Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Batatoli ya Yehova

Lingala

Motángo 666 elimboli nini?

Motángo 666 elimboli nini?

Eyano ya Biblia

Ndenge emonisami na mokanda ya nsuka ya Biblia, motángo 666 ezali nkombo ya nyama mabe ya mitó nsambo mpe maseke zomi oyo ebimaki na mbu. (Emoniseli 13:1, 17, 18) Nyama yango ezali komonisa ebongiseli ya politiki ya mokili mobimba, oyo ezali na bokonzi likoló ya “mabota nyonso mpe mikili nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe bikólo nyonso.” (Emoniseli 13:7) Nkombo 666 emonisi ete na miso ya Nzambe, ebongiseli yango ya politiki elongi ata moke te. Na ndenge nini?

Ezali kaka nkombo ya mpamba te. Nkombo oyo Nzambe apesaka ezalaka na ndimbola. Na ndakisa, Nzambe apesaki Abrama, oyo nkombo na ye elimbolaki “Tata oyo atombwani,” nkombo Abrahama, oyo elimboli “Tata ya bato ebele,” ntango alakaki ete akokómisa Abrahama “tata ya ebele ya bikólo.” (Ebandeli 17:5) Ndenge moko mpe, Nzambe apesaki nyama yango nkombo 666 mpo na komonisa bizaleli ya nyama yango.

Motángo 6 elimbolaka kozanga kokoka. Mbala mingi mitángo esalelamaka na Biblia na ndenge ya elilingi. Motángo 7 emonisaka eloko oyo ezali mobimba to ya kokoka. Motángo 6, oyo ezali nsambo longola moko, ekoki komonisa eloko oyo ezali mobimba te to oyo ezali na mbeba na miso ya Nzambe, mpe ekoki kozala na boyokani na banguna ya Nzambe.​—1 Ntango 20:6; Danyele 3:1.

Ezongelami mbala misato mpo na konyata likambo yango malamumalamu. Na bantango mosusu, Biblia elobelaka likambo moko mbala misato mpo na konyata likambo yango malamumalamu. (Emoniseli 4:8; 8:13) Na yango, nkombo 666 emonisi mpenza ete Nzambe amonaka ete bibongiseli ya politiki ya bato elongi ata moke te. Elongi te kotya kimya mpe libateli ya solosolo; makambo oyo kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekokokisa.

Elembo ya nyama mabe

Biblia elobi ete bato bazali kozwa “elembo ya nyama mabe” mpo bazali kolanda yango “na kokamwa,” tii na kosambela yango. (Emoniseli 13:3, 4; 16:2) Bazali kosala yango na ndenge bapesaka lokumu, to tóloba ata kosambela bikólo na bango, kokumisa bilembo ya bikólo na bango to mpe mampinga ya basoda ya bikólo na bango. Ndenge buku moko (The Encyclopedia of Religion) emonisi yango: “Bolingo ya ekólo ekómi lolenge ya losambo oyo epalangani mingi na mokili ya lelo.” *

Ndenge nini moto akoki kozwa elembo ya nyama yango na lobɔkɔ ya mobali to na elongi? (Emoniseli 13:16) Mpo na mibeko oyo apesaki ekólo Yisraele, Nzambe alobaki na bango ete: ‘Bókanga yango lokola elembo likoló ya lobɔkɔ na bino, mpe esengeli kozala na elongi na bino lokola mwa nsinga oyo bakangaka na elongi.’ (Kolimbola Mibeko 11:18) Yango elingaki koloba te ete Bayisraele basengelaki kotya bilembo na mabɔkɔ mpe bilongi na bango mpenza, kasi nde ete maloba ya Nzambe esengelaki kotambwisa makanisi mpe misala na bango. Ndenge moko mpe, na esika motángo 666 ekatama lokola nzoloko na nzoto ya bato, na ndenge ya elilingi, elembo ya nyama mabe ezali komonisa baoyo bazali kotika ete ebongiseli ya politiki etambwisa bomoi na bango. Baoyo bazali na elembo ya nyama yango bazali komikómisa banguna ya Nzambe.​—Emoniseli 14:9, 10; 19:19-21.

^ par. 8 Talá mpe babuku oyo: Nationalism in a Global Era, lokasa 134; mpe Nationalism and the Mind: Essays on Modern Culture, lokasa 94.