Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Mokanda mpo na Masolo ya Biblia

Lisolo 81: Batyeli Nzambe motema

Lisolo 81: Batyeli Nzambe motema

BATO bankóto ebele basali mobembo molai longwa na Babilone tii na Yerusaleme. Kasi, ntango bakómi kuna, bakuti Yerusaleme mobimba ebebá makasi mpenza. Moto ata moko azali kuna te. Bayisraele basengeli kotonga lisusu eloko nyonso.

Moko ya biloko ya liboso oyo basengeli kotonga ezali etumbelo ya Yehova. Yango nde esika oyo bakoki kotumbela Yehova bambeka to makabo ya banyama. Nsima ya mwa basanza, babandi kotonga tempelo. Kasi banguna oyo bazali zingazinga basepeli te ete Bayisraele bátonga lisusu tempelo. Na yango, bameki kobangisa bango mpo bátika mosala wana. Nsukansuka, banguna yango bandimisi mokonzi ya sika ya Perse ete abimisa mobeko moko oyo ekopekisa Bayisraele kotonga.

Bambula mingi eleki, mbula koleka zomi na nsambo, banda Bayisraele balongwá na Babilone. Yehova atindi basakoli na ye, Hagai ná Zekaria, báyebisa bato bázongela mosala. Bayisraele batye motema ete Nzambe akosalisa bango, mpe bayokeli basakoli yango. Bazongeli mosala, atako mobeko moko epekisaki bango kotonga.

Bongo Tatenai, mosali monene na bokonzi ya Perse ayei kotuna Bayisraele nani apesi bango ndingisa ya kotonga tempelo. Bayisraele bayebisi ye ete, ntango bazalaki na Babilone, Mokonzi Siruse alobaki na bango ete: ‘Sikoyo, bókende na Yerusaleme mpe bótonga lisusu tempelo ya Yehova, Nzambe na bino.’

Bongo Tatenai atindi mokanda na Babilone mpo na koyeba soki Siruse, oyo asilaki kokufa, ayebisaká bango bátonga. Eyano eumelaki te. Mokonzi ya sika ya Perse alobi ete Siruse alobaki na bango bátonga. Bongo mokonzi yango ya sika akomeli ye mokanda ete: ‘Bótika Bayisraele bátonga tempelo ya Nzambe na bango. Mpe napesi yo mitindo osalisa bango.’ Mbula soki minei na nsima, Bayisraele basilisi kotonga tempelo mpe bazali na esengo mpenza.

Bambula mingi eleki lisusu. Mbula soki ntuku minei na mwambe (48) banda basilisá kotonga tempelo. Kasi bato oyo bafandi na Yerusaleme bazali babola, mpe engumba ná tempelo ezali lisusu kitoko te. Ezera, kuna na Babilone, ayoki nsango ete tempelo esengeli kobongisama lisusu. Boyebi eloko asali?

Akei epai ya Artazerezese, mokonzi ya Perse. Mokonzi malamu wana apesi ye makabo mingi mpo akende na yango na Yerusaleme. Ezera asɛngi Bayisraele oyo bazali na Babilone básalisa ye na komema makabo yango tii na Yerusaleme. Bato soki nkóto motoba (6 000) bandimi kokende elongo na ye. Bato yango basengeli komema ebele ya wolo, palata ná biloko mosusu ya motuya.

Ezera amitungisaki mpo bato mabe bazali na nzela. Bato yango bakoki koyiba wolo ná palata na bango, bakoki mpe ata koboma bango. Na yango, Ezera asangisi bato ndenge bozali komona na elilingi awa. Na nsima, babondeli Yehova abatela bango na mobembo molai oyo bazali kokende na Yerusaleme.

Ezera ná bato bazali kosambela

Yehova mpe abateli bango. Nsima ya sanza minei ya mobembo, bato yango bakómi na Yerusaleme malamu. Yango emonisi ete Yehova akoki kobatela baoyo batyelaka ye motema ete akosalisa bango.

Ezera mokapo 2 tii 8.



Mituna

  • Bato boni basalaki mobembo molai longwa na Babilone tii na Yerusaleme, kasi bakuti nini ntango bakómi kuna?
  • Ntango Bayisraele bakómi, babandi kotonga nini, kasi banguna na bango basali nini?
  • Hagai ná Zekaria bazali banani, mpe bayebisi bato nini?
  • Mpo na nini Tatenai atindi mokanda na Babilone, mpe azwi eyano nini?
  • Ezera asali nini ntango ayoki ete esengeli kobongisa tempelo ya Nzambe?
  • Ndenge ozali komona na elilingi, Ezera azali kobondela mpo na nini, ndenge nini Yehova ayanoli na libondeli na ye, mpe likambo yango eteyi biso nini?

Mituna mosusu