Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Batatoli ya Yehova

Lingala

Badati ya Biblia emonisi nini mpo na mobu 1914?

Badati ya Biblia emonisi nini mpo na mobu 1914?

Eyano ya Biblia

Badati ya Biblia emonisi ete Bokonzi ya Nzambe etyamaki na likoló na 1914. Yango emonisami na esakweli oyo ezali na mokapo ya 4 ya mokanda ya Danyele.

Mwa makambo ya esakweli yango. Nzambe asalaki ete Nebukadenezare mokonzi ya Babilone alɔta ndɔtɔ ya esakweli ya nzete moko monene oyo bakataki yango. Ekumu na yango esengelaki kokola te na boumeli ya eleko ya “ntango nsambo,” mpe na nsima esengelaki kokola lisusu.​—Danyele 4:1, 10-16.

Kokokisama ya liboso ya esakweli yango. Nzete wana ya monene emonisaki Mokonzi Nebukadenezare. (Danyele 4:20-22) ‘Akatamaki’ na ndenge ya elilingi ntango, mpo na mwa ntango, abɛlaki motó na boumeli ya mbula nsambo mpe ayangelaki te. (Danyele 4:25) Ntango Nzambe azongiselaki ye mayele na ye, Nebukadenezare azongelaki kiti na ye ya bokonzi mpe andimaki boyangeli ya Nzambe.​—Danyele 4:34-36.

Likambo oyo emonisi ete esakweli yango ezali na kokokisama monene. Mokano mpenza ya esakweli yango ezalaki ete “bato oyo bazali na bomoi báyeba ete Oyo-Aleki-Likoló azali Moyangeli na bokonzi ya bato mpe apesaka yango moto oyo ye alingi kopesa mpe atyaka moto oyo aleki moke kati na bato azala mokonzi na yango.” (Danyele 4:17) Nebukadenezare moto ya lolendo azalaki nde moto oyo Nzambe alingaki mpenza kopesa bokonzi ya ndenge wana? Te, mpo mwa moke liboso, Nzambe alɔtisaki ye ndɔtɔ mosusu ya esakweli oyo emonisaki ete ezala ye to mokonzi mosusu ya politiki akokaki te kokokisa mokumba yango. Kutu, Nzambe ye moko “akotya bokonzi moko oyo ekobebisama te.”​—Danyele 2:31-44.

Liboso, Nzambe atyaki bokonzi moko mpo emonisa boyangeli na ye na mabele: ekólo Yisraele. Nzambe apesaki nzela ete boyangeli yango ‘ebebisama’ mpo bakonzi na yango bazalaki sembo te, kasi asakolaki ete akopesa bokonzi yango na “ye oyo azali na lotomo oyo euti na mibeko.” (Ezekiele 21:25-27) Biblia emonisi ete Yesu Kristo nde azali na lotomo oyo euti na mibeko mpo na kozwa bokonzi wana ya seko. (Luka 1:30-33) Na kokesana na Nebukadenezare, Yesu azali na “komikitisa na motema,” kaka ndenge esakolamaki.​—Matai 11:29.

Nzete oyo elobelami na Danyele mokapo 4 ezali komonisa nini? Na Biblia, na bantango mosusu banzete emonisaka boyangeli. (Ezekiele 17:22-24; 31:2-5) Na kokokisama monene ya Danyele mokapo 4, nzete ya monene ezali komonisa boyangeli ya Nzambe.

Kokatama ya nzete yango elimboli nini? Kaka ndenge kokatama ya nzete emonisaki ete Nebukadenezare atikaki naino koyangela, emonisaki mpe ete boyangeli ya Nzambe awa na mabele ezalaki lisusu te. Yango esalemaki ntango Nebukadenezare abebisaki Yerusaleme, esika oyo bakonzi ya Yisraele bafandaki na “kiti ya bokonzi ya Yehova” lokola bamonisi ya Nzambe.​—1 Ntango 29:23.

“Ntango nsambo” emonisi nini? “Ntango nsambo” emonisi eleko oyo na boumeli na yango Nzambe atikaki ete bikólo eyangela mabele kozanga ete bokonzi moko oyo ye atye ezala. “Ntango nsambo” ebandaki na sanza ya 10 ya mobu 607 liboso ya ntango na biso, na kotalela badati ya Biblia, ntango bato ya Babilone babebisaki Yerusaleme. *​—2 Bakonzi 25:1, 8-10.

“Ntango nsambo” esengeli koumela ntango boni? Ekoki te kozala mbula nsambo mpamba lokola oyo Nebukadenezare asalaki. Yesu amonisaki eyano ntango alobaki ete “Yerusaleme [elembo ya boyangeli ya Nzambe] ekonyatama na bikólo, tii bantango oyo etyamá ya bikólo ekokoka.” (Luka 21:24) “Bantango oyo etyamá ya bikólo,” eleko oyo na boumeli na yango Nzambe atikaki nzela ete boyangeli na ye ‘enyatama na bikólo,’ ekokani na “ntango nsambo” oyo ezali na Danyele mokapo 4. Yango elingi koloba ete “ntango nsambo” ezalaki naino kokoba ata ntango Yesu azalaki awa na mabele.

Biblia emonisi ndenge ya koyeba molai ya “ntango nsambo” yango ya esakweli. Elobi ete soki “ntango” misato na ndambo ekokani na mikolo 1 260, boye, “ntango nsambo” ekokani na mikolo 1 260 mbala mibale, to mikolo 2 520. (Emoniseli 12:6, 14) Soki tolandi ndenge oyo mikolo etángamaka na bisakweli, “mokolo moko mpo na mbula moko,” mikolo 2 520 ekomonisa nde mbula 2 520. Na yango, “ntango nsambo,” to mbula 2 520 esengelaki kosuka na sanza ya 10/1914.​—Mitángo 14:34; Ezekiele 4:6.

^ par. 10 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo emonisi ntina oyo tosaleli mobu 607 liboso ya ntango na biso, talá masolo “Mbula nini Yerusaleme ya kala ebebisamaki?​—Eteni 1,” na nkasa 26-31 na Linɔ́ngi ya mosɛnzɛli ya 01/10/2011 mpe “Mbula nini Yerusaleme ya kala ebebisamaki?​—Eteni 2,” na nkasa 22-28 na Linɔ́ngi ya mosɛnzɛli ya 01/11/2011.

Makambo mosusu

Biblia eteyaka mpenza nini?

Tozali na “mikolo ya nsuka”?