Lakisá makambo oyo ezali na kati

Oyo okoki kosala soki obɛli maladi moko ya mbalakaka

Oyo okoki kosala soki obɛli maladi moko ya mbalakaka

Osí obɛlá makasi na mbalakaka? Soki ezali bongo, na ntembe te oyebi ndenge esalaka, ekoki kobulunganisa makanisi ya moto mpe kolɛmbisa ye nzoto mpe kosala ete elya ye mbongo mingi. Nini ekoki kosalisa yo oyika mpiko? Ndenge nini okoki kosalisa ndeko ya libota to moninga moko oyo azali kobɛla? Atako Biblia ezali te buku ya makambo ya minganga, kasi ezali na toli oyo ekoki kosalisa yo oyikela maladi na yo mpiko.

Toli oyo ekoki kosalisa yo oyikela maladi na yo mpiko

  • Luká lisalisi ya monganga

    Oyo Biblia elobi: “Bato ya nzoto kolɔngɔnɔ bázalaka na mposa ya monganga te, kasi nde bato oyo bazali kobɛla.”​—Matai 9:12.

    Ndenge ya kosalela toli yango: Soki esengeli, luká lisalisi ya minganga.

    Meká kosala boye: Luká lisalisi ya monganga ya malamu koleka. Mbala mosusu, ekoki kosɛnga okutana na minganga mosusu. (Masese 14:15) Yebisá minganga yango makambo polele mpe omindimisa ete okangi ntina ya makambo oyo bazali koyebisa yo, mpe ete bayebi makambo nyonso oyo etali maladi oyo ozali kobɛla. (Masese 15:22) Yekolá makambo etali maladi na yo mpe bankisi nyonso oyo okoki kozwa. Soki oyebi ndenge maladi yango ekosuka, okomibongisa na makanisi mpo oyikela yango mpiko mpe okozwa bikateli ya malamu na likambo etali lisalisi ya monganga oyo osengeli kozwa.

  • Saláká makambo oyo ekosalisa yo mpo ozala sante ya malamu

    Oyo Biblia elobi: “Ngalasisi ya nzoto ezali na litomba.”​—1 Timote 4:8.

    Ndenge ya kosalela toli yango: Saláká ngalasisi mbala na mbala mpo na kobatela sante na yo.

    Meká kosala boye: Saláká ngalasisi mbala na mbala, lyáká bilei oyo ekotonga nzoto na yo, mpe laláká malamu. Atako ekoki kosɛnga ete obongola makambo mosusu na bomoi mpo na maladi oyo ozali na yango, minganga balobi ete soki osali milende mpo obatela sante na yo malamu, ekomemela yo matomba mingi. Na ntembe te, yebá ete nyonso oyo okosala mpo na kobatela sante na yo, ekosalisa yo mingi, soki eyokani na lisalisi oyo minganga bazali kopesa yo.

  • Sɛngá lisalisi ya basusu

    Oyo Biblia elobi: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.”​—Masese 17:17.

    Ndenge ya kosalela toli yango: Baninga na yo bakoki kosalisa yo oyika mpiko na ntango ya mpasi.

    Meká kosala boye: Sololá na moninga moko ya motema oyo okoki koyebisa ye ndenge oyo ozali komiyoka. Kosala bongo ekoki kokitisa mwa moke mitungisi oyo ozali na yango mpe ekoki kosalisa yo ozala na esengo. Ekoki kozala ete baninga mpe bandeko ya libota na yo bazali na mposa ya kosalisa yo, kasi bakoki koyeba te oyo basengeli kosala. Na yango, yebisá bango polele makambo oyo bakoki kosala mpo na kosalisa yo. Zalá na bokatikati na makambo oyo ozali kozela ete básalela yo, mpe pesáká bango matɔndi mbala nyonso oyo basalisi yo. Mpe kobosana te ete ata soki baninga na yo balingi kosalisa yo, na bantango mosusu bakoki kosala makambo oyo ekopesa yo mpasi. Na yango ekozala malamu otya mwa bandelo, na ndakisa, mbala boni mpe ntango boni bakoki koya mpo na kotala yo.

  • Zalá na makanisi ya malamu

    Oyo Biblia elobi: “Motema oyo ezali na esengo esalaka malamu lokola eloko oyo ebikisaka, kasi elimo oyo elɛmbi ekaukisaka mikuwa.”​—Masese 17:22.

    Ndenge ya kosalela toli yango: Kozala na makanisi ya malamu ekoki kosalisa yo ozala motema ya kokita mpo oyika mpiko na makambo oyo ekoki kotungisa yo.

    Meká kosala boye: Wana ozali komesana na na bomoi na yo ya sika, tyá makanisi na yo nyonso na makambo oyo okoki kosala, kasi te na makambo oyo okokoka te kosala. Boyá komikokanisa na bato mosusu to mpe na bomoi oyo ozalaki na yango liboso obɛla. (Bagalatia 6:4) Omityela mikano oyo okokoka kokokisa, yango ekosalisa yo mpo obatela makanisi ya malamu. (Masese 24:10) Saleláká basusu makambo na kotalela makoki na yo. Esengo oyo moto ayokaka soki asalisi basusu, ekoki kosalisa yo mpo otya te makanisi na yo na mikakatano oyo ozali na yango.​—Misala 20:35.

Nzambe akoki kosalisa yo mpo oyika mpiko na maladi oyo ozali na yango?

Biblia emonisi ete Yehova Nzambe * akoki kosalisa moto mpo ayika mpiko na maladi oyo azali na yango. Atato tokoki te kozela ete Nzambe abikisa biso na ndenge ya likamwisi, akoki kosalisa baoyo basambelaka ye na ndenge oyo:

Kimya. Yehova akoki kopesa biso “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.” (Bafilipi 4:6, 7) Kimya yango ekoki kosalisa moto mpo amitungisa te koleka ndelo. Nzambe apesaka kimya yango na baoyo babondelaka ye mpe bayebisaka ye makambo oyo ezali kotungisa bango.​—1 Petro 5:7.

Bwanya. Yehova akoki kopesa biso bwanya mpo tózwa bikateli ya malamu. (Yakobo 1:5) Moto akómaka na bwanya ya ndenge wana soki azali koyekola mpe kosalela toli oyo ezali na Biblia.

Elikya moko kitoko mpo na mikolo ezali koya. Yehova alaki ete na mikolo ezali koya “moto moko te akoloba: ‘Nazali na maladi.’” (Yisaya 33:24) Elikya yango esalisaka bato mingi bázala na makanisi ya malamu ata soki bazali kobɛla maladi ya makasi mpenza.​—Yirimia 29:11, 12.

^ par. 18 Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.​—Nzembo 83:18.