Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia elobi nini na likambo etali kotumba bibembe?

Biblia elobi nini na likambo etali kotumba bibembe?

Eyano ya Biblia

 Biblia epesi malako ya polele te na likambo etali momeseno ya kotumba bibembe. Ezali na mobeko moko te oyo etali kokunda ebembe to kotumba yango.

 Kasi Biblia elobeli bandakisa ya basaleli ya sembo ya Nzambe oyo bakundaki bibembe ya bato na bango. Na ndakisa, Abrahama asalaki milende mpo esika oyo bakundaki mwasi na ye Sara ebatelama.​—Ebandeli 23:2-20; 49:29-32.

 Biblia elobeli mpe bato ya sembo oyo batumbaki mikuwa ya bibembe. Na ndakisa, ntango Mokonzi Saulo ya Yisraele ná bana na ye misato ya mibali bakufaki na bitumba, bibembe na bango etikalaki na teritware ya banguna mpe basambwisaki yango. Ntango basoda ya Yisraele ya sembo bayokaki likambo yango, bazwaki nzoto ya Saulo mpe ya bana na ye, batumbaki yango mpe bakundaki mikuwa oyo etikalaki. (1 Samwele 31:8-13) Biblia emonisi ete ezalaki lolenge malamu ya kosala na mikuwa ya mibali yango oyo etikalaki.​—2 Samwele 2:4-6.

Makanisi ya libunga oyo bato mingi bazalaka na yango na oyo etali kotumba bibembe

 Libunga: Kotumba ebembe esambwisaka nzoto.

 Solo: Biblia elobi ete baoyo bazali kokufa bazongaka putulu, yango nde ndenge nzoto ya moto ekómaka ntango epɔlaka. (Ebandeli 3:19) Kotumba ebembe esalaka yango nokinoki mpo ekómisaka nzoto ya moto putulu.

 Libunga: Na ntango ya kala, kaka bato oyo Nzambe aboyaki nde bazalaki kotumba bibembe na bango.

 Solo: Batumbaki bibembe ya bato mosusu oyo bazangaki bosembo, na ndakisa ebembe ya Akana ná bato ya libota na ye. (Yosua 7:25) Kasi, yango ezalaki mobeko te. (Kolimbola Mibeko 21:22, 23) Ndenge tomonaki yango liboso, bibembe ya bato mosusu ya sembo, na ndakisa ya Yonatane mwana ya Mokonzi Saulo, batumbaki yango.

 Libunga: Kotumba moto ekopekisa Nzambe asekwisa ye.

 Solo: Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, Nzambe akokipe te soki bakundaki ebembe, batumbaki yango, ebungaki na ebale to banyama ya zamba elyaki yango. (Emoniseli 20:13) Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali na likoki ya kopesa moto oyo akufaki nzoto ya sika.​—1 Bakorinti 15:35, 38.