Biblia elobi nini mpo na bamaladi mabe?
Eyano ya Biblia
Biblia esakolaki ete na ntango ya nsuka, bamaladi mabe ekozala. (Luka 21:11) Bamaladi mabe yango ezali te etumbu ya Nzambe. Kutu, na nzela ya Bokonzi na ye, Nzambe akosilisa mikakatano na nzoto, ezala mpe bamaladi mabe.
Biblia esakolá bamaladi mabe?
Biblia etánga te bankombo ya bamaladi to bamaladi mabe, na ndakisa COVID-19, SIDA, maladi ya ntolo, malaria, to grippe espagnole. Kasi esakolá “bamaladi mabe” mpe “bolɔzi ya liwa.” (Luka 21:11; Emoniseli 6:8) Makambo yango ezali na kati ya elembo ya “mikolo ya nsuka,” oyo babengaka mpe “bosukisi ya makambo ya ntango oyo.”—2 Timote 3:1; Matai 24:3.
Bamaladi ezali etumbu ya Nzambe?
Biblia elobi na bisika moke kaka ete Nzambe apesaki bato etumbu ya maladi. Na ndakisa, apesaki bato mosusu maladi ya maba. (Mitángo 12:1-16; 2 Bakonzi 5:20-27; 2 Ntango 26:16-21) Kasi, Nzambe apesaki bamaladi mabe yango te na bato oyo basali eloko te. Ezalaki nde masambisi mpo na bato oyo baboyaki kotosa ye.
Bamaladi mabe ya lelo oyo, ezali etumbu ya Nzambe?
Te. Bato mosusu balobaka ete Nzambe asalelaka bamaladi mabe mpe bamaladi mosusu mpo na kopesa bato etumbu. Kasi, Biblia elobi bongo te. Mpo na nini?
Ya liboso, basaleli ya Nzambe, ya kala mpe ya lelo, babɛlaki bamaladi. Na ndakisa, Timote, oyo azalaki sembo, azalaki na ‘bamaladi oyo’ azalaki ‘kobɛlabɛla.’ (1 Timote 5:23) Kasi Biblia elobi te ete ezalaki mpo Nzambe abwakaki ye. Lelo oyo mpe, basaleli mosusu ya sembo ya Nzambe babɛlaka maladi. Mbala mingi, ekómaki mpo bazalaki na esika oyo likama eyaki mpe na ngonga ya mabe.—Mosakoli 9:11.
Longola yango, Biblia eteyaka ete ntango oyo Nzambe atyá mpo na kopesa bato mabe etumbu ekomi naino te. Kutu, tozali na “mokolo moko ya lobiko,” elingi koloba ntango oyo Nzambe azali kosɛnga na bato nyonso bákóma baninga na ye mpe bábika. (2 Bakorinti 6:2) Lolenge moko oyo asalaka yango ezali na nzela ya mosala ya kosakola na mokili mobimba “nsango malamu oyo ya bokonzi.”—Matai 24:14.
Bamaladi mabe ekosila mokolo mosusu?
Ɛɛ. Biblia elobi ete mosika te moto moko te akobɛla maladi. Na nse ya Bokonzi ya Nzambe, akosilisa mikakatano nyonso ya nzoto. (Yisaya 33:24; 35:5, 6) Akolongola minyoko, mpasi, mpe liwa. (Emoniseli 21:4) Akozongisa na bomoi bato oyo bakufá mpo bango mpe bázala na sante ya malamu awa na mabele oyo ekobongwana paradiso.—Nzembo 37:29; Misala 24:15.
Bavɛrsɛ ya Biblia etali maladi
Matai 4:23: “[Yesu] akendaki epai na epai na Galile mobimba, azalaki koteya na basinagoga na bango mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi mpe kobikisa maladi ya ndenge nyonso mpe mbeba ya ndenge nyonso oyo bato bazalaki na yango na nzoto.”
Oyo yango elimboli: Makamwisi oyo Yesu asalaki emonisaki mwa moke kaka makambo oyo mosika te Bokonzi ya Nzambe ekosalela bato.
Luka 21:11: “Bamaladi mabe . . . ekozala.”
Oyo yango elimboli: Bamaladi mabe oyo epalangani ezali na kati ya elembo ya ntango ya nsuka.
Emoniseli 6:8: “Talá! mpunda moko ya langi mwa moke lokola mai ya mpɔndu; mpe moto oyo afandaki likoló na yango nkombo na ye Liwa. Mpe Nkunda ezalaki kolanda ye penepene. Mpe bapesaki bango bokonzi . . . mpo na koboma na . . . bolɔzi ya liwa.”
Oyo elimboli: Esakweli ya emoniseli oyo elobeli bampunda minei emonisi ete bamaladi mabe ekozala na ntango na biso.