Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Biblia eteyaka mpenza nini?

 MOKAPO YA MOTOBA

Bato oyo bakufá bazali wapi?

Bato oyo bakufá bazali wapi?
  • Nini ekómelaka biso soki tokufi?

  • Mpo na nini tokufaka?

  • Koyeba ndimbola mpenza ya liwa ekokitisa motema?

1-3. Mituna nini oyo etali liwa bato bamitunaka, mpe biyano nini mangomba ndenge na ndenge epesaka?

BANDA kalakala bato bamitunaka mituna wana. Mituna wana ezali na ntina mpenza. Ata soki ozali nani to ofandaka wapi, biyano ya mituna wana etali yo.

2 Na mokapo oyo eleki, tomonaki ete mbeka oyo Yesu Klisto apesaki mpo na kosikola biso epesi biso likoki ya kozala na bomoi ya seko. Tomonaki mpe ete Biblia elobi ete mokolo mosusu “liwa ekozala lisusu te.” (Emoniseli 21:4) Liboso mokolo yango ekóma, biso nyonso tozali bato ya liwa. Salomo, mokonzi ya bwanya, alobaki ete: “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa.” (Mosakoli 9:5) Tosalaka nyonso oyo tokoki mpo bomoi na biso ezala molai. Atako bongo, tomitunaka soki nini ekokómela biso ntango tokokufa.

3 Ntango baninga mpe bandeko na biso bakufi, tolelaka. Mpe, ntango mosusu, tomitunaka: ‘Bakómi ndenge nini? Bazali koyoka mpasi? Bazali kokɛngɛla biso? Tokoki kosalisa bango? Tokomona bango lisusu?’ Lingomba na lingomba epesaka biyano na yango. Ezali na mangomba oyo eteyaka ete soki moto azali moto malamu, akokende na lola; kasi soki azali moto mabe, akozika na mɔtɔ na esika ya minyoko. Mangomba mosusu eteyaka ete soki moto akufi, akendeke na mboka ya bilimo mpo azala esika moko na bankɔkɔ. Longola mangomba wana, mosusu eteyaka ete bato oyo bakufaka bakendeke na mboka ya bato oyo bakufá oyo ezalaka na kati  ya mabelé; kuna basambisaka bango mpe na nsima, babotamaka lisusu na nzoto mosusu.

4. Likanisi nini esimbi mateya oyo mangomba mingi eteyaka na likambo ya liwa?

4 Mateya ya mangomba nyonso wana euti kaka na likanisi oyo: eloko moko na kati ya moto ekufaka te ata soki nzoto ekufi. Pene na mangomba nyonso, ya kala to ya mikolo oyo, eteyaka ete na lolenge moko boye totikalaka na bomoi libela na libela mpe tozalaka na likoki ya komona, koyoka mpe kokanisa. Ezali mpenza bongo? Soki toyokaka, tomonaka mpe tokanisaka, ezali mpo bɔɔngɔ na biso esalaka. Ntango tokufi, bɔɔngɔ etikaka kosala. Soki bɔɔngɔ etiki kosala, tokokanisa lisusu te makambo oyo eleká, tokoyoka lisusu mawa te to esengo te, tokoyoka lisusu te, to tokomona te.

NINI MPENZA EKÓMELAKA MOTO SOKI AKUFI?

5, 6. Biblia eteyaka ete bato oyo bakufá bazalaka ndenge nini?

5 Yehova, Mozalisi ya bɔɔngɔ, ayebi likambo oyo ekómelaka moto ntango akufi. Ayebi yango malamu, mpe na kati ya Liloba na ye, Biblia, alimboli ndenge bato oyo bakufá bazalaka. Biblia eteyaka polele ete: Ntango moto akufi, bomoi na ye esuki. Liwa elakisi kozala na bomoi te. Bato oyo bakufá bamonaka te, bayokaka te mpe bakanisaka te. Ezali ata na eloko moko te kati na biso oyo ekufaka te soki nzoto mobimba ekufi. Tozali te na molimo to elimo moko boye oyo ekufaka te. *

Mɔtɔ ekei wapi?

6 Salomo alobaki ete bato oyo bazali na bomoi bayebi ete bakokufa, na nsima akomaki boye: ‘Nde bakufi bayebi likambo te.’ Nsima na yango, alobeli lisusu polele likambo yango oyo ezali mpenza solo ete, bato oyo bakufá bakoki kolinga te, koyina te mpe ete “ezali na mosala te, mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na [lilita].” (Mosakoli 9:5, 6, 10) Ndenge moko mpe, Nzembo 146:4 elobi ete ntango moto akufi, “kokanisa na ye esili.” Tokufaka; mpe soki nzoto na biso ekufi, eloko moko te etikalaka na bomoi. Bomoi na biso ezali lokola  mɔtɔ ya buji. Soki mɔtɔ yango ekufi, ekendeke epai te. Ezalaka lisusu te.

NDENGE OYO YESU ALOBELAKI LIWA

7. Yesu alimbolaki ete liwa ezali lokola nini?

7 Yesu Klisto alobelaki ndenge oyo bakufi bazalaka. Alobelaki yango na likambo ya Lazalo, moninga na ye oyo akufaki. Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Lazalo moninga na biso akei kopema.” Bayekoli bakanisaki ete Yesu alobi ete Lazalo alali mpɔngi mpo na kopemisa nzoto ezonga makasi nsima ya kobɛla. Bamikosaki. Yesu alimbolaki ete: “Lazalo akufi.” (Yoane 11:11-14) Omoni, Yesu alobi ete liwa ezali lokola bopemi mpe mpɔngi. Lazalo azalaki na lola te to na lifelo ya mɔtɔ te. Azalaki elongo na baanzelu te to na bankɔkɔ te. Azalaki komibongisa te mpo na kobotama lisusu awa na mokili. Apemaki nde na liwa, lokola moto oyo alali mpɔngi ya makasi kasi azali kolɔta te. Bavɛrsɛ mosusu mpe elobi ete liwa ezali lokola mpɔngi. Na ndakisa, ntango babomaki moyekoli Setefano na mabanga, Biblia elobi ete “alalaki.” (Misala 7:60) Ndenge moko mpe, ntoma Paulo akomaki ete bayekoli mosusu ya ntango na ye basilaki ‘kolala’ na kati ya liwa.​—1 Bakolinti 15:6.

Yehova asalaki bato mpo báfanda na mabelé libela na libela

8. Ndenge nini toyebi ete mokano ya Nzambe na ebandeli ezalaki te ete bato bákufaka?

8 Mokano ya Nzambe na ebandeli ezalaki nde ete bato bákufaka? Te! Yehova asalaki bato mpo báfanda na mabelé libela na libela. Ndenge tomonaki yango liboso na buku oyo, Nzambe atyaki mwasi ná mobali ya liboso na paladiso moko kitoko. Apesaki bango nzoto oyo ezalaki mpenza kolɔngɔnɔ. Yehova alingaki nde bázala malamu. Tata to mama ya bolingo alingaka ete bana na ye bámona mpasi ya bobange mpe bákufa? Te! Yehova alingaki bana na ye mpe alingaki ete  bázala na esengo ya libela awa na mabelé. Biblia elobi boye mpo na bato: “[Yehova] atye mpe lobiko kati na mitema na bango.” (Mosakoli 3:11) Nzambe akelaki biso na mposa ya kozala na bomoi libela na libela. Mpe asili kobongisa makambo mpo ete tókokisa mposa yango.

NTINA OYO BATO BAKUFAKA

9. Eloko nini Yehova apekisaki Adama, mpe mpo na nini ezalaki mpasi te kotosa etinda yango?

9 Kasi, mpo na nini bato bakufaka? Mpo na koyeba yango,  tótalela naino makambo oyo elekaki ntango mabelé mobimba ezalaki kaka na mobali moko ná mwasi moko. Biblia elimboli ete: ‘Yehova akolisaki na mokili nzete nyonso ezali kitoko na kotala, mpe oyo ezali malamu na kolya.’ (Genese 2:9) Kasi, apekisaki eloko moko. Yehova ayebisaki Adama boye: “Yo okoki kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga, nde mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe okoki kolya te. Zambi mokolo okolya yango okokufa solo.” (Genese 2:16, 17) Ezalaki mpasi te kotosa etinda yango, mpamba te Adama ná Eva bazalaki na ebele ya banzete oyo bakokaki kolya mbuma na yango. Kasi, etinda yango epesaki bango libaku monene ya komonisa ete bazali na botɔndi epai na Ye oyo apesaki bango biloko nyonso, ezala mpe bomoi ya kokoka. Soki bátosaka, balingaki komonisa mpe ete bazali komemya bokonzi ya Tata na bango ya likoló mpe ete balingi ndenge azalaki kolakisa bango nzela na bolingo.

10, 11. (a) Ebandaki ndenge nini Adama ná Eva báboya kotosa Nzambe? (b) Mpo na nini kozanga botosi na bango ezalaki likambo ya moke te?

10 Likambo ya mawa, mwasi ná mobali ya liboso baboyaki kotosa Yehova. Satana asalelaki nyoka mpo na kotuna Eva ete: “Nzambe alobaki solo ete bino bokoki kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga te?” Eva ayanolaki boye: ‘Tokoki kolya mbuma ya nzete ya elanga. Kasi mpo na mbuma ya nzete yango katikati ya elanga Nzambe alobi ete, Bino bokolya yango te, mpe bokosimba yango te ete bókufa te.’​—Genese 3:1-3.

11 Satana alobaki ete: ‘Bino bokokufa solo te. Nzambe ayebi ete na mokolo bokolya yango, miso na bino ekofungwama, mpe bino bokozala lokola Nzambe, bokoyeba malamu mpe mabe.’ (Genese 3:4, 5) Satana alingaki kondimisa Eva ete akozwa bolamu soki alei mbuma oyo bapekisaki bango. Alingaki mpe koloba ete Eva ye moko akokóma na likoki ya koloba nini ezali mabe, nini ezali malamu; mpe ya kosala oyo motema na ye elingi. Satana alobaki mpe ete Yehova akosaki ndenge alobaki ete bakokóma na mpasi soki  balei mbuma. Eva andimelaki Satana. Yango wana, abukaki mbuma mpe alyaki yango. Na nsima, apesaki mpe mobali na ye; ye mpe alyaki. Bayebaki malamu likambo bazali kosala. Bayebaki ete bazali kosala mpenza likambo oyo Nzambe ayebisaki bango básala te. Lokola balyaki mbuma yango, emonisi ete baboyaki kotosa na nko mpenza etinda ya polele mpe ya pɛtɛɛ oyo bapesaki bango. Batyolaki Tata na bango ya likoló mpe bokonzi na ye. Kozanga limemya ya bongo epai ya Mozalisi na bango ya bolingo ekokaki kolimbisama te!

12. Ndakisa nini ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge Yehova ayokaki ntango Adama ná Eva baboyaki kolanda nzela na ye?

12 Na ndakisa, okoyoka ndenge nini soki mwana na yo oyo obɔkɔli, aboyi kotosa yo na ndenge oyo emonisi ete azali  kopesa yo limemya te mpe alingi yo te? Okoyoka mpenza mawa. Sikoyo, kanisá mpasi Yehova ayokaki ntango Adama ná Eva baboyaki kolanda nzela na ye.

Adama autaki na putulu, mpe azongaki na putulu

13. Yehova alobaki ete Adama akokóma ndenge nini ntango akokufa, mpe yango elakisi nini?

13 Ntina ezalaki te ete Yehova atika na bomoi libela na libela bato yango oyo bazangaki botosi. Bakufaki, kaka ndenge alobaki. Bomoi na bango esukaki. Bakómaki bilimo te. Maloba oyo Yehova ayebisaki Adama nsima ya komonisa ye ete azangaki botosi nde esalisi biso tóyeba ete ezali bongo. Alobaki na ye ete: ‘Okozonga na mabelé, mpo ete okamatamaki na yango, zambi ozali putulu, mpe okozonga putulu.’ (Genese 3:19) Nzambe asalaki Adama na putulu ya mabelé. (Genese 2:7) Liboso asala ye, Adama azalaki te. Yango wana, ntango Yehova alobaki ete Adama akozonga na putulu, elakisi ete Adama akozonga ndenge azalaki liboso: akozala te. Akozala na bomoi te kaka ndenge putulu oyo basalaki ye na yango ezalaki na bomoi te.

14. Mpo na nini tokufaka?

14 Adama ná Eva bakokaki kozala na bomoi tii na moi ya lelo, kasi bakufaki mpo baboyaki kotosa Nzambe; mpe yango ezalaki lisumu. Soki tokufaka ezali mpo lisumu oyo Adama asalaki, ná liwa, ezwaki mpe bana na ye nyonso. (Baloma 5:12) Lisumu wana ezali lokola maladi moko mabe oyo tobotamaka na yango, oyo moto moko te akoki kozanga yango. Liwa oyo euti na lisumu yango ezali etumbu. Liwa ezali monguna, kasi moninga te. (1 Bakolinti 15:26) Tozali mpenza na botɔndi na ndenge Yehova apesaki lisiko mpo na kobikisa biso na monguna yango ya nsɔmɔ!

EZALI MALAMU KOYEBA NDIMBOLA MPENZA YA LIWA

15. Mpo na nini koyeba ndimbola mpenza ya liwa ekitisaka motema?

15 Makambo Biblia elobi mpo na ndenge bato bakómaka soki bakufi ezali mpenza kokitisa motema. Ndenge tomonaki yango, bato oyo bakufá bayokaka mpasi te, mawa mpe  te. Ntina ya kobanga bango ezali te, mpo bakoki kosala biso mabe te. Bazali na mposa tósalisa bango te, bango mpe bakoki kosalisa biso te. Tokoki koloba na bango te, bango mpe bakoki koloba na biso te. Bakonzi mingi ya mangomba bakosaka bato ete bakoki kosalisa bato oyo bakufá, mpe bato oyo bandimelaka bakonzi yango bapesaka bango mbongo. Kasi koyeba ndimbola mpenza ya liwa ekobatela biso mpo bato oyo bateyaka makambo wana ya lokuta bákosa biso te.

16. Nani abebisi mateya ya mangomba mingi, mpe ndenge nini?

16 Mangomba mingi endimaka oyo Biblia eteyaka mpo na bato oyo bakufá? Te. Mpo na nini? Mpo Satana abebisi mateya ya mangomba yango. Asalelaka mangomba ya lokuta mpo na kondimisa bato ete soki nzoto na bango ekufi, bakokóma bilimo mpe bakolanda kozala na bomoi. Wana ezali lokuta mpe Satana azali kobakisela lokuta yango makambo mosusu mpo na kotinda bato bápesa Yehova Nzambe mokɔngɔ. Na ndenge nini?

17. Mpo na nini liteya oyo elobi ete Yehova anyokolaka bato seko na seko ezali kobebisa lokumu na ye?

17 Ndenge tomonaki yango na ebandeli, mangomba mosusu eteyaka ete soki moto azali moto mabe, nsima ya liwa na ye, akokende na mɔtɔ epai akonyokwama seko na seko. Liteya wana ezali kobebisa lokumu ya Nzambe. Yehova azali Nzambe ya bolingo mpe akonyokola bato ndenge wana ata moke te. (1 Yoane 4:8) Okanisi nini mpo na moto oyo, mpo na kopesa mwana na ye ya motó makasi etumbu, atumbi mabɔkɔ na ye na mɔtɔ? Okomemya lisusu moto yango? Kutu, okolinga ata koyeba ye? Soki moke te! Na ntembe te, okomona ye moto mabe mpenza. Nzokande, Satana alingi kondimisa biso ete Yehova anyokolaka bato na kati ya mɔtɔ seko na seko.

18. Lokuta nini oyo esimbi losambo ya bakufi mangomba eteyaka?

18 Satana asalelaka mpe mangomba mosusu mpo na koteya ete nsima ya liwa, bato bakómaka bilimo mpe ete bato oyo bazali na bomoi basengeli kopesa bilimo yango limemya  mpe lokumu. Liteya wana elobaka ete bato yango oyo bakómi bilimo bakoki kokóma baninga na biso ya nguya to mpe banguna ya nsɔmɔ. Bato mingi bandimaka lokuta yango. Babangaka bato oyo bakufá mpe bapesaka bango lokumu mpe basambelaka bango. Kasi, Biblia eteyaka ete bato oyo bakufá balali mpɔngi mpe ete tosengeli kosambela kaka Nzambe ya solo, Yehova, Mozalisi na biso mpe Ye oyo apesaka biso nyonso oyo tosengeli na yango.​—Emoniseli 4:11.

19. Koyeba ndimbola mpenza ya liwa ekosalisa biso tókanga ntina ya liteya nini mosusu ya Biblia?

19 Koyeba mpenza ndenge bato oyo bakufá bazalaka ekobatela yo mpo mateya ya lokuta ya mangomba ebungisa yo nzela te. Ekosalisa mpe yo okanga ntina ya mateya mosusu ya Biblia. Na ndakisa, ntango oyebi ete bato bakómaka bilimo te nsima ya liwa, elaka ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé ekómi na ntina mpenza na miso na yo.

20. Tokotalela motuna nini na mokapo oyo elandi?

20 Kala mpenza, Yobo, moto ya boyengebene, atunaki motuna oyo: ‘Soki moto akufi, akoki kozonga lisusu na bomoi?’ (Yobo 14:14) Moto oyo azali lisusu na bomoi te, oyo alali mpɔngi kati na liwa, akoki kozongisama lisusu na bomoi? Oyo Biblia eteyaka na likambo yango ekitisaka mpenza motema, ndenge mokapo oyo elandi ekomonisa yango.

^ par. 5 Mpo na koyeba ndimbola ya maloba “molimo” mpe “elimo,” talá na Apɛndisi, lisolo ““Molimo” ná “elimo” elimboli mpenza nini?”.