Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova

Likita pene ya bokula ya Soukhoumi, 1989

 GÉORGIE | 1924-1990

Bato ya liboso oyo balukaki solo

Bato ya liboso oyo balukaki solo

 NA EBANDELI ya bambula ya 1920, bayekoli ya Biblia basalaki milende mpo na kokutana na bato ya Géorgie oyo bazalaki mpenza koluka solo. Na 1924, bafungolaki biro moko ya Batatoli ya Yehova na Beyrout, na ekólo Liban, mpo na kotambwisa mosala ya kosakola na teritware oyo esangisaki mpe bikólo lokola, Arménie, Géorgie, Syrie mpe Turquie.

Atako mwa mboto ya solo elonamaki na Géorgie na ntango wana, kasi na ebandeli mbuma emonanaki mpenza polele te. (Mat. 13:33) Kasi, nsima ya bambula, nsango ya Bokonzi epalanganaki mpe ebongolaki bomoi ya bato ebele mpenza na Géorgie.

Azalaki mpenza na mposa ya bosembo

Vaso Kveniashvili azalaki naino elenge ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki. Lokola Union  Soviétique nde ezalaki kokonza ekólo Géorgie, eumelaki te, bakɔtisaki tata na ye mosala ya soda. Na eleko wana kaka, mama ya Vaso akufaki. Lokola Vaso azalaki yaya, akómaki koyiba mpo na komisalisa mpe kosalisa baleki na ye.

Vaso akɔtaki na etuluku ya bato ya mobulu mpe amipesaki mpenza na kosala makambo ya mabe elongo na bato yango. Alobi boye: “Nazalaki komona ete bosembo efandi nde epai ya bato oyo basalaka mobulu, kasi te na guvɛrnema to epai ya bato.” Kasi eumelaki te Vaso amonaki ete azalaki koluka eloko oyo moto akoki kopesa ye te. Abakisi boye: “Nazalaki na mposa ya eloko moko oyo ezali sembo.”

Vaso Kveniashvili na 1964, mwa moke nsima ya kobima na bolɔkɔ

Nsukansuka bakangaki Vaso mpo na mabe oyo azalaki kosala mpe batindaki ye na Sibérie na kaa oyo bazalaki kosalisa bato misala makasi. Kuna akutanaki na Motatoli ya Yehova moko oyo bakangaki ye mpo na kondima na  ye. Vaso alobi: “Nsukansuka, nazwaki eloko oyo nazalaki koluka. Tozalaki ata na mokanda moko te, kasi nasalaki makasi nakanga makambo oyo ndeko yango azalaki koteya ngai.”

Ntango Vaso abimaki bolɔkɔ na 1964, azongaki na Géorgie mpe alukaki Batatoli ya Yehova. Kasi bakobaki kokomelana mikanda ná ndeko oyo bazalaki na ye na bolɔkɔ. Likambo ya mawa, moninga na ye wana akufaki mpe Vaso azalaki lisusu kosolola na Batatoli ya Yehova te. Esɛngaki azela lisusu mbula soki 20 mpo na kokutana lisusu na Batatoli ya Yehova. Tokolobela makambo na ye mosusu nsima.

Bampasi ebongwani lipamboli

Likita moko na zamba

Bolɔkɔ oyo Banazi bakɔtisaki Valentina Miminoshvili, elenge mwasi moko ya Géorgie, ebongwanaki nde lipamboli monene mpo na ye. Kuna ezalaki mbala ya liboso akutana na Batatoli ya Yehova. Likambo ekamwisaki ye makasi koleka ezali kondima makasi oyo bato yango bazalaki  na yango. Mateya ya Biblia oyo bato yango bateyaki ye esimbaki mpenza motema na ye.

Ntango Valentina azongaki na mboka na ye nsima ya etumba, akómaki koteya bato makambo ya sika oyo ayekolaki na Biblia. Eumelaki te, mosala na ye ya kosakola ebendaki likebi ya bakonzi ya mboka wana, bakangaki ye lisusu mpe bakatelaki ye etumbu ya bolɔkɔ ya mbula 10 ya kosala misala makasi na kaa moko, na Russie. Kuna akutanaki lisusu na Batatoli ya Yehova, mpe na nsima azwaki batisimo.

Nsima ya kobima bolɔkɔ na 1967, Valentina akendeki na Wɛsti ya Géorgie, epai azongelaki na mayele mosala na ye ya kosakola. Ayebaki te ete mosika te ye nde akozala eyano ya libondeli oyo moto moko asalaki.

Yehova ayanolaki na mabondeli na ye

Na 1962, ndeko Antonina Gudadze alongwaki na Sibérie mpe akendaki na Géorgie mpo mobali na ye oyo azalaki Motatoli ya Yehova te azwaki ekateli bázonga na Géorgie, mboka na ye. Ndeko Antonina azali moto ya Sibérie mpe ayebaki solo na nzela ya Batatoli ya Yehova oyo bakimaki bamboka na bango mpe bayaki na Sibérie. Amonaki lokola akabwani na bandeko ya lisangá na bango mpo akómaki kofanda sikoyo na Khachouri, mboka moko oyo ezali na Ɛsti ya Géorgie.

Libota ya ndeko Gudadze na bambula ya 1960

Antonina akanisi ndenge Yehova apesaki eyano na mabondeli na ye; alobi boye: “Mokolo moko, nazwaki koli oyo eutaki epai ya mama na Sibérie, mpe na kati ya koli yango, namonaki mpe mwa mikanda oyo elimbolaka Biblia, oyo abombaki yango malamu. Nakobaki kozwa bilei ya elimo ndenge wana na boumeli ya mbula motoba oyo elandaki. Mbala nyonso, nazalaki kopesa Yehova matɔndi mpo na litambwisi, bilendiseli mpe likebi oyo azalaki kotyela ngai.”

 Kasi, Antonina azalaki kaka ye moko. Alobi boye: “Nakobaki kobondela Yehova akutanisa ngai na bandeko na ngai ya elimo. Mokolo moko, basi mibale bakɔtaki na magazini epai nazalaki kotɛka. Batunaki ngai: ‘Yo nde Antonina?’ Esengo oyo ezalaki na bilongi na bango emonisaki ete bazali bandeko na ngai ya elimo. Toyambanaki mpe tobandaki kolela.”

Moko ya bandeko basi yango ezalaki Valentina Miminoshvili. Antonina asepelaki ndenge ayebaki ete makita esalemaka na Wɛsti ya Géorgie. Azalaki kokende makita mbala moko na sanza, atako ezalaki mosika mpenza, na ntaka ya kilomɛtrɛ 300 kolongwa ndako na ye.

Solo epiki misisa na Wɛsti ya Géorgie

Na bambula ya 1960, Batatoli mosusu ya Yehova oyo bakonzi banyokolaki na bisika mosusu ya Union Soviétique bakendeki kofanda na bisika oyo motungisi ezalaki mpenza te. Vladimir Gladyuk, ndeko moko ya makasi mpe ya molende, azalaki moko na bango. Na 1969, alongwaki na Ukraine mpe akendeki kofanda na engumba Zougdidi, na Wɛsti ya Géorgie.

Lyuba ná Vladimir Gladyuk

Liboso, baoyo bayaki na Géorgie bazalaki kosala makita na monɔkɔ ya Russe. Kasi, ntango bato ya Géorgie bakómaki  koya ebele na makita mbala na mbala, bibongiseli ezwamaki mpo makita esalemaka na monɔkɔ ya Géorgien. Mosala ya kokómisa bato bayekoli ezalaki koleka malamu mpenza, yango wana na sanza ya mwambe na mobu 1970, bato 12 ya mboka wana bazwaki batisimo.

Na eleko ya prɛnta ya 1972, Vladimir ná libota na ye bakendeki mosika na wɛsti, na engumba Soukhoumi, na bokula ya Mbu Moindo. Vladimir alobi boye: “Tomonaki ete tokómi bazwi na elimo mpe topesaki Yehova matɔndi ndenge apambolaki biso. Kuna lisangá ekolaki mbangu mpenza.” Na prɛnta wana nde Ekaniseli ya liboso esalemaki na Soukhoumi, mpe bato 45 bayanganaki.

“Nalandaki na motema na ngai mobimba mpe na molimo na ngai mobimba”

Ndeko mwasi Babutsa Jejelava, oyo azali sikoyo na mbula soki 90, azali moko ya bato ya liboso oyo bayambaki solo noki na Soukhoumi na ebandeli ya 1973.  Alobi boye: “Mokolo moko, namonaki basi minei bazali kosolola makambo ya kitoko. Na nsima nayaki koyeba ete, basi mibale na kati na bango bazalaki bamamelo mpe mibale mosusu Batatoli ya Yehova.” Moko na bango ezalaki Lyuba, mwasi ya ndeko Vladimir Gladyuk mpe mosusu ndeko Itta Sudarenko, mobongisi-nzela moko ya molende oyo autaki na Ukraine.

Babutsa Jejelava na 1979 mpe na 2016

Ndeko Babutsa alobi boye mpo na lisolo yango: “Nalandaki na motema na ngai mobimba mpe na molimo na ngai mobimba.” Ntango ayokaki ete Nzambe azali na nkombo, akɔtaki na lisolo yango nokinoki mpe asɛngaki bálakisa ye nkombo yango na Biblia. Atunaki mituna mingi mpenza, yango wana lisolo yango eumelaki ngonga misato mobimba.

Babutsa abangaki ete akomona lisusu Batatoli te, yango wana atunaki: “Bokokende, bosundoli ngai kaka boye?”

Bandeko basi yango bazongisaki ete: “Te, tokosundola yo te. Tokozonga mokolo ya pɔsɔ.”

Ntango mokolo ya pɔsɔ ekómaki, Babutsa asepelaki ndenge bandeko basi yango bazongelaki ye. Babandaki mbala moko koyekola na ye Biblia. Ntango balingaki kosilisa koyekola, Babutsa alingaki koyeba soki bandeko yango bakokende libela te. Na nse ya motema alobaki boye: ‘Namoni bato oyo. Sikoyo ebongi nayeba mpenza soki tokomonana lisusu na bango.’

Babutsa asalelaki mayele. Alobi boye: “Nayebaki ete Lyuba abalá, yango natunaki Itta soki ye mpe abalá. Itta azongisaki ete azali na mobali te. Yango wana nayebisaki ye ‘soki boye yaká na ndako na ngai! Mbeto ezali mibale, mpe mwinda ezali na katikati. Tokoki kotya Biblia wana mpe kosolola ata na butu!’” Itta andimaki mpe ayaki na ndako ya Babutsa.

 Babutsa akanisi makambo oyo elekaki na ntango wana; alobi boye: “Ntango mosusu nazalaki kolala te, nazalaki kaka kokanisa makambo nayekolaki. Okomona motuna eyeli ngai na mbalakaka. Nalamusi Itta, nalobi: ‘Itta, zwá Biblia na yo. Nazali na motuna!’ Itta asimbi miso mpe alobi: ‘Mabe te ndeko na ngai.’ Na nsima, azalaki kofungola Biblia mpo na kolakisa ngai eyano.” Mikolo misato nsima ya koya ya Itta na ndako ya Babutsa, Babutsa akómaki kosakola nsango malamu.

Babutsa azalaki na moninga moko ya motema, nkombo na ye Natela Chargeishvili. Babutsa alobi boye: “Nakanisaki ete bozwi ekopekisa ye kondima solo, nzokande namikosaki. Kaka na mokolo ya liboso oyo tosololaki, solo ebandaki kopela na motema na ye.” Eumelaki te, bango nyonso mibale bakómaki koyebisa na molende elikya na bango epai ya baninga na bango, ezala baninga ya mosala to bato ya kartye na bango.