Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Biblia eteyaka mpenza nini?

MOKAPO YA ZOMI

Bikelamu ya elimo—Bakoki kosala biso mabe to malamu?

Bikelamu ya elimo—Bakoki kosala biso mabe to malamu?

Baanzelu basalisaka bato?

Bilimo mabe basalaka bato nini?

Tosengeli nde kobanga bilimo mabe?

MBALA mingi, koyeba moto esɛngaka mpe koyeba libota na ye. Ndenge moko mpe, koyeba Yehova Nzambe esɛngaka mpe koyeba malamu baanzelu, libota na ye kuna na likoló. Biblia ebengi bango ‘bana ya Nzambe.’ (Yobo 38:7) Bazali na mosala nini na mokano ya Nzambe? Makambo nini basalelaki bato na ntango ya kala? Baanzelu bakoki kosala yo mabe to malamu? Ndenge nini?

2 Bavɛrsɛ mingi ya Biblia elobeli baanzelu. Tótalela ndambo na yango mpo tóyeba bango malamu. Nani akelaki bango? Bakolose 1:16 elobi boye: “Na nzela na ye [Yesu Klisto] biloko mosusu nyonso ezalisamaki na likoló mpe na mabelé.” Yango emonisi ete Yehova Nzambe nde akelaki bikelamu nyonso ya elimo—to baanzelu—na nzela ya Mwana na ye ya liboso. Baanzelu bazali boni? Biblia emonisi ete bamilio na bamilio ya baanzelu bakelamaki, mpe bango nyonso bazali na nguya mingi.—Nzembo 103:20.*

3 Biblia, Liloba ya Nzambe, eyebisi biso ete ntango mabelé esalemaki, “bana nyonso ya Nzambe bagangaki na nsai.” (Yobo 38:4-7, NW) Yango emonisi ete baanzelu bazalaki liboso mpenza bato bákelama, ata mpe liboso mabelé ekelama. Bavɛrsɛ yango emonisi mpe ete baanzelu bayokaka mawa to esengo, mpamba te elobi ete “bagangaki elongo na esengo.” Tomoni ete “bana nyonso ya Nzambe” basepelaki elongo. Yango elingi koloba ete, na ntango wana, baanzelu nyonso bazalaki na kati ya libota moko oyo ezalaki kosalela Yehova Nzambe na bomoko.

BAANZELU BASALISAKA MPE BABATELAKA

Anzelu azali kobatela Danyele na kati ya libulu ya nkɔsi

“Nzambe na ngai atindaki anzelu na ye, mpe azipaki minɔkɔ ya nkɔsi.”—Danyele 6:22

4 Kobanda baanzelu ya sembo bamonaki na miso ndenge bato ya liboso bakelamaki, bazali kolanda ntango nyonso na likebi mpenza makambo ya bato oyo bazali se kokóma ebele mpe ndenge mokano ya Nzambe ezali kokokisama. (Masese 8:30, 31; 1 Petelo 1:11, 12) Kasi, nsima ya bambula, bamonaki ete bato mingi batiki kosalela Mozalisi na bango ya bolingo. Ntembe ezali te ete likambo yango epesaki bango mawa. Kasi, soki moto ata moko kaka azongeli Yehova, “esengo ezalaka epai ya baanzelu.” (Luka 15:10) Lokola baanzelu bamitungisaka bongo mpo na bolamu ya baoyo basalelaka Yehova, yango wana asaleli bango mingi mpo na kolendisa mpe kobatela basaleli na ye ya sembo awa na mabelé. (Baebele 1:7, 14) Tózwa mwa bandakisa.

5 Baanzelu mibale basalisaki Lota, moto ya sembo, ná bana na ye ya basi ndenge balongolaki bango na Sodoma mpe Gomola liboso bingumba yango oyo etondaki na mabe ebomama. (Genese 19:15, 16) Bambula ebele na nsima, mosakoli Danyele abwakamaki na libulu ya nkɔsi, kasi nkɔsi yango esalaki ye eloko te. Alobaki ete: “Nzambe na ngai atindaki anzelu na ye, mpe azipaki minɔkɔ ya nkɔsi.” (Danyele 6:22) Na siɛklɛ ya yambo ya ntango na biso (T.B.), anzelu moko abimisaki ntoma Petelo na bolɔkɔ. (Misala 12:6-11) Longola yango, baanzelu balendisaki Yesu na ebandeli ya mosala na ye awa na mabelé. (Malako 1:13) Mpe mwa moke liboso akufa, anzelu moko abimelaki ye mpe “alendisaki ye.” (Luka 22:43) Na ntembe te, lolenge oyo baanzelu basalisaki Yesu na bantango wana ya ntina mingi na bomoi na ye elendisaki ye mpenza!

6 Lelo oyo, baanzelu babimelaka lisusu basaleli ya Nzambe awa na mabelé te. Atako bongo, baanzelu yango ya nguya batiká te kobatela basaleli ya Nzambe, mingi mpenza na makambo oyo ekoki kobebisa elimo na bango. Biblia elobi ete: “Anzelu ya [Yehova] akozingela esika ya baoyo bakotosaka ye; mpe akobikisa bango.” (Nzembo 34:7) Mpo na nini maloba wana esengeli kokitisa biso mpenza motema? Esengeli kokitisa biso motema mpamba te ezali na bikelamu ya elimo mosusu ya mabe mpenza oyo balingaka kobebisa bomoi na biso! Bikelamu yango banani? Bautá wapi? Mayele nini basalelaka mpo na kosala biso mabe? Mpo na kozwa biyano, tótalela naino na mokuse likambo moko oyo esalemaki na ebandeli ya bomoi ya bato awa na mokili.

BIKELAMU YA ELIMO OYO BAZALI BANGUNA NA BISO

7 Lokola tomonaki na Mokapo 3 ya buku oyo, anzelu moko akolisaki mposa ya kozala mokonzi ya basusu; aboyaki kotosa Nzambe. Na nsima, akómaki kobengama Satana Zabolo. (Emoniseli 12:9) Nsima ya kokosa Eva, na boumeli ya mbula 1 600 oyo elandaki, Satana atindaki bato mingi mpenza bápesa Nzambe mokɔngɔ, longola kaka mwa bato moke ya sembo lokola Abele, Enoka ná Noa.—Baebele 11:4, 57.

8 Na ntango ya Noa, baanzelu mosusu baboyaki kotosa Yehova. Batikaki esika na bango na libota ya Nzambe kuna na likoló, bayaki awa na mabelé mpe balataki nzoto ya bato. Mpo na nini? Genese 6:2 eyebisi biso boye: “Bana babali ya Nzambe bamonaki ete bana basi ya bato bazalaki bonzenga, mpe bakamataki kati na bango basi na bango na libala, baoyo eponaki bango.” Kasi Yehova Nzambe atikaki te ete makambo oyo baanzelu wana basalaki mpe mabe oyo bakɔtisaki na mokili ekoba. Ayeisaki mpela moko na mabelé mobimba mpe elimwisaki bato nyonso ya mabe, kaka basaleli na ye ya sembo nde babikaki. (Genese 7:17, 23) Mpo bábika, esengelaki baanzelu yango oyo batombokaki, to bademo, bátika nzoto ya mosuni oyo balataki mpe bázonga bikelamu ya elimo na likoló. Bamityaki na ngámbo ya Zabolo, oyo akómaki bongo “moyangeli ya bademo.”—Matai 9:34.

9 Ntango baanzelu yango bazongaki na likoló, bandimaki bango lisusu te, se ndenge basalaki Satana, moyangeli na bango. (2 Petelo 2:4) Atako lelo oyo bazali lisusu na likoki te ya kolata nzoto ya bato, bazali kaka kotinda bato na makambo ya mabe mpenza. Na lisalisi na bango, Satana ‘azali kobungisa mabelé mobimba epai bato bafandi nzela.’ (Emoniseli 12:9; 1 Yoane 5:19) Ndenge nini? Mingimingi, bademo basalelaka mayele ndenge na ndenge mpo na kobungisa bato nzela. (2 Bakolinti 2:11) Tótalela sikoyo mwa ndambo na yango.

NDENGE OYO BADEMO BABUNGISAKA BATO NZELA

10 Mpo na kobungisa bato nzela, bademo basalelaka misala ya bilimo mabe. Misala ya bilimo mabe ezali makambo nyonso oyo etyaka moto na boyokani na bilimo mabe, ezala moto ye moko to na nzela ya nganga-nkisi. Biblia elobi ete misala ya bilimo mabe ezali mabe mpe ekebisi biso ete tósimba ata eloko moko te oyo etali misala yango. (Bagalatia 5:19-21) Bademo basalelaka misala ya bilimo mabe se ndenge molɔbi-mbisi asalelaka mpambo. Molɔbi-mbisi asalelaka mpambo to biloko ya ndenge na ndenge mpo na kolɔba mbisi ya ndenge na ndenge. Ndenge moko mpe, bilimo mabe basalelaka misala ndenge na ndenge mpo bákómisa bato ndenge na ndenge baombo na bango.

Karti ya zodiake; 2. Moto azali kotalisa lobɔkɔ; 3. Bale ya kristale; 4. Mobali moko azali kotala karti ya maji

Bademo basalelaka mayele ndenge na ndenge mpo na kokosa bato

11 Moko ya misala oyo bademo basalelaka lokola mpambo ezali oyo ya koluka koyeba makambo oyo ekoya to oyo eyebani te. Mosala yango ezalaka mitindo ndenge na ndenge, na ndakisa: kotalela minzoto, kobɛta zeke to zonga, kotala talatala to mabɔkɔ to mpe kosalela bandɔtɔ, to kokende epai ya nganga-nkisi, mpo na koluka koyeba makambo oyo ekoya to oyo eyebani te. Atako bato mingi bakanisaka ete koluka koyeba makambo oyo ekoya to oyo eyebani te ezali na likama moko te, Biblia emonisi ete bato oyo bayebisaka makambo yango bazalaka na boyokani na bilimo mabe. Na ndakisa, Misala 16:16-18 elobeli “demo moko ya kosakola makambo oyo ebombamá” oyo apesaki mwana mwasi moko likoki ya kosala “mosala ya kosakola makambo oyo ekoya.” Kasi ntango babimisaki ye demo yango, azalaki lisusu na likoki yango te.

12 Lolenge mosusu oyo bademo babungisaka bato nzela ezali ndenge batindaka bango báluka koyeba makambo epai ya bato oyo bakufá. Mbala mingi, bato oyo bazali na mawa mpo ndeko to moninga na bango akufi bakosamaka na makanisi ya lokuta bato oyo etali bakufá. Nganga-nkisi akoki koyebisa bango likambo moko boye to koloba na mongongo ya moto oyo akufá. Yango wana, bato mingi bandimaka ete bato oyo bakufá bazali mpenza na bomoi mpe ete kosolola na bango ekopesa bato oyo batikali na bomoi makasi ya koyikela mawa na bango mpiko. Kasi “libɔndisi” ya ndenge wana ezali mpenza lokuta mpe likama. Mpo na nini? Mpamba te, bademo bakoki koloba na mongongo ya mowei mpe koyebisa nganga-nkisi makambo oyo etali moto yango. (1 Samwele 28:3-19) Longola yango, tomonaki na Mokapo 6 ete bato oyo bakufá bazali na bomoi lisusu te. (Nzembo 115:17) Na yango, soki ‘moto azali kosolola na bakufi,’ emonisi ete bilimo mabe babungisi ye nzela mpe azali kosala likambo oyo Nzambe aboyi. (Deteronome 18:10, 11; Yisaya 8:19) Yango wana, osengeli kofungola miso mpe koboya mosala mabe yango oyo bademo basalelaka lokola mpambo.

13 Bilimo mabe basukaka kaka na kobungisa bato nzela te, kasi babangisaka mpe bango. Lelo oyo, Satana ná bademo na ye bayebi ete batikali kaka “na eleko moko ya ntango mokuse” liboso bákangama; yango wana, bangali mpenza kongala. (Emoniseli 12:12, 17) Atako bongo, ebele ya bato oyo bazalaki mikolo nyonso kobanga bilimo mabe yango babangaka bango lisusu te. Nini esalisá bango? Moto oyo asalaka misala ya bilimo mabe akoki kosala nini?

NDENGE YA KOBOYA MAKAMBO YA BILIMO MABE

14 Biblia eyebisi biso ndenge ya koboya makambo ya bilimo mabe mpe ndenge ya kokata boyokani na bango. Tózwa ndakisa ya baklisto oyo bazalaki kofanda na engumba Efese na siɛklɛ ya liboso. Basusu kati na bango bazalaki kosala misala ya bilimo mabe liboso bákóma baklisto. Ntango bazwaki mokano ya kotika misala yango, basalaki nini? Biblia elobi ete: “Motángo monene ya baoyo bazalaki kosala misala ya nkisi basangisaki babuku na bango esika moko mpe batumbaki yango na miso ya bato nyonso.” (Misala 19:19) Ndenge baklisto wana ya sika batumbaki babuku na bango ya maji, ezali ndakisa batikeli baoyo balingi kokata boyokani na bilimo mabe lelo oyo. Bato oyo balingi kosalela Yehova basengeli kobwaka eloko nyonso oyo etali misala ya bilimo mabe, na ndakisa babuku, bazulunalo, bafilme, bafɔtɔ mpe bakasɛti ya miziki, oyo ezali kotinda bato básala misala yango to mpe básepela na yango. Longola yango, basengeli mpe kobwaka bikelakela to eloko nyonso oyo bato balataka mpo mabe ezwa bango te.—1 Bakolinti 10:21.

NDENGE YA KOBOYA MAKAMBO YA BILIMO MABE

  • Bwaká biloko oyo etali misala ya bilimo mabe
  • Yekoláká Biblia
  • Bondeláká Nzambe
Mobali moko azali kosala makambo oyo ekopekisa bilimo mabe kotungisa ye

15 Mwa bambula nsima ya kotumba babuku na bango ya maji, ntoma Paulo akomelaki baklisto yango ya Efese boye: “Tozali kobunda líbanda…ná mampinga ya bilimo mabe.” (Baefese 6:12) Bademo batikaki bango libela te. Bazalaki kaka koluka kokweisa bango. Bongo, baklisto wana basengelaki kosala lisusu nini? Paulo alobaki ete: “Likambo eleki ntina mpenza, bókamata nguba monene ya kondima, oyo bokokoka koboma na yango mɔtɔ ya bambanzi nyonso ya moto mabe [Satana] oyo ezali kopela.” (Baefese 6:16) Tokobundisa mampinga ya bilimo mabe malamumalamu soki nguba na biso ya kondima ezali makasi mpenza.—Matai 17:20.

16 Kasi, ndenge nini tokoki kokómisa kondima na biso makasi? Soki tozali koyekola Biblia. Mpo efelo moko ya monene ezala makasi, esɛngaka moboko na yango ezala mpe makasi. Ndenge moko mpe, mpo kondima na biso ezala makasi, esɛngaka mpenza ete moboko na yango, elingi koloba boyebi ya solosolo ya Liloba ya Nzambe, Biblia, ezala mpe makasi. Soki tozali kotánga mpe koyekola Biblia mokolo na mokolo, kondima na biso ekokóma makasi. Ndenge moko na efelo ya monene, kondima yango ekobatela biso mpo makambo ya bilimo mabe ezwa biso te.—1 Yoane 5:5.

17 Baklisto wana ya Efese basengelaki kosala lisusu nini? Basengelaki na libateli mosusu, mpamba te bazalaki kofanda na engumba moko oyo bato bamipesaki mingi na losambo ya bademo. Yango wana, Paulo ayebisaki bango boye: ‘Na mitindo nyonso ya mabondeli mpe malɔmbɔ, bókoba kobondela na libaku nyonso na kati ya elimo.’ (Baefese 6:18) Lokola biso mpe tozali kofanda na mokili oyo bato bamipesi mingi na makambo ya bademo, ezali na ntina mingi tóbondela Yehova makasi abatela biso mpo tókoka koboya makambo ya bilimo mabe. Tosengeli mpe kosalela nkombo ya Yehova na mabondeli na biso. (Masese 18:10) Na yango, tosengeli ntango nyonso kobondela Nzambe ‘abikisa biso longwa na moto mabe,’ Satana Zabolo. (Matai 6:13) Yehova akoyoka mabondeli ya ndenge wana oyo ezali mpenza kouta na motema.—Nzembo 145:19.

18 Bilimo mabe bakoki mpenza kosala biso mabe, kasi soki tozali koboya makambo ya Zabolo mpe soki tozali kopusana penepene na Nzambe na kosaláká mokano na Ye, ntina tóbangaka bango ezali te. (Yakobo 4:7, 8) Nguya na bango ezali mpe na nsuka. Bazwaká etumbu na mikolo ya Noa, mpe bazali kozela kosambisama na bango ya nsuka na mikolo oyo ezali koya. (Yuda 6) Kobosana mpe te ete baanzelu ya Yehova bazali kobatela biso. (2 Mikonzi 6:15-17) Baanzelu yango ya nguya mingi balingi mpenza ete tólonga etumba oyo tozali kobunda na bilimo mabe. Ezali lokola nde bazali koyebisa biso ete tólɛmba te. Yango wana, tózala ntango nyonso pene na Yehova mpe pene na libota na ye ya bikelamu ya elimo oyo bazali sembo. Tiká mpe tóboya misala nyonso ya bilimo mabe mpe tósalela ntango nyonso toli ya Liloba ya Nzambe. (1 Petelo 5:6, 7; 2 Petelo 2:9) Soki tosali bongo, ntembe ezali te ete tokolonga etumba oyo tozali kobunda na bikelamu mabe ya elimo.

19 Kasi, mpo na nini Nzambe atiki ete bilimo mabe bázala mpe atiki mabe oyo emonisi bato mpasi mingi? Motuna wana ekozwa eyano na mokapo oyo elandi.

OYO BIBLIA ETEYAKA

  • Baanzelu ya sembo basalisaka basaleli ya Yehova.—Baebele 1:7, 14.
  • Satana ná bademo na ye bazali kobungisa bato nzela mpe bazali kotinda bango bápesa Nzambe mokɔngɔ.—Emoniseli 12:9.
  • Soki ozali kosala mokano ya Nzambe mpe ozali koboya makambo ya Zabolo, ye akokima yo.—Yakobo 4:7, 8.

*  Emoniseli 5:11 elobeli baanzelu ya sembo boye: “Motángo na bango ezalaki bamiliadi na bamiliadi,” to “nkóto zomi mbala nkóto zomi.” (Talá Danyele 7:10.) Na yango, Biblia emonisi polele ete bamilio na bamilio ya baanzelu bakelamaki.


Mituna ya boyekoli

1. Mpo na nini tosengeli koluka koyeba baanzelu?

2. Nani akelaki baanzelu, mpe bazali boni?

3. Yobo 38:4-7 eyebisi biso nini oyo etali baanzelu?

4. Na Biblia, makambo nini emonisi ete baanzelu ya sembo balandaka na likebi makambo ya bato?

5. Bandakisa nini ya Biblia emonisi ete baanzelu basalisaka bato?

6. (a) Ndenge nini baanzelu babatelaka basaleli ya Nzambe lelo oyo? (b) Mituna nini tokotalela sikoyo?

7. Bato boni Satana atindaki bápesa Nzambe mokɔngɔ?

8. (a) Ndenge nini baanzelu mosusu bakómaki bademo? (b) Esengelaki bademo básala nini mpo Mpela ya ntango ya Noa eboma bango te?

9. (a) Nini ekómelaki bademo ntango bazongaki na likoló? (b) Makambo nini oyo bademo basalaka tokotalela?

10. Misala ya bilimo mabe ezali nini?

11. Wapi moko ya misala oyo bademo basalelaka lokola mpambo, mpe mpo na nini tosengeli koboya yango?

12. Mpo na nini koluka kosolola na bato oyo bakufá ezali likama?

13. Bato mingi oyo bazalaki kobanga bilimo mabe basalaka lisusu nini te?

14. Lokola baklisto ya engumba Efese basalaki na siɛklɛ ya liboso, tosengeli kosala nini mpo na kokata boyokani na bilimo mabe?

15. Tosengeli kosala nini mpo na kobundisa mampinga ya bilimo mabe?

16. Ndenge nini tokoki kokómisa kondima na biso makasi?

17. Likambo nini ezali na ntina mpo na koboya makambo ya bilimo mabe?

18, 19. (a) Nini endimisi biso ete tokoki kolonga etumba oyo tozali kobunda na bikelamu mabe ya elimo? (b) Motuna nini ekozwa eyano na mokapo oyo elandi?