Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Biblia eteyaka mpenza nini?

APƐNDISI

“Molimo” ná “elimo” elimboli mpenza nini?

“Molimo” ná “elimo” elimboli mpenza nini?

SOKI oyoki maloba “molimo” to “elimo,” okanisaka nini? Bato mingi bakanisaka ete maloba wana elakisi eloko moko oyo ezalaka na kati ya moto, oyo emonanaka te mpe ekufaka te. Mpo na bango, soki moto akufi, eloko yango elongwaka na nzoto na ye mpe etikalaka na bomoi. Lokola ebele ya bato bakanisaka ndenge wana, bato mingi bakamwaka soki balakisi bango ete Biblia eteyaka bongo te. Kasi, na Liloba ya Nzambe, molimo ná elimo ezali nini?

NDENGE OYO BIBLIA ESALELI LILOBA “MOLIMO”

Tólobela naino molimo. Soki obosani te, oyebi ete Biblia ekomamaki libosoliboso na Liebele mpe na Grɛki. Mpo na kolobela molimo, bato oyo bakomaki Biblia basalelaki liloba ya Liebele nèphèsh to liloba ya Grɛki psukhê. Makomami esaleli maloba mibale wana na bisika koleka 800, mpe Libongoli ya Mokili ya Sika etye na bisika wana nyonso liloba “molimo.” Soki otali malamu ndenge liloba “molimo” to “milimo” esalelami na Biblia, okomona polele ete liloba yango elobelaka mpenzampenza (1) bato, (2) banyama, to (3) bomoi ya moto to ya nyama. Tótalela mwa bavɛrsɛ oyo ezali komonisa ndimbola misato wana.

Bato. “Na mikolo ya Noa…bato moke, elingi koloba, milimo mwambe, bamemamaki kozanga likama na mai.” (1 Petelo 3:20) Awa, ezali komonana polele ete liloba “milimo” elakisi bato—Noa, mwasi na ye, bana na ye misato, mpe basi na bango. Exode 16:16 elobeli malako oyo bapesaki Bayisalaele na likambo ya kolɔkɔta mana. Bayebisaki bango boye: ‘Bólɔkɔta yango…lokola motuya ya bato [na Liebele, nèphèsh, milimo] ya moto na moto na hema na ye.’ Yango emonisi ete moto na moto asengelaki kolɔkɔta mana oyo ekokoka na bato ya libota na ye. Na Biblia, okokuta bandakisa mosusu ya ndenge basaleli “molimo” mpo na kolobela “moto” mpe “milimo” mpo na kolobela “bato” na 1 Samwele 17:55; Nzembo 33:20; Misala 27:37; mpe Baloma 13:1.

Banyama. Na lisolo ya Biblia oyo elobelaka kozalisama, totángi boye: “Nzambe alobaki ete, Tiká ete mai ezala na nyama [na Liebele, nèphèsh, milimo] mingi ya bomoi, mpe ete ndɛkɛ epumbwa na likoló ya mokili na nse ya etando polele ya likoló. Nzambe alobaki ete, Tiká mokili ebota nyama [na Liebele, nèphèsh, milimo] ya bomoi na ndenge na yango, nyama minene mpe nyama ya kolandaka mpe nyama ya mokili na ndenge na yango.” (Genese 1:20, 24) Na bavɛrsɛ oyo, basaleli liloba moko kaka ya Liebele, nèphèsh, oyo elakisi milimo, mpo na kolobela mbisi, ndɛkɛ, nyama ya mboka mpe nyama ya zamba. Babengi mpe nyama milimo na bavɛrsɛ oyo: Genese 9:10 (NW); Levitike 11:46 (NW); mpe Mituya 31:28 (NW).

Bomoi ya moto. Na bantango mosusu, “molimo” elakisaka bomoi ya moto. Mokolo moko, Davidi azwaki libaku ya koboma Mokonzi Saulo kasi abomaki ye te. Yoká maloba oyo mokonzi yango ayebisaki Davidi na nsima: “Nakosalela yo mabe lisusu te zambi molimo na ngai ezalaki na motuya na miso na yo mokolo oyo.” (1 Samwele 26:21) Eloko nini oyo Davidi atikaki mpo ezalaki na motuya na miso na ye? Ezalaki nde bomoi ya Saulo. Bambula mingi liboso, ntango Laele azalaki kobota Benyamina, ‘molimo na ye ezalaki kolongwa (mpo ete akufaki).’ (Genese 35:16-19) Bomoi ya Laele esukaki na ngonga wana. Talelá mpe maloba oyo ya Yesu: “Ngai nazali mobateli ya bampate oyo aleki malamu; mobateli ya bampate oyo aleki malamu apesaka molimo na ye mpo na bampate.” (Yoane 10:11) Yesu apesaki molimo, to bomoi, na ye mpo na bato. Na bavɛrsɛ wana ya Biblia, emonani polele ete liloba “molimo” elakisi nde bomoi ya moto. Okozwa bandakisa mosusu ya ndimbola wana ya “molimo” na 1 Mikonzi 17:17-23; Matai 10:39; Yoane 15:13; mpe Misala 20:10.

Soki oyekoli Biblia, Liloba ya Nzambe, malamumalamu, okomona ete ezali ata na vɛrsɛ moko te epai balobi ete “molimo” “ekufaka te” to eumelaka “seko.” Makomami elobi nde ete molimo ekufaka.—Ezekiele 18:4, 20.

“ELIMO” EZALI NINI?

Tótala sikoyo ndenge oyo Biblia esaleli liloba “elimo.” Bato mosusu bakanisaka ete “elimo” ezali kaka liloba mosusu oyo ezali na ndimbola moko na “molimo.” Nzokande, ezali bongo te. Biblia emonisi polele ete “elimo” ná “molimo” ezali makambo mibale oyo ekeseni mpenza. Ekeseni na nini?

Mpo na kolobela “elimo,” bato oyo bakomaki Biblia basalelaki liloba ya Liebele rouaḥ to liloba ya Grɛki pneuma. Makomami yango moko emonisi ndimbola ya maloba yango. Na ndakisa, Nzembo 104:29 elobi ete: “Soki [Yehova] okolongola mpema [na Liebele, rouaḥ, elimo] na bango mpe bakokufa; bakobongwana na putulu.” Mpe Yakobo 2:26 elobi ete “nzoto oyo ezangi elimo [pneuma] ekufi.” Emonani ete na bavɛrsɛ oyo, “elimo” elakisi eloko oyo esalaka ete nzoto ezala na bomoi. Soki elimo ezali te, nzoto ekokufa. Yango wana, na Biblia, liloba rouaḥ ebongolami kaka na “elimo” te, kasi mpe na “nguya,” to nguya ya bomoi. Na ndakisa, mpo na Mpela ya ntango ya Noa, Nzambe alobaki ete: “Nazali koyeisa mpela na mabelé mpo na kobebisa na nse ya likoló mosuni nyonso oyo kati na yango nguya [rouaḥ] ya bomoi ezali kosala.” (Genese 6:17, NW; 7:15, 22, NW) Yango emonisi ete “elimo” ezali nguya moko oyo emonanaka te oyo esimbi bomoi ya bikelamu nyonso ya bomoi.

Radio

Molimo ná elimo ezali eloko moko te. Mpo nzoto esala, elimo esengeli kozala se ndenge radio esalaka na kura. Mpo tókanga ntina ya likambo yango malamu, tózwa ndakisa ya radio oyo bakoki kosimba ata na mabɔkɔ. Soki otye yango mabanga (pile) mpe opelisi yango, kura oyo ezali na kati ya mabanga ekosala ete radio ebanda kosala. Kasi, soki mabanga ezali te, radio ekosala te. Ezalaka mpe bongo mpo na radio oyo balongoli nsinga na yango na kura. Ndenge moko mpe, elimo ezali nguya oyo esalaka ete nzoto na biso esala. Lisusu, ndenge moko na kura, elimo eyokaka mawa to esengo te, ekanisaka mpe te. Ezali nde nguya kasi ezali moto te. Nzokande, soki tozangi elimo yango, to nguya ya bomoi, nzoto na biso ‘ekokufa mpe tokozonga na putulu’ ndenge mokomi ya nzembo alobaki.

Mosakoli 12:7 elobi boye mpo na liwa ya moto: “Putulu [ya nzoto na ye] ekozonga na mabelé lokola ezalaki yango; mpe [elimo, NW] ekozonga epai ya Nzambe oyo apesaki yango.” Soki elimo, to nguya ya bomoi, elongwe na nzoto, nzoto ekufaka mpe ezongaka epai eutá—na mabelé. Ndenge moko mpe, nguya ya bomoi ezongaka epai eutá—epai ya Nzambe. (Yobo 34:14, 15; Nzembo 36:9) Yango elingi koloba te ete nguya ya bomoi ekendaka mpenza na likoló; kasi nde soki moto akufi, kaka Yehova Nzambe nde akoki kozongisa ye lisusu na bomoi. Na maloba mosusu, bomoi na ye ezali na mabɔkɔ ya Nzambe. Moto akoki lisusu kozwa elimo, to nguya ya bomoi, mpo na kozonga na bomoi kaka na nzela ya nguya ya Nzambe.

Ya solo, motema na biso ekiti na koyeba ete Nzambe akosala mpenza bongo mpo na baoyo nyonso bazali kopema na kati ya “malita ya kokanisama”! (Yoane 5:28, 29) Na ntango Yehova akosekwisa bato oyo bakufá, akosalela mokomoko na bango nzoto ya sika mpe akotyela yango elimo, to nguya ya bomoi, mpo ebanda kosala. Ya solo mpenza, ekozala ntango ya esengo!

Soki olingi koyeba makambo mosusu oyo etali ndenge maloba “molimo” mpe “elimo” esalelami na Biblia, okozwa makanisi ya ntina mpenza na mwa buku Nini ekómelaka biso soki tokufi? mpe na buku Comment raisonner à partir des Écritures, na nkasa 27-32; 135-139; nyonso mibale ebimisami na Batatoli ya Yehova.

← Talá mikapo