Lakisá makambo oyo ezali na kati

Yesu azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso?

Yesu azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso?

Eyano ya Biblia

 Ntango banguna ya Yesu bafundaki ye, balobaki ete azali komikokanisa na Nzambe. (Yoane 5:18; 10:30-33) Nzokande, Yesu alobaki ata mokolo moko te ete akokani na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Kutu, alobaki ete: “Tata aleki ngai.”​—Yoane 14:28.

 Bayekoli ya Yesu ya liboso bazalaki komona te ete akokani na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Na ndakisa, ntoma Paulo akomaki ete nsima ya lisekwa ya Yesu, Nzambe “atombolaki [Yesu] likoló koleka.” Emonani polele ete na miso ya Paulo, Yesu azalaki Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso te. Soki bongo te, ndenge nini Nzambe akokaki kotombola ye likoló koleka?​—Bafilipi 2:9.