Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova

Liyangani ya Bayekoli ya Biblia na Tacoma, Washington, États-Unis

Eleki sikoyo mbula nkama—1917

Eleki sikoyo mbula nkama—1917

“MBULA ya sika ebandi na kati ya etumba moko monene, yikiyiki mpe kosopa makila.” Maloba wana ezalaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/01/1917. Ya solo, Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, oyo ebomaki ebele ya bato na mokili mobimba, na nsima eyebanaki na nkombo ya Etumba monene, ezalaki se kondongwana na Mpoto.

Atako Bayekoli ya Biblia bayebaki malamu te makambo oyo mokristo asengeli kosala mpo na kokɔta na makambo ya mokili te, mingi na bango basalaki mpenza milende mpo na koboya nyongo ya makila. Na ndakisa, Stanley Willis, elenge moko ya  mbula 19 na Angleterre, azalaki na ekateli ya koboya kokɔta na makambo ya mokili. Liboso ete akɔta bolɔkɔ mpo na bosembo na ye, akomaki boye: “Namoni ete kozala na ndingisa ya kopesa litatoli na libaku oyo ezali mpenza libaku malamu. Lelo na ntɔngɔ, mokonzi ya basoda ayebisaki ngai nalata bilamba oyo bakonzi ya basoda balataka, kasi naboyaki, yango wana nasengeli kosamba na tribinale ya basoda.”

Ntango ndeko Stanley aboyaki kobuka mibeko ya Nzambe, bakatelaki ye etumbu ya bolɔkɔ oyo basalisaka bato misala ya makasi. Atako bongo, azalaki kaka na makanisi malamu. Sanza mibale na nsima, akomaki boye: “Na lisalisi ya ‘elimo ya nguya’ oyo losambo ya solo epesaka, moto akoki kolonga kokanga motema . . . na makambo oyo ekoki kozala mpasi mpo basusu báyikela yango mpiko.” Na bolɔkɔ, asalelaki ntango na ye malamu mpe alobaki boye: “Moko ya mapamboli minene oyo nazwaki na minyoko wana ezali libaku ya kozala na ntango mingi mpo na kobondela na kimya, komanyola mpe koyekola.”

Eumelaki te, États-Unis ekɔtaki na etumba yango. Na diskur moko oyo Woodrow Wilson, prezida ya États-Unis asalaki na likita moko monene mokolo ya 02/04/1917, alobaki ete ekólo na ye esɛngi etumba na ekólo Allemagne. Mikolo minei na nsima, États-Unis ekɔtaki na etumba. Eumelaki te, bakristo na États-Unis basengelaki komonisa ete bakɔtaka te na makambo ya mokili.

Mpo na kozwa basoda ebele na mbala moko, na sanza ya mitano, États-Unis esalaki ebongiseli moko mpo na koluka bato ya kosala mosala ya soda. Sanza moko na nsima, babimisaki mobeko oyo etali konɔnga. Liboso, mobeko yango epesaki guvɛrnema ya États-Unis nzela ya kotinda mibali ebele na makasi na mosala ya soda. Na nsima, emonisaki ete koboya kopesa mabɔkɔ na bitumba ezali kobuka mobeko ya Leta. Eumelaki te, banguna ya losambo ya solo basalelaki mobeko yango mpo na “kokana kobimisa mpasi na nzela ya mobeko” mpo na konyokola basaleli ya Yehova, bato oyo balingaka kimya.Nz. 94:20.

Yikiyiki oyo ezalaki na mokili na eleko wana ya etumba ekamwisaki Bayekoli ya Biblia te. Banda bambula mingi, bazalaki  kobenda likebi ya bato na bisakweli ya Biblia oyo elobaki ete makambo wana ekosalema. Kasi, bandeko mingi bakamwaki nde na mobulungano oyo ebimaki na kati ya basaleli ya Yehova.

Komekama mpe kopɛtolama

Na États-Unis, yikiyiki ebandaki kaka mwa moke nsima ya liwa ya ndeko Charles Taze Russell. Moko ya makambo oyo ebimisaki yikiyiki na kati ya basaleli ya Yehova etalelaki kotambwisama ya la Société. Ndeko Russell akomisaki Zion’s Watch Tower Tract Society na Leta na mobu 1884, mpe azalaki prezida na yango tii na liwa na ye na sanza ya zomi na mobu 1916. Ntango ndeko Joseph Rutherford akómaki prezida, bandeko mosusu oyo bayebanaki mingi, ezala mpe bandeko minei kati na baoyo bazalaki bakambi ya la Société, basepelaki te mpo bazalaki na mposa ya bokonzi.

Bandeko wana minei, elongo na bandeko mosusu mingi, bazalaki kosepela te na ndenge oyo ndeko Rutherford azalaki kotambwisa makambo. Likambo mosusu oyo ebimaki etalelaki ndeko Paul Johnson, oyo azalaki pèlerin to mokɛngɛli-motamboli.

Mwa moke liboso ete ndeko Russell akufa, atindaki ndeko Johnson lokola momonisi ya la Société mpe mokɛngɛli na filiale ya Angleterre. Kuna, ndeko Johnson azalaki na mokumba ya kosakola nsango malamu, kotala masangá, mpe kotindaka lapolo ya mosala ya ekólo yango. Ntango akómaki na Angleterre na sanza ya zomi na moko na mobu 1916, bandeko ya ekólo yango bayambaki ye na esengo mpenza. Kasi likambo ya mawa, lokumu mingi oyo bapesaki ye etindaki ye akóma na lolendo, mpe akómaki komona ete ye nde asengeli kozala mokitani ya ndeko Russell.

Kozanga ndingisa, ndeko Johnson abimisaki bandeko mosusu na Betele ya Angleterre mpo baboyaki kondima makanisi na ye. Alukaki mpe kosalela mbongo ya la Société oyo ezalaki na banki na Londres na ndenge alingi, yango wana ndeko Rutherford ayebisaki ye azonga na États-Unis.

Ndeko Johnson azongaki na Brooklyn, kasi na esika ete amikitisa mpe andima ntango basembolaki ye, azalaki nde mbala na mbala kotya ndeko Rutherford mbamba atika ye azonga na Angleterre mpo na kokoba mosala na ye kuna. Lokola milende  na ye elongaki te, ndeko Johnson alukaki kobenda bakambi mosusu ya la Société mpo bákóma na ngámbo na ye.

Lokola ndeko Rutherford amonaki ete mibali yango bakokaki kobɔtɔla mbongo ya la Société na États-Unis, ndenge ndeko Johnson alingaki kosala na Angleterre, azwaki ekateli ya kolongola bango na molɔngɔ ya bakambi ya la Société. Mibeko ya États-Unis ezalaki kosɛnga ete mokambi mokomoko ya kompanyi aponamaka mbula na mbula na nzela ya voti. Kasi, na likita ya nsuka ya mbula ya la Société, oyo esalemaki mokolo ya 06/01/1917, kaka bakambi misato baponamaki na voti: Joseph Rutherford lokola prezida, Andrew Pierson lokola prezida-molandi, mpe William Van Amburgh lokola sɛkrɛtɛrɛ mpe mobateli ya mosolo. Voti esalemaki te mpo na mikumba mosusu minei ya bakambi oyo etikalaki. Bandeko oyo bazalaki na mikumba yango, elingi koloba bandeko minei oyo batɔmbɔkaki, baponamaki na voti liboso, mpe bakanisaki ete bakotikala na mikumba yango bomoi na bango mobimba. Nzokande, lokola baponamaki lisusu te na voti na likita ya nsuka ya mbula wana, na kotalela mibeko, bazalaki lisusu na molɔngɔ ya bakambi te! Yango wana, na sanza ya nsambo ya mobu 1917, ndeko Rutherford asalelaki lotomo oyo azalaki na yango mpe aponaki bandeko mosusu minei ya sembo mpo na mikumba wana.

Ndenge tokoki kokanisa yango, bakambi minei wana ya liboso basilikaki mpe babandaki kosala kampanye mpo na kosɛnga ete bázongela mikumba na bango. Kasi balongaki te. Atako Bayekoli ya Biblia mosusu bakendaki na ngámbo na bango mpe basalaki bibongiseli mosusu, Bayekoli ya Biblia mingi batikalaki sembo, mpe mibali wana minei bazongelaki lisusu mikumba na bango ya bakambi te.

Bokoli emonani ata na ntango ya mikakatano

Na ntango wana, ndeko Rutherford mpe bandeko mosusu ya sembo oyo bazalaki na Betele bakobaki kosala mosala mpo matomba ya Bokonzi ekende liboso. Motángo ya bakɛngɛli-batamboli, oyo bazalaki kobengama pèlerins, elongwaki 69, ekómaki 93. Motángo ya babongisi-nzela ya sanza na sanza, oyo bazalaki kobengama colporteurs elongwaki 372, ekómaki 461.  Longola yango, mpo na mbala ya liboso, bakómaki mpe kopona babongisi-nzela basungi, oyo bazalaki kobengama colporteurs spéciaux. Na masangá mosusu, babongisi-nzela ya molende ndenge wana bazalaki kokóma ata 100.

Na mokolo ya 17/07/1917, buku ya sika Le mystère accompli ebimaki. Na nsuka ya mbula yango, babuku yango nyonso oyo ebimaki esilaki, mpe basɛngaki ete bányata na masini babuku mosusu 850 000. *

Mosala ya kobongisa lisusu misala ndenge na ndenge ya Betele, oyo ndeko Russell abandaki na 1916, esilaki na 1917. Na sanza ya zomi na mibale ya mbula wana, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki boye: “Mosala ya kobongisa lisusu misala ndenge na ndenge ya Biro . . . esilaki mpe sikoyo makambo ezali kotambola malamu mpe na molɔngɔ, ndenge esengeli kozala na ebongiseli nyonso oyo etambwisami malamu . . . Bandeko oyo basalaka na Biro bayebi ete kosala kuna ezali libaku malamu, kasi ezali te mpo bazali na lotomo ya kozala kuna.”

Na sanza ya libwa ya mobu 1917, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki boye: “Kobanda mokolo ya liboso ya sanza ya yambo, sanza na sanza, motángo ya mikanda oyo tozali kobimisa ezali se komata soki tokokanisi yango na motángo ya mikanda oyo tobimisaki na mobu 1916. . . . Yango ezali elembo monene oyo emonisi ete Nkolo azali kopambola mosala oyo ezali kosalema awa na Brooklyn.”

Komekama mpe kopɛtolama esili naino te

Batɛmɛli yango balongolamaki na ebongiseli ya Yehova, mpe ankɛtɛ moko oyo esalemaki na masangá, mpe na nsima ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, emonisaki ete bandeko mingi bazalaki na ngámbo ya ndeko Rutherford mpe bandeko mosusu ya sembo oyo bazalaki na Betele. Kasi, bandeko mibali wana ya sembo bakobaki komekama. Atako mobu 1918 ebandaki malamu, ezalaki ebandeli ya eleko moko ya mpasi na lisolo ya Batatoli ya Yehova na mikolo na biso.

^ par. 18 Tii na 1920, bakompanyi ya mombongo nde ezalaki konyatela biso mikanda.