Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Batatoli ya Yehova

Lingala

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nakoki kobanda kolinga?

Nakoki kobanda kolinga?

 Kobanda kolinga elimboli nini?

  • Obimaka mingi na mwana mobali to mwana mwasi moko oyo azali molongani na yo te. Bolingani to te?

  • Bozali kolulana ná mwana mobali to mwana mwasi oyo azali molongani na yo te. Na mokolo moko, bokomelanaka bamesaje to bosololaka na telefone mbala mingi. Bolingani to te?

  • Mbala nyonso oyo ozali elongo na baninga mosusu, olingaka kaka kozala pene na mwana mobali to mwana mwasi moko oyo azali molongani na yo te. Bolingani to te?

Ntango mosusu eyano na motuna ya liboso ezali mpasi te. Kasi, ntango mosusu ofandi naino mpo okanisa liboso oyanola na motuna ya mibale mpe ya misato. Na yango, kolingana na moto elimboli mpenza nini?

Na mokuse, kolingana na moto elimboli kolula ye mpe koluka kolekisaka ntango elongo na ye.

Na yango, eyano na mituna nyonso misato wana ezali ɛɛ. Ezala na telefone to ntango bozali esika moko, ezala na miso ya bato to na kobombana, soki yo ná moninga na yo oyo azali molongani na yo te bolobelaka masolo ya bolingo mpe bosololaka mingi, elakisi ete bolingani.

 Kolingana na moto esengeli komema wapi?

Kolingana na moto esengeli kozala mpo na mokano ya malamu: kosalisa mwana mwasi ná mwana mobali báyeba soki bakoki kobalana.

Ya solo, bilenge mosusu bamonaka ete kolingana na moto ezali kaka masɛki. Ntango mosusu basepelaka kaka kozala seresere na moninga moko, ata soki bakobalana te. Bakoki kutu komona ete kozwa moto ndenge wana ezali lokola kozwa mbano mpe epesaka moto kilo na miso ya bato.

Kasi, mbala mingi kolingana ya ndenge wana eumelaka te. Elenge mwasi moko na nkombo Heather alobi: “Bilenge mingi oyo balinganaka bakabwanaka nsima ya pɔsɔ moko to mibale. Bamonaka ete esengeli te kolingana na moto mpo na ntango molai, nzokande yango ebongisaka bango mpo na koboma libala, kasi te mpo na kofanda na libala.”

Emonani ete soki olingani na moto, motema ya moto yango ekoningana. Yango wana, kanisá malamu soki ezali mpo na mokano oyo ebongi.​—Luka 6:31.

Soki ozali kolingana na moto kasi ozali na likanisi ya kobalana na ye te, ozali kosala makambo lokola mwana moke oyo aweleli mwana-popi ya sika, na nsima abwaki yango

Kanisá: Okondima moto asakana na motema na yo ndenge mwana asakanaka na mwana-popi? Soki aweleli yango nokinoki, ekoumela te atiki yango? Boye, kosala mpe moto ndenge wana te. Biblia elobi ete bolingo “esalaka makambo ya nsɔni te.”​—1 Bakorinti 13:4, 5.

Elenge moko na nkombo Chelsea alobi boye: “Motema mosusu eyebisaka ngai ete kolingana na moto ezali kaka lisano, kasi ekómaka ngámbo soki moninga azwi yango na masɛki te.”

Toli: Liboso obanda kolinga mpe obala, tángá 2 Petro 1:5-7 mpe poná ezaleli moko oyo osengeli kokolisa. Nsima ya sanza moko, talá makambo oyo oyekoli mpo na ezaleli yango mpe ndenge ozali komonisa yango.

 Nakoki mpo nabanda kolinga?

  •  Mpo na yo, moto akoki kobanda kolinga soki akómi na mbula boni?

  •  Sikoyo tuná papa to mama na bino motuna yango.

Okomona ete biyano na bino ekozala ndenge moko te. Ntango mosusu mpe ekozala ndenge moko! Mbala mosusu yo mpe okanisaka lokola bilenge ya mayele oyo bazali kozela bákola naino mwa mingi mpo bámiyeba malamu liboso bábanda kolinga.

Yango nde elenge moko ya mbula 17 na nkombo Danielle aponaki kosala. Alobi boye: “Soki nazongisi makanisi mbula mibale nsima, eloko oyo nakoluka epai ya moto oyo nakondima azala molongani na ngai ebongwani. Atako bongo, nandimi kaka te ete nakoki mpo na kozwa ekateli ya ndenge wana. Soki namoni ete loyenge na makanisi na ngai esili, nde nakokanisa kolingana na moto.”

Ezali na ntina mosusu ya kozela. Biblia esaleli maloba “eleko ya ebandeli ya bolenge” mpo na kolobela ntango oyo mposa ya kosangisa nzoto mpe ya kolingana na moto ezalaka makasi mingi. (1 Bakorinti 7:36) Kolingana na moto na ntango oyo bamposa ya nzoto na yo ezali makasi ekolamwisa lisusu mposa yango mpe ekotinda yo osala mabe.

Ntango mosusu baninga na yo bakokipe yango te. Mingi na bango balingaka koyeba soki kosangisa nzoto ezalaka ndenge nini. Kasi yo okoki, kutu osengeli, koboya makanisi ya ndenge wana! (Baroma 12:2) Kutu, Biblia eyebisi yo ‘okima pite.’ (1 Bakorinti 6:18) Soki ozeli eleko ya ebandeli ya bolenge eleka, ‘okolongola mpasi na nzoto na yo.’​—Mosakoli 11:10.

 Mpo na nini kozela?

Soki bazali kotinda yo obanda kolinga nzokande okoki naino te mpo na kosala yango ezali lokola bazali kotinda yo osala ekzamɛ na liteya oyo botángá te na kelasi. Bongo ezali malamu te! Osengeli kozwa ntango ya koyekola liteya yango mpo oyeba makambo oyo bakoki kotuna na ekzamɛ.

Ezali mpe bongo na likambo etali kolinga.

Kolingana na moto ezali lisɛki te. Yango wana, liboso obanda kotyela moto moko likebi, osengeli kozwa ntango ya koyekola likambo mosusu ya ntina mingi: ndenge ya kobatela boninga.

Na nsima, soki okutani na moto oyo abongi, okoki kosala boninga ya makasi. Kutu, libala esimbaka malamu soki esangisi bato mibale oyo bazalaki baninga.

Kozela liboso olingana na moto ekotya bonsomi na yo na nkaka te. Kutu, ekopesa yo nde bonsomi mingi ya ‘kosepela na bolenge na yo.’ (Mosakoli 11:9) Okozala mpe na ntango ya kobongisa bomoto na yo, mpe oyo eleki ntina boyokani na yo na Nzambe.​—Bileli 3:27.

Na boumeli ya ntango yango, okoki kosololaka na bana mibali mpe bana basi. Osengeli kosala yango ndenge nini? Bosengeli kolekisaka ntango elongo na bana mibali mpe bana basi ebele esika moko na mikóló. Elenge mwasi moko na nkombo Tammy alobi boye: “Namonaka ete kosala bongo nde malamu. Eleki malamu kozala na baninga ebele.” Monica andimi likambo yango. Alobi boye: “Kozala ebele ezali mpenza likanisi ya malamu, mpo ozali elongo na bato ya bizaleli ndenge na ndenge.”

Nzokande, soki oweleli kotya likebi kaka epai ya moto moko, omitye nsinga na nkingo. Yango wana, kowelela te. Salelá eleko oyo ya bomoi na yo mpo na koyekola ndenge ya kozwa mpe kobatela boninga. Na nsima, soki olingani na moto, okoyeba bizaleli na yo mpe bizaleli oyo okosepela komona epai ya moto oyo okofanda na ye bomoi mobimba.