Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Batatoli ya Yehova

Lingala

Torah ezali nini?

Torah ezali nini?

Eyano ya Biblia

Liloba ya anglais “Torah” eutá na liloba ya Ebre toh·rahʹ, oyo ekoki kobongolama na “malako,” “mateya,” to “mobeko.” * (Masese 1:8; 3:1; 28:4) Bandakisa oyo elandi emonisi ndenge Biblia esaleli liloba yango ya Ebre.

  • Mbala mingi Toh·rahʹ emonisaka mikanda mitano ya Biblia​—Ebandeli, Kobima, Balevi, Mitángo mpe Kolimbola Mibeko. Babengaka yango mpe Pantatɛkɛ, liloba ya Grɛki oyo elimboli “volimi mitano.” Moize nde akomá Torah, yango wana babengaka yango “buku ya mobeko ya Moize.” (Yosua 8:31; Nehemia 8:1) Emonani ete na ebandeli ekomamaki lokola buku moko kaka, kasi na nsima bakabolaki yango mpo básalela yango kozanga mindɔndɔ.

  • Toh·rahʹ esalelamaka mpe mpo na komonisa mibeko oyo bapesaki Bayisraele na ndakisa, “mobeko [toh·rahʹ] ya likabo mpo na lisumu,” “mobeko mpo na maba,” mpe “mobeko oyo etali monaziri.”​—Balevi 6:25; 14:57; Mitángo 6:13.

  • Toh·rahʹ esalelamaka na bantango mosusu mpo na komonisa malako mpe mateya, ezala oyo euti epai ya baboti, bato ya mayele to epai ya Nzambe.​—Masese 1:8; 3:1; 13:14; Yisaya 2:3.

Makambo nini ezali na Torah to Pantatɛkɛ?

  • Istware ya ndenge Nzambe asalelaka bato makambo, kobanda ntango abandaki kokela tii na liwa ya Moize.​—Ebandeli 1:27, 28; Kolimbola Mibeko 34:5.

  • Malako ya Mibeko ya Moize. (Kobima 24:3) Mibeko yango ezali na baartikle koleka 600. Oyo eyebani mingi ezali Shema to eyambweli ya kondima ya Bayuda. Eteni moko ya Shema elobi: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makasi na yo nyonso ya bomoi.” (Kolimbola Mibeko 6:4-9) Yesu amonisaki ete yango ezali “mobeko oyo eleki monene mpe ya liboso.”​—Matai 22:36-38.

  • Nkombo ya Nzambe, Yehova mbala soki 1 800. Na esika epekisa bato kosalela nkombo ya Nzambe, Torah ezalaki na mibeko oyo esɛngaki basaleli ya Nzambe bábengaka nkombo yango.​—Mitángo 6:22-27; Kolimbola Mibeko 6:13; 10:8; 21:5.

Makanisi ya libunga na oyo etali Torah

Libunga: Mibeko ya Torah ezali seko, basengeli kotya yango pembeni te.

Solo: Mabongoli mosusu ya Biblia esaleli baartikle ya sikisiki ya Torah​—na ndakisa oyo etali Sabata, bonganga-nzambe mpe mokolo ya kozipa masumu—​ete ezali mpo na “ntango oyo etyami ndelo te” to “seko.” (Kobima 31:16; 40:15; Balevi 16:33, 34, Biblia na Lingala ya lelo oyo) Kasi, liloba ya Ebre oyo basaleli na vɛrsɛ yango ekoki mpe kolimbola koumela mpo na ntango oyo etyami ndelo te, kasi kaka te koumela seko. * Kondimana ya Mibeko ya Moize eumelaki mbula soki 900, na nsima Nzambe asakolaki ete akolongola yango mpe na esika na yango akosala “kondimana ya sika.” (Yirimia 31:31-33) “Ntango [Nzambe] alobi ‘kondimana ya sika,’ asilisi ngala ya [kondimana] ya kala.” (Baebre 8:7-13) Ekokisi sikoyo mbula soki 2 000 bandá Nzambe alongolá yango na nzela ya liwa ya Yesu Kristo mpe asalá kondimana ya sika.​—Baefese 2:15.

Libunga: Makambo oyo Bayuda bayoká epai ya bankɔkɔ na bango mpe Talmud ekeseni te na makambo oyo bakomá na Torah.

Solo: Ezali ata na vɛrsɛ moko te oyo emonisi ete Nzambe apesaki Moize mobeko na maloba mpo básalela yango nzela moko na oyo ekomamaki na Torah. Kutu, Biblia elobi: “Yehova alobaki lisusu na Moize ete: ‘Komá mpo na yo maloba oyo.’” (Kobima 34:27) Mobeko oyo ekomamaki te, oyo na nsima bakomaki yango mpe eyebani na nkombo Mishnah, oyo ekómaki kobengama Talmud, ezalaki na mimeseno ya Bayuda na kati, oyo Bafarisai nde babandisaki yango. Mbala mingi mimeseno yango ezalaki koyokana te na Torah. Yango wana, Yesu alobaki na Bafarisai: “Bokómisi liloba ya Nzambe eloko mpamba mpo na bonkɔkɔ na bino.”​—Matai 15:1-9.

Libunga: Esengeli te koteya basi Torah.

Solo: Mibeko ya Moize ezalaki mpe na malako oyo esɛngaki kotánga makambo nyonso oyo ezali na mibeko liboso ya Bayisraele nyonso, ezala basi mpe bana. Mpo na nini? “Mpo báyoka mpe mpo báyekola, mpo basengeli kobanga Yehova Nzambe na [bango] mpe kokeba ete bákokisa maloba nyonso ya mobeko.”​—Kolimbola Mibeko 31:10-12. *

Libunga: Torah ezali na bansango oyo ebombaná.

Solo: Moize, moto oyo akomaki Torah, alobaki ete nsango na yango ezali polele mpe moto nyonso akoki kozwa yango, ebombanaki te. (Kolimbola Mibeko 30:11-14) Likanisi oyo emonisi ete ezali na bansango oyo ebombaná na Torah eutá na Kabbale to misala ya bilimo mabe ya Bayuda, oyo esalelaka “masapo ya lokuta” mpo na kolimbola Makomami. *​—2 Petro 1:16.

^ par. 3 Talá libongoli ya Strongest Strong’s Exhaustive Concordance of the Bible, oyo babongisi lisusu, na lokasa 8451 na eteni “Hebrew-Aramaic Dictionary-Index to the Old Testament.”

^ par. 13 Talá buku Theological Wordbook of the Old Testament, Volimi 2, nkasa 672-673.

^ par. 17 Na kokesana na makambo oyo Torah eteyaka, mbala mingi mibeko ya bonkɔkɔ ya Bayuda ezalaki kopekisa basi báyekola Torah. Na ndakisa, Mishnah etángi Rabi Eliezer Ben Hyrcanus ete azali koloba: “Moto oyo azali koteya mwana na ye ya mwasi Torah, azali koteya ye makambo ya nsɔni.” (Sota 3:4) Talmud ya Yerusaleme ezali mpe na maloba oyo: “Tiká maloba ya Torah ebebisama na mɔtɔ na esika ya koteya yango basi.”​—Sota 3:19a.

^ par. 19 Na ndakisa, buku moko (Encyclopaedia Judaica) elobeli ndenge bato ya Kabbale batalelaka Torah: “Torah elimboli likambo moko kaka te kasi makambo ebele oyo ekeseni na kotalela bato na bato.”​—Ebimeli ya mibale, Volimi 11, lokasa 659.

Makambo mosusu

NSANGO MALAMU OYO EUTI NA NZAMBE!

Nzambe azali na nkombo?

Nzambe azali na batitre ebele, na ndakisa Tata, Mozalisi, mpe Nkolo. Kasi nkombo ya Nzambe etángami mbala soki 7 000 na Biblia.