Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Biblia eteyaka mpenza nini?

MOKAPO YA ZOMI NA MOKO

Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala?

Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala?

Bampasi ya mokili euti na Nzambe?

Ntembe nini ebimaki na elanga ya Edene?

Ndenge nini Nzambe akosilisa bampasi nyonso ya bato?

NA EKÓLO moko, basi mpe bana mingi oyo bazalaki basoda te bakufaki na etumba moko ya nsɔmɔ; na nsima, bakundaki bango nyonso na libulu moko mpe pembenipembeni na yango batyaki bikulusu ya mike. Na ekulusu mokomoko bakomaki ete: “Mpo na nini?” Mbala mingi, bato batunaka motuna wana soki likambo moko oyo bayebi ntina na yango te eyokisi bango mpasi ya makasi koleka. Na ndakisa, batunaka motuna yango na mawa mpenza ntango etumba, likama, maladi to likambo moko ya mabe ebomi bandeko to baninga na bango, ebebisi bandako na bango, to ebimiseli bango bampasi mosusu ya makasi. Balingaka koyeba ntina oyo bampasi wana ekómeli bango.

2 Mpo na nini Yehova Nzambe atiki bampasi ezala? Soki azali na nguya ya kosala makambo nyonso, soki azali bolingo, azali na bwanya, mpe na bosembo, mpo na nini mokili etondi na koyinana mpe na makambo oyo ezali sembo te? Yo mpe osilá komituna mituna wana?

3 Ezali mabe kotuna ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala? Bato mosusu bakanisaka ete soki batuni bongo, elakisi ete bazali na kondima makasi te to bazali na limemya te epai ya Nzambe. Nzokande, soki otángi Biblia, okomona ete bato ya sembo mpe batunaká mituna ya ndenge wana. Na ndakisa, Habakuku, mosakoli moko ya sembo, atunaki Yehova ete: “Mpo na nini ozali kotika ngai namonaka makambo ya mabe, mpe ozali kolanda kotala mpasi kaka boye? Mpe mpo na nini kobɔtɔla mpe mobulu ezali liboso na ngai, mpe mpo na nini koswana ezali kobima, mpe mpo na nini matata ezali komonana mingi?”—Habakuku 1:3, NW.

Yehova akosilisa bampasi nyonso

Bazali kokunda ebembe

4 Yehova asilikelaki ye mpo atunaki mituna wana? Te. Kutu, Nzambe asalaki ete maloba yango oyo eutaki mpenza na motema ya Habakuku ekomama mpe na Biblia, buku oyo ekomami na lisalisi ya elimo na Ye. Yehova asalisaki mpe Habakuku akanga malamumalamu ntina ya makambo yango mpe akóma na kondima makasi. Alingi mpe kosalisa yo bongo. Kobosana te, Biblia eteyaka ete ‘atyelaka yo likebi.’ (1 Petelo 5:7) Moto moko te ayinaka mabe mpe bampasi oyo euti na mabe koleka Nzambe. (Yisaya 55:8, 9) Soki ezali bongo, kasi mpo na nini bampasi etondi na mokili boye?

MPO NA NINI BAMPASI ETONDI BOYE?

5 Bandimi ya mangomba ndenge na ndenge batunaka bateyi mpe bakonzi ya mangomba na bango ntina oyo bampasi etondi boye. Mbala mingi, eyano bapesaka bango ezali ete bampasi ezali mokano ya Nzambe mpe Nzambe abongisá banda kala makambo nyonso oyo ekosalema, ata makambo oyo epesaka mawa mingi. Bayebisaka bato mingi ete makambo oyo Nzambe asalaka ezali libombami mpe abomisaka bato, ata mpe bana, mpo bákende kofanda na ye kuna na likoló. Nzokande, ndenge oyebi, Yehova asalaka makambo mabe ata moke te. Biblia elobi ete: “Tiká ete ezala mosika na Nzambe ete asala mabe! Ezala mosika mpe na Oyo-na-Nguya-Nyonso ete azala na lisumu!”—Yobo 34:10.

6 Oyebi likambo oyo etindaka bato bámikosa mpe bápesa Nzambe foti mpo na bampasi nyonso oyo ezali na mokili? Mbala mingi, bapesaka Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso foti mpo bakanisaka ete ye nde ayangelaka mokili oyo. Bayebaka te likambo moko ya pɛtɛɛ, kasi ya ntina mingi, oyo Biblia eteyaka. Oyekolaki likambo yango na Mokapo 3 ya buku oyo: Moto oyo azali mpenza koyangela mokili oyo ezali nde Satana Zabolo.

7 Biblia elobi polele ete: “Mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Soki okanisi maloba yango, omoni te ete ezali mpenza bongo? Bato ya mokili bazali komonisa bizaleli ya ekelamu yango ya elimo oyo azali ‘kobungisa mabelé mobimba epai bato bafandi nzela.’ (Emoniseli 12:9) Lokola Satana, motambwisi ya mokili oyo, atondi na koyina, na bokosi mpe na motema mabe, bato mingi na mokili bazali mpe na bizaleli yango. Wana ezali moko na bantina oyo bampasi etondi boye.

8 Ntina ya mibale oyo bampasi etondi boye ezali ete, ndenge tomonaki na Mokapo 3, banda botomboki ebimaki na elanga ya Edene bato bazalaka lisusu te na ezaleli ya kokoka mpe bakómá basumuki. Mbala mingi, bato ya masumu babomaka nzoto mpo na koluka bokonzi; yango nde ebimisaka bitumba, minyoko, mpe bampasi. (Mosakoli 4:1; 8:9) Ntina ya misato ezali “ntango mpe likambo oyo ekanami te.” (Mosakoli 9:11, NW) Lokola Yehova azali koyangela mpe kobatela mokili oyo te, mpasi ekoki kokómela moto mpo ntango likama esalemi na esika moko boye azalaki mpenza wana.

9 Motema na biso ekiti lokola toyebi ete bampasi na biso eutaka na Nzambe te. Ezali ye te moto abimisaka bitumba, makambo ya mabe, minyoko, ata mpe koningana ya mabelé to mpela oyo ezindisaka bamboka, oyo epesaka bato mpasi. Atako bongo, esengeli tóyeba ntina oyo Yehova atiki bampasi nyonso wana ezala. Soki azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, azali na nguya ya kosukisa yango. Bongo, mpo na nini azali kosala eloko te? Lokola toyebi ete Nzambe azali bolingo, ntembe ezali te, esengeli kozala na ntina mpenza oyo atiki bampasi ezala.—1 Yoane 4:8.

NTEMBE MOKO YA NTINA MINGI EBIMI

10 Mpo na koyeba ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala, esengeli tózongisa makanisi na ntango oyo bampasi ebandaki. Ntango Satana atindaki Adama ná Eva bábuka mobeko ya Yehova, ntembe moko ya monene ebimaki. Satana abɛtɛlaki nguya ya Yehova ntembe te, mpamba te ayebi malamu ete nguya ya Yehova ezali na nsuka te. Kasi, abɛtaki ntembe nde na lotomo ya Yehova ya koyangela. Satana afundaki Yehova ete azali mokonzi mabe na ndenge alobaki ete Yehova azali mobuki-lokuta oyo apimelaka bato na ye makambo ya malamu. (Genese 3:2-5) Mpo na Satana, bato bakozala malamu soki Nzambe azali mokonzi na bango te. Wana elingaki koloba ete Yehova abongi te kozala Mokonzi, azali na lotomo te ya koyangela.

11 Adama ná Eva baboyaki kotosa Yehova. Ezali lokola nde balobaki ete: “Tozali na mposa te ete Yehova azala Mokonzi na biso. Biso moko tozali na likoki ya kopona nini ezali malamu mpe nini ezali mabe.” Ndenge nini Yehova akokaki kokata likambo wana? Ndenge nini akokaki koteya bikelamu nyonso ya mayele ete batomboki wana balandi nzela ya mabe mpe ete nzela na ye nde eleki malamu? Okoki mbala mosusu koloba ete Nzambe asengelaki kaka koboma bango mpe kosala bato mosusu. Kasi, kobosana te ete Yehova asilaki koyebisa ete alingi bana ya Adama ná Eva bátondisa mabelé mpe báfanda na paladiso awa na mabelé. (Genese 1:28) Yehova akokisaka ntango nyonso mikano na ye. (Yisaya 55:10, 11) Longola yango, soki abomaka batomboki yango na Edene, yango elingaki te kosilisa ntembe oyo ebimaki na ntina na lotomo na ye ya koyangela.

Molakisi ná bana-kelasi

Mwana-kelasi ayebi koteya malamu koleka molakisi na ye?

12 Tózwa ndakisa moko. Kanisá ete molakisi moko azali kolakisa bana-kelasi ndenge ya kozwa eyano na motuna moko ya makasi. Mwana moko ya mayele, kasi oyo azali mpe motó makasi, alobi ete ndenge oyo molakisi azali koteya bango ezali mabe. Mpo na komonisa ete molakisi ayebi koteya te, mwana yango azali ntango nyonso koloba ete ye ayebi ndenge ya malamu mpenza ya kozwa eyano na motuna yango. Bana mosusu bakanisi ete alobi solo, bango mpe bakómi mitó makasi. Molakisi asengeli kosala nini? Soki abimisi bana wana ya motó makasi libándá, bana oyo batikali bakokanisa nini? Bakokanisa ete moninga na bango wana ná basusu oyo bakɔteli ye balobi solo, boye te? Bango nyonso bakoki kolongola limemya oyo bazalaki kopesa molakisi, bakokanisa ete azali kobanga noki bana wana bámonisa polele ete ayebi eloko te. Sikoyo kanisá ete molakisi apesi mwana wana nzela alakisa baninga na ye ya kelasi ndenge oyo ye akosala mpo na kozwa eyano na motuna wana.

13 Yehova asalaki mpe lokola molakisi wana. Tóbosana te ete longola batomboki wana na Edene, bikelamu mosusu mpe bazalaki kolanda. Ɛɛ, bamilio ya baanzelu bazalaki kotala. (Yobo 38:7; Danyele 7:10) Ndenge oyo Yehova akosilisa botomboki yango ekoteya baanzelu nyonso wana mpe na nsima, bikelamu nyonso ya mayele. Yehova asalaki nini? Atikaki Satana amonisa ndenge oyo ye akoyangela bato. Atikaki mpe bato bálanda Satana mpe bámitambwisa bango moko.

14 Na ndakisa oyo topesaki, molakisi ayebi ete mwana wana ya motó makasi ná baninga na ye balobi solo te. Kasi ayebi mpe ete soki apesi bango nzela bámeka komonisa bosolo ya maloba na bango, kelasi mobimba ekozwa liteya. Ntango bana wana ya motó makasi bakokoka te, bana-kelasi nyonso ya makanisi malamu bakomona ete ebongi kaka molakisi nde ateya bango. Na nsima, soki molakisi abimisi mwana nyonso ya motó makasi libándá, bakoyeba ete asali yango na ntina. Ndenge moko mpe, Yehova ayebi ete bato ná baanzelu nyonso ya mitema sembo bakozwa liteya ntango bakomona ete Satana ná baninga na ye batomboki balongi te mpe ete bato bakoki komitambwisa bango moko te. Ndenge moko na Yilimia, mosakoli ya kala, bakoyeba likambo ya solo oyo ya ntina mingi: ‘Ee Yehova, nayebi ete nzela ya moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambwisa makolo na ye ye moko.’—Yilimia 10:23.

MPO NA NINI NTANGO MOLAI BOYE?

15 Kasi, mpo na nini Yehova atiki bampasi eumela mingi boye? Mpo na nini azali kopekisa te makambo ya mabe? Tótala naino makambo mibale oyo molakisi ya ndakisa oyo topesaki akosala te. Ya liboso, akopekisa te mwana yango ya motó makasi kolimbola likanisi na ye. Ya mibale, molakisi akosalisa ye te ntango azali kolimbola likanisi na ye. Se ndenge moko, ezali mpe na makambo mibale oyo Yehova azwaki ekateli ete akosala yango te. Ya liboso, apekisi te ete Satana ná baoyo bazali kokɔtela ye bámonisa bosolo ya makanisi na bango. Yango wana, esengelaki atikela bango ntango. Na bankóto ya bambula oyo bato bazali na mabelé, bazwi likoki ya komeka mitindo ndenge na ndenge ya komiyangela. Ezala na makambo ya siansi to na makambo mosusu, bato bakómi na mayele mingi. Atako bongo, kozanga bosembo, bobola, makambo mabe, mpe bitumba ezali kobakisama se kobakisama. Sikoyo, emonani polele ete boyangeli ya bato elongi te.

16 Ya mibale, Yehova asalisi Satana te mpo na koyangela mokili oyo. Na ndakisa, soki Nzambe apekisaka makambo ya nsɔmɔ oyo esalemaka, mbɛlɛ yango emonisi ete batomboki balobaki solo, boye te? Soki Nzambe asalisaka bango, alingaki kotinda bato bákanisa ete bakoki komitambwisa bango moko kozanga kobimisa mikakatano, boye te? Soki Yehova asalaka bongo, mbɛlɛ ye mpe amikɔtisi na kati ya lokuta. Nzokande, “ekoki kosalema te ete Nzambe akosa.”—Baebele 6:18.

Nzambe akosalisa yo oyikela mpasi mpiko

Liloba ya Nzambe ekitisi mwasi moko motema

17 Bongo, tokoloba boni mpo na mabe nyonso oyo esalemi na boumeli ya ntango molai oyo bato baboyi kotosa Nzambe? Tosengeli kobosana te ete Yehova azali mozwi-ya-nguya-nyonso. Yango wana, azali na likoki ya kosilisa bampasi nyonso ya bato mpe akani kosala yango. Ndenge tomonaki yango, bato bakobebisa lisusu mabelé te mpe mabelé ekokóma Paladiso. Soki tondimeli mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kosikola bato, mbuma mabe nyonso ya lisumu ekosila, mpe lisekwa ekosilisa mpasi nyonso oyo euti na liwa. Na ndenge yango, Nzambe akosalela Yesu “mpo na kobukabuka misala ya Zabolo.” (1 Yoane 3:8) Yehova akosala makambo nyonso wana na ntango mpenza oyo esengeli. Tósepela ndenge asali makambo yango liboso ya ntango wana te, mpo motema molai na ye epesi biso nzela ya koyekola solo mpe kosalela ye. (2 Petelo 3:9, 10) Liboso ntango yango ekoka, Nzambe azali kosala nyonso mpo na koluka bato ya motema sembo mpo básambela ye mpe azali kosalisa bango báyika mpiko ata soki bazwi mpasi ya ndenge nini na mokili oyo etondi na yikiyiki.—Yoane 4:23; 1 Bakolinti 10:13.

18 Bato mosusu bakoki komituna boye: ‘Bampasi nyonso oyo ekokaki nde kozala te soki Nzambe asalaka Adama ná Eva na ndenge ete bákoka te kotomboka?’ Mpo na koyanola na motuna wana, osengeli kokanisa lisusu likabo moko ya motuya mingi oyo Yehova apesá yo.

NDENGE NINI OKOSALELA LIKABO OYO NZAMBE APESÁ YO?

19 Ndenge tomonaki na Mokapo 5, bato bakelamá na bonsomi ya kopona. Omonaka ete bonsomi yango ezali likabo moko ya motuya oyo bapesá yo? Nzambe asalá ebele ya banyama, kasi lɔɔmbi (instinct) nde etindaka bango básala makambo oyo basalaka. (Masese 30:24, NW) Bato basali bamasini mpo esalaka kaka eloko oyo bakotinda yango. Tolingaki nde kozala na esengo soki Nzambe asalaki biso bongo? Te, tosepelaka kozala na bonsomi ya kopona biso moko ndenge oyo tolingi kozala, makambo oyo tokosala na bomoi na biso, baninga na biso, mpe bongo na bongo. Tolingaka kozala na mwa bonsomi; Nzambe mpe alingi ete ezala bongo.

20 Yehova alingaka te ete moto asalela ye mpo bazali kotinda ye kotinda. (2 Bakolinti 9:7) Na ndakisa: Likambo nini ekosepelisa tata to mama mingi koleka—mwana ayebisa ye na motema na ye moko ete “nalingi yo” to moto mosusu atinda ye aloba bongo? Na yango, ezali na ntina mpenza oluka koyeba ndenge oyo yo okosalela bonsomi ya kopona oyo Yehova apesá yo. Satana, Adama, ná Eva basalelaki yango na ndenge oyo eleki mabe: baboyaki Yehova Nzambe. Bongo yo?

21 Ozali na libaku ya kosalela bonsomi yango na ndenge oyo eleki malamu. Okoki kosangana na bamilio ya bato oyo baponi kozala na ngámbo ya Yehova. Bazali kosepelisa Nzambe, mpamba te bazali komonisa mpenza ete Satana azali mobuki-lokuta mpe mokonzi mabe mpenza. (Masese 27:11) Yo mpe okoki kosala lokola bango soki oponi kolanda nzela ya malamu. Mokapo oyo elandi ekolimbola likambo yango.

OYO BIBLIA ETEYAKA

  • Bampasi ya mokili euti na Nzambe te.—Yobo 34:10.
  • Satana aboyaki kondima lotomo ya Yehova ya koyangela na ndenge alobaki ete Yehova azali mobuki-lokuta mpe azali kopimela bato na Ye makambo ya malamu.—Genese 3:2-5.
  • Yehova akosalela Mwana na ye, Mokonzi mpe Masiya, mpo na kosilisa bampasi nyonso ya bato mpe mikakatano nyonso oyo bampasi yango ebimisá.—1 Yoane 3:8.

Mituna ya boyekoli

1, 2. Bampasi ya ndenge nini ezali kokómela bato lelo oyo, mpe mituna nini bato mingi bamitunaka mpo na yango?

3, 4. (a) Nini emonisi ete ezali mabe te kotuna ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala? (b) Ndenge nini Yehova atalelaka mabe mpe mpasi?

5. Makanisi nini bato bapesaka ntango mosusu mpo na kolimbola ntina ya bampasi, kasi Biblia eteyaka nini?

6. Mpo na nini bato mingi bamikosaka mpe bapesaka Nzambe foti mpo na bampasi oyo ezali na mokili?

7, 8. (a) Nini emonisi ete bato ya mokili oyo bazali komonisa bizaleli ya moto oyo azali koyangela yango? (b) Ndenge nini ezaleli ya kozanga kokoka oyo bato bazali na yango ná “ntango mpe likambo oyo ekanami te” esali mpe ete bampasi ezala?

9. Mpo na nini tondimi mpenza ete Yehova asengeli kozala na ntina mpenza oyo atiki bampasi ekoba?

10. Satana abɛtɛlaki eloko nini ntembe, mpe ndenge nini asalaki yango?

11. Mpo na nini Yehova abomaki mbala moko batomboki yango na Edene te?

12, 13. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ntina oyo Yehova atikeli Satana nzela akóma mokonzi ya mokili oyo mpe atiki bato bámitambwisa bango moko.

14. Lokola Yehova atiki bato bámitambwisa bango moko, liteya nini bakozwa?

15, 16. (a) Mpo na nini Yehova atiki ete bampasi eumela mingi boye? (b) Mpo na nini apekisi te makambo ya nsɔmɔ oyo esalemaka?

17, 18. Yehova akosala nini na mabe nyonso oyo euti na boyangeli ya bato mpe na bokonzi mabe ya Satana?

19. Likabo nini ya motuya Yehova apesá biso, mpe mpo na nini tosengeli kosepela na yango mingi?

20, 21. Wapi lolenge eleki malamu oyo tokoki kosalela bonsomi ya kopona oyo Nzambe apesá biso, mpe mpo na nini esengeli tólinga kosala bongo?

Makambo mosusu

KOYEKOLA BIBLIA

Mpo na nini koyekola Biblia?

Biblia ezali na biyano na mituna ya ntina mingi oyo etali bomoi oyo bamilio ya bato na mokili mobimba bamitunaka. Yo mpe olingi koyekola Biblia?