Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Biblia eteyaka mpenza nini?

 MOKAPO YA ZOMI NA MISATO

Talelá bomoi ndenge Nzambe atalelaka yango

Talelá bomoi ndenge Nzambe atalelaka yango
  • Ndenge nini Nzambe atalelaka bomoi?

  • Ndenge nini Nzambe atalelaka likambo ya kosopa zemi?

  • Ndenge nini tomonisaka ete bomoi ezali na valɛrɛ?

1. Nani azalisaki biloko nyonso ya bomoi?

MOSAKOLI Yilimia alobaki ete: “[Yehova] azali Nzambe na solo, ye Nzambe ya bomoi.” (Yilimia 10:10) Yehova Nzambe azali mpe Mozalisi ya biloko nyonso ya bomoi. Kuna na likoló, bikelamu ya elimo balobaki na ye ete: “Yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.” (Emoniseli 4:11) Na loyembo moko oyo Mokonzi Davidi ayembaki mpo na kokumisa Nzambe, alobaki ete: “Na yo ezali liziba ya bomoi.” (Nzembo 36:9) Yango emonisi ete bomoi ezali likabo ya Nzambe.

2. Ndenge nini Nzambe abatelaka bomoi na biso?

2 Yehova abatelaka mpe bomoi na biso. (Misala 17:28) Apesaka biso biloko oyo tolyaka, mai oyo tomɛlaka, mpema oyo topemaka, mpe apesá biso mabelé oyo tofandi. (Misala 14:15-17) Yehova apesi biso biloko yango mpo tósepela na bomoi. Kasi, mpo tósepela mpenza na bomoi yango, tosengeli koyekola mibeko na ye mpe kotosa yango.​—Yisaya 48:17, 18.

TÓMONISA ETE TOMEMYAKA BOMOI

3. Nzambe asalaki nini ntango babomaki Abele?

3 Nzambe alingi ete tómemyaka bomoi​—ya biso moko mpe oyo ya basusu. Na ndakisa, na ntango ya Adama ná Eva, mwana na bango Kaina asilikelaki leki na ye Abele makasi. Yehova  akebisaki Kaina ete nkanda na ye ekoki komema ye na lisumu monene. Kaina akangaki matoi. “Amibwakaki likoló ya ndeko na ye Abele mpe abomaki ye.” (Genese 4:3-8) Yehova apesaki Kaina etumbu mpo abomaki ndeko na ye.​—Genese 4:9-11.

4. Na Mibeko ya Moize, ndenge nini Nzambe amonisaki polele lolenge malamu ya kotalela bomoi?

4 Bankóto ya bambula na nsima, Yehova apesaki libota ya Yisalaele mibeko mpo na kosalisa bango básalela ye na ndenge oyo ebongi. Mbala mosusu, babengaka mibeko yango Mibeko ya Moize, mpamba te apesaki bango yango na nzela ya mosakoli Moize. Moko na Mibeko yango elobaki ete: “Okoboma te.” (Deteronome 5:17) Yango emonisaki Bayisalaele ete Nzambe atalelaka bomoi ya bato na valɛrɛ mingi mpe ete bato basengeli kotalelaka bomoi ya basusu na valɛrɛ mingi.

5. Ndenge nini tosengeli kotalela likambo ya kosopa zemi?

5 Bongo bomoi ya mwana oyo azali naino na libumu? Mibeko ya Moize elobaki ete ezali mabe koboma mwana yango. Ata bomoi ya mwana oyo azali na libumu ezali mpenza na valɛrɛ na miso ya Yehova. (Exode 21:22, 23; Nzembo 127:3) Yango emonisi ete kosopa zemi ezali mabe.

6. Mpo na nini tosengeli koyina bato te?

6 Komemya bomoi esɛngi mpe kotalelaka bato mosusu na ndenge oyo esengeli. Biblia elobi ete: “Moto nyonso oyo azali koyina ndeko na ye azali mobomi, mpe boyebi ete mobomi ata moko te azali na bomoi ya seko efandi na kati na ye.” (1 Yoane 3:15) Soki tolingi bomoi ya seko, tosengeli koboya ezaleli ya koyina bato, mpamba te kobɛta to koboma bato eutaka mbala mingi na koyina. (1 Yoane 3:11, 12) Ezali na ntina mingi ete tóyekola kolingana.

7. Wapi mwa mimeseno oyo emonisaka ete moto azali kozwa bomoi na valɛrɛ te?

7 Bongo, ndenge nini tokoki komonisa ete bomoi na biso moko ezali na valɛrɛ? Moto ata moko te alingaka kokufa, nzokande bato mosusu basakanaka na liwa kaka mpo na komisepelisa. Na ndakisa, bato mingi bamɛlaka likaya, bangi mpe biloko mosusu oyo elangwisaka kaka mpo na komisepelisa. Nzokande, biloko yango ebebisaka nzoto mpe mbala  mingi ebomaka baoyo bamɛlaka to basalelaka yango. Moto oyo ameseni komɛla to kosalela biloko yango amonaka te ete bomoi ezali eloko ya bosantu. Komipesa na biloko wana ekómisaka moto mbindo na miso ya Nzambe. (Baloma 6:19; 12:1; 2 Bakolinti 7:1) Mpo tósalela Nzambe na ndenge oyo ebongi, tosengeli kotika mimeseno wana. Atako ekoki kozala mpasi mpo na kotika yango, Yehova akoki kosalisa biso mpo tólonga. Asepelaka ndenge totalelaka bomoi na biso ete ezali likabo moko ya valɛrɛ mingi.

8. Mpo na nini tosengeli kokeba na makambo oyo ekoki kobimisa makama?

8 Soki tozali komemya bomoi, tokokeba na makambo oyo ekoki kobimisa makama. Tokotya likebi mpenza na makambo tozali kosala mpe tokotya bomoi na biso na likama te kaka mpo na komisepelisa. Tokotambwisa motuka, tukutuku to velo na ndenge ya ligboma te mpe tokoboya masano ya makasi to oyo ekoki kobimisa makama. (Nzembo 11:5) Moko na mibeko oyo Nzambe apesaki Yisalaele na ntango ya kala elobaki ete: “Soki otongi ndako ya sika [oyo nsamba na yango ezali patatalu], osengeli kosala mwa lopango [to efelo moko ya mokuse] mpo na nsamba na yo, mpo otya nyongo ya makila likoló ya ndako na yo te mpamba te moto oyo azali kokwea akoki kokwea wana.” (Deteronome 22:8, NW) Mpo na kolanda likanisi ya ntina ya mobeko yango, biloko lokola baeskalye ya ndako na yo esengeli kozala malamu mpo ekweisa moto te, noki azoka mabe to abukana. Soki ozali na motuka, tukutuku to velo, kebá mpenza ete yango ebimisa makama te. Salá ete ndako na yo to motuka, tukutuku to velo na yo ezala likama te mpo na yo moko to mpo na bato mosusu.

9. Soki tozali komemya bomoi, ndenge nini tokotalela banyama?

9 Bongo bomoi ya banyama? Yango mpe ezali eloko ya bosantu na miso ya Mozalisi. Nzambe apesi bato nzela ete bábomaka nyama mpo na kolya mpe mpo na kosala bilamba to soki ekómi likama mpo na bato. (Genese 3:21; 9:3; Exode 21:28) Kasi, konyokola nyama to koboma yango kaka mpo na masano ezali mabe mpe ezali komonisa ete bomoi ezali eloko ya bosantu ata moke te na miso na biso.​—Masese 12:10.

 TÓMONISA ETE TOMEMYAKA MAKILA

10. Ndenge nini Nzambe amonisi ete bomoi ná makila ezali na boyokani?

10 Ntango Kaina abomaki ndeko na ye Abele, Yehova ayebisaki ye na nsima ete: ‘Mongongo ya makila ya ndeko na yo ezali koganga epai na ngai longwa na mabelé.’ (Genese 4:10) Ntango Nzambe alobelaki makila ya Abele, alobelaki nde bomoi na ye. Kaina asengelaki sikoyo kozwa etumbu mpo akataki bomoi ya Abele. Ezalaki lokola nde makila to bomoi ya Abele ezali kobelela Yehova makasi mpo na kofunda likambo. Nsima ya Mpela, na mikolo ya Noa, Yehova amonisaki lisusu ete bomoi ná makila ezali na boyokani. Liboso ya Mpela, bato bazalaki kolya kaka mbuma, ndunda, loso to masango, mpe biloko lokola nguba, mpe bongo na bongo. Nsima ya Mpela, Yehova ayebisaki Noa ná bana na ye ete: “Nyama inso izali na bomoi mpe ikotambolaka o mokili ikozala bilei bya bino: napesi bino yango inso lokola napesaki bino ndunda na matiti.” Kasi, apekisaki likambo oyo: “Nzokande bokolia mosuni te soko makila mazali naino o kati, zambi makila mazali bomoi.” (Genese 1:29; 9:3, 4, Liloba lya Nzambe) Yehova amonisi polele ete bomoi mpe makila ya moto to ya nyama ezali biloko mibale oyo ezali na boyokani mpenza.

11. Lolenge nini ya kosalela makila Nzambe apekisaki banda na mikolo ya Noa?

11 Tokomonisa ete tomemyaka makila soki tozali kolya yango te. Na Mibeko oyo Yehova apesaki Bayisalaele, apesaki bango etinda oyo: “Soki moto . . . akangi nyama to ndɛkɛ na [bokila], oyo ekoki kolyama, akosopa makila na yango mpe akozipa yango na putulu. . . . Nalobi na bato ya Yisalaele ete, Bokolya makila ya nyama moko te.” (Levitike 17:13, 14) Etinda oyo Nzambe apesaki libosoliboso na Noa mbula soki 800 liboso, ete alya makila ya nyama te, ezalaki naino. Likanisi ya Yehova ezalaki polele: Basaleli na ye bakoki kolya mosuni ya nyama kasi makila te. Basengelaki kosopa makila na mabelé​—yango ezali lokola kozongisela Nzambe bomoi ya nyama yango.

12. Mobeko nini etali makila elimo santu epesaki na siɛklɛ ya liboso oyo etali mpe biso lelo?

12 Baklisto mpe basengeli kotosa mobeko yango. Bantoma  ná mibali mosusu oyo bazalaki kokamba bayekoli ya Yesu na siɛklɛ ya liboso basalaki likita moko mpo na koyeba mibeko nini baklisto nyonso basengeli kotosa. Bazwaki ekateli oyo: “Elimo santu mpe biso moko tomoni malamu kobakisela bino kilo mosusu te, longola kaka makambo oyo ya ntina, bókoba koboya biloko oyo epesami mbeka epai ya bikeko mpe makila mpe biloko oyo ekamolamá [oyo etikalaka na makila na kati ya mosuni na yango] mpe pite.” (Misala 15:28, 29; 21:25) Na yango, tosengeli ‘kokoba koboya makila.’ Mpo na Nzambe, koboya makila ekokani na koboya kosambela bikeko, koboya kosala pite to ekobo.

Soki monganga apekisi yo masanga ya makasi, okomikɔtisa yango na misisa na ntonga?

13. Pesá ndakisa oyo ezali komonisa ntina oyo mobeko oyo esɛngi ete tóboya makila etali mpe kozongisama makila.

13 Mobeko yango ya koboya makila etali mpe kozongisama makila? Ɛɛ. Tózwa ndakisa: Soki monganga apekisi yo masanga ya makasi, yango elakisi nde ete okomɛla yango te kasi okoki komikɔtisa yango na misisa na ntonga? Te! Ndenge moko mpe, koboya makila elakisi ete tókɔtisa yango na nzoto na biso te ata na lolenge nini. Na yango, etinda oyo esɛngi biso tóboya makila elakisi ete tokotikela moto ata moko te nzela azongisa biso makila na nzoto.

14, 15. Soki minganga balobi ete esengeli bázongisa moklisto moko makila, akosala nini mpe mpo na nini?

14 Bongo soki moklisto moko azoki makasi to soki basengeli kosala ye lipaso ya monene? Tóloba ete minganga basɛngi bázongisa ye makila, soki te akokufa. Na ntembe te moklisto yango akolinga kokufa te. Mpo na koluka kobatela bomoi na ye, likabo ya motuya mingi oyo Nzambe apesá ye, akondima básalisa ye na bankisi to na mayele mosusu oyo ezali kosɛnga te kosalela makila na ndenge oyo ebongi te. Na yango, akoluka lisalisi ya ndenge wana soki ezali, mpe akondima bankisi mosusu na esika ya makila.

15 Moklisto akobuka mobeko ya Nzambe kaka mpo abakisa mwa mikolo ya bomoi na ye na mokili oyo? Yesu alobaki ete: “Moto nyonso oyo alingi kobikisa molimo [to bomoi] na ye akobungisa yango; kasi moto nyonso oyo abungisi molimo na ye mpo na ngai akozwa yango.” (Matai 16:25) Tolingi  kokufa te. Kasi soki tobuki mobeko ya Nzambe mpo tolingi kobikisa bomoi na biso, tokozala na likama ya kozanga bomoi ya seko. Yango wana, tokomonisa bwanya soki totye motema ete mobeko ya Nzambe ebongi mpenza, mpe soki tondimi mpenza ete ata soki tokufi mpo na likambo nini, Ye oyo apesaki biso bomoi akobosana biso te ntango akosekwisa bato mpe akozongisela biso likabo yango ya motuya mingi: bomoi.​—Yoane 5:28, 29; Baebele 11:6.

16. Mokano nini basaleli ya Nzambe bamityeli mpenza na likambo ya makila?

16 Lelo oyo, basaleli ya sembo ya Nzambe bamityeli mpenza mokano ya kotosa malako na ye oyo etali makila. Bakolya yango te, ata soki ezali ndenge nini. Bakondima mpe te bázongisama makila kaka mpo bábika na maladi. * Bandimi mpenza ete Mozalisi ya makila ayebi eloko nini eleki malamu mpo na bango. Yo mpe ondimi yango?

LOLENGE KAKA MOKO YA KOSALELA MAKILA

17. Na Yisalaele ya kala, wapi lolenge kaka moko ya kosalela makila oyo Yehova Nzambe andimaki?

17 Mibeko ya Moize emonisaki polele lolenge kaka moko ya kosalela makila. Na ndenge oyo Bayisalaele basengelaki kosambela Yehova na ntango ya kala, apesaki bango etinda oyo: “Bomoi ya mosuni ezali kati na makila, mpe ngai nasili kopesa yango na bino na likoló ya etumbelo mpo na kosala kozongisa ya  bondeko na ntina na bomoi, mpo ete ezali makila [nde] ekozongisa . . . bondeko.” (Levitike 17:11) Ntango Bayisalaele bazalaki kosala masumu, mpo bálimbisama basengelaki kopesa mbeka ya nyama mpe kotya mwa ndambo ya makila na yango na etumbelo, oyo liboso ezalaki na tabenakle mpe na nsima na tempelo ya Nzambe. Lolenge kaka moko ya kosalela makila ezalaki nde na bambeka wana.

18. Bolamu nini tokoki kozwa na makila ya Yesu oyo esopamaki?

18 Baklisto ya solo bazali na nse ya Mibeko ya Moize te; yango wana, bapesaka mbeka ya banyama te mpe batyaka makila ya banyama na etumbelo moko te. (Baebele 10:1) Atako bongo, makila oyo bazalaki kosalela na etumbelo kala na Yisalaele ezalaki nde komonisa mbeka ya motuya mingi ya Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe. Ndenge tomonaki na Mokapo 5 ya buku oyo, Yesu apesaki bomoi na ye mpo na biso na ndenge andimaki makila na ye esopama lokola mbeka. Na nsima, amataki na likoló mpe mbala moko mpo na libela alakisaki  Nzambe motuya ya makila na ye oyo esopamaki. (Baebele 9:11, 12) Yango epesaki nzela ete masumu na biso ekoka kolimbisama mpe tózala na likoki ya kozwa bomoi ya seko. (Matai 20:28; Yoane 3:16) Lolenge wana oyo makila esalelamaki ezalaki mpenza na ntina mingi! (1 Petelo 1:18, 19) Tokoki kobika se soki tozali kondimela motuya ya makila ya Yesu oyo esopamaki.

Ndenge nini okoki komonisa ete omemyaka bomoi mpe makila?

19. Tosengeli kosala nini mpo tózala “pɛto na oyo etali makila ya bato nyonso”?

19 Tokoki kotɔnda Yehova Nzambe mingi mpo na bomoi oyo apesi biso na bolingo mpenza! Na ntembe te, yango esengeli kotinda biso tóyebisa basusu ete bakoki kozwa bomoi ya seko soki bandimeli mbeka ya Yesu, boye te? Tokosala yango na molende mpenza soki tozali komibanzabanza mpo na bomoi ya bato mosusu ndenge Nzambe amibanzabanzaka. (Ezekiele 3:17-21) Soki tozali kosala mosala yango na molende mpenza, biso mpe tokoloba lokola ntoma Paulo, ete: “Nazali pɛto na oyo etali makila ya bato nyonso, mpo namipekisaki te koyebisa bino mokano mobimba ya Nzambe.” (Misala 20:26, 27) Lolenge eleki malamu ya komonisa ete bomoi mpe makila ezali na valɛrɛ mingi mpenza ezali ya koyebisa bato makambo ya Nzambe mpe mikano na ye.

^ par. 16 Soki olingi koyeba bankisi mosusu oyo ekoki kosalelama na esika ya makila, talá mwa buku Comment le sang peut-il vous sauver la vie?, mokapo “Des substituts de qualité,” ebimisami na Batatoli ya Yehova.