Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Biblia eteyaka mpenza nini?

MOKAPO YA ZOMI NA MWAMBE

Batisimo mpe boyokani na yo ná Nzambe

Batisimo mpe boyokani na yo ná Nzambe

Ndenge nini babatisaka moto mpo akóma moklisto?

Makambo nini osengeli kokokisa mpo bápesa yo nzela ya kozwa batisimo?

Ndenge nini moto amipesaka na Nzambe?

Ndimbola mpenzampenza ya batisimo ezali nini?

“TALÁ! Mai yango oyo; nini ezali kopekisa ngai kobatisama?” Moetiopia moko, mosali monene ya mokonzi, nde atunaki motuna oyo na siɛklɛ ya liboso. Moklisto moko na nkombo Filipo autaki komonisa ye ete Yesu azali Masiya oyo alakamaki. Lokola makambo oyo Moetiopia yango ayekolaki na Makomami esimbaki mpenza motema na ye, asalelaki yango. Amonisaki ete alingi kozwa batisimo!—Misala 8:26-36.

Mosali monene ya mokonzi ya Etiopi, na siɛklɛ ya liboso

2 Soki oyekolaki malamumalamu na Motatoli moko ya Yehova mikapo nyonso oyo ezali liboso ya mokapo oyo, mbala mosusu yo mpe okanisi ete ntango ekoki mpo omituna motuna oyo: ‘Nini ezali kopekisa ngai kobatisama?’ Kino sikawa oyekoli elaka ya Biblia oyo etali bomoi ya seko na Paladiso. (Luka 23:43; Emoniseli 21:3, 4) Oyekoli mpe ndenge mpenza bato oyo bakufá bazali, ná elikya ya lisekwa. (Mosakoli 9:5; Yoane 5:28, 29) Mbala mosusu okómá koyangana na Batatoli ya Yehova na makita oyo basalaka na lisangá na bango mpe omoni na miso ete bazali na lingomba ya solo. (Yoane 13:35) Likambo ya ntina koleka, mbala mosusu obandi kokóma na boyokani makasi na Yehova Nzambe.

3 Ndenge nini okoki komonisa ete olingi kosalela Nzambe? Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, kobatisáká bango.” (Matai 28:19) Yesu ye moko apesaki ndakisa na ndenge azwaki batisimo na mai. Banyakelaki ye mai te, to babwakelaki ye kaka mwa matangá ya mai na nzoto te, to mpe basopelaki ye mwa mai na motó te. (Matai 3:16) Liloba “kobatisa” euti na liloba moko ya Grɛki oyo elimboli “kozindisa.” Na yango, mpo na kobatisa moto akóma moklisto, esengeli kozindisa ye mobimba na mai.

4 Kozwa batisimo na mai ezali likambo oyo bato nyonso oyo balingi kozala na boyokani na Yehova Nzambe basengeli kosala. Batisimo ekomonisa na miso ya bato ete olingi kosalela Yehova, osepeli kosala mokano na ye. (Nzembo 40:7, 8) Nzokande, mpo okoka kozwa batisimo, ezali na mwa makambo oyo osengeli kokokisa.

OSENGELI KOZALA NA BOYEBI MPE KONDIMA

5 Obandi kosala likambo ya liboso. Ndenge nini? Na ndenge ozali koyekola koyeba Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto, ntango mosusu na ndenge ozali koyekola Biblia mbala na mbala. (Yoane 17:3) Kasi, makambo ya koyekola ezali mpenza mingi. Baklisto basengeli ‘kotonda na boyebi ya solosolo ya mokano ya Nzambe.’ (Bakolose 1:9) Yango wana, koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova ekosalisa yo mingi. Koyangana na makita yango ezali na ntina mingi. (Baebele 10:24, 25) Koyanganaka na makita nyonso ekosalisa yo oyeba Nzambe malamumalamu.

Mpo moto akoka kozwa batisimo, asengeli kozwa boyebi ya solosolo ya Liloba ya Nzambe

Boyekoli ya Biblia

6 Yango elingi koloba te ete osengeli koyeba makambo nyonso ya Biblia mpo okoka kozwa batisimo. Moetiopia wana azalaki na mwa boyebi, kasi azalaki na mposa ya lisalisi mpo na kokanga ntina ya biteni mosusu ya Makomami. (Misala 8:30, 31) Se ndenge moko, yo mpe osengeli naino koyekola makambo mingi. Kutu, okosilisa koyekola makambo nyonso ya Nzambe ata moke te. (Mosakoli 3:11) Nzokande, liboso ozwa batisimo, osengeli koyeba mpe kondima mateya ya ntina ya Biblia. (Baebele 5:12) Na ndakisa, osengeli koyeba mpe kondima ndenge bato oyo bakufá bazalaka mpenza mpe ntina ya nkombo ya Nzambe mpe ya Bokonzi na ye.

7 Kasi, kozala kaka na boyebi ekoki te, mpamba te “na kozanga kondima likoki ya kosepelisa [Nzambe] mpenza ezali ata moke te.” (Baebele 11:6) Biblia eyebisi biso ete ntango bato mosusu na engumba Kolinti ya kala bayokaki nsango oyo baklisto bazalaki kosakola, “babandaki kondima mpe kobatisama.” (Misala 18:8) Bobele bongo, boyekoli ya Biblia esengeli kosalisa yo ondima ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe oyo epemami na elimo na ye. Esengeli mpe kosalisa yo ondima bilaka ya Nzambe mpe ondima ete mbeka ya Yesu ekoki kobikisa yo.—Yosua 23:14; Misala 4:12; 2 Timote 3:16, 17.

KOSAKOLA SOLO YA BIBLIA

8 Wana ozali kokolisa kondima na motema na yo, okokoka te kobombela basusu makambo oyo oyekoli. (Yilimia 20:9) Okozala na mposa makasi ya koyebisa bato mateya mpe mikano ya Nzambe.—2 Bakolinti 4:13.

Kondima esengeli kotinda yo oyebisa bato makambo oyo ondimi

Mobali moko azali kosakola

9 Okoki kobanda naino na koyebisa solo ya Biblia na mayele epai ya bandeko na yo, baninga na yo, bato oyo bafandi pene na bino mpe baninga na yo ya mosala. Na nsima, okolinga ntango mosusu obanda kosakola elongo na Batatoli ya Yehova. Soki ezali bongo, kobanga te koyebisa Motatoli oyo azali koteya yo Biblia mposa na yo. Soki emonani ete okoki kobima na mosala ya kosakola, bakotinda bankulutu mibale ya lisangá bákutana na yo esika moko na ndeko oyo ateyaka yo Biblia.

10 Yango ekopesa yo nzela ya koyeba malamu bankulutu mosusu ya lisangá, baoyo bazali kobatela etonga ya Nzambe. (Misala 20:28; 1 Petelo 5:2, 3) Soki bankulutu yango bamoni ete oyebi mateya ya ntina ya Biblia mpe ondimaka yango, soki bamoni ete bomoi na yo eyokani na mitinda ya Nzambe, mpe olingi mpenza kokóma Motatoli ya Yehova, bakoyebisa yo ete okoki kobanda kosakola elongo na lisangá; wana okómi mosakoli ya nsango malamu oyo azwi naino batisimo te.

11 Mbala mosusu ekosɛnga obongola mimeseno na yo mosusu liboso bándima yo obanda kosakola elongo na lisangá. Ntango mosusu ekosɛnga otika makambo mosusu oyo osalaka na kobombana. Na yango, liboso omonisa mposa na yo ya kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te, osengeli kotika masumu minene, lokola pite to ekobo, milangwa, mpe komɛla bangi.—1 Bakolinti 6:9, 10; Bagalatia 5:19-21.

KOBONGOLA MOTEMA MPE KOBONGWANA

12 Liboso okoka kozwa batisimo, osengeli naino kokokisa makambo mosusu. Ntoma Petelo alobaki ete: “Bóbongola mitema mpe bóbongwana mpo masumu na bino ebomama.” (Misala 3:19) Kobongola motema elimboli koyoka mpenza mawa mpo na likambo oyo osali. Soki moto azalaki na bomoi moko ya mbindo, ebongi mpenza abongola motema; kasi kobongola motema ezali mpe na ntina ata soki ozalaki na bomoi ya mbindo mpenza te. Mpo na nini? Mpamba te bato nyonso bazali basumuki mpe esengeli Nzambe alimbisa bango. (Baloma 3:23; 5:12) Liboso oyekola Biblia, oyebaki mokano ya Nzambe te. Bongo, ndenge nini bomoi na yo ekokaki koyokana mpenzampenza na mokano na ye? Yango wana, kobongola motema ezali na ntina.

13 Nsima ya kobongola motema, esengeli kobongwana. Osengeli kosuka kaka te na koyoka mawa. Osengeli mpe kotika bomoi na yo ya liboso mpe kozwa ekateli makasi ete kobanda sikawa okosala makambo oyo ezali malamu. Osengeli naino kobongola motema mpe kobongwana liboso ya kozwa batisimo.

KOMIPESA

14 Liboso ya kozwa batisimo, osengeli mpe kosala likambo mosusu ya ntina mingi. Osengeli komipesa na Yehova Nzambe.

15 Ntango omipesi na Yehova Nzambe na libondeli oyo osali na motema moko, olaki ye ete okokangama kaka na ye mpo na libela. (Deteronome 6:15) Kasi mpo na nini moto akolinga kokóma moombo ya Nzambe? Mpo na koyanola na motuna yango, tózwa ndakisa ya mobali moko oyo abandi kosepela na mwasi moko. Ntango akómi koyeba ye malamu mpe komona ete azali na bizaleli ya malamu mpenza, mobali yango akoyoka ete motema na ye ezali kolinga mwasi yango mingi. Na nsima, ekokamwisa te soki atuni mwasi yango libala. Atako kobala ekobakisela ye mikumba mosusu, kasi akobala ye kaka mpo alingi ye mingi.

16 Ntango oyebi Yehova mpe okómi kolinga ye mingi, yango ekotinda yo osalela ye na motema na yo mobimba to osambela ye na makoki na yo nyonso. Moto nyonso oyo alingi kolanda Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, asengeli ‘komiboya.’ (Malako 8:34) Tomiboyaka soki tozali kosala ete bamposa mpe mikano na biso epekisa biso te kotosa Nzambe na makambo nyonso. Na yango, liboso okoka kozwa batisimo, esengeli ete mokano ya Nzambe ezala likambo ya liboso oyo osalaka na bomoi na yo.—1 Petelo 4:2.

KOBANGA EPEKISA YO TE

17 Bato mosusu bakokaka komipesa na Yehova te mpo babangaka kosala likambo yango ya ntina mingi. Ntango mosusu babangaka ete soki bakómi baklisto oyo bamipesi ekosɛnga básala makambo oyo ye akosɛnga bango, soki bongo te bakomema ngambo na miso na ye. Lokola babangaka ete mbala mosusu bakokoka te, mpe bakoki kosala makambo oyo ekoyokisa Yehova mawa, bakanisaka ete eleki malamu bámipesa na ye te.

18 Soki okómi kolinga Yehova mingi, yango ekotinda yo omipesa na ye mpe osala makasi mpo bomoi na yo eyokana na komipesa na yo. (Mosakoli 5:4) Nsima ya komipesa na Nzambe, ekosɛnga mpenza ete ‘otambola na ndenge ebongi na Yehova mpo osepelisa ye mpenza.’ (Bakolose 1:10) Lokola olingi Nzambe mingi, okokanisa ata moke te ete kosala mokano na ye ezali mpasi mingi. Na ntembe te, okozala na makanisi moko na ntoma Yoane oyo akomaki ete: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka [mibeko] na ye; kutu [mibeko] na ye ezali kilo te.”—1 Yoane 5:3.

19 Mpo na komipesa na Nzambe, ezali kosɛnga te ete ozala moto ya kokoka. Yehova ayebi esika makoki na yo esuki mpe azali kosɛnga yo ata moke te ete osala makambo oyo eleki makoki na yo. (Nzembo 103:14) Alingi olonga, yango wana akolendisa yo mpe akosalisa yo. (Yisaya 41:10) Okoki mpenza kondima ete soki otyeli Yehova motema na yo mobimba, “akoyeisa banzela na yo alima.”—Masese 3:5, 6, NW.

ZWÁ BATISIMO MPO NA KOMONISA ETE OMIPESI

20 Soki okanisi makambo oyo touti kolobela awa, yango ekoki kosalisa yo omipesa na Yehova na libondeli. Moto nyonso oyo alingaka mpenza Nzambe asengeli mpe ‘kosala eyambweli mpo na lobiko.’ (Baloma 10:10) Ndenge nini okosala yango?

Osili komipesa na Nzambe na libondeli?

Mobali moko azali kobondela

21 Yebisá mokɛngɛli-mokambi ya lisangá na bino ete olingi kozwa batisimo. Akopona bankulutu oyo bakotalela elongo na yo mwa mituna ya mateya ya ntina ya Biblia. Soki bankulutu yango bandimi ete okoki kozwa batisimo, bakoyebisa yo ete okozwa yango na liyangani oyo ekoya.* Mbala mingi, na liyangani basalaka lisukulu moko oyo elobelaka ntina ya batisimo. Na nsima, molobi asɛngaka bato nyonso oyo balingi kozwa batisimo báyanola na mituna mibale ya pɛtɛɛ mpo bámonisa “eyambweli” ya kondima na bango na minɔkɔ na bango.

22 Ezali batisimo nde ekomonisa na miso ya bato ete omipesi na Nzambe mpe na ntango wana okómi Motatoli ya Yehova. Bazindisaka bato oyo balingi kozwa batisimo nzoto mobimba na kati ya mai, mpo emonana na miso ya bato nyonso ete basili komipesa na Yehova.

NDIMBOLA YA BATISIMO NA YO

23 Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakozwa batisimo “na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.” (Matai 28:19) Yango elimboli ete moto oyo azali kozwa batisimo andimi bokonzi ya Yehova Nzambe mpe ya Yesu Klisto. (Nzembo 83:18; Matai 28:18) Andimi lisusu mokumba mpe misala ya elimo santu ya Nzambe, to nguya na ye oyo esalaka mosala.—Bagalatia 5:22, 23; 2 Petelo 1:21.

Batisimo elakisi kokufa na ndenge ya elilingi mpe kotika libela bomoi oyo tozalaki na yango liboso mpe kozonga na bomoi mpo na kosala mokano ya Nzambe

Mobali moko azali kobatisama

24 Nzokande, batisimo ezali te kaka likambo ya kozindisama na mai. Ezali komonisa likambo moko ya ntina mingi. Kozindisama na mai elakisi ete okufi na ndenge ya elilingi mpe otiki libela bomoi oyo ozalaki na yango liboso. Kobima na mai elakisi ete ozongi na bomoi mpo na kosala mokano ya Nzambe. Kobosana mpe te ete omipesi na Yehova Nzambe, kasi omipesi te na mosala moko boye, na likambo moko boye, na bato to na ebongiseli moko boye. Komipesa na yo mpe batisimo oyo ozwi ezali ebandeli ya boninga moko ya makasi elongo na Nzambe—boyokani moko ya solosolo mpenza elongo na ye.—Nzembo 25:14.

25 Kozwa batisimo ezali ndanga ya lobiko te. Ntoma Paulo akomaki boye: “Bókoba kosala mpo na lobiko na bino moko na kobanga mpe na kolɛnga.” (Bafilipi 2:12) Batisimo ezali nde ebandeli. Motuna ya ntina yango oyo: Ndenge nini okoki kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe? Mokapo ya nsuka ya buku oyo ekoyanola na motuna yango.

OYO BIBLIA ETEYAKA

  • Mpo moto azwa batisimo mpe akóma moklisto, bazindisaka ye mobimba na mai, kasi banyakelaka ye mai te, to babwakelaka ye kaka mwa matangá ya mai te.—Matai 3:16.
  • Mpo na kozwa batisimo esengeli liboso kozwa boyebi mpe komonisa kondima, na nsima kobongola motema, kobongwana, mpe komipesa na Nzambe.—Yoane 17:3; Misala 3:19; 18:8.
  • Mpo na komipesa na Yehova, osengeli komiboya, se ndenge bato mosusu bamiboyaki mpo na kolanda Yesu.—Malako 8:34.
  • Kozwa batisimo elakisi kokufa na ndenge ya elilingi mpe kotika libela bomoi oyo tozalaki na yango liboso mpe kozonga na bomoi mpo na kosala mokano ya Nzambe.—1 Petelo 4:2.

*  Bapesaka bato batisimo na mayangani ya minene mpe ya mike oyo Batatoli ya Yehova basalaka mbula na mbula.


Mituna ya boyekoli

1. Mpo na nini Moetiopia moko, mosali monene ya mokonzi, asɛngaki azwa batisimo?

2. Mpo na nini osengeli mpenza kokanisa mingi likambo ya kozwa batisimo?

3. (a) Etinda nini Yesu apesaki bayekoli na ye? (b) Ndenge nini babatisaka moto na mai?

4. Kozwa batisimo na mai ekomonisa nini?

5. (a) Wapi likambo ya liboso oyo moto asengeli kosala mpo akoka kozwa batisimo? (b) Mpo na nini makita ya boklisto ezali na ntina mingi?

6. Wapi makambo oyo osengeli koyeba na Biblia mpo okoka kozwa batisimo?

7. Boyekoli ya Biblia esengeli kosalisa yo na nini?

8. Nini ekotinda yo oyebisa bato makambo oyo oyekoli?

9, 10. (a) Okoki kobanda naino koyebisa solo ya Biblia epai ya banani? (b) Osengeli kosala nini soki olingi kobanda kosakola elongo na Batatoli ya Yehova?

11. Makambo nini bato mosusu basengeli kotika liboso bákoka kosakola elongo na lisangá?

12. Mpo na nini kobongola motema ezali na ntina?

13. Kobongwana ezali nini?

14. Likambo nini ya ntina mingi osengeli kosala liboso ya kozwa batisimo?

15, 16. Komipesa na Nzambe elimboli nini, mpe nini etindaka moto amipesa na Nzambe?

17. Mpo na nini bato mosusu bakokaka mbala mosusu te komipesa na Nzambe?

18. Nini ekoki kotinda yo na komipesa na Yehova?

19. Mpo na nini osengeli te kobanga komipesa na Nzambe?

20. Mpo na nini komipesa na Yehova esengeli kotikala kaka likambo na bino mibale te?

21, 22. Ndenge nini okoki kosala “eyambweli” ya kondima na yo?

23. Kozwa batisimo “na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu” elimboli nini?

24, 25. (a) Kozwa batisimo elakisi nini? (b) Esengeli koyanola motuna nini?