Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Batatoli ya Yehova

Lingala

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Bomoi ekelamá to ebimá yango moko?—Eteni 1: Mpo na nini kondima ete Nzambe azali?

Bomoi ekelamá to ebimá yango moko?—Eteni 1: Mpo na nini kondima ete Nzambe azali?

 Bomoi ekelamá to ebimá yango moko?

Ondimaka ete Nzambe nde akelá biloko nyonso? Soki ondimaka yango, yebá ete ozali yo moko te; bilenge ebele (mpe mikóló) bandimaka mpe likambo yango. Kasi, basusu balobaka ete bomoi mpe molɔ́ngɔ́ ebimá yango moko: moto moko te asalá yango.

Oyebaki yango? Mbala mingi, ezala bato oyo bandimaka ete Nzambe nde asalá biloko nyonso mpe baoyo bandimaka yango te bawelaka kolobela likambo yango kozanga koyeba mpenza ntina oyo bandimaka yango.

  • Bato mosusu bandimaka ete bomoi ekelamá kaka mpo bateyá bango bongo na ndako-nzambe.

  • Bato mingi bandimaka ete bomoi ebimá yango moko kaka mpo bateyá bango bongo na kelasi.

Masolo oyo ekosalisa yo ondima malamumalamu ete bomoi ekelamá mpe oyeba kolimbwela yango basusu. Kasi, liboso, osengeli komituna motuna oyo ya ntina mingi:

 Mpo na nini nandimaka ete Nzambe azali?

Mpo na nini motuna yango ezali na ntina? Mpo Biblia elendisi yo osalelaka mayele, to “makoki na [yo] ya kokanisa.” (Baroma 12:⁠1) Yango elingi koloba ete osengeli kondimela Nzambe kaka te

  • bindimelá (Namonaka kaka ete ezalaka na moto moko oyo aleki na nguya)

  • mpo na bilandalanda (Na ekólo na biso, bato mingi basambelaka)

  • mpo na mbamba ya basusu (Baboti na ngai bateyá ngai ete Nzambe azali; likambo mosusu ya kosala ezali te)

Nzokande, yo moko osengeli kondima mpenza ete Nzambe azali mpe koyeba makambo oyo etindi yo ondima bongo.

Boye, mpo na nini ondimaka ete Nzambe azali? Lokasa “Mpo na nini nandimaka ete Nzambe azali?” ekokómisa kondima na yo makasi. Ekozala mpe malamu otalela biyano oyo bilenge mosusu bapesaki na motuna yango.

“Ntango molakisi na biso azali kolimbola ndenge oyo nzoto ya moto esalaka, nandimaka mbala moko ete Nzambe azali. Eteni mokomoko ya nzoto ezalaka na mosala na yango, ata na makambo ya mikemike mpe mbala mingi esalaka mosala yango kozanga kutu tóyeba. Nzoto ya moto ezali mpenza likamwisi!”​—Teresa.

“Ntango namonaka bandako ya etaje ya milai mpenza, bamasuwa ya minene, to mituka, namitunaka ete ‘Nani asalá yango?’ Na ndakisa, esɛngaka kozala mayele mpo na kosala motuka, mpo biloko mikemike oyo ezali na kati esengeli kosala malamu mpo motuka etambola. Soki moto nde asalá motuka, boye, moto mpe akelamá.”​—Richard.

“Soki okanisi ndenge bato ya mayele balekisaki bambula ebele mpenza mpo báyeba ata mwa biloko mikemike oyo ezalaka na molɔ́ngɔ́, boye, kokanisa ete molɔ́ngɔ́ yango ebimá kaka yango moko ezali bozoba mpenza!”​—Karen.

“Ntango nakómaki koyeba makambo mingi ya siansi, nakómaki mpe komona ete liteya ya evolisyo ezali solo mpenza te. Na ndakisa, nakanisaki ndenge oyo biloko oyo ezali na mokili etambolaka na molɔngɔ, mpe ndenge bato bakesani na bikelamu mosusu nyonso: tozalaka na mposa ya koyeba soki tozali banani, toutá wapi, mpe tozali kokende wapi. Na liteya ya Evolisyo, balukaka kolimbola nyonso wana na kolanda bizaleli ya banyama, kasi balongi ata moke te kolimbola ntina oyo moto akeseni na bikelamu mosusu nyonso. Mpo na ngai, esɛngi kozala na ‘kondima’ mingi mpo na kondimela evolisyo koleka kondima ete Mozalisi azali.”​—Anthony.

 Ndenge ya kolimbola ntina oyo nandimaka ete Nzambe azali

Okosala nini soki bana-kelasi na bino batyolaka yo mpo ondimaka eloko oyo okoki komona te? Bongo soki balobi ete siansi “emonisi” ete liteya ya evolisyo ezali solo?

Libosoliboso, kangamá na mateya oyo ondimaka. Bábangisa yo te mpe koyoka nsɔni te. (Baroma 1:16) Kutu, kobosana te ete:

  1. Kaka yo moko te nde ondimaka ete Nzambe azali; bato mingi mpe bandimaka yango. Bato yango mosusu batángá bakelasi mingi mpe bazali na mayele mingi. Na ndakisa, bato mosusu ya siansi mpe bandimaka ete Nzambe azali.

  2. Ntango bato balobaka ete bandimaka te ete Nzambe azali, mbala mosusu ezalaka mpo bayebaka te ntina oyo Nzambe asalaka makambo boye to boye. Na esika ya komonisa makambo oyo endimisi likanisi na bango, batunaka nde mituna lokola oyo: “Soki Nzambe azali, mpo na nini atiki bampasi ezala?” Na yango, na esika bákanisa mpo bázwa eyano, bamonisaka nde mayoki na bango.

  3. Bato bazalaka na mposa ya koyeba makambo ya Nzambe. (Matai 5:3) Na ndakisa, bazalaka na mposa ya kondimela Nzambe. Na yango, soki moto moko alobi ete Nzambe azali te, ye nde asengeli komonisa yo ntina oyo alobi bongo, kasi yo te.​—Baroma 1:18-20.

  4. Kondima ete Nzambe azali ezali likambo oyo ebongi. Ezali na makambo oyo emonisi ete bomoi ebimá yango moko te. Eloko moko te ekoki kondimisa likanisi oyo elobaka ete bomoi ebimá yango moko, kaka boye.

Kasi, okoloba nini epai ya moto oyo atuni yo ntina oyo ondimaka ete Nzambe azali? Na ndakisa:

Soki moto alobi: “Kaka bato oyo batángá te nde bandimaka ete Nzambe azali.”

Okoki koloba boye: “Ondimaka mpenza likanisi yango? Ngai nandimaka yango te. Kutu, ankɛtɛ esalemaki epai ya baprofɛsɛrɛ ya siansi koleka 1 600 ya bainiversite ya minene. Mingi kati na bango (1/3) balobaki te ete bazali na kati ya bato oyo balobaka ete Nzambe azalaka te to ete moto akoki koyeba Nzambe te. * Okoloba ete baprofɛsɛrɛ yango bazali mayele te kaka mpo bandimaka ete Nzambe azali?”

Soki moto alobi: “Soki Nzambe azalaka, mpo na nini bampasi ezali mingi na mokili?”

Okoki koloba boye: “Olingi nde koloba ete oyebaka te ntina oyo Nzambe asalaka makambo boye to boye, to mpe omoni lokola ete azali kosala eloko te. Ezali bongo? [Tiká ye apesa eyano.] Nazwá eyano oyo esalisá ngai nayeba ntina oyo bampasi ezali mingi. Mpo na koyeba ntina yango, esɛngi koyekola mateya mingi ya Biblia. Okosepela koyeba likambo yango malamu?”

Eteni mosusu ekolobela ntina oyo liteya ya evolisyo ekokaka te kolimbola ntina ya bomoi na biso.

^ par. 32 Euti na Social Science Research Council, “Religion and Spirituality Among University Scientists,” ya Elaine Howard Ecklund, 5/02/2007.

Talá mpe