Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Biblia eteyaka mpenza nini?

MOKAPO YA ZOMI NA MITANO

Losambo oyo Nzambe andimaka

Losambo oyo Nzambe andimaka

Nzambe andimaka mangomba nyonso?

Ndenge nini tokoki koyeba lingomba ya solo?

Lelo oyo banani bazali basambeli ya solo ya Nzambe awa na mabelé?

YEHOVA NZAMBE amibanzabanzaka mpo na biso mpenza mpe alingaka ete tózwa bolamu, wana azali kokamba biso na bolingo mpenza. Soki tozali kosambela ye na ndenge ya malamu, tokozala na esengo mpe tokozala na mikakatano mingi te na bomoi na biso. Longola yango, akopambola biso mpe akosalisa biso. (Yisaya 48:17) Nzokande, ezali na ebele ya mangomba oyo elobaka ete eteyaka solo na makambo ya Nzambe. Kasi, yango nyonso eteyaka mpenza ndenge moko te soki Nzambe azali nani mpe makambo nini asɛngaka biso.

2 Ndenge nini okoki koyeba lolenge ya malamu ya kosambela Yehova? Ntina ya koyekola mateya ya mangomba nyonso mpe koluka koyeba soki ekokani to ekeseni, ezali te. Osengeli nde koyekola oyo Biblia eteyaka mpenza mpo na losambo ya solo. Tózwa ndakisa: Na bikólo mingi, mbongo ya mabe etambolaka na mabɔkɔ ya bato. Soki bapesi yo mosala ya koluka koyeba mbongo yango, okosala nini? Okokanga nde na motó lolenge mokomoko ya mbongo ya mabe? Te. Ekoleka malamu nde oluka koyeba mbongo ya malamu. Soki oyebi yango, okoyeba mpe oyo ya mabe. Ndenge moko mpe, soki toyekoli ndenge ya koyeba lingomba ya solo, tokozala mpe na likoki ya koyeba mangomba ya lokuta.

3 Esengeli tósambela Yehova na ndenge oyo ye alingi. Bato mingi bakanisaka ete Nzambe andimaka mangomba nyonso, kasi Biblia eteyaka bongo te. Ekoki mpe te kosuka kaka na koloba ete ozali moklisto, mpamba te Yesu alobaki ete: “Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai, ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta na bokonzi ya likoló, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló.” Na yango, mpo Nzambe andima biso, tosengeli koyeba makambo oyo asɛngaka biso mpe kosala yango. Yesu abengaki baoyo basalaka mokano ya Nzambe te “bato ya misala ya botyoli-mibeko.” (Matai 7:21-23) Ndenge moko na mbongo ya mabe, losambo ya lokuta ezali na valɛrɛ ata moke te. Likambo ya mawa koleka ezali ete losambo ya ndenge wana esalaka nde bato mabe.

4 Yehova azali kopesa moto nyonso awa na mabelé libaku ya kozwa bomoi ya seko. Kasi, mpo na kozala na bomoi yango na Paladiso, tosengeli kosambela Nzambe na ndenge oyo ebongi mpe kozala sikoyo na bomoi oyo esepelisaka ye. Likambo ya mawa, bato mingi bazali koboya kosala yango. Yango wana, Yesu alobaki ete: “Bókɔta na ekuke ya nkaka; mpamba te nzela ya monene mpe oyo efungwamá ezali oyo ememaka na libebi, mpe bato oyo bazali kokɔta na yango bazali mingi; nzokande ekuke oyo ezali nkaka mpe nzela oyo ekangamakangamá ememaka na bomoi, mpe bato oyo bazali komona yango bazali moke.” (Matai 7:13, 14) Lingomba ya solo ememaka na bomoi ya seko. Lingomba ya lokuta ememaka na libebi. Yehova alingi ete ata moto moko te abebisama; yango wana, na bisika nyonso, azali kopesa bato libaku ya koyeba ye. (2 Petelo 3:9) Yango emonisi ete lolenge oyo tosambelaka Nzambe nde ekoki kosala ete tózwa bomoi to tóbomama.

NDENGE YA KOYEBA LINGOMBA YA SOLO

5 Ndenge nini tokoki komona ‘nzela ya bomoi’? Yesu alobaki ete lingomba ya solo ekomonana polele na bomoi ya bandimi na yango. Alobaki ete: “Na bambuma na bango bokoyeba bango…Nzete nyonso ya malamu ebotaka mbuma ya malamu.” (Matai 7:16, 17) Na maloba mosusu, bandimi ya lingomba ya solo bakoyebana na mateya oyo bandimaka mpe na etamboli na bango. Atako bazali mpe bato ya kozanga kokoka mpe basalaka mabunga, na lisangá na bango mobimba basalaka makasi básala mokano ya Nzambe. Tótalela makambo motoba oyo emonisaka bandimi ya lingomba ya solo.

BAOYO BASAMBELAKA NZAMBE YA SOLO

  • bazwaka mateya na bango na Biblia
  • basambelaka kaka Yehova mpe bayebisaka nkombo na ye
  • balinganaka na motema moko
  • bandimaka ete Nzambe azali kosalela Yesu mpo na kobikisa bato
  • bazalaka bato ya mokili te
  • basakolaka ete bobele Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa bampasi ya bato
Bato ya mposo ndenge na ndenge oyo bazali kosambela Nzambe

6Basaleli ya Nzambe bazwaka mateya na bango na Biblia. Biblia yango moko elobi ete: “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini na kati ya boyengebene, mpo moto ya Nzambe azala moto oyo akoki mpenza, oyo azali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.” (2 Timote 3:16, 17) Ntoma Paulo akomelaki baninga na ye baklisto ete: “Ntango boyambaki liloba ya Nzambe, oyo boyokaki epai na biso, bondimaki yango, lokola liloba ya bato te, kasi, ndenge yango ezali mpenza, lokola liloba ya Nzambe.” (1 Batesaloniki 2:13) Na yango, mateya mpe makambo oyo lingomba ya solo emipesaka na yango euti na makanisi to na mimeseno ya bato te. Euti nde na Biblia, Liloba oyo Nzambe akomisaki

7 Yesu Klisto apesaki ndakisa ya malamu ndenge azalaki koteya makambo oyo euti na Liloba ya Nzambe. Na libondeli moko epai ya Tata na ye ya likoló, alobaki ete: “Liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:17) Yesu azalaki kondimela Liloba ya Nzambe, mpe makambo nyonso oyo azalaki koteya eyokanaki na Makomami. Mbala mingi, azalaki koloba ete: “Ekomamá.” (Matai 4:4, 7, 10) Nsima ya koloba bongo, azalaki kozongela maloba ya vɛrsɛ ata moko. Ndenge moko mpe, lelo oyo basaleli ya Nzambe bateyaka makanisi na bango moko te. Bandimaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe, mateya na bango eutaka mpenza na Biblia.

8Bandimi ya lingomba ya solo basambelaka kaka Yehova mpe bayebisaka bato nkombo na ye. Yesu alobaki ete: “Ezali Yehova Nzambe na yo nde osengeli kosambela, mpe ezali kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.” (Matai 4:10) Yango wana, basaleli ya Nzambe basambelaka moto mosusu te, kaka Yehova. Losambo yango esɛngi mpe koyebisa bato nkombo ya Nzambe ya solo mpe bomoto na ye. Nzembo 83:18 elobi ete: “Ezali bobele yo oyo azali na nkombo [Yehova] Oyo-Aleki likoló na mokili mobimba.” Yesu apesaki ndakisa na likambo ya kosalisa basusu báyeba Nzambe, ye moko alobaki na libondeli ete: “Namonisi nkombo na yo polele epai ya bato oyo opesaki ngai uta na mokili.” (Yoane 17:6) Ndenge moko mpe, lelo oyo basambeli ya solo bateyaka bato nkombo ya Nzambe, mikano na ye mpe bizaleli na ye.

9Basaleli ya Nzambe balinganaka na motema moko mpe balukaka bolamu na bango moko te. Yesu alobaki ete: “Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:35) Baklisto ya liboso balinganaki bongo. Bolingo oyo Nzambe asɛngi esalisaka bato bálonga mikakatano oyo ezalaka na kati ya mindɛlɛ ná baindo, babola ná bazwi mpe kati na bato oyo bauti na bikólo ndenge na ndenge; bolingo yango esangisaka bango mpe bakómaka bandeko ya solosolo oyo balingani mingi. (Bakolose 3:14) Bandimi ya mangomba ya lokuta bazalaka na bolingo mpe na bondeko ya ndenge wana te. Toyebi yango ndenge nini? Babomanaka mpo bazali mboka moko te to ekólo moko te. Baklisto ya solo bazwaka mindoki te mpo na koboma bandeko na bango baklisto to bato mosusu. Biblia elobi ete: “Bana ya Nzambe ná bana ya Zabolo bayebanaka na likambo oyo: Moto nyonso oyo azalaka na momeseno ya kosala boyengebene te auti na Nzambe te, ndenge moko mpe moto oyo azali te kolinga ndeko na ye.…Tólinganaka; ezala te lokola Kaina, oyo autaki na moto mabe mpe abomaki ndeko na ye.”—1 Yoane 3:10-12; 4:20, 21.

10 Kolinga basusu na motema moko esuki kaka te na koboya koboma bango. Baklisto ya solo balukaka bolamu na bango moko te, kasi basalelaka ntango na bango, makasi na bango mpe biloko na bango mpo na kosalisana mpe kolendisana. (Baebele 10:24, 25) Basalisanaka na ntango ya mpasi, mpe basalelaka basusu makambo na bosembo. Na bomoi na bango, basalelaka toli ya Biblia oyo elendisaka ‘kosala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu.’—Bagalatia 6:10.

11Baklisto ya solo bandimaka ete Nzambe azali kosalela Yesu Klisto mpo na kobikisa biso. Biblia elobi ete: “Ezali na lobiko te na kati ya moto mosusu, mpo ezali na nkombo mosusu te na nse ya likoló oyo epesami na kati ya bato oyo na nzela na yango tosengeli kobikisama.” (Misala 4:12) Ndenge tomonaki na Mokapo 5, Yesu apesaki bomoi na ye ezala lisiko mpo na bato ya botosi. (Matai 20:28) Longola yango, Yesu azali Mokonzi oyo Nzambe aponi mpo na kotambwisa Bokonzi ya likoló oyo ekoyangela mabelé mobimba. Mpe Nzambe azali kosɛnga ete tótosa Yesu mpe tósalela mateya na ye soki tolingi bomoi ya seko. Yango wana, Biblia elobi ete: “Moto oyo azali komonisa kondima na kati ya Mwana azali na bomoi ya seko; moto oyo atosaka Mwana te akomona bomoi te.”—Yoane 3:36.

12Basambeli ya solo bazali bato ya mokili te. Ntango Yesu azalaki kosamba liboso ya Pilato, guvɛrnɛrɛ Moloma, alobaki boye: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.” (Yoane 18:36) Ezala bafandi na mboka nini, bayekoli ya solo ya Yesu bazali bato ya Bokonzi na ye ya likoló; yango wana, bakɔtaka ata moke te na makambo ya politiki. Bakɔtaka na bitumba te. Kasi, bapekisaka moto te soki alingi kokɔta na parti politiki, to soki alingi bápona ye na ebonga moko ya politiki, to soki alingi kopona moto na ntango ya voti. Atako basambeli ya solo ya Nzambe bakɔtaka na makambo ya politiki te, kasi batosaka mibeko ya mboka. Mpo na nini? Mpamba te Liloba ya Nzambe esɛngi bango ‘bátosaka bakonzi oyo bazali liboso,’ elingi koloba bakonzi ya Leta. (Baloma 13:1) Soki bakonzi yango basɛngi likambo moko oyo eyokani te na oyo Nzambe asɛngi, basambeli ya solo balandaka ndakisa ya bantoma, oyo balobaki ete: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.”—Misala 5:29; Malako 12:17.

13Bayekoli ya solo ya Yesu basakolaka ete Bokonzi ya Nzambe ezali elikya kaka moko mpo na bato. Yesu asakolaki ete: ‘Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba epai bato bafandi mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.’ (Matai 24:14) Bayekoli ya solo ya Yesu Klisto balendisaka bato te ete bátyela bakonzi ya mokili oyo motema ete bakosilisa mikakatano na bango, basakolaka ete bobele Bokonzi ya Nzambe oyo ezali na likoló nde ekosilisa bampasi ya bato. (Nzembo 146:3) Yesu ateyaki biso tóbondelaka mpo na guvɛrnema wana ya malamu mpenza ntango alobaki ete: “Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” (Matai 6:10) Liloba ya Nzambe esakolaki ete Bokonzi yango ya likoló “ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso [oyo ezali sikoyo], mpe ekotikala lobiko na lobiko.”—Danyele 2:44.

14 Kanisá makambo nyonso oyo touti kotalela mpe omituna mituna oyo: ‘Lingomba nini ezwaka mateya na yango nyonso na Biblia mpe eyebisaka bato nkombo ya Yehova? Lingomba nini bato na yango balinganaka ndenge Nzambe asɛngi, bamonisaka kondima epai na Yesu, bazali bato ya mokili te, mpe basakolaka ete bobele Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa bampasi ya bato? Na mangomba nyonso ya mokili, lingomba nini esalaka makambo oyo nyonso?’ Ezali komonana polele ete ezali lingomba ya Batatoli ya Yehova.—Yisaya 43:10-12.

Bolamu oyo okozwa soki osaleli Yehova elongo na basaleli na ye eleki mpenza eloko nyonso oyo okoki kobungisa

Bato ya mposo ndenge na ndenge bazali baninga

OKOSALA NINI?

15 Mpo na kosepelisa Nzambe, esengeli kosuka kaka te na kondimela ye. Kutu, Biblia elobi ete ata bademo bandimaka ete Nzambe azali. (Yakobo 2:19) Nzokande, moto nyonso ayebi ete bademo basalaka mokano ya Nzambe te mpe Nzambe andimaka bango te. Mpo Nzambe andima biso, tosengeli kaka te kondima ete azali, kasi tosengeli mpe kosala mokano na ye. Tosengeli kolongwa na losambo ya lokuta mpe kokɔta na oyo ya solo.

16 Ntoma Paulo amonisaki ete tosengeli kosangana na losambo ya lokuta te. Akomaki ete: “‘Bóbima na kati na bango, mpe bókabwana,’ Yehova alobi bongo, ‘mpe bótika kosimba eloko ya mbindo’; ‘mpe ngai nakoyamba bino.’” (2 Bakolinti 6:17; Yisaya 52:11) Yango wana, baklisto ya solo baboyaka eloko nyonso oyo ezali na boyokani na losambo ya lokuta.

17 Biblia emonisi ete mitindo nyonso ya losambo ya lokuta ezali na kati ya “Babilone Monene.”* (Emoniseli 17:5) Nkombo wana ekundweli biso engumba ya Babilone ya kala, epai losambo ya lokuta ebandaki nsima ya Mpela na mikolo ya Noa. Ebele ya mateya mpe ya mimeseno ya mangomba ya lokuta eutá nde na Babilone. Na ndakisa, bato ya Babilone bazalaki kosambela banzambe mingi, mpe bosato to banzambe misatomisato. Lelo oyo, liteya ya Bosato nde ezali liteya ya libosoliboso na mangomba mingi. Kasi Biblia eteyaka polele ete ezali na Nzambe ya solo kaka moko, Yehova, mpe ete Yesu Klisto azali Mwana na ye. (Yoane 17:3) Bato ya Babilone bazalaki mpe kondima ete moto azalaka na molimo oyo ekufaka te. Mpo na bango, soki nzoto ya moto ekufi, molimo wana etikalaka na bomoi mpe ekoki konyokwama na esika moko boye ya minyoko. Lelo oyo, ebele ya mangomba eteyaka ete molimo to elimo ekufaka te mpe ekoki konyokwama na lifelo.

18 Lokola losambo oyo ezalaki na Babilone na ntango ya kala epalanganaki na mabelé mobimba, ebongi mpenza ete lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba na ntango na biso ebengama Babilone Monene. Mpe Nzambe asakoli ete lisangá yango ekosuka mbalakaka. (Emoniseli 18:8) Omoni sikoyo ntina oyo osengeli kokabwana na lingomba nyonso ya Babilone Monene? Yehova Nzambe alingi ete ‘obima na kati na yango’ nokinoki lokola ntango ezali naino.—Emoniseli 18:4.

19 Bato mosusu bakoki koboya yo mpo ozwi ekateli ya kotika losambo ya lokuta. Kasi, bolamu oyo okozwa soki osaleli Yehova elongo na basaleli na ye eleki mpenza eloko nyonso oyo okoki kobungisa. Kaka ndenge esalemaki epai ya bayekoli ya liboso ya Yesu oyo batikaki biloko mosusu mpo na kolanda ye, yo mpe okozwa ebele ya bandeko ya elimo. Okokɔta na libota moko monene oyo ezali na bamilio ya baklisto ya solo na mokili mobimba, bato oyo balingaka yo mpenza. Mpe okozala na elikya malamu mpenza ya bomoi ya seko “na ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ezali koya.” (Malako 10:28-30) Toyebi te, mokolo mosusu, baoyo batikaki yo mpo na mateya oyo, bango mpe bakoyekola makambo oyo Biblia eteyaka mpe bakokóma basambeli ya Yehova.

20 Biblia elobi ete etikali moke Nzambe asukisa ebongiseli mabe ya makambo ya ntango oyo mpe na esika na yango akotya mokili ya sika ya boyengebene oyo ekotambwisama na Bokonzi na ye. (2 Petelo 3:9, 13) Ekozala mpenza mokili moko kitoko! Na mokili yango, lingomba ekozala kaka moko: lolenge kaka moko ya solo ya kosambela. Omoni te ete ekozala malamu osala makambo oyo esengeli mpo okóma kosangana na basambeli ya solo banda sikoyo?

OYO BIBLIA ETEYAKA

  • Lingomba ya solo ezali kaka moko.—Matai 7:13, 14.
  • Lingomba ya solo eyebanaka na mateya mpe na misala na yango.—Matai 7:16, 17.
  • Batatoli ya Yehova basambelaka Nzambe na ndenge oyo andimaka.—Yisaya 43:10.

*  Soki olingi koyeba makambo mosusu oyo emonisi ntina oyo Babilone Monene elakisi lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba, talá Apɛndisi.


Mituna ya boyekoli

1. Bolamu nini tokozwa soki tozali kosambela Nzambe na ndenge ya malamu?

2. Ndenge nini tokoki koyekola lolenge ya malamu ya kosambela Yehova, mpe ndakisa nini esalisi biso tókanga ntina ya likambo yango?

3. Yesu alobaki ete tosengeli kosala nini mpo Nzambe andima biso?

4. Maloba oyo Yesu alobaki na ntina na banzela mibale elimboli nini, mpe epai wapi nzela mokomoko ememaka?

5. Ndenge nini tokoki koyeba bandimi ya lingomba ya solo?

6, 7. Ndenge nini basaleli ya Nzambe batalelaka Biblia, mpe ndakisa nini Yesu apesaki na likambo yango?

8. Kosambela Yehova esɛngi mpe nini?

9, 10. Na ndenge nini baklisto ya solo bamonisaka ete balingani?

11. Mpo na nini tosengeli kondima ete Nzambe azali kosalela Yesu Klisto mpo na kobikisa biso?

12. Kozala moto ya mokili te esɛngi nini?

13. Ndenge nini bayekoli ya solo ya Yesu batalelaka Bokonzi ya Nzambe, mpe yango etindaka bango básala nini?

14. Mpo na yo, lingomba nini esalaka makambo oyo losambo ya solo esɛngi?

15. Longola kondima ete Nzambe azali, eloko nini mosusu Nzambe azali kosɛnga biso?

16. Ndenge nini tosengeli kotalela likambo ya kosangana na losambo ya lokuta?

17, 18. “Babilone Monene” ezali nini, mpe mpo na nini esengeli ‘kobima na kati na yango’ nokinoki?

19. Bolamu nini okozwa soki osaleli Yehova?

20. Eloko nini ezali kozela bandimi ya lingomba ya solo na mikolo ezali koya?