Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Biblia eteyaka mpenza nini?

APƐNDISI

Ntina oyo baklisto ya solo basalelaka ekulusu te na losambo

Ntina oyo baklisto ya solo basalelaka ekulusu te na losambo

BAMILIO ya bato balingaka ekulusu mingi mpe bamemyaka yango. Buku moko (The Encyclopædia Britannica) elobi ete ekulusu ezali “elembo ya libosoliboso ya lingomba ya boklisto.” Atako bongo, baklisto ya solo basalelaka ekulusu te na losambo. Mpo na nini?

Ntina ya liboso ezali ete Yesu Klisto akufaki na ekulusu te. Liloba ya Grɛki oyo mbala mingi ebongolamaka na “ekulusu” ezali stauros. Liloba yango elakisi mpenzampenza “likonzí to nzete moko ya semba.” Biblia moko (The Companion Bible) elobi boye: “[Stauros] elakisi ata moke te mabaya mibale oyo moko ekatisi mosusu…Na Grɛki oyo basaleli na [Boyokani ya Sika], eloko ata moko te emonisi ete ezalaki mabaya mibale.”

Na bavɛrsɛ mingi, bato oyo bakomaki Biblia basaleli liloba mosusu mpo na kolobela eloko oyo bakakisaki Yesu likoló na yango ntango akufaki. Ezali liloba ya Grɛki xylon. (Misala 5:30; 10:39; 13:29; Bagalatia 3:13; 1 Petelo 2:24) Liloba yango elakisi nde “libaya” to “nzete.”

Mpo na komonisa ntina oyo bazalaki mbala mingi kosalela nzete moko mpamba mpo na kokakisa bato, buku Ekulusu mpe kobakama nsɛtɛ, ya Hermann Fulda, elobi ete: “Banzete ezalaki mingi te na bisika oyo ezalaki koponama mpo na koboma na miso ya bato nyonso bato oyo basali mabe. Boye bazalaki kopika libaya moko mpamba na mabelé. Likoló na yango bazalaki kokanga bato oyo bazalaki kobuka mibeko na bansinga to kobaka bango nsɛtɛ mabɔkɔ likoló mpe, mbala mingi, bazalaki kokanga makolo to kobaka yango nsɛtɛ.”—Das Kreuz und die Kreuzigung.

Kasi, ntina oyo eleki mosusu nyonso na kondimisa euti nde na Liloba ya Nzambe. Ntoma Paulo alobi ete: “Klisto na nzela ya lisombi alongolaki biso na elakeli mabe ya Mibeko na ndenge akómaki elakeli mabe na esika na biso, mpamba te ekomamá ete: ‘Moto nyonso oyo akakisami na nzete alakelami mabe.’” (Bagalatia 3:13) Awa Paulo azongeli maloba ya Deteronome 21:22, 23, oyo elobeli polele nzete, kasi ekulusu te. Lokola ndenge wana ya koboma moto ezalaki kokómisa ye “elakeli mabe,” ezali malamu te ete baklisto bákembisaka bandako na bango na bililingi ya Klisto likoló ya nzete ya mpasi.

Likambo ata moko te emonisi ete, na boumeli ya mbula 300 oyo elandaki liwa ya Klisto, baoyo babengamaki baklisto bazalaki kosalela ekulusu na losambo. Kasi, na siɛklɛ ya minei, Amperɛrɛ Constantin, oyo azalaki mopakano, akómaki mondimi ya lingomba ya boklisto oyo esilaki kopɛngwa; ye nde akómisaki ekulusu elembo ya lingomba yango. Ezala likambo nini etindaki ye na kosala bongo, boyokani ata moko te ezalaki kati na Yesu Klisto ná ekulusu. Kutu, ekulusu euti nde na bapakano. Buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi boye: “Bato oyo bazalaki na bomoi liboso Klisto abotama mpe baoyo bazalaki kofanda na bamboka oyo ezalaki mpenza na baklisto mingi te bazalaki kosalela ekulusu.” Bato mingi ya mayele bamonisi mpe ete bato oyo bazalaki kosambela biloko oyo Nzambe akelá bazalaki kosalela ekulusu, mpe bapakano bazalaki kosalela yango na milulu na bango ya kosangisa nzoto.

Soki ezali bongo, mpo na nini elembo yango ya bapakano ekómaki kosalelama mingi? Emonani ete, ezalaki kosalelama mpo na kobenda bapakano na losambo ya boklisto oyo esilaki kobeba. Atako bongo, Biblia emonisi polele ete kokangama na elembo ata ya ndenge nini ya bapakano ezali mabe. (2 Bakolinti 6:14-18) Makomami epekisi mpe lolenge nyonso ya losambo ya bikeko. (Exode 20:4, 5; 1 Bakolinti 10:14) Yango wana, baklisto ya solo basalelaka ekulusu na losambo te.*


*  Balobeli malamumalamu likambo ya ekulusu na buku Comment raisonner à partir des Écritures, na nkasa 77-81, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

← Talá mikapo