Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Biblia eteyaka mpenza nini?

MOKAPO YA MISATO

Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali nini?

Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali nini?

Mokano ya Nzambe mpo na bato ezali nini?

Ntembe nini babɛtɛlaki Nzambe?

Bomoi awa na mabelé ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?

MOKANO ya Yehova mpo na mabelé ezali mpenza malamu. Alingi ete mabelé etonda na bato oyo bazali na esengo mpe na nzoto kolɔngɔnɔ. Biblia elobi ete ‘Nzambe akonaki elanga kati na Edene’ mpe ‘akolisaki nzete nyonso oyo ezali kitoko na kotala mpe malamu na kolya.’ Nsima ya kokela Adama ná Eva, mobali ná mwasi ya liboso, Nzambe atyaki bango na elanga yango ya kitoko mpe alobaki na bango boye: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nse na bino.” (Genese 1:28; 2:8, 9, 15) Yango emonisi ete Nzambe alingaki bato bábota bana, bákómisa mabelé mobimba paladiso, mpe bábatela banyama.

2 Okanisi ete mokolo mosusu bato bakofanda na paladiso awa na mabelé ndenge Yehova Nzambe akanaki? Nzambe alobi ete: “Ngai nasili koloba yango…mpe nakokokisa yango.” (Yisaya 46:9-11; 55:11) Ɛɛ, Nzambe akosala mpenza ndenge akanaki! Alobi ete ‘asalaki mabelé kaka mpamba te’ kasi “atongaki yango ete bato báfanda wana.” (Yisaya 45:18) Bato ya ndenge nini Nzambe alingaki ete báfanda na mabelé, mpe alingaki báfanda wana ntango boni? Biblia eyanoli boye: ‘Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.’Nzembo 37:29; Emoniseli 21:3, 4.

3 Biso nyonso tozali komona na miso ete likambo yango esalemi naino te. Lelo oyo, bato bazali kobɛla mpe kokufa; bazali ata mpe kobunda bango na bango mpe kobomana. Yango emonisi ete likambo moko ebongwanaki, mpamba te Nzambe akanaki ata moke te ete mabelé ezala ndenge ezali lelo. Likambo nini? Mpo na nini makambo esalemi te ndenge Nzambe akanaki? Ata buku moko te ya makambo ya kala oyo bato bakomi ekoki kopesa biso eyano, mpamba te likambo yango ebandaki nde na likoló.

MONGUNA ABIMI

4 Mokanda ya liboso na Biblia elobeli motɛmɛli moko ya Nzambe oyo abimaki na elanga ya Edene. Mokanda yango ebengi ye “nyoka,” kasi ezalaki nyoka mpenza te. Mokanda ya nsuka na Biblia elobi ete “abengami Zabolo mpe Satana, oyo azali kobungisa mabelé mobimba oyo efandami nzela.” Ebengi ye mpe “nyoka ya ebandeli.” (Genese 3:1; Emoniseli 12:9) Anzelu yango ya nguya—to ekelamu ya elimo—asalelaki nyoka mpo na koloba na Eva, ndenge kaka moto moko ya mayele mpenza akoki kosala ete bato bákanisa ete mwana-popi oyo azali pembeni na ye nde azali koloba, nzokande ye moto azali koloba. Na ntembe te, ntango Nzambe azalaki kobongisela bato mabelé, ekelamu yango ya elimo ezalaki.—Yobo 38:4, 7.

5 Lokola biloko nyonso oyo Yehova akelaki ezali ya kokoka, bongo nani asalaki “Zabolo” to “Satana” yango? Na mokuse, mwana moko ya Nzambe, elimo moko ya nguya, amikómisaki Zabolo. Ndenge nini likambo ya ndenge wana ekokaki kosalema? Tosengeli koyeba ete moto akoki kozala sembo mpe na bizaleli malamu lelo, mpe lobi akómi moyibi. Na ndenge nini? Ebandaka naino na mposa moko ya mabe na motema. Soki azali kaka kokanisa mposa yango, ekokóma mpenza makasi. Na nsima, soki libaku emonani, akoki koluka ndenge ya kokokisa yango.—Yakobo 1:13-15.

6 Yango nde ekómelaki Satana Zabolo. Emonani ete azalaki koyoka ntango Nzambe azali koyebisa Adama ná Eva bábota bana mpe bátondisa mokili. (Genese 1:27, 28) Ntango mosusu, Satana akanisaki boye: ‘Bato oyo nyonso bakoki nde kosambela ngai na esika básambela Nzambe!’ Mposa moko ya mabe ebandaki mbala moko na motema na ye. Nsukansuka, akosaki Eva, ayebisaki ye makambo ya lokuta na ntina na Nzambe. (Genese 3:1-5) Yango ekómisaki ye “Zabolo,” nkombo oyo elimboli “Mokosi.” Kaka na ntango wana, akómaki mpe “Satana,” nkombo oyo elimboli “Motɛmɛli.”

7 Satana Zabolo asalelaki lokuta mpe mayele mabe mpo na kotinda Adama ná Eva báboya kotosa Nzambe. (Genese 2:17; 3:6) Yango wana, na nsima bakufaki, se ndenge Nzambe ayebisaki bango. (Genese 3:17-19) Ntango Adama asalaki lisumu, akómaki moto ya kozanga kokoka; yango wana, atikelá bana na ye nyonso lisumu. (Baloma 5:12) Ndakisa ya linzanza oyo batumbaka na yango mampa ekoki kosalisa biso tókanga ntina ya likambo yango. Soki linzanza yango efinaná to ebebá esika moko, mampa nyonso oyo ekobima na linzanza wana ekozala ndenge nini? Ekozala kaka ndenge linzanza wana ezali. Ndenge moko mpe, moto nyonso abotamaka na mabe to na kozanga kokoka oyo eutá na Adama. Yango wana, bato nyonso banunaka mpe bakufaka.—Baloma 3:23.

8 Ntango Satana atindaki Adama ná Eva básalela Nzambe lisumu, abandisaki nde botomboki. Abɛtɛlaki nde lolenge ya koyangela ya Yehova ntembe. Na maloba mosusu, Satana alobaki boye: ‘Nzambe azali moyangeli mabe. Abukaka lokuta mpe apimelaka bato na ye makambo ya malamu. Bato bazali na mposa te ete Nzambe ayangela bango. Bango moko bakoki kokata nini ezali mabe mpe nini ezali malamu. Lisusu, bakozala malamu soki ngai nde nazali koyangela bango.’ Ndenge nini Nzambe asengelaki kosilisa ntembe oyo ebimaki mpo na kosambwisa ye? Basusu bakanisaka ete Nzambe asengelaki kaka koboma batomboki yango. Kasi, koboma bango nde elingaki kosilisa ntembe ya Satana? Elingaki mpenza komonisa ete Nzambe ayangelaka na lolenge ya malamu?

9 Lokola Yehova azali na bosembo ya kokoka, akokaki koboma bango mbala moko te. Amonaki ete esengeli kotika ntango mpo na kosukisa na ndenge ya malamu ntembe oyo Satana abimisaki mpe komonisa polele ete Zabolo azali mobuki-lokuta. Yango wana, Nzambe azwaki mokano ete bato bámiyangela bango moko mpo na mwa ntango mpe Satana atambwisa bango. Mokapo 11 ya buku oyo ekomonisa biso ntina oyo Yehova azwaki mokano wana mpe ntina oyo atiki ntango mingi boye liboso ya kosukisa ntembe yango. Sikoyo, ekozala naino malamu kokanisa mituna oyo: Adama ná Eva basalaki malamu ndenge bandimelaki Satana, moto oyo asalelaki bango eloko moko ya malamu ata mokolo moko te? Ezalaki nde na eloko moko oyo etindaki bango bándima ete Yehova, ye oyo apesaki bango biloko nyonso oyo bazalaki na yango, azali mobuki-lokuta moko ya motema mabe? Soki yo, olingaki kosala nini?

10 Ezali malamu kokanisa mituna yango, mpamba te mokomoko na biso azali kokutana na makambo ya ndenge yango lelo oyo. Ozali mpenza na libaku ya kopesa Yehova likoki ya kosukisa ntembe ya Satana. Okoki kondima Yehova azala Moyangeli na yo mpe komonisa ete Satana azali mobuki-lokuta. (Nzembo 73:28; Masese 27:11) Likambo ya mawa ezali ete na bamiliare ya bato oyo bazali na mokili, kaka bato moke nde bazali kondima kosala bongo. Yango ebimisi motuna ya ntina oyo: Biblia eteyaka mpenza ete Satana nde azali koyangela mokili oyo?

NANI AZALI KOYANGELA MOKILI OYO?

Ndenge nini Satana alingaki kopesa Yesu makonzi nyonso ya mokili soki ezalaka ya ye te?

Yesu aboyi masɛnginya ya Satana ya kozala moyangeli ya mokili

11 Yesu atyaki ntembe ata moke te ete Satana azali moyangeli ya mokili oyo. Mokolo moko, na ndenge moko ya likamwisi, Satana alakisaki Yesu “makonzi nyonso ya mokili mpe nkembo na yango.” Na nsima, apesaki ye elaka oyo: “Biloko oyo nyonso nakopesa yo soki okwei na nse mpe osambeli ngai.” (Matai 4:8, 9; Luka 4:5, 6) Kanisá naino mwa moke. Soki Satana azalaki koyangela makonzi yango te, likabo yango elingaki nde kozala lisɛnginya mpo na Yesu? Yesu aboyaki te ete baguvɛrnema yango nyonso ya mokili ezali ya Satana. Soki ezalaka ya Satana te, Yesu alingaki mpenza kotyela maloba yango ntembe.

12 Ezali solo ete Yehova azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ oyo ya kokamwa. (Emoniseli 4:11) Atako bongo, Biblia elobi ata esika moko te ete Yehova Nzambe azali moyangeli ya mokili oyo to Yesu nde azali moyangeli na yango. Kasi, Yesu alobaki polele ete Satana azali “moyangeli ya mokili oyo.” (Yoane 12:31; 14:30; 16:11) Kutu, Biblia elobi ete Satana Zabolo azali “nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (2 Bakolinti 4:3, 4) Yoane, ntoma moklisto, akomaki boye na ntina na motɛmɛli yango, to Satana: “Mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.”—1 Yoane 5:19.

NDENGE OYO MOKILI YA SATANA EKOSUKA

13 Mbula na mbula, makama ezali se kobakisama na mokili. Mokili etondi na mampinga ya basoda oyo bazali kobunda, na bato ya politiki oyo bazali sembo te, na bakonzi ya mangomba oyo bazali na bokosi, mpe na bato oyo bamipesá na kosala mabe. Mokili oyo ekoki kobonga lisusu te. Biblia eyebisi ete etikali moke Nzambe asukisa mokili mabe oyo na etumba na ye ya Armagedona. Nsima na yango, mokili ya sika ya sembo ekozwa esika.—Emoniseli 16:14-16.

14 Yehova Nzambe aponaki Yesu Klisto azala Moyangeli na Bokonzi, to guvɛrnema, na Ye ya likoló. Banda kala, Biblia esakolaki ete: “Mwana abotameli biso, mwana mobali apesameli biso; bokonzi ekozala likoló ya lipeka na ye, nkombo na ye akobengama ete…Nkolo ya kimya. Kofuluka ya bokonzi na ye mpe ya kimya ekosuka te.” (Yisaya 9:6, 7) Mpo na bokonzi to guvɛrnema yango, Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka boye: “Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” (Matai 6:10) Ndenge tokomona yango nsima na buku oyo, Bokonzi ya Nzambe ekolongola baguvɛrnema nyonso ya mokili oyo, mpe ekozwa esika ya baguvɛrnema yango. (Danyele 2:44) Na nsima, ekosala ete paladiso ebanda awa na mabelé.

MOKILI YA SIKA EKÓMI PENE!

15 Biblia eyebisi biso ete: “Ezali na likoló ya sika mpe na mabelé moko ya sika oyo tozali kozela engebene elaka [ya Nzambe], mpe na kati na yango boyengebene ekofanda.” (2 Petelo 3:13; Yisaya 65:17) Mbala mosusu, ntango Biblia elobelaka “mabelé,” to “mokili,” yango elakisaka bato oyo bazali na mabelé. (Genese 11:1) Yango wana, ‘mabelé ya sika’ ya boyengebene elakisi bato oyo Nzambe andimi.

16 Yesu alakaki ete na mokili ya sika oyo ezali koya, bato oyo Nzambe andimi bakozwa likabo ya “bomoi ya seko.” (Malako 10:30) Soki olingi, fungolá Biblia na yo na Yoane 3:16 mpe 17:3 mpe tángá makambo oyo Yesu alobaki ete tosengeli kosala mpo na kozwa bomoi ya seko, likabo ya malamu mpenza oyo euti na Nzambe. Sikoyo, talá na Biblia mapamboli oyo bakopesa bato oyo bakokisi masɛngami mpo na kozwa likabo yango na Paladiso awa na mabelé.

17Mabe, bitumba, kobuka mibeko mpe mobulu ekosila. “Moto mabe akozala lisusu te…Nde bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili.” (Nzembo 37:10, 11) Kimya ekozala mpo ‘Nzambe akosukisa bitumba kino na bansuka ya mokili.’ (Nzembo 46:9; Yisaya 2:4) Na nsima, “moyengebene akokola [lokola nzete], mpe kimya ekotonda mɛkɛ tii sanza ekozala lisusu te”—elingi koloba libela na libela!—Nzembo 72:7, NW.

18Basambeli ya Yehova bakobanga lisusu eloko te. Kala, Bayisalaele bazalaki kobanga eloko te ntango bazalaki kotosa Nzambe. (Levitike 25:18, 19) Ekozala mpenza esengo monene ntango biso mpe tokobanga lisusu eloko te na Paladiso!—Yisaya 32:18; Mika 4:4.

19Biloko ya kolya ekozanga lisusu te. Mokomi ya nzembo ayembaki boye: ‘Masango ekotondana na mokili ata kino likoló na ngomba.’ (Nzembo 72:16) Yehova Nzambe akopambola bayengebene, mpe ‘mabelé ekobota mbuma na yango.’—Nzembo 67:6.

Bato ya bikólo ndenge na ndenge bazali na Paladiso esika moko

20Mabelé mobimba ekokóma paladiso. Bisika oyo bato ya masumu babebisá ekozala lisusu te; na esika na yango, ekozala nde bandako ya kitoko mpe bisika ya kitoko oyo etondi na fololo ná nzete. (Yisaya 65:21-24; Emoniseli 11:18) Bato bakobongisa mabelé mokemoke tii yango nyonso ekokóma kitoko mpe ekobota mbuma mingi lokola elanga ya Edene. Mpe na ntembe te, Nzambe ‘akofungola lobɔkɔ na ye mpe akosilisa mposa ya bikelamu nyonso ya bomoi.’—Nzembo 145:16.

21Bato ná banyama bakofanda na kimya. Banyama ya zamba ná banyama ya mboka bakolya esika moko. Ata mpe mwana moke akobanga lisusu te banyama oyo tobangaka lelo.—Yisaya 11:6-9; 65:25.

22Maladi ekozala lisusu te. Yesu, Moyangeli na Bokonzi ya Nzambe kuna na likoló, akobikisa bato mingi koleka oyo abikisaki ntango azalaki awa na mabelé. (Matai 9:35; Malako 1:40-42; Yoane 5:5-9) Na nsima, “mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na maladi.”—Yisaya 33:24; 35:5, 6.

23Bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá bakozonga na bomoi mpe bakozala na likama ya kokufa lisusu te. Bato nyonso oyo bakufá, oyo bazali na makanisi ya Nzambe, bakosekwa. Ya solo, “ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.”—Misala 24:15; Yoane 5:28, 29.

24 Ya solo, avenire moko ya malamu mpenza ezali kozela baoyo baponi koyekola makambo ya Yehova Nzambe, Mozalisi Monene na bango, mpe kosalela ye! Yesu alobelaki nde Paladiso oyo ekozala awa na mabelé ntango alakaki moto mabe oyo akufaki elongo na ye ete: “Okozala elongo na ngai na Paladiso.” (Luka 23:43) Ezali na ntina mingi tóyekola koyeba Yesu Klisto malamu, mpamba te ezali na nzela na ye nde tokozwa mapamboli nyonso wana.

OYO BIBLIA ETEYAKA


Mituna ya boyekoli

1. Nzambe alingi ete mabelé ezala ndenge nini?

2. (a) Ndenge nini toyebi ete likambo oyo Nzambe akanaki kosala na mabelé ekosalema? (b) Biblia emonisi ete bato ya ndenge nini bakozala na bomoi libela na libela?

3. Makambo nini ya mawa ezali sikoyo na mabelé, mpe yango ebimisi mituna nini?

4, 5. (a) Nani mpenza alobaki na Eva na monɔkɔ ya nyoka? (b) Ndenge nini moto ya sembo mpe na bizaleli malamu akoki kokóma moyibi?

6. Ndenge nini mwana moko ya Nzambe, elimo moko ya nguya, akómaki Satana Zabolo?

7. (a) Mpo na nini Adama ná Eva bakufaki? (b) Mpo na nini bana nyonso ya Adama banunaka mpe bakufaka?

8, 9. (a) Emonani ete Satana abimisaki ntembe nini? (b) Mpo na nini Nzambe abomaki batomboki yango mbala moko te?

10. Ndenge nini okoki kopesa Yehova likoki ya kosukisa ntembe ya Satana?

11, 12. (a) Ndenge nini lisɛnginya moko oyo Satana amekaki na yango Yesu emonisi ete ye Satana nde azali moyangeli ya mokili oyo? (b) Eloko nini mosusu emonisi ete Satana azali moyangeli ya mokili oyo?

13. Mpo na nini esengeli mokili ya sika eya?

14. Nzambe aponi nani azala Moyangeli na Bokonzi na Ye, mpe ndenge nini likambo yango esakolamaki?

15. ‘Mabelé ya sika’ elakisi nini?

16. Likabo nini ya motuya mingi Nzambe akopesa baoyo andimi, mpe tosengeli kosala nini mpo na kozwa yango?

17, 18. Nini endimisi biso ete kimya ekozala na mabelé mobimba mpe bato bakobanga lisusu eloko te?

19. Ndenge nini toyebi ete biloko ya kolya ekozala beboo na mokili ya sika ya Nzambe?

20. Mpo na nini tondimi mpenza ete mabelé mobimba ekokóma paladiso?

21. Nini emonisi ete bato ná banyama bakofanda na kimya?

22. Nini ekokómela maladi?

23. Mpo na nini lisekwa ekopesa biso esengo?

24. Okosepela kofanda na Paladiso awa na mabelé?