Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Mokanda mpo na Masolo ya Biblia

Lisolo 75: Bilenge mibali minei na Babilone

Lisolo 75: Bilenge mibali minei na Babilone

MOKONZI Nebukadenezare akamati Bayisraele oyo baleki na mayele, akei na bango na Babilone. Na nsima, kati na bango, aponi bilenge oyo baleki kitoko mpe baleki na mayele. Bozali komona bilenge minei kati na bilenge yango na elilingi oyo. Danyele, ná bilenge mosusu misato oyo bato ya Babilone bapesaki bango nkombo Shadrake, Meshake ná Abedenego.

Nebukadenezare alingi kopesa bilenge yango formasyo mpo básalaka na ndako na ye. Nsima ya kopesa bango formasyo mbula misato, bakopona baoyo baleki mayele mpo básalisaka mokonzi na kokata makambo ya minene. Mokonzi alingi ete bilenge mibali yango bázala makasi mpe nzoto kolɔngɔnɔ ntango bazali kozwa formasyo. Yango wana, apesi basaleli na ye mitindo ete bápesaka bango bilei ya kitoko ná vinyo oyo bapesaka ye ná libota na ye.

Danyele, Shadrake, Meshake, ná Abednego bazali kolimbola makambo bandimaka

Talá elenge Danyele. Oyebi likambo azali koloba na Ashepenaze, kapita ya basali ya Nebukadenezare? Azali koyebisa ye ete bakolya te bilei ya kitoko oyo euti na mesa ya mokonzi. Ashepenaze amitungisi mpe azongisi boye: ‘Mokonzi ye moko moto apesi mitindo mpo na bilei oyo bokolya mpe masanga oyo bokomɛla. Soki amoni bino nzoto makasi te lokola bilenge mosusu akoboma ngai.’

Bongo Danyele akei koloba na mokɛngɛli oyo Ashepenaze atyelaki ye ná baninga na ye misato ete: ‘Nabondeli yo, meká basaleli na yo mikolo zomi. Pesá biso kaka ndunda tólya mpe mai tómɛla. Na nsima talá biso ná bilenge oyo bazali kolya bilei ya mokonzi, mpe omona banani bakozala na nzoto malamu.’

Mokɛngɛli andimi komeka bango. Nsima ya mikolo zomi, Danyele ná baninga na ye misato bazalaki nzoto malamu koleka bilenge mosusu nyonso. Bongo mokɛngɛli akobi kopesa bango ndunda na esika ya bilei oyo mokonzi alobaki.

Nsima ya mbula misato, bakei na bilenge nyonso epai ya Nebukadenezare. Mokonzi asololi na bango nyonso, mpe amoni ete Danyele ná baninga na ye misato baleki mayele. Yango wana, azwi bango mpo básalaka na ndako na ye. Mpe ntango nyonso oyo mokonzi azali kotuna bango mituna to makambo ya makasi, azali komona ete baleki banganga-nzambe ná bato na ye ya bwanya na mayele mbala zomi.

Danyele 1:1-21.



Mituna

  • Bilenge mibali minei oyo ozali komona na elilingi ezali banani, mpe mpo na nini bazali na Babilone?
  • Nebukadenezare azali kokana nini mpo na bilenge mibali minei yango, mpe etinda nini apesi basaleli na ye?
  • Mpo na kolya mpe komɛla, Danyele asɛngi nini mpo na ye ná baninga na ye misato?
  • Nsima ya kolya ndunda mikolo zomi, Danyele ná baninga na ye misato bazalaki ndenge nini ntango bakokanisaki bango na bilenge mosusu?
  • Ndenge nini Danyele ná baninga na ye misato bakómaki na mosala na ndako ya mokonzi, mpe na ndenge nini mayele na bango elekaki oyo ya banganga-nzambe mpe ya bato ya bwanya ya mokonzi?

Mituna mosusu

  • Tángá Danyele 1:1-21.

    Soki tolingi kolonga komekama mpe bolɛmbu moko oyo tozali na yango, milende ya ndenge nini tosengeli kosala? (Dan. 1:8; Eba. 39:7, 10; Gal. 6:9)

    Lelo oyo, ndenge nini bilenge bakoki komekama to kotindama na komibebisa na makambo oyo bato mosusu bazali kotalela yango lokola “bilei kitoko”? (Dan. 1:8; Mas. 20:1; 2 Ko. 6:17-7:1)

    Ndenge nini lisolo ya bilenge Baebre minei ezali kosalisa biso tóyeba lolenge oyo tokoki kotalela boyebi ya mokili? (Dan. 1:20; Yis. 54:13; 1 Ko. 3:18-20)