Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Batatoli ya Yehova

Lingala

Batatoli ya Yehova batyaka bato mbamba bálongwa na mangomba na bango?

Batatoli ya Yehova batyaka bato mbamba bálongwa na mangomba na bango?

Te, tosalaka bongo te. Na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, zulunalo na biso ya libosoliboso, tolobaki boye: “Kobenda bato na makasi ete bákɔta na lingomba mosusu ezali mabe.” * Toboyaka kobenda bato na makasi mpo na bantina oyo:

  • Yesu abendaki bato na makasi te bándima mateya na ye. Ayebaki ete kaka bato moke nde bakondima nsango na ye. (Matai 7:13, 14) Ntango bayekoli na ye mosusu babɛtaki libaku na makambo oyo alobaki, atikaki bango bákende; akangaki bango na makasi te mpo bátikala.​—Yoane 6:60-62, 66-68.

  • Yesu ateyaki bayekoli na ye ete basengeli te kotinda bato na makasi bálongwa na mangomba na bango. Na esika bátya bato mbamba mpo bándima nsango malamu ya Bokonzi, bayekoli basengelaki nde koluka baoyo bakosepela na nsango yango.​—Matai 10:7, 11-14.

  • Kolongwa na lingomba mpo batye yo mbamba ezali na ntina te, mpo Nzambe andimaka kaka losambo oyo euti na motema.​—Kolimbola mibeko 6:4, 5; Matai 22:37, 38

Mosala na biso ezali ya kobenda bato na lingomba na biso?

Ezali solo ete tosakolaka nsango ya Biblia “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele,” “na bisika ya bato nyonso mpe na ndako na ndako”, ndenge Biblia emonisi yango. (Misala 1:8; 10:42; 20:20) Mpe ndenge moko na bakristo ya liboso, ntango mosusu bafundaka biso ete tobuki mibeko mpe ete tozali kobenda bato báya na lingomba na biso. (Misala 18:12, 13) Nzokande, bifundeli yango ezalaka solo te. Totyaka bato mbamba te ete bándima mateya na biso. Toyebi nde ete esengeli kopesa bato nzela ya koyekola makambo oyo ekosalisa bango báyeba kopona malamu.

Totyaka bato mbamba te ete bálongwa na mangomba na bango; tomikɔtisaka na makambo ya politiki te; tokabelaka mpe bato biloko te mpo báya na lingomba na biso. Tokeseni na bato mosusu oyo bamibengaka bakristo, kasi bafingisaka Kristo na ndenge basalaka makambo wana. *

Moto azali na ntomo ya kolongwa na lingomba na ye?

Mosakoli Abrahama alandaki lingomba ya libota na bango te

Ɛɛ, Biblia emonisi ete bato bazali na ntomo ya kolongwa na lingomba na bango. Elobeli bato ebele oyo batikaki lingomba ya libota na bango, mpe bango moko baponaki kosambela Nzambe ya solo. Tokoki kotánga na ndakisa Abrahama, Ruta, bato ya engumba Atene, mpe ntoma Paulo. (Yosua 24:2; Ruta 1:14-16; Misala 17:22, 30-34; Bagalatia 1:14, 23) Kutu, Biblia emonisi ete moto azali mpe na lotomo ya kozwa ekateli mabe ya kotika losambo oyo Nzambe andimaka.​—1 Yoane 2:19.

ONU elobi ete kolongwa na lingomba ezali “moboko oyo esimbi mibeko ya ntomo ya moto na mokili mobimba.” Mokanda babengi Déclaration universelle des droits de l’homme endimi lotomo yango mpe emonisi ete moto nyonso azali na “bonsomi ya kotika lingomba na ye mpe mateya oyo azalaki kondima” mpe “koluka, kozwa mpe koyebisa basusu makambo mpe makanisi,” na ndakisa ya lingomba. * Kasi, ntomo yango esɛngi mpe moto atosa ntomo ya baninga ya kobatela bindimeli na bango mpe koboya makanisi oyo basepeli na yango te.

Kolongwa na lingomba ezali kofingisa bonkɔkɔ mpe mimeseno ya libota?

Esengeli kozala bongo te. Biblia elobi ete esengeli komemya moto nyonso, ata ya lingomba nini. (1 Petro 2:17) Longola yango, Batatoli ya Yehova batosaka etinda ya Biblia ya kokumisa baboti na bango, ata soki bazali lingomba moko te.​—Baefese 6:2, 3.

Nzokande, bato nyonso bandimaka likanisi wana ya Biblia te. Mwasi moko oyo akolá na Zambie alobi boye: “Epai na biso, kolongwa na lingomba . . . ezalaki lokola kosala likambo ya kozanga bosembo, lokola nde owangani libota mpe mboka na yo.” Mwasi yango akutanaki na likambo wana na bolenge na ye. Batatoli ya Yehova babandaki koyekola na ye Biblia, mpe na nsima azwaki ekateli ya kolongwa na lingomba na bango. Alobi boye: “Baboti na ngai bazalaki se koyebisa ngai bazali na nkanda na ngai mpe ete napesi bango mawa mingi. Ezalaki kosala ngai mpasi mingi, mpo nasepelaka mingi soki baboti bandimi likambo oyo mwana alingi kosala. . . . Kopona kokangama na Yehova na esika ya kokangama na lingomba ya bonkɔkɔ, elingi koloba te ete naboyi libota na ngai.” *

^ par. 2 Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/01/2002, lokasa 12, paragrafe 15.

^ par. 8 Na ndakisa, na mobu soki 785 ya ntango na biso, Charlemagne abimisaki mobeko ete moto nyonso na engumba Saxe oyo aboyi kozwa batisimo lokola mokristo asengeli kozwa etumbu ya liwa. Ndakisa mosusu: mokanda moko (traité de Paix d’Augsbourg) oyo mampinga ya basoda ya Ampire ya Roma batyaki sinyatire na mobu 1555 elobaki ete mokonzi nyonso ya etúká asengeli kozala na Lingomba ya Katolike to ya Protesta mpe bana-mboka basengeli kolanda lingomba na ye. Bazalaki kosɛnga na baoyo baboyi kokɔta na lingomba yango bálongwa mboka.

^ par. 11 Ntomo yango epesami na mibeko ebele, na ndakisa na Charte africaine des droits de l’homme et des peuples, Déclaration américaine des droits et devoirs de l’homme, Charte arabe des droits de l’homme oyo endimamaki na 2004, Déclaration des droits humains de l’ASEAN (Association des nations d’Asie du Sud-Est), la Convention européenne des droits de l’homme et le Pacte international relatif aux droits civils et politiques. Kasi, ata bikólo oyo elobaka ete epesi bato ntomo wana batosaka mpenza maloba na bango te.

^ par. 14 Yehova ezali nkombo ya Nzambe ya solo na Biblia

Makambo mosusu

MITUNA OYO BATO BATUNAKA MINGI

Batatoli ya Yehova bapanzaka mabota ya bato to basangisaka yango?

Na bantango mosusu bafundaka Batatoli ya Yehova ete bapanzaka mabota. Kasi Batatoli ya Yehova nde babimisaka matata?

NSANGO MALAMU OYO EUTI NA NZAMBE!

Nsango malamu mpo na mangomba ezali nini?

Ekozala mpenza na ntango moko oyo bato nyonso bakobanda kosalela kaka Nzambe moko ya solo?