Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova bakanisaka nini mpo na mangomba mosusu?

Batatoli ya Yehova bakanisaka nini mpo na mangomba mosusu?

 Biblia esɛngi biso ‘tótosa bato nyonso,’ ata soki bazali na lingomba nini; yango nde tosalaka. (1 Piere 2:17, Bible na lingala ya lelo oyo) Na mikili mosusu, Batatoli ya Yehova bazali ebele mpenza. Atako bongo, tolukaka te kotinda bakonzi ya Leta to bato ya mibeko bálongola to bápekisa misala ya mangomba mosusu. Tolukaka mpe te ete bábimisa mibeko oyo ekosɛngisa bato nyonso bálanda bizaleli mpe mateya na biso. Tondimaka mangomba mosusu, yango wana tolingaka ete bato ya mangomba mosusu mpe bándima biso.​—Matai 7:12.