Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Batatoli ya Yehova

Lingala

Mwa buku oyo ezali koteya bato na nzela ya bililingi

Mwa buku oyo ezali koteya bato na nzela ya bililingi

Odval afandaka na ekólo Mongolie. Ayebi mpenza te mbula na ye, kasi akanisi ete abotamaki na 1921. Ntango azalaki elenge, azalaki kobatela bibwele ya baboti na ye mpe akɔtaki kelasi kaka mbula moko mpe ayebi kotánga te. Kasi, na mikolo oyo euti koleka, mwa buku moko oyo ezali na bililingi kitoko esalisaki ye ayekola koyeba Nzambe mpe ayeba ete na mikolo ezali koya, baoyo bayokaka Nzambe bakozala na bomoi ya malamu. Mateya yango esimbaki motema na ye.

Mwa buku yango, oyo Batatoli ya Yehova babimisaki na 2011 ezali na lolenge mibale. Yango nyonso mibale ezali na bililingi ya kitoko kasi mosusu ezali na maloba mingi te mpe mosusu ezali na maloba mingi.

Oyo ezali na maloba mingi, Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi, ekobima kala mingi te na minɔkɔ 583 mpe oyo ya maloba mingi te Yoká Nzambe; ekobima na minɔkɔ 483 nzokande ESAKOLA ya ONU mpo na ntomo ya moto (Déclaration universelle des droits de l’homme) babongolaki yango na minɔkɔ 413 na sanza ya 10/2013. Lelo oyo, mwa buku yango mibale ebimisami na bakopi soki milio 80.

Na Brésil, mwasi moko ya mobange azwaki na esengo nyonso mwa buku Yoká Nzambe mpe alobaki boye: “Ezali malamu koyeba ete ezali na bato oyo batyelaka bato lokola ngai likebi. Nazwaka mikanda na bino te mpo nayebi kotánga te kasi nalingi mpenza mwa buku oyo.”

Brigitte, mwasi moko na France oyo ayebi kotánga te, alobaki boye: “Natalaka bililingi ya mwa buku yango mikolo nyonso.”

Na Afrique du Sud, Motatoli moko ya Yehova akomaki boye: “Namoni ete mwa buku yango esalisaka mingi koleka mpo na koteya Ba-chinois solo ya Biblia. Nasololi na bato ya ndenge nyonso, baoyo batángá kelasi mingi, bato ya mayele mpe baoyo bayebi mpenza kotánga te. Mwa buku Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi esalisaka ngai nayebisa bango kozanga koumela mateya ya Biblia ya ebandeli. Kaka na miniti 30 mpamba nalobaka likambo oyo ekopesa nzela nazongela bango lisusu.”

Na Allemagne, Batatoli ya Yehova mibale bayekolaka Biblia na mwasi moko ná mobali na ye oyo batángá. Mwa buku yango ekamwisaki mobali yango, mpe atunaki bandeko boye: “Mpo na nini bopesaki ngai mwa buku yango banda kala te? Ezali kosalisa ngai nayeba oyo Biblia eteyaka mpe makambo oyo yango elobeli.”

Na Australie, mwasi moko oyo akufá matoi alobaki boye: “Nafandá ná bamamelo na kuva bambula mingi. Nazalaki na boyokani malamu mpenza na bakambi ya lingomba yango kasi ata bongo, batikalá kolakisa ngai te soki Bokonzi ya Nzambe ezali nini. Bililingi oyo ezali na mwa buku oyo esalisi ngai nakanga ntina mpenza ya maloba oyo ezali na Matai 6:10.”

Biro ya Batatoli ya Yehova na Canada ekomaki boye: “Ntango bato ya Sierra-Léone oyo bafandaka awa bamonaki mwa buku Yoká Nzambe na monɔkɔ ya Krio, mingi na bango balobaki boye: “Batatoli ya Yehova basalaka mosala makasi mpenza mpo na koyebisa bato nsango ya Biblia. Bamosusu balobaki, ‘Nakokesana na mangomba mosusu, bino botyelaka mpenza bato likebi.’”

Makambo mosusu

KOBIMISA MIKANDA

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Zulunalo oyo ekabolami koleka bazulunalo mosusu nyonso

Tobimisaka mpe tokabolaka zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na mokili mobimba na minɔkɔ koleka 190. Bongo bazulunalo mosusu?