Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Biblia eteyaka mpenza nini?

MOKAPO YA MITANO

Lisiko—Likabo ya Nzambe oyo eleki makabo nyonso

Lisiko—Likabo ya Nzambe oyo eleki makabo nyonso

Lisiko ezali nini?

Ndenge nini Yehova apesaki yango?

Bolamu nini yango ekoki kopesa yo?

Ndenge nini okoki komonisa ete ozali na botɔndi mpo na yango?

NA BILOKO nyonso oyo bakabelá yo, oyo wapi eleki mpenza motuya? Mpo likabo moko ezala na ntina mingi, esɛngaka kaka te ete básomba yango na mbongo mingi. Ezali mpenzampenza mbongo te oyo babimisi mpo na kosomba likabo moko boye nde esalaka ete ezala na valɛrɛ mingi to te. Soki eloko moko oyo bakabeli yo esepelisi yo mingi to ekokisi mposa oyo ozalaki na yango mpenza, wana emonisi ete eloko yango ezali na valɛrɛ mingi.

2 Na biloko ndenge na ndenge oyo okoki kosepela bákabela yo, ezali na moko oyo eleki mpenza ntina. Eloko yango ezali likabo oyo Nzambe apesi bato. Yehova akabeli biso biloko ebele; kasi na biloko yango nyonso, oyo eleki mpenza ezali lisiko—oyo epesamaki ntango Yesu Klisto, Mwana na Ye, akabaki bomoi na ye. (Matai 20:28) Ndenge tokomona yango na mokapo oyo, lisiko ezali likabo ya valɛrɛ mingi koleka makabo nyonso oyo bakoki kopesa yo, mpamba te ekoki kopesa yo nsuka na bolamu mpe ekoki kokokisela yo makambo ya ntina mingi oyo ozali mpenza na mposa na yango. Na makambo nyonso oyo Yehova asalá mpo na komonisa ete alingaka yo, lisiko nde eleki mpenza na motuya.

LISIKO EZALI NINI?

3 Na mokuse, lisiko ezali eloko oyo Yehova azali kosalela mpo na kosikola to kobikisa bato na lisumu mpe na liwa. (Baefese 1:7) Mpo tósimba ndimbola ya liteya yango ya Biblia, ezali kosɛnga tókanisa lisusu makambo oyo elekaki na elanga ya Edene. Mpo tómona mpenza ete lisiko ezali likabo moko ya valɛrɛ mingi oyo Nzambe apesi biso, tosengeli naino koyeba eloko oyo Adama abungisaki ntango asalaki lisumu.

4 Ntango Yehova akelaki Adama, apesaki ye eloko moko ya motuya mingi—bomoi ya kokoka. Bomoi na ye ezalaki ndenge nini? Lokola bakelaki Adama na nzoto mpe na makanisi ya kokoka, asengelaki kobɛla te, konuna te, mpe kokufa te. Lokola azalaki moto ya kokoka, azalaki na boyokani ya ndenge mosusu mpenza na Yehova. Biblia elobi ete Adama azalaki “mwana ya Nzambe.” (Luka 3:38) Yango emonisi ete Adama azalaki na boyokani ya malamu mpenza na Yehova Nzambe, se ndenge oyo mwana azalaka na boyokani ya malamu ná tata na ye ya bolingo. Yehova azalaki kosolola na Adama, mwana na ye oyo azalaki awa na mabelé; apesaki ye misala ya malamu oyo asengelaki kosala mpe ayebisaki ye nini oyo azalaki kosɛnga ye.—Genese 1:28-30; 2:16, 17.

5 Adama akelamaki na “elilingi ya Nzambe.” (Genese 1:27) Yango elingi koloba te ete nzoto ya Adama ezalaki lokola oyo ya Nzambe. Ndenge tomonaki yango na Mokapo 1 ya buku oyo, Yehova azali elimo; amonanaka te. (Yoane 4:24) Yango elakisi ete Yehova azali na nzoto ya mosuni te. Adama akelamaki na elilingi ya Nzambe na ndenge akelamaki na bizaleli lokola oyo ya Nzambe, na ndakisa bolingo, bwanya, bosembo mpe nguya. Likambo mosusu ya ntina oyo esalaki ete azala lokola Tata na ye ezali bonsomi ya kopona to likoki ya kosala oyo alingi, oyo azalaki na yango. Na yango, Adama azalaki lokola masini te, oyo esalaka kaka misala oyo basalaki yango mpo esalaka. Kasi, azalaki na likoki ya kopona nini alingi kosala mpe kopona kati na mabe ná malamu. Soki aponaka kotosa Nzambe, mbɛlɛ afandá na Paladiso awa na mabelé libela na libela.

6 Yango wana, ezali komonana polele ete ntango Adama aboyaki kotosa Nzambe mpe azwaki etumbu ya liwa, abungisaki eloko moko ya motuya mingi. Mpo na lisumu oyo asalaki, abungisaki bomoi na ye ya kokoka, bakisa mpe bolamu na yango nyonso. (Genese 3:17-19) Likambo ya mawa ezali ete Adama abungisaki bomoi yango ya motuya mingi kaka mpo na ye moko te, kasi mpe mpo na bana oyo asengelaki kobota. Liloba ya Nzambe elobi boye: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama] mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpamba te bango nyonso basalaki lisumu.” (Baloma 5:12) Biso nyonso tobotamaka mpenza na lisumu oyo eutá na Adama. Yango wana, Biblia elobi ete ‘amitɛkaki’ mpe atɛkaki bana na ye na boombo ya lisumu mpe liwa. (Baloma 7:14) Adama ná Eva bazalaki lisusu na elikya te mpo baboyaki kotosa Nzambe na nko. Kasi, bongo bana na bango, ezala mpe biso?

7 Yehova abikisaki bato na nzela ya lisiko oyo mbeka ya Yesu efutaki. Lisiko ezali nini? Lisiko ekoki kolimbolama na ndenge mibale. Ya liboso, lisiko ezali motuya oyo bafutaka mpo na kosikola to mpo na kozwa lisusu eloko moko. Tokoki kokokanisa yango na motuya oyo bafutaka mpo na kosikola moto oyo banguna bakangi na etumba. Ya mibale, lisiko ezali eloko oyo bapesi na esika ya eloko mosusu. Ekokani na motuya oyo bafutisaka moto mpo na biloko oyo abebisi to mpo na mpasi oyo ayokisi moto mosusu. Na ndakisa, soki moto abimiseli bato likama, akofuta mbongo oyo ekokani mpenza na valɛrɛ ya biloko oyo ebebi.

8 Ndenge nini eloko ya ntina mingi oyo Adama abungisaki mpo na biso nyonso ekokaki kofutama, mpe ndenge nini tokokaki kolongwa na boombo ya lisumu mpe ya liwa? Tiká tótalela lisiko oyo Yehova apesaki mpe matomba oyo yango ekoki komemela yo.

NDENGE OYO YEHOVA APESAKI LISIKO

9 Bomoi ya kozanga kokoka ekokaki te kopesama na esika ya bomoi ya kokoka oyo ebungaki. (Nzembo 49:7, 8) Esengelaki nde kopesa lisiko moko oyo valɛrɛ na yango ekokani na valɛrɛ ya bomoi oyo ebungaki. Yango eyokani na etinda ya bosembo ya kokoka oyo ezali na Liloba ya Nzambe oyo elobi ete: “Bomoi mpo na bomoi.” (Deteronome 19:21) Na bongo, nini esengelaki kopesama na esika ya bomoi ya kokoka oyo Adama abungisaki? Bomoi ya moto mosusu ya kokoka nde ezalaki “lisiko oyo ekokani” oyo esɛngamaki.—1 Timote 2:6.

Yesu akufi mpo na kosikola biso

Yehova apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko lisiko mpo na biso

10 Ndenge nini Yehova apesaki lisiko? Atindaki awa na mabelé moko ya bana na ye oyo bazali bilimo ya kokoka. Kasi Yehova azwaki kaka mwana na ye moko boye te mpo na kotinda ye. Atindaki nde mwana oyo alingaka mingi, Mwana na ye mobotami-se-moko. (1 Yoane 4:9, 10) Mwana yango andimaki kotika likoló epai azalaki kofanda. (Bafilipi 2:7) Ndenge tomonaki yango na mokapo oyo eleki ya buku oyo, Yehova asalaki likamwisi; atyaki bomoi ya Mwana yango na libumu ya Maria. Elimo santu ya Nzambe esalaki ete Yesu abotama moto ya kokoka oyo azangi lisumu.—Luka 1:35.

11 Ndenge nini moto moko akoki kozala lisiko ya bato ebele mpenza? Oyebi lisusu ndenge bato nyonso wana bakómaki basumuki? Kobosana te ete ntango Adama asalaki lisumu, abungisaki eloko moko ya motuya oyo azalaki na yango: bomoi ya kokoka. Yango wana, akokaki lisusu te kopesa bana na ye bomoi yango. Akokaki kopesa bango kaka lisumu ná liwa. Yesu, ye oyo Biblia ebengi “Adama ya nsuka,” azalaki moto ya kokoka; mpe asalaki lisumu ata mokolo moko te. (1 Bakolinti 15:45) Tokoki koloba ete Yesu azwaki esika ya Adama mpo na kobikisa biso. Ndenge Yesu atosaki Nzambe ntango nyonso na makambo nyonso mpe akabaki bomoi na ye mbeka, afutaki motuya oyo esengelaki mpo na lisumu ya Adama. Na ndenge yango, Yesu apesaki bana ya Adama elikya.—Baloma 5:19; 1 Bakolinti 15:21, 22.

12 Biblia elobeli na bozindo mpasi oyo Yesu amonaki liboso akufa. Babɛtaki ye fimbo na ndenge ya nsɔmɔ, babakaki ye na nzete, mpe akufaki liwa moko ya nsɔmɔ na nzete yango. (Yoane 19:1, 16-18, 30; Apɛndisi) Mpo na nini esengelaki Yesu anyokwama mingi bongo? Na mokapo moko ya buku oyo, tokomona ete Satana atyaki ntembe ete ata moto moko te oyo asalelaka Yehova akotikala sembo soki amekami. Lokola Yesu atikalaki sembo atako amonaki mpasi mingi, apesaki eyano oyo eleki malamu na ntembe yango ya Satana. Yesu amonisaki polele ete moto ya kokoka oyo azali na bonsomi ya kopona akoki kotikala sembo epai ya Nzambe na makambo nyonso ata soki Zabolo asali ye nini. Na ntembe te, Yehova asepelaki mingi na bosembo ya Mwana na ye ya bolingo!—Masese 27:11.

13 Ndenge nini lisiko efutamaki? Na mokolo ya 14 ya sanza oyo Bayuda babengi Nisana, na mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), Nzambe atikaki ete báboma Mwana na ye ya kokoka, oyo mpe azalaki na lisumu te. Na ndenge wana nde Yesu akabaki bomoi na ye moto ya kokoka “mbala moko mpo na libela.” (Baebele 10:10) Mokolo ya misato nsima ya liwa ya Yesu, Yehova asekwisaki ye na bomoi ya elimo. Kuna na likoló, Yesu alakisaki Nzambe motuya ya bomoi na ye ya moto ya kokoka oyo akabaki yango lisiko na esika ya bana ya Adama. (Baebele 9:24) Yehova andimaki ete motuya ya mbeka ya Yesu ezali lisiko oyo esengeli mpo na kosikola bato na boombo ya lisumu mpe liwa.—Baloma 3:23, 24.

MATOMBA OYO LISIKO EKOKI KOPESA YO

14 Atako tozali bato ya masumu, tokoki kozwa bolamu mingi na nzela ya lisiko. Tótalela mwa matomba oyo likabo wana ya Nzambe oyo eleki makabo nyonso ekoki kopesa biso sikoyo mpe na mikolo ekoya.

15Bolimbisi ya masumu. Ezaleli ya kozanga kokoka oyo tobotamaka na yango esalaka ete kosala oyo ezali malamu ezala mpasi. Biso nyonso tosalaka masumu na maloba to na misala. Kasi, na lisalisi ya lisiko ya Yesu, tokoki ‘kolimbisama masumu na biso.’ (Bakolose 1:13, 14) Nzokande, mpo tólimbisama, tosengeli kobongola mpenza motema. Tosengeli kobondela Yehova na komikitisa mpenza, kosɛnga ye alimbisa biso mpo tondimeli lisiko oyo apesaki na nzela ya Mwana na ye.—1 Yoane 1:8, 9.

16Lisosoli ya pɛto na miso ya Nzambe. Soki lisosoli na biso ezali koyebisa biso ete tosali mabe, tokoki mbala moko koyoka ete tosili makasi to mpe tozali lisusu na ntina te. Nzokande, na nzela ya bolimbisi oyo tokoki kozwa na lisalisi ya lisiko, na boboto mpenza, Yehova azali kopesa biso nzela ya kosambela ye na lisosoli ya pɛto atako tozangi kokoka. (Baebele 9:13, 14) Yango ezali kopesa biso likoki ya koyoka nsɔni te mpo na kosolola na Yehova. Yango wana, tokoki kobanga te kobondela ye. (Baebele 4:14-16) Kozala ntango nyonso na lisosoli ya pɛto epesaka kimya na makanisi, nzoto kilo, mpe esengo.

17Elikya ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. Baloma 6:23 elobi ete “lifuta oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa.” Kaka vɛrsɛ yango ebakisi boye: “Kasi likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Klisto Yesu Nkolo na biso.” Na Mokapo 3 ya buku oyo, tolobelaki makambo ya malamu oyo ekozala na Paladiso awa na mabelé. (Emoniseli 21:3, 4) Soki tozali na elikya ya kozwa makambo ya malamu nyonso wana, bakisa mpe bomoi ya seko na nzoto kolɔngɔnɔ mpenza, ezali mpo Yesu akufelaki biso. Mpo tózwa bolamu yango, tosengeli komonisa ete tozali na botɔndi mpo na lisiko, likabo oyo bapesi biso.

NDENGE NINI OKOKI KOMONISA ETE OZALI NA BOTƆNDI?

18 Mpo na nini tosengeli kotɔnda Yehova mingi mpo na lisiko? Likabo ezalaka na valɛrɛ mingi soki moto asaleli ntango na ye mpe abomi mpenza nzoto mpo na kopesa biso yango. Soki tomoni ete apesi biso yango mpo alingi biso mpenza, tosepelaka mingi na motema. Lisiko ezali likabo oyo eleki makabo nyonso na motuya, mpamba te Nzambe amipimelaki mingi mpenza mpo na kopesa yango. Yoane 3:16 elobi ete: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko.” Lisiko ezali elembo eleki monene oyo emonisi ete Yehova alingaka biso mingi. Ezali mpe komonisa ete Yesu alingaka biso mingi, mpamba te ye moko moto andimaki kokaba bomoi na ye mpo na biso. (Yoane 15:13) Yango wana, likabo yango ya lisiko esengeli kondimisa biso ete Yehova mpe Mwana na ye balingaka mokomoko na biso.—Bagalatia 2:20.

19 Bongo, ndenge nini okoki komonisa ete ozali na botɔndi mpo na lisiko, likabo oyo Nzambe apesi biso? Libosoliboso, luká koyeba malamumalamu Yehova, Ye oyo apesi yango. (Yoane 17:3) Koyekola Biblia na nzela ya buku oyo ekosalisa yo. Wana okoyeba Yehova malamu, mokemoke okolinga ye mpe mingi. Bolingo wana ekotinda yo oluka kosepelisa ye.—1 Yoane 5:3.

Mwasi moko azali kotánga Biblia

Koluka koyeba Yehova malamumalamu ezali moko ya banzela oyo ekomonisa ete tozali na botɔndi mpo na likabo na ye ya lisiko

20Monisá kondima na lisiko ya Yesu. Yesu ye moko alobaki ete: “Moto oyo azali komonisa kondima na kati ya Mwana azali na bomoi ya seko.” (Yoane 3:36) Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kondimela Yesu? Yango emonanaka kaka na maloba te. Yakobo 2:26 elobi ete: “Kondima oyo ezangi misala ekufi.” Ɛɛ, “misala,” elingi koloba makambo tosalaka nde emonisaka ete tozali na kondima ya solosolo. Moko ya banzela oyo tokomonisa ete tozali kondimela Yesu ezali ya kosala nyonso mpo na kolanda ndakisa na ye, kaka na maloba te kasi mpe na makambo oyo tosalaka.—Yoane 13:15.

21Yanganáká na likita oyo esalemaka mbula na mbula mpo na kokanisa Bolei ya Mpokwa ya Nkolo. Mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B. na mpokwa, Yesu abandisaki likita moko ya ntina mingi; Biblia ebengi yango “bolei ya mpokwa ya Nkolo.” (1 Bakolinti 11:20; Matai 26:26-28) Likita yango ebengamaka mpe Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Yesu abandisaki yango mpo na kosalisa bantoma na ye ná baoyo nyonso bakokóma baklisto ya solo nsima na bango bábosanaka te ete andimaki kokufa mpo apesa molimo to bomoi na ye moto ya kokoka lisiko. Yesu apesaki etinda oyo mpo na likita yango: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19) Kosala Ekaniseli esalisaka biso tóbosana te ete, na nzela ya lisiko, Yehova ná Yesu bamonisaki ete balingaka biso mingi. Tokoki komonisa ete tozali na botɔndi mpo na lisiko soki tozali koyangana na likita yango oyo esalemaka mbula na mbula mpo na kokanisa liwa ya Yesu.*

22 Lisiko oyo Yehova apesi biso ezali mpenza likabo moko ya motuya mingi. (2 Bakolinti 9:14, 15) Likabo yango ekoki kozala na litomba ata mpo na baoyo basili kokufa. Na ndenge nini? Mokapo 6 mpe 7 ekolimbola yango.

OYO BIBLIA ETEYAKA

  • Lisiko ezali eloko oyo Yehova azali kosalela mpo na kobikisa bato na lisumu mpe na liwa.—Baefese 1:7.
  • Yehova apesaki lisiko na ndenge atindaki Mwana na ye mobotami-se-moko awa na mabelé akufela biso.—1 Yoane 4:9, 10.
  • Mpo na lisiko, masumu na biso ezali kolimbisama, tozali na lisosoli ya pɛto, mpe na elikya ya bomoi ya seko.—1 Yoane 1:8, 9.
  • Tokomonisa ete tozali na botɔndi mpo na lisiko soki tozali koluka koyeba Yehova malamumalamu, soki tozali komonisa kondima na lisiko mpe soki tozali koyangana na Bolei ya Mpokwa ya Nkolo.—Yoane 3:16.

*  Soki olingi koyeba malamumalamu ndimbola ya Bolei ya Mpokwa ya Nkolo, talá Apɛndisi.


Mituna ya boyekoli

1, 2. (a) Mpo na yo, ntango nini likabo oyo bapesi yo ezalaka na valɛrɛ mingi? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete na makabo nyonso oyo bakoki kopesa yo, lisiko nde eleki na valɛrɛ?

3. Lisiko ezali nini, mpe tosengeli liboso koyeba nini mpo tómona mpenza ete likabo yango ezali na valɛrɛ mingi?

4. Lokola Adama azalaki moto ya kokoka, bomoi na ye ezalaki ndenge nini?

5. Ntango Biblia elobi ete Adama akelamaki na “elilingi ya Nzambe,” yango elingi koloba nini?

6. Adama abungisaki nini ntango aboyaki kotosa Nzambe, mpe yango esalaki nini epai ya bana na ye?

7, 8. Wapi ndenge mibale oyo lisiko ekoki kolimbolama?

9. Lisiko ya ndenge nini esɛngamaki?

10. Ndenge nini Yehova apesaki lisiko?

11. Ndenge nini moto moko akoki kozala lisiko ya bato ebele mpenza?

12. Mpasi oyo Yesu amonaki emonisaki nini?

13. Ndenge nini lisiko efutamaki?

14, 15. Tosengeli kosala nini mpo ‘masumu na biso elimbisama’?

16. Nini ezali kopesa biso nzela ya kosambela Nzambe na lisosoli ya pɛto, mpe kozala na lisosoli ya ndenge wana ezali na matomba nini?

17. Makambo nini ya malamu tokozwa mpo Yesu akufelaki biso?

18. Mpo na nini tosengeli kotɔnda Yehova mpo na lisiko?

19, 20. Ndenge nini okoki komonisa ete ozali na botɔndi mpo na lisiko, likabo oyo Nzambe apesi biso?

21, 22. (a) Mpo na nini tosengeli koyanganaka na likita oyo esalemaka mbula na mbula mpo na kokanisa Bolei ya Mpokwa ya Nkolo? (b) Mokapo 6 mpe 7 ekolimbola likambo nini?