Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Batatoli ya Yehova

Lingala

Biblia elobi nini mpo na fɛti ya Pasika?

Biblia elobi nini mpo na fɛti ya Pasika?

Eyano ya Biblia

Milulu ya fɛti ya Pasika eutá na Biblia te. Kutu, soki otaleli esika fɛti yango ebandá, okomona mpenza ndimbola na yango: eutá na milulu ya kobota oyo bato ya ntango ya kala bazalaki kosala. Talelá makambo oyo esalemaka na fɛti ya Pasika.

  1. Basimbiliki: Banyama yango oyo emonisaka kobota “eutá na milulu ya kala mpe na bilembo oyo bapakano bazalaki kosalela na bafɛti na bango ya eleko ya prɛnta, na mikili ya Mpoto mpe na Moyen-Orient.”​—Encyclopædia Britannica.

  2. Maki: Na kolanda buku moko (Funk & Wagnalls Standard Dictionary of Folklore, Mythology and Legend) koluka oyo balukaka maki mpo na fɛti ya Pasika, oyo bato bakanisaka ete simbiliki nde abimisaka yango, “ezali kaka lisano ya bana te, eutá na molulu ya makambo ya kobota oyo bazalaki kosala kala.” Na bamboka mosusu bazalaki kokanisa ete maki ya fɛti ya Pasika, oyo bapakoli langi, “ekoki kopesa moto esengo, bozwi, nzoto kolɔngɔnɔ, mpe kobatela ye na ndenge ya maji.”​—Traditional Festivals.

  3. Bilamba ya sika: Soki moto alati bilamba ya sika te, kasi apesi Eastre, nzambe moko ya prɛnta, mbote, bato bazalaki komona ete ezali likambo ya kozanga bokonde mpe ekomemela moto yango libabe.”​—The Giant Book of Superstitions.

  4. Misala ntango moi ezali kobima: Misala yango eutá na milulu oyo bato oyo basambelaka moi bazalaki kosala na ntango ya kala “na ebandeli ya prɛnta mpo na koyamba moi mpe nguya na yango ya kopesa biloko nyonso bomoi ya sika.”​—Celebrations​—The Complete Book of American Holidays.

  5. Nkombo na yango na minɔkɔ mosusu: Nkombo ya fɛti yango na Lingala emonisaka lokola nde bakristo basalaka kaka fɛti ya Pasika oyo Bayuda bazalaki kosala. Nzokande buku moko (Le livre des superstition. Mythes, croyances et légendes) elobi ete: “Molulu ya fɛti yango eutá epai ya bapakano: Eastre, nzambe ya prɛnta mpe ya kobota na Angleterre nde apesá nkombo Easter (ndenge babengaka Pasika na Anglais).” Bato mosusu balobaka ete nkombo yango eyokani na Astarté, nzambe ya kobota na Phénicie, to na nzambe Ishtar, ya Babilone.

Buku mosusu (The American Book of Days) emonisi malamu esika fɛti ya Pasika eutá; elobi boye: “Ntembe ezali te ete na ebandeli, Lingomba endimaki milulu ya bapakano ya ntango ya kala mpe ekómisaki yango lokola milulu ya bokristo.

Biblia emonisi ete ntango tozali kosambela Nzambe, tosengeli te kolanda mimeseno ya bato to milulu oyo esepelisaka ye te. (Marko 7:6-8) Bakorinti ya mibale 6:17 elobi: “‘Bókabwana,’ Yehova alobi bongo, ‘mpe bótika kosimba eloko ya mbindo.’” Fɛti ya Pasika ezali fɛti ya bapakano; moto oyo alingi kosepelisa Nzambe asengeli koboya yango.