Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bakristo bakoki kosalela mayele oyo epekisaka mwasi azwa zemi?

Bakristo bakoki kosalela mayele oyo epekisaka mwasi azwa zemi?

Eyano ya Biblia

 Yesu apesaki bayekoli na ye mitindo te ete bábota bana to bábota te. Ata mpe moyekoli moko te ya Yesu apesaki mitindo wana. Lisusu, ata na esika moko te Biblia epekisi polele mayele oyo epekisaka mwasi azwa zemi. Na likambo yango, esengeli kotalela maloba ya Baroma 14:12: “Mokomoko na biso akozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na ye moko.”

 Na yango, mwasi ná mobali bango moko bakopona soki balingi kobota bana to te. Bakoki mpe kopona soki bakobota bana boni mpe ntango nini bakobota. Soki mwasi ná mobali baponi kosalela mayele oyo epekisaka mwasi azwa zemi kasi elongolaka zemi te, ezali likambo na bango moko. Moto asambisa bango te.​—Baroma 14:4, 10-13.