Lakisá makambo oyo ezali na kati

Masolo oyo elobeli Yesu ekomamaki ntango nini?

Masolo oyo elobeli Yesu ekomamaki ntango nini?

Eyano ya Biblia

 Na mokanda na ye oyo akomaki makambo oyo esalemaki na bomoi ya Yesu, ntoma Yoane alobaki boye: “Moto oyo amonaki yango apesi litatoli, mpe litatoli na ye ezali ya solo, mpe moto yango ayebi ete azali koloba makambo ya solo, mpo bino mpe bóndima.”​—Yoane 19:35.

 Ntina moko oyo tosengeli kondima Baevanzile (masolo ya bomoi ya Yesu) oyo Matai, Marko, Luka mpe Yoane bakomaki ezali ete makambo yango ekomamaki ntango bato mingi oyo bamonaki yango na miso bazalaki naino na bomoi. Mikanda mosusu elobaka ete Evanzile ya Matai ekomamaki liboso mpenza, mbula soki 8 mpamba nsima ya liwa ya Kristo, elingi koloba, soki na mobu 41 ya ntango na biso. Bato mingi ya mayele balobaka ete ekomamaki mwa moke nsima ya dati wana, kasi bango nyonso bandimaka ete mikanda nyonso ya Makomami ya Grɛki ya bokristo ekomamaki na siɛklɛ ya liboso.

 Bato oyo bamonaki Yesu ntango azalaki na bomoi awa na mabele, oyo bamonaki liwa na ye, mpe lisekwa na ye bakokaki koloba soki lisolo ya Baevanzile ezali solo to te. Bakokaki mpe koyebisa bisika oyo makambo ya lokuta ekomami. Profesɛrɛ Frederick Bruce alobi boye: “Likambo ya ntina mingi ntango bantoma bazalaki kosakola na siɛklɛ ya liboso ezali ete bato oyo bazalaki koyoka bango bayebaki mpe makambo oyo bazalaki koloba; bantoma basukaki kaka te na koloba ete ‘Tomonaki makambo yango,’ kasi bazalaki mpe koloba ete, ‘Ndenge bino moko boyebi yango’ (Misala 2:22).”