Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Biblia eteyaka mpenza nini?

 MOKAPO YA NSAMBO

Elikya ya solosolo mpo na bato olingaka oyo bakufá

Elikya ya solosolo mpo na bato olingaka oyo bakufá
  • Ndenge nini toyebi ete lisekwa ekozala mpenza?

  • Yehova ayokaka ndenge nini na likambo ya kosekwisa bato?

  • Banani bakosekwa?

1-3. Wapi monguna oyo azali kolanda biso nyonso, mpe mpo na nini kotalela mateya ya Biblia ekokitisa biso motema?

KANISÁ ete ozali kokima monguna moko mabe. Aleki yo na makasi mpe na mbangu. Oyebi ete ayokelaka bato mawa te mpo omoná ndenge abomá baninga na yo mosusu. Opoti mbangu mpenza mpo akanga yo te, kasi azali se kopusana penepene na yo. Omoni ete osuki. Kasi, mbala moko, otala pembeni na yo boye, moto moko abimi mpo na kobikisa yo. Azali na makasi koleka monguna na yo, mpe alaki ete akosalisa yo. Motema na yo ekiti mpenza!

2 Tokoki koloba ete monguna moko ya ndenge wana azali kolanda yo. Azali mpe kolanda biso nyonso. Ndenge tomonaki yango na mokapo oyo eleki, Biblia ebengi liwa monguna. Moko te kati na biso akoki kokima ye. Mingi kati na biso tomoná ndenge monguna yango akangá bandeko to baninga na biso. Kasi, Yehova aleki liwa na nguya. Ye nde Moto yango ya bolingo oyo ayei kobikisa biso, mpe asili komonisa ete azali na likoki ya kolonga monguna wana. Lisusu, alaki ete akoboma monguna yango, liwa, mpo na libela. Biblia eteyaka ete: “Liwa, oyo ezali monguna ya nsuka, akobebisama nyɛɛ.” (1 Bakolinti 15:26) Wana ezali mpenza nsango malamu!

3 Tólobela mwa moke ndenge toyokaka ntango liwa​—monguna na biso—​ekangi moto moko oyo toyebi. Yango ekosalisa  biso tókanga ntina ya elaka moko oyo ekopesa biso esengo. Ɛɛ, Yehova alaki ete bato oyo bakufá bakozala lisusu na bomoi. (Yisaya 26:19) Akozongisa bango na bomoi. Yango nde elikya ya lisekwa.

NTANGO MOTO MOKO OYO TOLINGAKA AKUFI

4. (a) Mpo na nini ndenge oyo Yesu ayokaki ntango moninga na ye moko akufaki esalisi biso tóyeba mpe ndenge oyo Yehova ayokaka? (b) Yesu azwaki baninga ya ndenge nini?

4 Moto moko oyo olingaki asilá kokufa? Na ntango wana, emonanaka ete mpasi eleki biso motó mpe tokoki kosala eloko te. Mpo na kozwa libɔndisi, tosengeli kotalela Liloba ya Nzambe. (2 Bakolinti 1:3, 4) Biblia ezali kosalisa biso tóyeba ndenge Yehova ná Yesu bayokaka soki moto akufi. Yesu, ye oyo azalaki mpenza komonisa bizaleli ya Tata na ye, ayebaki ete soki ndeko to moninga moko akufi epesaka mpasi mingi. (Yoane 14:9) Ntango Yesu azalaki koya na Yelusaleme, amesanaki kokende kotala Lazalo ná bayaya na ye ya basi, Maria ná Malata; bango nyonso bazalaki kofanda na Betania, mwa engumba moko oyo ezalaki pene na Yelusaleme. Bakómaki baninga na ye ya motema. Biblia elobi ete: “Yesu azalaki kolinga Malata mpe ndeko na ye ya mwasi mpe Lazalo.” (Yoane 11:5) Kasi, lokola tomonaki yango na mokapo oyo eleki, Lazalo akufaki.

5, 6. (a) Yesu ayokaki ndenge nini ntango azalaki elongo na bandeko mpe baninga ya Lazalo wana bazalaki na mawa? (b) Mpo na nini mawa oyo Yesu ayokaki ezali kolendisa biso?

5 Yesu ayokaki ndenge nini ntango moninga na ye akufaki? Biblia elobi ete ayaki epai ya bandeko mpe baninga ya Lazalo, wana bazalaki na mawa. Ntango amonaki bango, ayokaki mawa mpenza. “Atungisamaki makasi na elimo mpe abulunganaki.” Na nsima, Biblia elobi ete, “Yesu alelaki na mai na miso.” (Yoane 11:33, 35) Mawa oyo Yesu ayokaki elakisi nde ete azalaki na elikya te? Te, ezali bongo te. Kutu, Yesu ayebaki ete likambo moko ya kokamwa elingi kosalema. (Yoane 11:3, 4) Atako bongo, ayokaki mpasi mpe mawa oyo liwa epesaka.

6 Tokoki koloba ete mawa oyo Yesu ayokaki ezali kolendisa biso. Ezali koteya biso ete Yesu ná Tata na ye Yehova bayinaka  liwa. Kasi Yehova Nzambe azali na likoki ya kobunda na monguna yango mpe kolonga ye! Tótala sikoyo likambo oyo Nzambe apesaki Yesu likoki ya kosala.

“LAZALO, BIMÁ!”

7, 8. Mpo na nini mbala mosusu na miso ya bato oyo bazalaki wana elikya ezalaki lisusu te mpo na Lazalo, kasi Yesu asalaki nini?

7 Bakundaki Lazalo na kati ya lidusu moko, mpe Yesu asɛngaki ete bálongola libanga oyo batyaki na monɔkɔ na yango. Malata aboyaki mpo, lokola mikolo minei elekaki banda Lazalo akufaki, boye ebembe na ye ebandaki kopɔla. (Yoane 11:39) Mpo na bato oyo bazalaki wana, elikya ezalaki te.

Lisekwa ya Lazalo epesaki bato esengo mingi.​—Yoane 11:38-44

8 Balongolaki libanga yango, mpe Yesu agangaki na mongongo makasi ete: “Lazalo, bimá!” Likambo nini esalemaki? “Moto oyo akufaki abimaki.” (Yoane 11:43, 44) Okoki kokanisa esengo oyo bato wana bayokaki? Bayaya na ye, bandeko na ye, baninga na ye to bato ya kartye na bango, bango nyonso bayebaki ete akufi. Kasi sikoyo talá ye wana​—moto wana kaka oyo balingaki mingi—​atɛlɛmi lisusu kati na bango. Bamonaki yango mpenza likambo ya kokamwa. Na ntembe te, mingi kati na bango bayambaki Lazalo na esengo mpenza. Ya solo, liwa elongamaki!

Eliya asekwisaki mwana mobali ya mwasi moko oyo mobali akufá.​—1 Mikonzi 17:17-24

9, 10. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki Moto oyo apesaki ye nguya ya kosekwisa Lazalo? (b) Wapi mwa matomba oyo tokoki kozwa soki totángi masolo ya Biblia oyo elobeli bato oyo basekwaki?

9 Yesu atutaki ntolo te ete asali likamwisi wana na nguya na ye moko. Na libondeli oyo asalaki mwa moke liboso abenga Lazalo, amonisaki polele ete Yehova nde asekwisaka. (Yoane 11:41, 42) Ezali kaka na libaku wana te nde Yehova asalelaki nguya na ye mpo na kosekwisa moto. Lisekwa ya Lazalo ezali kaka moko na makamwisi libwa ya lisekwa oyo Liloba ya Nzambe elobeli. * Kotánga mpe koyekola masolo yango esepelisaka mpenza. Masolo yango eteyaka biso ete Nzambe aponaka bilongi te mpamba te kati na bato oyo basekwaki, ezalaki na bilenge mpe mikóló, basi mpe mibali,  Bayisalaele mpe bato ya bikólo mosusu. Masolo yango elobeli esengo monene oyo bato bayokaki! Na ndakisa, ntango Yesu asekwisaki elenge moko ya mwasi, baboti na ye “bazalaki bango lisusu te, bazalaki na esengo makasi.” (Malako 5:42) Yehova asalelaki bango mpenza likambo moko oyo epesaki bango esengo mpe etikalaki libela na makanisi na bango.

Ntoma Petelo asekwisaki Dorkasi, mwasi moko moklisto.​—Misala 9:36-42

10 Bato yango oyo Yesu asekwisaki nsukansuka bakufaki lisusu. Yango elingi nde koloba ete lisekwa na bango ezalaki na ntina moko te? Te, ezali bongo te. Masolo yango ya Biblia ezali kondimisa mateya mosusu ya ntina mingi mpe ezali kopesa biso elikya.

MASOLO YA BATO OYO BASEKWAKI ETEYI BISO NINI?

11. Ndenge nini lisolo ya lisekwa ya Lazalo ezali kondimisa maloba ya Mosakoli 9:5?

11 Biblia eteyaka ete bato oyo bakufá “bayebi likambo te.” Bazali na bomoi te na esika moko boye mpe bayebi eloko te. Lisolo ya Lazalo ezali kondimisa likambo yango. Ntango Lazalo azongaki na bomoi, abandaki mbala moko koyebisa bato ndenge makambo ezalaka kuna na lola mpo na kosepelisa bango? To abɛtɛlaki bango masolo ya kobangisa oyo etali lifelo ya mɔtɔ? Te. Biblia elobi ata esika moko te ete Lazalo abɛtaki masolo ya ndenge wana. Mikolo nyonso minei oyo azalaki mowei, ‘ayebaki likambo te.’ (Mosakoli 9:5) Lazalo alalaki nde mpɔngi kati na liwa.​—Yoane 11:11.

12. Mpo na nini tondimi ete Lazalo asekwaki mpenza?

12 Lisolo ya Lazalo eteyi biso lisusu ete lisekwa ezali likambo ya solo, ezali lisapo mpamba te. Yesu asekwisaki Lazalo na miso ya ebele ya bato. Ata bakonzi ya mangomba, oyo bazalaki koyina Yesu, baboyaki te ete likamwisi yango esalemaki mpenza. Balobaki nde ete: “Tosengeli kosala nini, mpo moto oyo [Yesu] azali kosala bilembo mingi?” (Yoane 11:47) Bato mingi bakendeki kotala moto yango oyo asekwaki. Nsima na yango, mingi kati na bango bandimelaki Yesu. Mpo na bango, Lazalo azalaki elembo oyo emonisi polele ete Yesu atindamaki na Nzambe. Elembo yango ezalaki mpenza na nguya, mpamba te Bayuda mosusu ya mitema mabe oyo  bazalaki bakonzi ya mangomba basalaki likita mpo báboma Yesu ná Lazalo.​—Yoane 11:53; 12:9-11.

13. Nini endimisi biso ete Yehova akoki mpenza kosekwisa bato?

13 Ebongi te kondima ete lisekwa ezali mpenza likambo ya solo? Te, ebongi mpenza, mpamba te Yesu ateyaki ete mokolo mosusu “baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama” bakosekwa. (Yoane 5:28) Yehova nde akelá biloko ndenge na ndenge oyo ezali na bomoi. Tosengeli nde kokakatana mpo na kondima ete akoki kokela lisusu bomoi? Mpo akela yango lisusu, ekosɛnga ete abosana te bato oyo bakufá. Akoki koyeba lisusu bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá? Atako likoló etondi na minzoto ebele ebele, Nzambe abengaka mokomoko na yango na nkombo! (Yisaya 40:26) Yango emonisi ete Yehova Nzambe akoki koyeba lisusu malamumalamu bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá, mpe azali na likoki ya kozongisa bango na bomoi.

14, 15. Ndenge maloba ya Yobo emonisi yango, Yehova ayokaka ndenge nini na likambo ya kozongisa na bomoi bato oyo bakufá?

14 Kasi, Yehova ayokaka ndenge nini na likambo ya kosekwisa bato? Biblia eteyaka ete azali na mposa makasi ya kolamwisa bato oyo bakufá. Yobo, moto moko ya sembo, atunaki boye: ‘Soki moto akufi, akoki kozonga na bomoi?’ Yobo azalaki koloba ete akozela na kati ya lilita tii mokolo Nzambe akokanisa ye lisusu. Ayebisaki Yehova ete: “Okobenga mpe ngai nakozongisela yo; okozala na mposa [ya] mosala ya mabɔkɔ na yo.”​—Yobo 14:13-15.

15 Kanisá naino! Yehova azali mpenza na mposa makasi ya kozongisa bato oyo bakufá na bomoi. Koyeba ete Yehova ayokaka ndenge wana esimbi mpenza motema na biso, boye te? Tokoloba boni mpo na lisekwa yango oyo ekosalema na mikolo ezali koya? Banani bakosekwa, mpe epai wapi?

“BAOYO NYONSO BAZALI NA KATI YA MALITA YA KOKANISAMA”

16. Bato oyo bakufá bakozala na bomoi ya ndenge nini ntango bakosekwa?

16 Masolo ya Biblia oyo elobeli bato oyo basekwaki ezali  koteya biso makambo mingi oyo etali lisekwa oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Bato oyo bazongisamaki na bomoi awa na mabelé bazongelaki lisusu bandeko mpe baninga na bango. Lisekwa oyo ekosalema na mikolo ezali koya ekozala mpe bongo​—kutu, ekozala malamu koleka. Ndenge tomonaki yango na Mokapo 3, Nzambe akani ete mabelé mobimba ekóma paladiso. Yango wana, bato oyo bakufá bakosekwa te mpo báfanda na mokili oyo etondi na bitumba, makambo mabe, mpe maladi. Bakozala nde na libaku ya kofanda awa na mabelé, na kimya mpe na esengo.

17. Bato boni bakosekwa?

17 Banani bakosekwa? Yesu alobaki ete “baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo na ye [Yesu] mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29) Ndenge moko mpe, Emoniseli 20:13 elobi ete: “Mbu ezongisaki bakufi oyo bazalaki na kati na yango, mpe liwa ná Hadesi ezongisaki bakufi oyo bazalaki na kati na yango.” “Hadesi” elakisi malita ya bato nyonso. (Talá na Apɛndisi, lisolo “Sheole ná Hadesi ezali nini?”.) Malita yango ekotikala polele. Bamiliare ya bato oyo bazali kuna bakozonga bango nyonso na bomoi. Ntoma Paulo alobaki ete: “Ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Misala 24:15) Yango elingi koloba nini?

Na Paladiso, bato oyo bakufá bakosekwa mpe bakozala lisusu elongo na bandeko mpe baninga na bango

18. Banani bazali na kati ya “bayengebene” oyo bakosekwa, mpe elikya yango ekoki kosala nini na bomoi na yo?

18 Bato mingi oyo Biblia elobeli, oyo bazalaki awa na mabelé liboso Yesu aya, bazali kati na “bayengebene” yango. Ntango mosusu nkombo ya Noa, Abalayama, Sara, Moize, Luta, Estɛrɛ, mpe ya bamosusu ebele eyeli yo na makanisi. Kati na basi mpe mibali yango ya kondima makasi, Biblia elobeli basusu na mokapo 11 ya Baebele. Basaleli ya Yehova oyo bazali kokufa na mikolo na biso bazali mpe na kati ya “bayengebene” yango. Elikya ya lisekwa ekoki kolongola biso nsɔmɔ ya liwa.​—Baebele 2:15.

19. Banani bazali “bato oyo bazangi boyengebene,” mpe libaku nini Yehova apesi bango na boboto mpenza?

19 Bongo bato nyonso oyo basalelaki Yehova te to batosaki ye te mpo bayebaki ye te? Nzambe akobosana ebele ya bato  yango te “oyo bazangi boyengebene.” Bango mpe bakosekwa mpe bakotikela bango ntango mpo báyekola koyeba Nzambe ya solo mpe básalela ye. Na boumeli ya mbula nkóto, bato oyo bakufá bakosekwa mpe bakozwa libaku ya kosalela Yehova awa na mabelé elongo na bato ya sembo. Ekozala ntango moko ya malamu mpenza. Biblia ebengi ntango yango Mokolo ya Kosambisama. *

20. Gehena ezali nini, mpe banani bakendeke kuna?

20 Yango elingi nde koloba ete bato nyonso oyo bazalaká na bomoi bakosekwa? Te. Biblia elobi ete bato mosusu oyo bakufá bazali na “Gehena.” (Luka 12:5) Gehena euti na nkombo ya esika moko oyo bazalaki kobwaka bosɔtɔ na nsima ya lopango ya Yelusaleme na ntango ya kala. Bazalaki kotumba bibembe mpe bosɔtɔ esika wana. Soki babwaki ebembe ya moto na esika yango, Bayuda bazalaki kotalela moto yango ete abongi kokundama te mpe kosekwa te. Na yango, Gehena ezali elembo oyo ebongi mpenza mpo na kolobela kokufa ya libela. Atako Yesu akosambisa bato ya bomoi mpe baoyo bakufá, Mosambisi ya nsuka ezali nde Yehova. (Misala 10:42) Akosekwisa te baoyo amoni ete bazali bato mabe oyo balingi kobongwana te.

LISEKWA MPO NA BOMOI NA LIKOLÓ

21, 22. (a) Lisekwa nini mosusu mpe ezali? (b) Nani azalaki moto ya liboso oyo asekwaki mpo na kokóma elimo?

21 Biblia elobeli mpe lisekwa mosusu, lisekwa mpo na kozala ekelamu ya elimo na likoló. Ndakisa moko kaka ya moto oyo asekwaki bongo, oyo Biblia elobeli, ezali Yesu Klisto.

22 Nsima ya kobomama ya Yesu, Yehova atikaki te ete Mwana na Ye ya sembo alala libela na lilita. (Nzembo 16:10; Misala 13:34, 35) Nzambe asekwisaki Yesu, kasi na nzoto lokola oyo ya bato te. Ntoma Petelo alimboli ete Klisto “abomamaki na mosuni, kasi azongisamaki na bomoi na elimo.”  (1 Petelo 3:18) Wana ezalaki mpenza likamwisi moko monene. Yesu azalaki lisusu na bomoi, akómaki elimo moko ya makasi! (1 Bakolinti 15:3-6) Yesu azalaki moto ya liboso oyo azwaki lisekwa wana ya nkembo. (Yoane 3:13) Kasi, akozala moto ya nsuka te oyo akozwa yango.

23, 24. Banani bazali “etonga moke” ya Yesu mpe bango nyonso bakozala bato boni?

23 Yesu ayebaki ete etikali moke azonga na likoló, yango wana ayebisaki bayekoli na ye ya sembo ete ‘akobongisela bango esika’ kuna na likoló. (Yoane 14:2) Yesu abengaki baoyo bakokende na likoló ete “etonga moke” na ye. (Luka 12:32) Mwa etuluku moke yango ya baklisto ya sembo ekozala na bato boni? Na Emoniseli 14:1, ntoma Yoane alobi ete: “Namonaki, mpe, talá! Mwana-Mpate [Yesu Klisto] atɛlɛmi likoló ya Ngomba Siona, mpe elongo na ye bato nkóto nkama moko na ntuku minei na minei oyo nkombo na ye mpe nkombo ya Tata na ye ekomamá na bilongi na bango.”

24 Baklisto 144 000 yango​—bantoma ya sembo ya Yesu mpe batángami kati na bango—​bazali kosekwa mpo na kokende kofanda na likoló. Ntango nini bazali kosekwa? Ntoma Paulo akomaki ete bakosekwa na ntango ya kozala ya Klisto. (1 Bakolinti 15:23) Ndenge okoyeba yango na Mokapo 9, tozali sikoyo na ntango yango. Yango wana, na mwa ndambo ya ba 144 000 oyo bazali naino na bomoi, soki moko akufi, mbala moko akosekwa mpe akokende na likoló. (1 Bakolinti 15:51-55) Kasi, bato ebele mpenza bazali nde na elikya ya kosekwa na mikolo ezali koya mpo na kofanda na Paladiso awa na mabelé.

25. Tokolobela nini na mokapo oyo elandi?

25 Yehova akolonga mpenza liwa​—monguna na biso—​mpe liwa ekolimwa mpo na libela! (Yisaya 25:8) Kasi, okoki komituna boye, ‘Mosala nini baoyo bazali kosekwa mpo na kokende na likoló bakosala kuna?’ Bakozala kati na Bokonzi, to guvɛrnema, moko ya malamu kuna na likoló. Tokoyeba makambo mosusu ya guvɛrnema yango na mokapo oyo elandi.

^ par. 19 Soki olingi koyeba makambo mosusu oyo etali Mokolo ya Kosambisama mpe soki bato bakosambisama na makambo nini, talá na Apɛndisi, lisolo “Mokolo ya Kosambisama ezali nini?”.