Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Batatoli ya Yehova

Lingala

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Koluka kosangisa na moto nzoto na makasi​—Eteni 2: Soki basalá yo yango

Koluka kosangisa na moto nzoto na makasi​—Eteni 2: Soki basalá yo yango

 Soki ozali komona ete ezalaki foti na yo

Bato mingi oyo balukaki kosangisa na bango nzoto na makasi bayokaka nsɔni makasi. Ntango mosusu kutu bamonaka ete ezalaki foti na bango. Tózwa ndakisa ya Karen, oyo azali sikoyo na mbula 19, kasi bazalaki kosangisa na ye nzoto na makasi banda ntango azalaki na mbula 6 tii na mbula 13. Alobi boye: “Likambo oyo elekaki mpasi ezalaki ete nazalaki ntango nyonso kokanisa ete ezalaki foti na ngai. Nazalaki koloba, ‘Ndenge nini natikaki likambo yango eumela ntango molai ndenge wana?’”

Soki yo mpe okanisaka bongo, talelá makambo oyo:

  • Bana mike bakoki kosangisa nzoto te mpo nzoto mpe makanisi na bango ebongisamá mpo na yango te. Lokola bayebaka te soki kosangisa nzoto ezali mpenza nini, tokoki koloba te ete bango moko bandimaki yango. Yango elingi koloba ete soki moto asangisi na mwana moke nzoto na makasi ezali foti ya mwana te.

  • Mbala mingi bana mike bakaniselaka mikóló mabe te mpe bayebaka te mayele mabe ya bato oyo bakoki kobebisa bango; yango wana bazwamaka mingi. Buku moko (The Right to Innocence) elobi boye: “Bato oyo basangisaka na basusu nzoto na makasi bazalaka lokola miyibi; mwana moke akokoka koyeba mayele na bango te.

  • Mwana akoki koyoka mposa ya kosangisa nzoto ntango bazali koluka kosangisa na ye nzoto na makasi. Soki ekómelaki yo, yebá ete nzoto esalaka bongo soki basimbi yango na lolenge moko boye. Yango elingi koloba te ete ondimaki likambo yango to ete ezalaki nde foti na yo.

Salá boye: Kanisá mwana moko oyebi, oyo azali na mbula oyo ozalaki na yango ntango basangisaki na yo nzoto na makasi. Omituna boye, ‘Soki basangisi na ye nzoto na makasi, ekozala sembo koloba ete ezali foti na ye?’

Karen akanisaki likambo yango ntango azwaki mokumba ya kokɛngɛla bana misato. Moko azalaki na mbula soki motoba, mbula oyo Karen azalaki na yango ntango babandaki kosangisa na ye nzoto na makasi. Karen alobi boye: “Namonaki ete mwana ya mbula wana ayebaka komibatela te, ngai mpe nayebaki komibatela te na mbula wana.”

Likambo ya solo: Moto oyo asalaki yo makambo wana nde azali na foti. Biblia elobi: “Mabe ya moto mabe ekozala na motó na ye moko.”​Ezekiele 18:20.

 Ntina ya koyebisa yango moto

Kosolola na mokóló moko oyo oyebisaka makambo na yo ekoki kosalisa yo. Biblia elobi: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.”​—Masese 17:17.

Ya solo, okoki komona ete okobatela lokumu na yo soki oyebisi moto te makambo oyo esalemaki. Mbala mosusu omoni ete kofanda nyɛɛ ezali lokola efelo oyo ezali kobatela yo. Kasi kobosana te ete efelo yango oyo ezali kobatela yo ekoki mpe kopekisa yo ozwa lisalisi oyo ebongi.

Efelo oyo ezali kobatela yo ekoki mpe kopekisa yo ozwa lisalisi oyo ebongi

Elenge mwasi moko na nkombo Janet amonaki ete koyebisa basusu ndenge balukaki kosangisa na ye nzoto na makasi esalisaki ye mingi mpenza. Alobi boye: “Moto moko oyo nayebaki malamu mpe oyo nazalaki kolinga alukaki kosangisa na ngai nzoto na makasi ntango nazalaki mwana moke, mpe nabombaki likambo yango bambula ebele. Kasi mokolo nayebisaki mama na biso likambo yango, ezalaki lokola kilo moko monene elongwe na mapeka na ngai.”

Janet ayebi ntina oyo bato mosusu baboyaka koyebisa likambo oyo basalá bango. Alobi boye: “Ezalaka nsɔni koyebisa ete balukaki kosangisa na yo nzoto na makasi. Kasi, ngai nakómaki komona ete kobomba likambo yango ezalaki kosala ngai mabe mpenza. Esengelaki nabimisa yango nokinoki.”

 ‘Ntango ya kobika’

Soki balukaki kosangisa na yo nzoto na makasi okoki kokóma na makanisi ya mabe, na ndakisa, okobanda kokanisa ete babebisi yo mpe ozali na ntina te, to ete nzoto na yo ezali kaka mpo na kosalisa bato mosusu bákokisa mposa na bango ya kosangisa nzoto. Sikoyo nde ntango yango ya kolongwa na lokuta wana, ‘ntango ya kobika.’ (Mosakoli 3:3) Nini ekoki kosalisa yo?

Koyekola Biblia. Biblia ezali na makanisi ya Nzambe; ezali na “nguya . . . mpo na kokweisa biloko oyo epikamá makasi”​—ata mpe makanisi ya lokuta ya komona ete ozali na ntina te. (2 Bakorinti 10:4, 5) Na ndakisa, tángá mpe talelá bavɛrsɛ oyo: Yisaya 41:10; Yirimia 31:3; Malaki 3:16, 17; Luka 12:6, 7; 1 Yoane 3:19, 20.

Kobondela. Soki okómi komiyoka ete ozali na ntina te to ete omemá ngambo, bondelá Yehova mpo na ‘kobwakela ye mokumba na yo ya kilo.’ (Nzembo 55:22) Ozali yo moko te!

Bankulutu ya lisangá. Bandeko yango bayekolaka kozala “esika ya komibomba mpo na kokima mopɛpɛ mpe esika ya kobombana mpo na kokima mbula ya mopɛpɛ makasi.” (Yisaya 32:2) Bakoki kosalisa yo ozala na makanisi ya malamu mpe okoba kokende liboso.

Baninga ya malamu. Taláká bandeko ya lisangá oyo bazali bizaleli malamu. Taláká ndenge bafandaka na basusu. Nsima ya mikolo, okomona ete bato nyonso te nde balukaka kobebisa nzoto ya baninga.

Elenge mwasi moko na nkombo Tanya azali kotalela likambo yango. Na bomwana na ye, bana mibali ebele bazalaki kosakana na nzoto na ye. Alobi boye: “Bana mibali oyo bazalaki baninga na ngai nde basalaki ngai mabe wana.” Kasi, na nsima Tanya ayaki komona ete mibali mosusu balingaka baninga na bolingo ya solo. Nini esalisaki ye amona yango?

Akómaki moninga ya ndeko moko ná mwasi na ye mpe bazalaki bizaleli malamu. Yango nde ebongolaki makanisi ya Tanya. Alobi boye: “Makambo oyo mobali yango azalaki kosala emonisaki ngai ete mibali nyonso bazali mabe te. Mobali yango azalaki kobatela mwasi na ye, mpe Nzambe akanaki ete ezala nde bongo.” *​—Baefese 5:28, 29.

^ par. 27 Soki ozali na mikakatano lokola konyokwama na makanisi, kolya mingi to koboya kolya, komizokisa, komɛla bangi, kolala malamu te, to makanisi ya komiboma, ekozala malamu oluka lisalisi ya monganga.

Makambo mosusu

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Koluka kosangisa na moto nzoto na makasi​—Eteni 1: Ndenge ya komibatela

Mayele misato oyo ekoki kosalisa yo omibatela mpo básangisa na yo nzoto na makasi te.