na miso na ye, mosakoli Danyele azalaki moto oyo ‘alingami mingi.’​—Danyele 9:23.

3. Mpo na nini Yehova aponaka bato mosusu bázala baninga na ye?

3 Mpo na nini Yehova andimaki Abalayama, Davidi mpe Danyele bázala baninga na ye? Yoká ndenge alobaki na Abalayama: “Yo osili kotosa monɔkɔ na ngai.” (Genese 22:18) Yango emonisi ete Yehova apusanaka penepene na baoyo basalaka na komikitisa mpenza makambo oyo asɛngaka bango. Ayebisaki Bayisalaele ete: “Bótosa mongongo na ngai mpe nakozala Nzambe na bino  mpe bino bokozala bato na ngai.” (Yilimia 7:23) Soki ozali kotosa Yehova, yo mpe okoki kokóma moninga na ye!

YEHOVA APESAKA BANINGA NA YE MAKASI

4, 5. Na ndenge nini Yehova amonisaka nguya na ye mpo na bolamu ya basaleli na ye?

4 Kanisá naino makambo ya malamu oyo okozwa soki ozali moninga ya Nzambe. Biblia elobi ete Yehova azali koluka mabaku ya ‘komonisa nguya na ye mpo na baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye.’ (2 Ntango 16:9) Ndenge nini Yehova akoki komonisa nguya na ye mpo na bolamu na yo? Nzembo 32:8 emonisi biso lolenge moko oyo akoki kosala yango, elobi boye: “[Ngai Yehova] nakoteya yo mpe nakolakisa yo nzela ekoki na yo [kolanda]; nakopesa yo toli wana nazali kotala yo.”

5 Ndenge oyo Yehova atyelaka bato likebi ezali mpenza kosimba motema! Akopesa yo toli oyo osengeli na yango mpe akokɛngɛla yo ntango ozali kosalela yango. Yehova Nzambe alingi kosalisa yo olonga komekama oyo ozali kokutana na yango. (Nzembo 55:22) Na yango, soki ozali kosalela ye na motema mobimba, yo mpe okoki kotyela ye motema ndenge moko na mokomi ya nzembo oyo alobaki ete: “Natii [Yehova] liboso na ngai libela; azali na lobɔkɔ na ngai ya mobali, bongo nakokwea te.” (Nzembo 16:8; 63:8) Ɛɛ, Yehova akoki kosalisa yo ozala na bomoi oyo esepelisaka ye. Nzokande, lokola oyebi, ezali na monguna moko ya Nzambe oyo akolinga te ozala na bomoi ya ndenge wana.

NTEMBE OYO SATANA ABIMISAKI

6. Makanisi mabe nini Satana azwelaki bato?

6 Mokapo 11 ya buku oyo elimbolaki ndenge oyo Satana Zabolo abɛtɛlaki bokonzi ya Nzambe ntembe. Satana alobaki ete Nzambe akosaki; maloba na ye elakisaki lisusu ete Yehova azali sembo te mpo atikaki te ete Adama ná Eva bákataka bango moko nini ezali mabe nini ezali malamu. Nsima ya lisumu ya Adama ná Eva, ntango mabelé ebandaki kotonda mokemoke na bana na bango, Satana abimisaki ntembe mosusu, ete bato basalelaka Nzambe na makanisi ya malamu te. Mpo na ye, ‘soki bato basalelaka Nzambe, ezali te mpo balingaka ye.’ Lisusu,  soki bapesi ye nzela, akoki kotinda moto nyonso atika kosalela Nzambe. Lisolo ya Yobo emonisi ete Satana akanisaki mpenza bongo. Yobo azalaki nani, mpe ndenge nini ntembe yango oyo Satana abimisaki etalelaki ye?

7, 8. (a) Nini ekesenisaki Yobo na bato ya ntango wana? (b) Ntembe nini Satana abimisaki mpo na komonisa ete Yobo azali kosalela Nzambe na makanisi ya malamu te?

7 Yobo azalaki na bomoi eleki sikoyo mbula soki 3 600. Azalaki moto malamu, mpamba te Yehova alobaki mpo na ye ete: “Mosusu azali lokola ye kati na mokili te, moto malamu bɛɛ mpe ya sembo, oyo akotosaka Nzambe mpe akoboyaka mabe.” (Yobo 1:8) Nzambe azalaki kosepela na Yobo.

8 Satana Zabolo andimaki mpenza te ete makanisi ya malamu nde ezalaki kotinda Yobo asalela Nzambe. Alobaki na Yehova ete: “Yo otiki lopango kozingela [Yobo] te mpo na ndako na ye mpe na biloko na ye nyonso epai na epai? Opamboli mosala ya mabɔkɔ na ye mpe bibwɛlɛ na ye esili kofuluka mingi kati na mokili. Nde tiká ete osembola lobɔkɔ na yo [sikoyo mpe osimba] nyonso ezali na ye mpe akolakela yo mabe na miso na yo.”​—Yobo 1:10, 11.

9. Eyano nini Yehova apesaki na ntembe ya Satana, mpe mpo na nini?

9 Yango emonisi ete mpo na Satana, Yobo azalaki kosalela Nzambe kaka mpo na bolamu oyo azalaki kozwa. Zabolo alobaki mpe ete soki Yobo amekami, akopesa Nzambe mokɔngɔ. Eyano nini Yehova apesaki na ntembe yango ya Satana? Lokola likambo yango etalelaki nde makanisi ya motema ya Yobo, Yehova apesaki Satana nzela ameka Yobo. Na ndenge wana, ekomonana polele soki Yobo alingaka Nzambe to te.

YOBO AMEKAMI

10. Bampasi nini ekómelaki Yobo, mpe asalaki nini?

10 Eumelaki te, Satana amekaki Yobo na makambo ndenge na ndenge. Bayibaki bibwɛlɛ mosusu ya Yobo mpe mosusu ebomamaki. Babomaki basali na ye ebele. Nyonso wana ekómisaki ye mobola. Longola yango, mopɛpɛ moko ya makasi ebomaki bana na ye zomi. Kasi, atako bampasi nyonso wana ekwelaki Yobo, ‘asalaki lisumu te mpe afundaki Nzambe na ntina na mabe te.’​—Yobo 1:22.

11. (a) Wapi likanisi mosusu oyo Satana azwelaki Yobo, mpe Yehova asalaki nini? (b) Yobo asalaki nini ntango abɛlaki maladi moko ya mabe mpenza?

 11 Satana azongaki nsima te. Mbala mosusu akanisaki ete ata soki Yobo ayikaki mpiko ntango abungisaki biloko na ye, basali na ye mpe bana na ye, akopesa Nzambe mokɔngɔ soki azwi maladi. Yehova atikaki Satana apesa Yobo maladi moko ya mabe mpenza. Atako bongo, Yobo atikaki kondimela Nzambe te. Kutu, alobaki nde na motema moko ete: “Kino nakokufa, nakotika bosembo na ngai te!”​—Yobo 27:5, NW.

Yobo azwaki mbano mpo na bosembo na ye

12. Ndenge nini etamboli ya Yobo emonisaki ete makambo oyo Zabolo alobaki ezali lokuta?

12 Yobo ayebaki te ete Satana moto azali konyokola ye bongo. Lokola ayebaki malamumalamu te ntembe oyo Satana abimisaki mpo na bokonzi ya Yehova, akanisaki ete Nzambe nde azali kobimisela ye mikakatano wana. (Yobo 6:4; 16:11-14) Atako bongo, atikalaki sembo epai ya Yehova. Mpe bosembo ya Yobo emonisaki ete Satana akosaki ntango alobaki ete Yobo azali kosalela Nzambe mpo na koluka bolamu na ye moko!

13. Lokola Yobo atikalaki sembo epai ya Nzambe, yango ebotaki mbuma nini?

13 Bosembo ya Yobo epesaki Yehova nzela ya kopesa eyano oyo ebongi mpenza na ntembe oyo Satana abimisaki mpo na kotyola Ye. Yobo azalaki mpenza moninga ya Yehova, mpe Yehova apambolaki ye mpo na bosembo na ye.​—Yobo 42:12-17.

YANGO ETALI MPE YO

14, 15. Mpo na nini tokoki koloba ete ntembe oyo Satana abimisaki mpo na Yobo etali bato nyonso?

14 Likambo ya kotikala sembo epai ya Nzambe oyo Satana abimisaki etalaki kaka Yobo te. Etali mpe yo. Masese 27:11 (NW) emonisi polele ete ezali bongo; na vɛrsɛ yango, Liloba ya Yehova elobi ete: “Mwana na ngai, zalá na bwanya mpe sepelisá motema na ngai, mpo nazongisa monɔkɔ epai ya moto oyo azali kotumola ngai.” Maloba yango, oyo ekomamaki ebele ya bambula nsima ya liwa ya Yobo, emonisi ete Satana azali kaka kotumola Nzambe mpe kofunda basaleli na Ye. Ntango tozali kosala makambo oyo esepelisaka Yehova, tozali mpenza kopesa ye likoki ya kozongisa monɔkɔ na bifundeli ya lokuta  ya Satana mpe na ndenge yango, tozali kosepelisa motema ya Nzambe. Omoni likambo yango ndenge nini? Omoni te ete ekozala malamu mpenza yo mpe opesa Nzambe likoki ya kozongisa monɔkɔ na bifundeli ya lokuta ya Zabolo, ata soki yango ekosɛnga osala to otika makambo mosusu na bomoi na yo?

15 Yoká ndenge Satana alobaki: “Moto akopesa nyonso ezali na ye mpo na bomoi na ye.” (Yobo 2:4) Lokola Satana alobaki “moto,” amonisaki ete efundeli na ye etali kaka Yobo te, kasi bato nyonso. Yango ezali likambo moko ya ntina mingi. Satana abɛti ntembe ete yo okotikala sembo epai ya Nzambe te. Alingi ete otosa Nzambe te mpe otikala sembo te ntango okutani na mikakatano. Akosala nini?

16. (a) Mayele nini Satana asalelaka mpo na kotinda bato báboya Nzambe? (b) Ndenge nini Zabolo akoki kosalela mayele yango mpo na kokweisa yo?

16 Ndenge tomonaki na Mokapo 10, Satana asalelaka mayele ndenge na ndenge mpo na kotinda bato báboya Nzambe. Ya liboso, alandaka bato “lokola nkɔsi oyo ezali konguluma, kolukáká kolya [bango].” (1 Petelo 5:8) Na yango, mokano mabe ya Satana ekoki komonana ntango baninga, bandeko, to bato mosusu bazali kotya yo mpanzi likoló mpo ozali kosala milende ya koyekola Biblia mpe kosalela makambo oyo ozali koyekola. * (Yoane 15:19, 20) Lisusu, Satana “azali kokoba komibimisa lokola anzelu moko ya pole.” (2 Bakolinti 11:14) Akoki kosalela mayele mabe mpo na kobungisa yo nzela mpe kokosa yo mpo omipesa na bomoi oyo esepelisaka Nzambe te. Soki olɛmbi nzoto, ntango mosusu akoki kotinda yo okanisa ete okokoka te kosepelisa Nzambe. (Masese 24:10) Satana azala lokola “nkɔsi oyo ezali konguluma” to lokola “anzelu moko ya pole,” ntembe na ye ezali kaka moko: Alobi ete soki omekami to okutani na masɛnginya, okotika kosalela Nzambe. Ndenge nini okoki  kopesa eyano na ntembe wana mpe komonisa ete ozali sembo epai ya Nzambe, lokola Yobo?

KOTOSA MIBEKO YA YEHOVA

17. Wapi ntina ya libosoliboso oyo osengeli kotosa mibeko ya Yehova?

17 Okoki kozongisa monɔkɔ na ntembe ya Satana soki na bomoi na yo ozali kosala makambo oyo esepelisaka Nzambe. Yango esɛngi nini? Biblia eyanoli boye: “Okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba.” (Deteronome 6:5) Ntango okokóma kolinga Nzambe makasi, okokóma mpe na mposa makasi ya kosala makambo oyo azali kosɛnga yo. Ntoma Yoane akomaki ete: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka [mibeko] na ye.” Soki olingi Yehova na motema na yo mobimba, okomona ete “[mibeko] na ye ezali kilo te.”​—1 Yoane 5:3.

18, 19. (a) Tángá mwa ndambo ya mibeko ya Yehova. (Talá etanda “ Boyá makambo oyo Yehova ayini.”) (b) Ndenge nini toyebi ete Yehova azali kosɛnga biso makambo oyo eleki biso na makasi te?

18 Wapi mibeko yango ya Yehova? Mosusu etaleli etamboli oyo tosengeli koboya. Na ndakisa, talá etanda, oyo ezali na motó ya likambo “ Boyá makambo oyo Yehova ayini.” Etanda yango emonisi makambo oyo Biblia elobi polele ete ezali mabe. Soki otali yango likolólikoló, okoki kokanisa ete makambo mosusu oyo ezali wana ezali mpenza mabe te. Kasi, soki okanisi malamumalamu bavɛrsɛ oyo ezali wana, okomona mpenza ete mibeko ya Yehova ezali na bwanya. Ntango mosusu, likambo ya mpasi oyo osengeli kosala ekozala nde kotika bizaleli na yo mosusu to kokóma na bizaleli ya sika. Kasi, yebá ete kozala na bomoi oyo esepelisaka Nzambe epesaka esengo mpe bolamu mingi. (Yisaya 48:17, 18) Yo mpe okoki kozala na bomoi ya ndenge wana. Ndenge nini toyebi yango?

19 Yehova asɛngaka biso te makambo oyo eleki biso na makasi. (Deteronome 30:11-14) Ayebi malamu koleka biso moko makambo nini tokoki kosala ná oyo tokoki kosala te. (Nzembo 103:14) Longola yango, akoki kopesa biso makasi mpo tótosa ye. Ntoma Paulo akomaki ete: “Nzambe azali sembo, mpe akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema, kasi nzela moko na komekama akobongisela mpe  bino nzela ya kobimela mpo bózala na likoki ya koyikela yango mpiko.” (1 Bakolinti 10:13) Mpo na kosalisa yo oyika mpiko, Yehova akoki ata kopesa yo “nguya oyo eleki makasi.” (2 Bakolinti 4:7) Paulo ayikelaki komekama mingi mpiko; yango wana alobaki ete: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.”​—Bafilipi 4:13.

KOKÓMA NA BIZALELI OYO NZAMBE ALINGAKA

20. Bizaleli nini Nzambe alingaka oyo osengeli kokóma na yango, mpe bizaleli yango ezali na ntina nini?

20 Kasi, mpo na kosepelisa Yehova, osengeli kosuka te  kaka na koboya makambo oyo ayini. Osengeli mpe kolinga makambo oyo alingi. (Baloma 12:9) Osepelaka na bato oyo batalelaka makambo lokola yo, oyo balingaka makambo oyo yo olingaka mpe balandaka mitinda oyo yo olandaka, boye te? Yehova mpe azalaka kaka bongo. Yango wana, yekolá kolinga makambo oyo Yehova asepelaka na yango mingi. Ndambo ya makambo yango ezali na Nzembo 15:1-5, oyo ezali kolobela bato oyo Nzambe amonaka ete bazali baninga na ye. Baninga ya Yehova bamonisaka oyo Biblia ebengi “mbuma ya elimo.” Mbuma yango ezali na bizaleli lokola “bolingo, esengo, kimya, motema molai,  motema malamu, bolamu, kondima, boboto, komipekisa.”​—Bagalatia 5:22, 23.

21. Nini ekosalisa yo okóma na bizaleli oyo Nzambe alingaka?

21 Kotánga mpe koyekola Biblia mbala na mbala ekosalisa yo okóma na bizaleli oyo Nzambe alingaka. Lisusu, soki ozali koyekola makambo oyo Nzambe asɛngaka, ekosalisa yo oyokanisa makanisi na yo na oyo ya Nzambe. (Yisaya 30:20, 21) Soki okómi kolinga Yehova mingi, okokóma mpe na mposa makasi ya kosala makambo oyo esepelisaka ye.

22. Soki ozali na bomoi oyo esepelisaka Nzambe, yango ekopesa yo libaku ya kosala nini?

22 Mpo na kozala na bomoi oyo esepelisaka Yehova esɛngaka kosala makasi. Biblia emonisi ete kobongola bomoi na yo ekokani na kolongola bomoto na yo ya kala mpe kolata oyo ya sika. (Bakolose 3:9, 10) Kasi, mpo na oyo etali mibeko ya Yehova, mokomi ya nzembo akomaki ete: ‘Libonza monene ekomonana na kotosa yango.’ (Nzembo 19:11) Yo mpe okomona ete kozala na bomoi oyo esepelisaka Nzambe epesaka mpenza bolamu. Soki ozali na bomoi ya ndenge yango, okozongisa monɔkɔ na ntembe oyo Satana abimisaki mpe okosepelisa motema ya Yehova!

^ par. 16 Yango elingi koloba te ete baoyo bazali kotya yo mpanzi likoló bazali mpenzampenza kotambwisama na Satana. Kasi Satana azali nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, mpe ye nde moto azali kotambwisa mokili mobimba. (2 Bakolinti 4:4; 1 Yoane 5:19) Yango wana, soki ozali na bomoi oyo esepelisaka Nzambe, bato mingi bakosepela na yo te, mpe basusu bakotya yo mpanzi likoló.