Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bomoi ebandá ndenge nini?

Bomoi ebandá ndenge nini?

Liloba nini okopona mpo na kosilisa fraze oyo?

BOMOI EBIMÁ NA NZELA YA . . .

  1. EVOLISYO

  2. BOZALISI

Bato mosusu bakoki koloba ete moto ya siansi akopona “evolisyo” mpe moto oyo asambelaka akopona “bozalisi.”

Kasi ezalaka ntango nyonso bongo te.

Emonani ete bato mingi oyo batángá, ata mpe bato mosusu ya siansi, bandimaka mpenza te liteya ya evolisyo.

Tózwa ndakisa ya Gerard, profesɛrɛ moko oyo ayekolaka banyama mikemike (entomologiste), oyo bateyá ye evolisyo na iniversite. Alobi boye: “Na baekzamɛ, nazalaki kopesa biyano ndenge baprofesɛrɛ batángisaki biso, kasi ngai moko nazalaki kondima te makambo bazalaki kotángisa biso.”

Mpo na nini ata bato mosusu ya siansi bazalaka na mokakatano ya kondima ete bomoi ebandá na evolisyo? Mpo na kozwa eyano, tótalela mituna mibale oyo elekelaka bato mingi ya mayele: (1) Bomoi ebandá ndenge nini? (2) Ndenge nini bikelamu ya bomoi ebimá?

Bomoi ebandá ndenge nini?

OYO BATO MOSUSU BALOBAKA. Bomoi ebimá kaka boye na eloko moko oyo ezangá bomoi.

MPO NA NINI EYANO YANGO ESEPELISAKA BATO MOSUSU TE. Bato ya siansi bayebi makambo mingi etali chimie mpe ndenge oyo biloko mikemike na kati ya baselile (molécule) ezalaka koleka ndenge bayebaki liboso, ata bongo, bayebaka mpenza te kolimbola soki bomoi ezali nini. Mwa selile ya mpamba ekokani ata moke te na eloko oyo ezangá bomoi.

Bato ya siansi bakoki kaka kopesa mwa makanisi na ndenge oyo mabele ezalaki bamiliare ya bambula liboso. Bazalaka na makanisi ndenge moko te na oyo etali epai bomoi ebandá; na ndakisa, bayebaka te soki ebandaki na kati mpenza ya volcan to na nse mpenza ya mbu. Bakanisaka mpe ete biloko oyo esanganaki mpo na kobimisa bomoi esalemaká esika moko boye na molɔ́ngɔ́ mpe mabanga moko ya minene oyo engɛngaka (météorites) nde ememaki yango awa na mabele. Kasi yango epesi eyano te na motuna etali ndenge bomoi ebandá; etindi nde bato bákanisa lisusu mingi.

Bato ya siansi balobaka ete ekoki kozala na bamolekile oyo ekómaki ba-gènes ndenge toyebi yango lelo oyo. Mpo na bango, bamolekile yango ezalaki na likoki ya kobima yango moko na biloko oyo ezangá bomoi mpe ekóma ebele kaka yango moko. Kasi, siansi emonisi ata likambo moko te oyo endimisi ete bamolekile ya ndenge wana ezalaki, mpe bato ya siansi balongá te kosala bamolekile ya ndenge wana na laboratware.

Bikelamu ya bomoi ekeseni mpenza na biloko mosusu nyonso na ndenge na yango ya kobomba mpe kosalela bansango oyo ezwaka. Baselile ezwaka, etángaka mpe ememaka makambo oyo ezalaka na kati ya ba-gènes na yango. Bato mosusu ya siansi balobaka ete ba-gènes ezali lokola programɛ ya ordinatɛrɛ mpe selile ezali lokola ordinatɛrɛ. Kasi, bato ya evolisyo bakokaka kolimbola te epai bansango oyo ezalaka na kati ya ba-gènes eutaka.

Mpo selile esala malamu ezalaka na mposa ya baproteini. Molekile ya proteini ezalaka na ebele ya biloko mikemike oyo babengi acides aminés oyo ekangamakangamá mpe esalá shɛni. Lisusu, esɛngaka ete baproteini yango ezala ya kogumbama mpe makasi mpo esala mosala malamu. Bato mosusu ya siansi bamoni ete ekoki kosalema te ete baproteini yango ebima kaka yango moko boye. Paul Davies, moto moko ya fizike, akomi boye: “Lokola esɛngaka ebele ya baproteini ya ndenge na ndenge mpo selile esala mosala na yango malamu, ebongi te kokanisa ete ebimá kaka yango moko boye.”

NA MOKUSE. Nsima ya kosala bolukiluki na siansi ya ndenge na ndenge na boumeli ya ebele ya bambula, emonani ete bomoi eutá kaka na bomoi mosusu oyo ezalaki liboso.

Ndenge nini bikelamu ya bomoi ebimá?

OYO BATO MOSUSU BALOBAKA. Mbongwana ya mbalakaka mpe komesana na esika oyo yango ezalaki nde esalaki ete ekelamu ya liboso ya bomoi ebimisa mokemoke bikelamu mosusu ya ndenge na ndenge ya bomoi, ata mpe bato.

MPO NA NINI EYANO YANGO ESEPELISAKA BATO MOSUSU TE. Baselile mosusu ezalaka mindɔndɔ koleka baninga na yango. Buku moko elobi ete likambo oyo ekoki kosala ete selile oyo ezangi mindɔndɔ ekende tii na kokóma selile ya mindɔndɔ koleka, “mbala mingi balobaka ete ezali libombami ya mibale ya monene na liteya ya evolisyo nsima ya oyo elobelaka ndenge bomoi ebandá.”

Bato ya siansi bamonaki na kati ya selile mokomoko molekile oyo ezali lokola masini moko ya mindɔndɔ oyo esalemi na baproteini oyo esalaka elongo mpo na kokokisa misala ndenge na ndenge. Na ndakisa, ememelaka baselile bilei, esalaka ete bilei yango epesa baselile makasi, ebongisaka biteni mosusu ya selile oyo ebebi mpe elekisaka bansango na selile mobimba. Mbongwana ya mbalakaka mpe komesana na esika ekoki mpenza kosala ete makambo wana nyonso ya kokamwa esangana mpe esala mosala wana? Bato mingi bamonaka ete ezali mpasi kondima likambo ya ndenge wana.

Banyama ná bato bautaka na mwa liki. Na kati ya liki yango, baselile ebakisamaka mpe nsukansuka emibongisaka mpo na mosala moko boye; ebongwanaka na balolenge ekeseni mpe esalaka mosala ndenge na ndenge mpo na kosala biteni ekeseni ya nzoto ya moto to ya nyama. Liteya ya evolisyo ekoki te kolimbola ndenge oyo selile mokomoko “eyebaka” eteni nini ya nzoto oyo yango ekosala mpe soki ekokende na eteni nini ya nzoto.

Bato ya siansi bamoni sikoyo ete mpo lolenge moko ya nyama ebimisa lolenge mosusu ya nyama ekosɛnga ete bambongwana esalema na kati mpenza ya molekile ya selile. Lokola bato ya siansi bakokaka te komonisa ndenge evolisyo ekoki kobimisa ata selile ya “mpamba,” ekoki kosalema ete mbongwana ya mbalakaka mpe komesana na esika ebimisa banyama ndenge na ndenge oyo ezali na mabele? Mpo na ndenge oyo banyama ezalaka, Michael Behe, profesɛrɛ moko ya biologie alobi ete atako bolukiluki “emonisi makambo ndenge na ndenge ya kokamwa, bazali kaka kokoka komonisa te ndenge oyo makambo wana nyonso ya kokamwa ekokaki kobima kaka yango moko.”

Bato bazalaka na likoki ya kokanisa mpe ya komiyeba mpe bazalaka na bizaleli lokola kokaba, komipimela mpe bayebaka kokesenisa mabe ná malamu. Mbongwana ya mbalakaka mpe komesana na esika ekoki te kolimbola ntina oyo kaka bato nde bazalaka na bizaleli wana.

NA MOKUSE. Atako bato mingi batingamaka kaka ete ezali na makambo oyo endimisi bango ete bomoi eutá na evolisyo, bato mosusu basepelaka kaka te na biyano oyo evolisyo epesaka na oyo etali ndenge bomoi ebandá mpe ndenge oyo bikelamu mosusu ebimá.

Eyano oyo ebongi kotalela yango

Nsima ya kotalela makambo mosusu, bato mingi bamoni ete moto moko ya mayele mingi nde asalá bomoi. Tózwa ndakisa ya Antony Flew, profesɛrɛ moko ya filozofi, oyo liboso azalaki mpenza kondima te ete Nzambe azalaka. Ntango ayekolaki makambo ndenge na ndenge ya kokamwa oyo etali bomoi mpe mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́, abongolaki makanisi na ye. Atángaki maloba ya moto moko ya kala ya filozofi, akomaki boye: “Tosengeli kolanda makambo oyo ezali kondimisa ete bomoi ebimá yango moko te, ata soki esepelisi biso te.” Mpo na profesɛrɛ Flew, ezali na makambo oyo endimisi ete Mozalisi azali.

Gerard, oyo tolobelaki liboso na masolo oyo, alobaki mpe bongo. Atako atángaki mingi mpe alekisaki bambula ebele na koyekola banyama mikemike, alobi boye: “Namoná ata eloko moko te oyo endimisi ete bomoi ebimá kaka boye na eloko moko oyo ezangá bomoi. Ndenge oyo bikelamu ya bomoi esalaka makambo na molɔngɔ mpe ezali na makambo ndenge na ndenge, endimisaki ngai ete ezali na moto moko oyo abongisá mpe asalá yango.”

Kaka ndenge moto akoki koyeba moto moko ya misala ya mabɔkɔ na misala na ye, koyekola biloko oyo ezali na mokili esalisaki mpe Gerard ayeba bizaleli ya Mozalisi. Gerard azwaki mpe ntango ya kotalela Biblia, buku ya Nzambe. (2 Timote 3:16) Azwaki biyano ya malamu na Biblia na mituna etali istware ya bato mpe ndenge ya kolonga mikakatano oyo bakutanaka na yango lelo. Yango endimisaki ye mpe ete Biblia ezali buku ya Nzambe.

Gerard amonaki ete ebongi mpenza kotalela biyano ya Biblia. Tolendisi yo mpe otalela yango.