Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Biblia eteyaka mpenza nini?

MOKAPO YA MIBALE

Biblia ezali buku oyo euti na Nzambe

Biblia ezali buku oyo euti na Nzambe

Biblia ekeseni na babuku mosusu nyonso na makambo nini?

Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa yo oyeba ndenge ya kobunda na mikakatano na yo?

Mpo na nini okoki kotyela bisakweli oyo ezali na Biblia motema?

OZALI koyeba lisusu mokolo oyo moninga na yo moko ya bolingo akabelaki yo eloko moko ya kitoko? Na ntembe te, osepelaki mingi. Kutu, soki moto akabeli yo eloko, elingi koloba amonaka ete ozali moninga na ye mpenza. Ntembe ezali te ete opesaki moninga na yo wana matɔndi mpo na eloko ya motuya oyo akabelaki yo.

2 Biblia ezali eloko oyo Nzambe akabelá biso mpe tosengeli mpenza kozala na botɔndi mpo na yango. Buku yango, oyo ekokani na buku mosusu te, ezali koyebisa biso makambo oyo tokokaki koyeba ata moke te soki yango ezalaka te. Na ndakisa, ezali koyebisa biso ndenge likoló oyo etondi na minzoto, mabelé, mwasi ná mobali ya liboso bakelamaki. Biblia ezali na mitinda oyo ebongi kotyela motema, oyo ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge ya kobunda na mikakatano mpe mitungisi ya bomoi. Ezali kolimbola ndenge Nzambe akokokisa mokano na ye mpe akosala makambo ya malamu na mabelé. Ya solo mpenza, Biblia ezali likabo moko oyo epesaka esengo!

3 Lisusu, Biblia ezali likabo moko oyo epesaka esengo mpamba te ezali koteya biso likambo moko na ntina na Yehova Nzambe, Ye oyo apesi biso yango. Lokola apesi biso buku yango, yango emonisi ete alingi tóyeba ye malamu. Biblia ekoki mpenza kosalisa yo opusana penepene na Yehova.

4 Soki ozali na Biblia, yebá ete bato mosusu mpe bazali na yango. Biblia mobimba to ndambo na yango ebimá na minɔkɔ koleka 2 300; na yango, ebele ya bato (koleka 90 %) na mokili mobimba bakoki kozala na yango. Pɔsɔ na pɔsɔ, Babiblia koleka milio moko ezali kokabolama! Basili kobimisa bamiliare ya Babiblia, mobimba to ndambo. Ya solo, buku moko te ezali lokola Biblia.

“Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu” esili kobima na minɔkɔ mingi

Libongoli ya Mokili ya Sika na minɔkɔ ndenge na ndenge

5 Longola yango, Biblia “epemami na Nzambe.” (2 Timote 3:16) Na ndenge nini? Yango moko eyanoli boye: “Bato balobaki oyo eutaki epai ya Nzambe wana bazalaki kopusama na elimo santu.” (2 Petelo 1:21) Tópesa ndakisa: Mobange moko akoki koloba na mwana na ye akomela ye mokanda. Mokanda yango ezali na makanisi mpe na malako ya mobange yango. Na yango, ezali mpenza mokanda na ye, kasi ya mwana te. Ndenge moko mpe, Biblia ezali na nsango ya Nzambe, kasi ya bato oyo bakomaki yango te. Yango wana, Biblia mobimba ezali mpenza “liloba ya Nzambe.”—1 Batesaloniki 2:13.

MAKAMBO NYONSO YA BIBLIA EZALI NA BOYOKANI MPE EZALI SOLO

6 Biblia ekomamaki na boumeli ya mbula koleka 1 600. Bato nyonso oyo bakomaki yango bazalaki bato ya eleko moko te mpe na bomoi ya ndenge moko te. Ezalaki na basali-bilanga, babomi-mbisi, mpe babateli ya mpate. Basusu bazalaki basakoli, bazuzi, mpe bakonzi. Luka, moko ya bato oyo bakomaki Baevanzile, azalaki monganga. Atako bato yango oyo bakomaki Biblia bazalaki na bomoi ya ndenge moko te, makambo oyo ezali na Biblia mobimba ezali na boyokani.*

7 Mokanda ya liboso na Biblia eyebisi biso ndenge mikakatano ya bato ebandaki. Mokanda ya nsuka emonisi ete mabelé mobimba ekokóma paladiso, to elanga moko kitoko. Biteni nyonso ya Biblia ezali kolobela makambo oyo esalemaki na boumeli ya bankóto ya bambula mpe eteni mokomoko ezali kosalisa biso ata mwa moke na koyeba ndenge mokano ya Nzambe ekokokisama. Boyokani kati na makambo oyo ekomami na Biblia ezali mpenza kokamwisa, mpe esengeli kaka kozala bongo mpo na buku oyo euti na Nzambe.

8 Biblia eyokani na siansi. Kutu, elobeli makambo mosusu oyo bato bayaki koyeba yango malamu nde nsima ya ebele ya bambula. Na ndakisa, mokanda ya Levitike ezalaki na mibeko oyo Bayisalaele na ntango ya kala basengelaki kotosa na makambo ya bopɛto mpe kotya moto oyo azali na maladi ya mabe mosika na bato mosusu mpo bázwa maladi yango te; nzokande, na ntango wana, bikólo ya zingazinga eyebaki makambo yango te. Biblia elobaki ete mabelé ezali lokola sɛrklɛ to libungutulu; nzokande na ntango wana, bato bazalaki na libunga, bazalaki koyeba te ndenge mabelé ezalaka mpenza. (Yisaya 40:22, NW) Lisusu, Biblia elobaki ete mabelé ‘etɛlɛmi likoló ya eloko moko te’ mpe likambo yango ezali solo. (Yobo 26:7, NW) Elingi koloba te ete Biblia ezali buku mpo na koyekola makambo ya siansi. Kasi, soki elobeli makambo yango, elobelaka yango ndenge ezali mpenza. Esengeli mpenza kozala bongo mpo na buku oyo euti na Nzambe, boye te?

9 Biblia elobelaka mpe makambo oyo esalemá mpenza mpe oyo ebongi kotyela motema. Masolo na yango ezalaka polele. Kati na masolo yango, batángaka kaka bankombo ya bato te, kasi mpe bankɔkɔ na bango.# Mbala mingi, bato ya mayele na makambo ya kala bakomaka te makambo ya bitumba oyo bikólo na bango elongaki te; nzokande, bato oyo bakomaki Biblia bazalaki sembo, bakomaki ata mabunga na bango mpe oyo ya ekólo na bango. Na ndakisa, na Biblia, na mokanda ya Mituya oyo Moize akomaki, ye moko andimi libunga monene oyo asalaki, oyo azwelaki yango mpamela ya makasi. (Mituya 20:2-12) Bosembo ya ndenge wana ezali mpenza te na masolo mosusu ya kala, kasi ezali na Biblia, mpamba te yango ezali buku oyo euti na Nzambe.

BUKU OYO EZALI NA BWANYA YA SOLOSOLO

10 Biblia “ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo,” mpamba te epemami na Nzambe. (2 Timote 3:16) Biblia ezali mpenza buku oyo ezali na makambo oyo epesaka litomba. Ezali komonisa ete ezali na boyebi ya solosolo ya makambo mpe ya bizaleli ya bato. Yango ezali likambo ya kokamwa te, mpamba te Yehova Nzambe, Ye oyo akomisaki yango, azali Mozalisi! Ayebaka makanisi na biso mpe ndenge toyokaka koleka ndenge biso moko toyebi. Longola yango, Yehova ayebi nini oyo tosengeli na yango mpo na kozala na esengo. Ayebi mpe makambo nini tosengeli koboya.

11 Tózwa ndakisa ya diskur ya Yesu oyo babengi Lisolo Likoló ya Ngomba; diskur yango ezali na Matai, mokapo 5 tii mokapo 7. Na diskur yango ya kafukafu, Yesu alobeli makambo mwa mingi; na ndakisa, ndenge ya kozala na esengo ya solosolo, ya kosilisa matata, ya kobondela, mpe ndenge ya malamu ya kotalela biloko ya mokili. Maloba ya Yesu ezalaki na nguya mpe bato oyo bayokaki yango bakokaki kozwela yango litomba; ezali se ndenge moko lelo oyo.

12 Mitinda mosusu ya Biblia elobeli bomoi ya libota, ndenge bato basalaka mosala, mpe boyokani na bango na basusu. Mitinda ya Biblia etali bato nyonso, mpe toli na yango epesaka ntango nyonso bolamu. Maloba oyo Nzambe alobaki na monɔkɔ ya mosakoli Yisaya emonisi na mokuse bwanya oyo ezali na Biblia: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba.”—Yisaya 48:17.

BUKU YA BISAKWELI

13 Biblia ezali na ebele ya bisakweli, oyo mingi kati na yango ekokisamá. Tózwa ndakisa moko. Na monɔkɔ ya mosakoli Yisaya, oyo azalaki na bomoi na ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Yehova asakolaki ete engumba Babilone ekobebisama. (Yisaya 13:19; 14:22, 23) Ayebisaki ndenge mpenza likambo yango ekosalema. Mampinga ya banguna bakokaukisa ebale ya Babilone mpe bakobunda etumba te ntango bakokɔta na engumba yango. Esuki wana te. Esakweli ya Yisaya etángaki kutu nkombo ya mokonzi oyo akokweisa Babilone—Sirise.—Yisaya 44:27-45:2.

Yisaya, moko ya bato oyo bakomaki Biblia, asakolaki ete Babilone ekokwea

Mobali moko azali koyekola ndenge Babilone ekweaki

14 Mbula soki 200 na nsima—na butu ya mokolo ya 5 Ɔkɔtɔbɛ mpo na kokóma mokolo ya 6 Ɔkɔtɔbɛ ya mobu 539 L.T.B.—limpinga moko ya basoda bayaki kotya kaa na bango pene na Babilone. Nani azalaki komanda na bango? Sirise, mokonzi moko ya Perse. Na ndenge yango, makambo nyonso ebongisamaki mpo ete esakweli moko ya kokamwa ekokisama. Kasi, basoda ya Sirise bakobunda nde etumba te ntango bakokɔta na Babilone, ndenge esakweli elobaki?

15 Na butu yango, bato ya Babilone bazalaki na fɛti; bazalaki kobanga ata eloko moko te mpo engumba na bango ezalaki na kati ya bifelo ya minene. Na ntango wana, Sirise asalelaki mayele mpenza mpe alekisaki na nzela mosusu mai ya ebale oyo ekatisaki engumba yango. Mbala moko, ebale yango ebandaki kokauka; yango wana basoda na ye bakatisaki yango na makolo mpe bakómaki tii na bifelo ya engumba yango. Kasi ndenge nini basoda ya Sirise bakoleka bifelo yango? Mpo na ntina oyo eyebani te, na butu yango, babosanaki kokanga baporte ya engumba yango!

16 Esakweli elobaki mpo na Babilone ete: “Ekozala na bafandi [lisusu, NW] te, kino libota na libota bakozala wana te; Moalaba akotɛlɛmisa hema na ye wana te; babateli ya mpate bakolalisa bitonga na bango wana te.” (Yisaya 13:20) Esakweli yango elobelaki kaka kokwea ya Babilone te. Emonisaki mpe ete engumba yango ekotikala mpamba libela na libela. Okoki komona polele ete maloba yango ekokisamá. Esika oyo Babilone ezalaká—oyo ezali na kilomɛtrɛ soki 80 na sudi ya engumba Bagdad, na Irak—epai moto ata moko azalaka lisusu te, emonisi polele ete likambo oyo Yehova alobaki na monɔkɔ ya Yisaya ekokisamá: “Nakosilisa Babilone, ekokufa libela.”—Izaya 14:22, 23, Liloba lya Nzambe.%

Ndenge Babilone etikalá

Ndenge Babilone etikalá

17 Ndenge tomoni ete Biblia ezali buku ya bisakweli oyo ebongi kotyela motema, likambo yango ezali kokómisa kondima na biso makasi, boye te? Lokola Nzambe akokisi bilaka oyo apesaki kala, yango etindi biso tóndima mpenza ete akokokisa mpe elaka na ye ya kokómisa mabelé oyo paladiso. (Mituya 23:19) Ya solo mpenza, tozali na ‘elikya ya bomoi ya seko oyo Nzambe, oyo akoki te kobuka lokuta, alaká liboso ya bantango ya kalakala.’—Tito 1:2.^

“LILOBA YA NZAMBE EZALI NA BOMOI”

18 Makambo oyo tolobeli na mokapo oyo emonisi polele ete Biblia ezali mpenza buku oyo ekokani na buku mosusu te. Soki Biblia ezali na valɛrɛ mingi, ezali kaka te mpo makambo na yango ezali na boyokani, eyokani na siansi mpe ezali makambo oyo esalemá mpenza to mpo na bwanya ya solosolo oyo ezali na kati na yango to mpe mpo na bisakweli na yango oyo ekoki kotyelama motema. Paulo, ntoma moko moklisto, akomaki ete: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya mpe epeli makasi koleka mopanga nyonso ya mino mibale mpe ekɔtaka tii na kokabola molimo ná elimo, mpe matonga ná mafuta na yango, mpe ezali na likoki ya kososola makanisi mpe mikano ya motema.”—Baebele 4:12.

19 Kotánga “liloba” ya Nzambe, to nsango na ye, na kati ya Biblia, ekoki kobongola bomoi na biso. Ekoki kosalisa biso tómitalela na ndenge oyo tomitalelá naino te. Tokoki kotuta ntolo ete tolingaka Nzambe, kasi ndenge oyo tokosala nsima ya koyeba oyo Biblia, Liloba na ye oyo epemami, eteyaka ekomonisa mpenza makanisi na biso, ata mpe mikano mpenza oyo ezali na motema na biso.

20 Ya solo, Biblia ezali buku oyo euti na Nzambe. Ezali buku moko oyo bato basengeli kotánga, koyekola mpe kolinga. Landá koyekola yango malamumalamu mpo na komonisa ete ozali na botɔndi mpo na eloko yango oyo Nzambe akabelá biso. Okomona ete okoyeba malamumalamu mokano oyo Nzambe azali na yango mpo na bato. Mokapo oyo elandi ekoyebisa biso soki mokano yango ezali nini mpe ndenge yango ekokokisama.

OYO BIBLIA ETEYAKA

  • Biblia epemami na Nzambe; yango wana, makambo oyo ezali na kati ezali solo mpe ebongi kotyela yango motema.—2 Timote 3:16.
  • Tokoki mpenza kosalela makambo oyo ezali na Liloba ya Nzambe na bomoi na biso ya mokolo na mokolo.—Yisaya 48:17.
  • Bilaka ya Nzambe oyo ezali na kati ya Biblia ekokokisama mpenza.—Mituya 23:19.

*  Atako bato mosusu balobaka ete makambo oyo ezali na bisika mosusu ya Biblia eyokani te na oyo ya bisika mosusu, eloko moko te endimisi likanisi yango. Talá mokapo 7 ya buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

#   Na ndakisa, talá Luka 3:23-38, emonisi polele molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu.

%   Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali bisakweli ya Biblia, talá mwa buku Un livre pour tous, na nkasa 27-29, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^   Kobebisama ya Babilone ezali kaka ndakisa moko ya bisakweli ya Biblia oyo esili kokokisama. Kobebisama ya Tulo mpe Ninive ezali mpe bandakisa mosusu. (Ezekiele 26:1-5; Sefania 2:13-15) Longola yango, Danyele asakolaki ndenge makonzi oyo ekoyangela bikólo mingi ya mokili ekolandana nsima ya Babilone. Na ndakisa, alobelaki bokonzi ya Bamede ná Baperse mpe ya Grɛsi. (Danyele 8:5-7, 20-22) Soki olingi koyeba ebele ya bisakweli etali Masiya oyo ekokisamaki epai ya Yesu Klisto, talá Apɛndisi.


Mituna ya boyekoli

1, 2. Na makambo nini Biblia ezali likabo moko ya Nzambe oyo epesaka esengo?

3. Lokola Yehova apesi biso Biblia, yango emonisi nini, mpe mpo na nini yango epesaka esengo?

4. Kokabolama ya Biblia ekamwisi yo na nini?

5. Na ndenge nini Biblia “epemami na Nzambe”?

6, 7. Mpo na nini boyokani kati na makambo oyo ekomami na Biblia ezali mpenza kokamwisa?

8. Pesá bandakisa oyo emonisi ete Biblia eyokani na siansi.

9. (a) Na ndenge nini Biblia yango moko emonisi ete elobelaka makambo oyo esalemá mpenza mpe oyo ebongi kotyela motema? (b) Bosembo ya bato oyo bakomaki Biblia eteyi yo nini mpo na Biblia?

10. Mpo na nini ezali likambo ya kokamwa te soki Biblia ezali buku oyo ezali na makambo oyo epesaka litomba?

11, 12. (a) Makambo nini Yesu alobeli na Lisolo na ye Likoló ya Ngomba? (b) Makambo nini mosusu ya ntina Biblia elobeli, mpe mpo na nini toli ya Biblia esilaka ngala te?

13. Na nzela ya elimo na ye, Yehova atindaki mosakoli Yisaya akoma makambo nini oyo etali Babilone?

14, 15. Ndenge nini makambo mosusu oyo Yisaya asakolaki mpo na Babilone ekokisamaki?

16. (a) Yisaya asakolaki ete Babilone ekosuka ndenge nini? (b) Likambo oyo Yisaya asakolaki ete Babilone ekotikala mpamba ekokisamá mpenza?

17. Na ndenge nini kokokisama ya bisakweli ya Biblia ezali mpenza kokómisa kondima na biso makasi?

18. Maloba nini ya ntina mingi, oyo etali “liloba ya Nzambe,” ntoma Paulo alobaki?

19, 20. (a) Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa yo omitalela? (b) Ndenge nini okoki komonisa ete ozali na botɔndi mpo na Biblia, eloko oyo ekokani na mosusu te oyo Nzambe akabelá biso?

Makambo mosusu

KOYEKOLA BIBLIA

Mpo na nini koyekola Biblia?

Biblia ezali na biyano na mituna ya ntina mingi oyo etali bomoi oyo bamilio ya bato na mokili mobimba bamitunaka. Yo mpe olingi koyekola Biblia?