Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Batatoli ya Yehova

Lingala

Nsuka ya mokili ekoya ntango nini?

Nsuka ya mokili ekoya ntango nini?

Eyano ya Biblia

Mpo na koyeba ntango nsuka ya mokili ekoya, esengeli naino koluka koyeba ndenge Biblia esalelaka liloba “mokili.” Liloba ya Grɛki koʹsmos, oyo babongolaka yango na “mokili,” mbala mingi emonisaka nde bato, mingimingi baoyo bayokanaka te na Nzambe to mpe basalaka mokano na ye te. (Yoane 15:18, 19; 2 Petro 2:5) Basalelaka mpe koʹsmos mpo na kolobela ebongiseli ya mokili oyo.​—1 Bakorinti 7:31; 1 Yoane 2:15, 16. *

“Nsuka ya mokili” ezali nini?

Maloba “nsuka ya mokili,” ndenge ezali na mabongoli mingi ya Biblia, ekoki mpe kobongolama na “Nsuka ya ebongiseli ya makambo,” to “nsuka ya ekeke.” (Matai 24:3; Biblia haut fleuve) Yango elingi koloba te ete mabele to bato nyonso bakobomama kasi nde nsuka ya ebongiseli ya bato.​—1 Yoane 2:17.

Biblia eteyaka ete “basali-mabe bakobomama” mpo bato malamu básepela na bomoi awa na mabele. (Nzembo 37:9-11) Yango ekosalema na ntango ya “bolɔzi monene,” oyo ekosuka na etumba ya Armagedone.​—Matai 24:21, 22; Emoniseli 16:14, 16.

Nsuka ya mokili ekoya ntango nini?

Yesu alobaki boye: “Mpo na mokolo yango mpe ngonga yango moto moko ayebi te, ezala baanzelu ya likoló ezala Mwana, kaka Tata nde ayebi.” (Matai 24:36, 42) Abakisaki mpe ete nsuka ekoya na mbalakaka, “na ngonga oyo bozali kokanisa te.”​—Matai 24:44.

Atako mokolo to ngonga eyebani mpenza te, Yesu apesaki “elembo,” to makambo oyo ekomonisa eleko oyo ekomema na nsuka ya mokili. (Matai 24:3, 7-14) Biblia ebengi eleko yango “ntango ya nsuka,” “eleko ya nsuka” mpe “mikolo ya nsuka.”​—Danyele 12:4; Bible na lingala ya lelo oyo; 2 Timote 3:1-5.

Soki nsuka ya mokili eleki eloko moko ekotikala?

Ɛɛ. Mabele ekozala kaka mpo Biblia elobi “ekotengatenga te kino ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ libela.” (Nzembo 104:5) Mpe mabele ekotonda na bato, ndenge kaka Biblia elobaka: “Bayengebene bakozwa mabele, Mpe bakofanda wana seko.” (Nzembo 37:29) Nzambe akozongisa bomoi ndenge alingaki ezala na ebandeli:

^ par. 3 Liloba ya Grɛki ai·onʹ mpe ebongolami na Babiblia mosusu na “mokili.” Soki babongoli yango bongo ai·onʹ ezalaka na ndimbola ndenge moko na koʹsmos mpo emonisaka ebongiseli ya mokili oyo.