Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Biblia eteyaka mpenza nini?

MOKAPO YA LIBWA

Tozali na “mikolo ya nsuka”?

Tozali na “mikolo ya nsuka”?

Makambo nini Biblia esakolaki oyo ezali kosalema na mikolo na biso?

Liloba ya Nzambe elobi ete bato bakozala ndenge nini na “mikolo ya nsuka”?

Makambo nini ya malamu Biblia esakoli mpo na “mikolo ya nsuka”?

ESILÁ kokómela yo ntango ozali kolanda bansango na radio to na televizyo, omituna: ‘Mokili oyo ezali kokende wapi?’ Lokola makambo ya nsɔmɔ ezali kobima mbalakaka, ata moto moko te akoki kosakola oyo ekoya lobi. (Yakobo 4:14) Nzokande, Yehova ayebi nini ekoya lobi. (Yisaya 46:10) Banda kala, Biblia, Liloba na ye, esukaki kaka te na kosakola makambo ya mawa oyo ezali kosalema lelo, kasi mpe makambo ya malamu mpenza oyo etikali moke esalema.

2 Yesu Klisto alobelaki Bokonzi ya Nzambe, yango nde ekosukisa mabe mpe ekokómisa mabelé paladiso. (Luka 4:43) Bato balukaki koyeba ntango nini Bokonzi yango ekoya. Kutu, bayekoli ya Yesu batunaki ye boye: “Nini ekozala elembo ya kozala na yo mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo?” (Matai 24:3) Yesu ayanolaki bango ete kaka Yehova Nzambe nde ayebi mokolo mpenza ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekosuka. (Matai 24:36) Atako bongo, Yesu ayebisaki bango makambo oyo ekosalema na mabelé mwa moke liboso Bokonzi ya Nzambe epesa bato kimya mpe libateli ya solosolo. Makambo yango ezali mpenza kosalema sikoyo!

3 Liboso tólobela makambo oyo ezali komonisa ete tozali na ntango ya “bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” tólobela naino mwa moke etumba moko oyo ata moto moko te akokaki komona yango. Etumba yango ezalaki na likoló, epai bilimo bafandaka, mpe makambo mosusu oyo ekómelaka biso euti na etumba yango.

ETUMBA NA LIKOLÓ

4Mokapo oyo eleki elimbolaki ete Yesu Klisto akómaki Mokonzi na likoló na 1914. (Danyele 7:13, 14) Kaka nsima ya kokóma mokonzi, abandaki etumba. Biblia elobi ete: “Etumba ebimaki na likoló: Mikaele [nkombo mosusu ya Yesu] mpe baanzelu na ye babundaki ná dalagona [Satana Zabolo], mpe dalagona mpe baanzelu na ye babundaki.”* Balongaki Satana ná baanzelu mabe na ye, bademo, mpe babwakaki bango awa na mabelé. Yango epesaki baanzelu ya sembo ya Nzambe esengo. Kasi, bato bakoyoka esengo wana te, mpamba te Biblia esakolaki ete: “Mawa na mabelé…mpamba te Zabolo akiteli bino, azali na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na eleko moko ya ntango mokuse.”—Emoniseli 12:7, 9, 12.

5 Omoni likambo oyo etumba yango ekobimisa? Lokola Satana azali na nkanda makasi, akobimisela bato oyo bazali na mabelé mawa. Ndenge tokomona, tozali sikoyo na ntango yango ya mawa. Kasi ekoumela mpenza te—ekozala kaka “eleko moko ya ntango mokuse.” Satana mpe ayebi likambo yango. Biblia ebengi eleko yango “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1) Tozali mpenza na esengo mpo etikali moke Nzambe alongola makambo mabe ya Zabolo awa na mabelé! Tótala sikoyo makambo mosusu oyo Biblia esakolaki oyo ezali kosalema lelo oyo. Makambo yango emonisi ete tozali na mikolo ya nsuka mpe ete etikali moke Bokonzi ya Nzambe epesa baoyo balingi Yehova mapamboli oyo ekoumela libela na libela. Tólobela naino makambo minei ya elembo oyo Yesu alobaki ete ekomonisa ntango oyo tozali.

MAKAMBO YA MINENE OYO EZALI KOSALEMA NA MIKOLO YA NSUKA

Bitumba, nzala, mpe koningana ya mabelé

6“Ekólo ekotombokela ekólo mpe bokonzi ekotombokela bokonzi.” (Matai 24:7) Na boumeli ya mbula 100 oyo euti koleka, bamilio ya bato bakufi na bitumba. Moto moko ya Grande-Bretagne, oyo azali mpe moto ya mayele na masolo ya kala, akomaki ete: “Banda mokili ebandá, ezali na siɛklɛ ya 20 nde bato bakufaki mingi koleka.…Ezalaki siɛklɛ moko ya bitumba na bitumba, mpamba te soki tolongoli kaka mwa ntango moke oyo bitumba ezalaki te, ntango mosusu nyonso oyo etikali etumba ezalaki kozanga te awa na mabelé.” Lapolo ya ebongiseli moko (Worldwatch Institute), elobi boye: “Bato oyo bakufaki na bitumba na siɛklɛ [ya 20] baleki mbala misato bato oyo bakufá na bitumba nyonso oyo esalemá kobanda na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso (T.B.) tii na mobu 1899.” Kobanda 1914, bitumba ebomi bato koleka milio 100. Bamilio ya bato bazali na mawa mpe na mpasi mpo bandeko na bango to baninga na bango bakufá na bitumba. Ntango mosusu ndeko na yo to moninga na yo moko akufá mpe bongo.

7‘Bilei ekozanga.’ (Matai 24:7) Bato ya mayele balobi ete na mbula 30 oyo euti koleka, biloko ya kolya ebimi mingi. Nzokande, bato bazali kaka kozanga bilei, mpamba te mingi bazali mpenza na mbongo te mpo na kosomba yango to bazangi mabelé ya kosala bilanga. Bamilio na bamilio ya bato bazali ntango nyonso kokufa nzala. Ebongiseli ya ONU mpo na bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto (OMS) elobi ete na bana koleka milio mitano oyo bakufaka mbula na mbula, mingi kati bango bazali kokufa mpo balyaka malamu te.

8“Koningana minene ya mabelé ekozala.” (Luka 21:11) Ebongiseli moko (U.S. Geological Survey) elobi ete banda kaka na 1990 awa, mbula na mbula mabelé eninganaka makasi mpenza mbala soki 17; yango ezali kobebisa bandako mpe kopasola mabelé. Mpe tokoki koloba ete mbula na mbula koningana ya mabelé ya makasi, oyo ekoki kokweisa bandako, ezangaka te. Ebongiseli mosusu elobi ete: “Na boumeli ya mbula 100 oyo eleki, koningana ya mabelé ebomi ebele ya bato mpe atako bato bazwi batɛkiniki ya sika mingi, yango ezali naino koboma bato mingi.”

9“Bamaladi mabe…ekozala.” (Luka 21:11) Atako minganga bakómi na mayele mingi na mosala na bango, bamaladi ya kala mpe ya sika ezali kosilisa bato. Lapolo moko elobi ete maladi 20 oyo eyebani malamu—na ndakisa maladi ya ntolo, malaria, mpe kolera—ekómi komonana mingi na bambula oyo, mpe nkisi ezali kokoka lisusu te kosilisa bamaladi mosusu. Kutu, bamaladi ya sika 30 to koleka ebimi. Kati na yango, mosusu ezali naino na nkisi te mpe ezali koboma bato.

BATO NA MIKOLO YA NSUKA

Ebele ya bato babosani litambwisi ya Liloba ya Nzambe

10 Biblia esuki kaka te na koyebisa mwa makambo ya minene oyo ezali komonana na mokili, kasi esakoli mpe ete bato bakokóma na bizaleli mosusu na mikolo ya nsuka. Ntoma Paulo amonisaki ndenge bato mingi bakozala. Totángi boye na 2 Timote 3:1-5: “Na mikolo ya nsuka bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza ekozala.” Kati na makambo oyo Paulo atángaki, alobaki ete bato bakozala

  • bato oyo bamilingaka bango moko
  • bato balingá mbongo
  • bato bazangi botosi epai ya baboti
  • bato bazangi bosembo
  • bato bazangi bolingo ya libota
  • bato bazangi komipekisa
  • bato ya kongala
  • bato balingá bisengo na esika ya kozala bato oyo balingaka Nzambe
  • bato na motindo moko boye ya ezaleli ya kokangama na Nzambe kasi bazali kowangana nguya na yango

11 Na esika ofandi, bato bakómi ndenge wana? Ɛɛ, bakómi mpenza bongo. Bipai nyonso bato bazali na bizaleli mabe wana. Yango emonisi ete etikali moke Nzambe asembola makambo, mpamba te Biblia elobi ete: ‘Ntango bato mabe bakoli lokola matiti mpe baoyo nyonso basalaka mabe balongi malamu, nde ezali mpo ete bábomama bobele kobomama.’—Nzembo 92:7.

MAKAMBO YA MALAMU!

12 Ya solo, mawa etondi na mikolo oyo ya nsuka, se ndenge Biblia esakolaki. Nzokande, na mokili oyo etondi na yikiyiki, makambo ya malamu ezali kosalema epai ya basambeli ya Yehova.

‘Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba epai bato bafandi.’—Matai 24:14

Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango malamu

13 Danyele, mokanda moko ya Biblia, esakolaki ete “boyebi ya solosolo ekokóma mingi.” Ntango nini likambo yango ekosalema? Na “ntango ya nsuka.” (Danyele 12:4, NW) Mingi mpenza kobanda na 1914, Yehova asalisi baoyo balingaka mpenza kosalela ye báyeba Biblia malamumalamu. Bayebi malamumalamu mateya ya ntina mingi oyo etali nkombo ya Nzambe mpe mokano na ye, mbeka oyo Yesu Klisto apesaki mpo na kosikola biso, ndenge bakufi bazalaka, mpe lisekwa. Longola yango, basambeli ya Yehova bayekoli ndenge ya kozala na bomoi oyo ekomemela bango bolamu mpe oyo ekokumisa ye. Bayebi mpe malamumalamu ntina ya Bokonzi ya Nzambe mpe ndenge oyo ekobongisa makambo awa na mabelé. Bazali kosala nini na boyebi yango? Motuna wana ememi biso na esakweli mosusu oyo mpe ezali kokokisama na mikolo oyo ya nsuka.

14 Na esakweli ya Yesu Klisto oyo elobeli “bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” alobaki ete: ‘Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba epai bato bafandi.’ (Matai 24:3, 14) Na mabelé mobimba, nsango malamu ya Bokonzi—elingi koloba ndimbola ya Bokonzi, mosala oyo yango ekosala, mpe ndenge oyo tokoki kozwa mapamboli na yango—ezali kosakolama na mikili koleka 230 mpe na minɔkɔ koleka 400. Bamilio ya Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na molende. Bauti na “bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso.” (Emoniseli 7:9) Batatoli bazali koyekola Biblia ofele na bamilio ya bato oyo balingi koyeba oyo Biblia ezali mpenza koteya. Ndenge esakweli yango ezali kokokisama ezali mpenza kokamwisa, mingi mpenza soki tokanisi ndenge Yesu asakolaki ete baklisto ya solo bakozala “biloko ya koyinama na bato nyonso”!—Luka 21:17.

OKOSALA NINI?

15 Lokola ebele ya bisakweli ya Biblia ezali kokokisama lelo oyo, ondimi te ete tozali na mikolo ya nsuka? Ntango Yehova akomona ete nsango malamu esakolami ndenge alingaki, “nsuka” ekoya mpenza. (Matai 24:14) “Nsuka” elakisi ntango oyo Nzambe akolongola mabe na mokili. Mpo Yehova aboma baoyo nyonso bazali koboya kotosa ye na nko, akosalela Yesu ná baanzelu na ye ya nguya. (2 Batesaloniki 1:6-9) Satana ná bademo na ye bakobungisa bikólo nzela lisusu te. Na nsima, Bokonzi ya Nzambe ekosopa ebele ya mapamboli likoló ya baoyo nyonso bazali kotosa boyangeli na yango ya sembo.—Emoniseli 20:1-3; 21:3-5.

16 Lokola nsuka ya ebongiseli ya Satana ekómi pene, moto na moto asengeli komituna: ‘Esengeli nasalaka makambo nini?’ Ezali malamu okoba koyekola mpo oyeba lisusu malamu Yehova mpe makambo oyo azali kosɛnga biso. (Yoane 17:3) Yekoláká Biblia na molende. Zwá momeseno ya kokutanaka esika moko na bato mosusu oyo balukaka kosala mokano ya Yehova. (Baebele 10:24, 25) Salá makasi oyeba ebele ya makambo oyo Yehova Nzambe azali koteya bato ya mokili mobimba, mpe bongisá makambo oyo esengeli obongisa na bomoi na yo mpo okoka kosepelisa ye.—Yakobo 4:8.

17 Yesu asakolaki ete bato mingi bakotya likebi te na makambo oyo ezali komonisa ete tozali na mikolo ya nsuka. Kobomama ya bato mabe ekoya mbalakaka, ekolaka te. Bato mingi bakosutuka, mpamba te ekoya lokola moyibi na butu. (1 Batesaloniki 5:2) Yesu apesaki likebisi oyo: “Se ndenge mikolo ya Noa ezalaki, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo. Mpo se ndenge bazalaki na mikolo yango liboso ya mpela, kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama, tii mokolo oyo Noa akɔtaki na masuwa; mpe batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.”—Matai 24:37-39.

18 Yango wana, Yesu ayebisaki bayoki na ye boye: “Bókeba na bino moko ete mitema na bino ekóma kilo ata moke te na kolekisa ndelo na kolya mpe na komɛla mingi mpe na mitungisi ya bomoi, mpe ete na pwasa mokolo wana ekwela bino na ntango wana kaka lokola motambo. Mpo yango ekoyela baoyo nyonso bafandaka na etando ya mabelé mobimba. Boye, bólala mpɔngi te, kopesáká malɔmbɔ ntango nyonso mpo bólonga kokima makambo nyonso wana oyo esengeli kobima, mpe kotɛlɛma [lokola bato oyo bandimami] liboso ya Mwana ya moto.” (Luka 21:34-36) Ezali malamu kozwa maloba wana ya Yesu na lisɛki te. Mpo na nini? Mpamba te bato oyo Yehova Nzambe mpe “Mwana ya moto,” Yesu Klisto, bandimi bazali na elikya ya kobika ntango ebongiseli ya makambo ya Satana ekobomama mpe bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na mokili moko kitoko ya sika oyo ekómi mpenza pene!—Yoane 3:16; 2 Petelo 3:13.

OYO BIBLIA ETEYAKA

  • Na mikolo oyo ya nsuka, makambo oyo ezali kosalema yango oyo: bitumba, kozanga bilei, koningana ya mabelé, mpe bamaladi mabe.—Matai 24:7; Luka 21:11.
  • Na mikolo oyo ya nsuka, bato mingi bazali komilinga bango moko, kolinga mbongo mpe bisengo, kasi bazali kolinga Nzambe te.—2 Timote 3:1-5.
  • Na mikolo oyo ya nsuka, nsango malamu ya Bokonzi ezali kosakolama na mokili mobimba.—Matai 24:14.

*  Soki olingi koyeba makambo mosusu oyo emonisi ete Mikaele ezali nkombo mosusu ya Yesu Klisto, talá Apɛndisi.


Mituna ya boyekoli

1. Nini ekoki koyebisa biso makambo oyo ekoya?

2, 3. Motuna nini bayekoli ya Yesu batunaki ye, mpe eyano nini apesaki bango?

4, 5. (a) Likambo nini esalemaki na likoló nsima ya kokóma ya Yesu Mokonzi? (b) Emoniseli 12:12 elobi ete etumba yango oyo babundaki na likoló esengelaki kobimisa likambo nini?

6, 7. Ndenge nini maloba oyo Yesu alobaki mpo na bitumba mpe kozanga ya bilei ezali kokokisama lelo oyo?

8, 9. Nini emonisi ete makambo oyo Yesu asakolaki oyo etali koningana ya mabelé mpe bamaladi mabe ekokisami?

10. Wapi bizaleli oyo 2 Timote 3:1-5 esakolaki oyo ozali komona epai ya bato lelo oyo?

11. Na maloba nini Nzembo 92:7 emonisi likambo oyo ekokómela bato mabe?

12, 13. Ndenge nini “boyebi ya solosolo” ekómi mingi na ‘ntango oyo ya nsuka’?

14. Lelo oyo nsango malamu ya Bokonzi ezali kosakolama na mikili boni mpe na minɔkɔ boni, mpe banani bazali kosakola yango?

15. (a) Ondimi ete tozali na mikolo ya nsuka, mpe mpo na nini? (b) “Nsuka” ekolimbola nini mpo na baoyo bazali koboya kotosa Yehova mpe mpo na baoyo bazali kotosa Bokonzi na ye?

16. Ekozala malamu osala makambo nini?

17. Mpo na nini bato mingi bakosutuka ntango kobomama na bango ekokóma?

18. Likebisi nini Yesu apesaki oyo tosengeli kozwa na lisɛki te?

Makambo mosusu

KOYEKOLA BIBLIA

Mpo na nini koyekola Biblia?

Biblia ezali na biyano na mituna ya ntina mingi oyo etali bomoi oyo bamilio ya bato na mokili mobimba bamitunaka. Yo mpe olingi koyekola Biblia?