Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka kelasi?

Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka kelasi?

 Tolandaka toli ya Biblia na likambo etali kelasi. Motatoli mokomoko asalelaka lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia mpo na koyeba ndenge ya kosalela toli ya Biblia na makambo lokola oyo. a

 Kelasi ezali na ntina

 Kelasi esalisaka moto akóma na ‘bwanya mpe na likoki ya kokanisa,’ bizaleli oyo Biblia ekumisaka mingi. (Masese 2:10, 11; 3:21, 22) Longola yango, Yesu ayebisaki bayekoli na ye bázala bateyi ya makambo oyo apesaki mitindo. (Matai 28:19, 20) Na yango, tolendisaka mpe tosalisaka bandimi ya lingomba na biso bátánga kelasi ya malamu; bázala mpe na likoki ya kotánga, ya kokoma, mpe ya kosolola na bato, b ata mpe koyeba makambo etali mangomba mpe mimeseno mosusu.​—1 Bakorinti 9:20-22; 1 Timote 4:13.

 Bakonzi ya Leta mpe bazwaka kelasi na valɛrɛ mpe mbala mingi basɛngaka bilenge básilisa eteyelo ya ebandeli mpe ya ntei. Totosaka mibeko yango mpo tolandaka toli oyo ya Biblia: “Tiká molimo nyonso eyokelaka bakonzi oyo bazali liboso,” to baguvɛrnema. (Baroma 13:1) Longola yango, tolendisaka bana na biso bámipesa na kelasi mpe básala nyonso oyo bakoki, kasi básala kaka mwa moke te. c Ndenge Liloba ya Nzambe elobi: “Misala nyonso bosalaka, bósalaka yango na motema moko lokola nde bozali kosalela Nkolo kasi bato te.”​—Bakolose 3:23, Biblia na lingala ya lelo oyo.

 Kelasi esalisaka biso tókokisa bamposa ya mabota na biso. Biblia elobi, “soki moto azali te kopesa bato na ye, mpe mingimingi bato ya ndako na ye, biloko oyo basengeli na yango, awangani kondima mpe azali mabe koleka moto oyo azali na kondima te.” (1 Timote 5:8) Kotánga kelasi ekoki kosalisa biso tókokisa mokumba oyo Nzambe apesi biso ya kokokisa bamposa ya mabota na biso. Ndenge buku moko The World Book Encyclopedia elobi, ntina mpenza ya kelasi ezali ya “kosalisa bato bákóma bato ya ntina na mboka . . . lokola basali oyo bazali komatisa nkita ya mboka.” Moto oyo atángi kelasi malamu mpe ayebi mosala azali na likoki ya kokokisa bamposa ya libota na ye na pɛtɛɛ nyonso mpe na ndenge ebongi koleka moto oyo ayebi mosala te mpe atangá te.​—Masese 22:29.

 Baboti mpe bakokisaka bamposa ya bana na bango na ndenge babongisaka bango mpo bázala malamu ntango bakokóma mikóló, mpe kelasi ekoki kosalisa na likambo yango. (2 Bakorinti 12:14) Tolendisaka baboti bákɔtisa bana na bango na kelasi ata soki bafandi na bisika oyo kelasi ezali ofele te to ezali mosika, to mpe eyokani te na mimeseno ya mboka. d Topesaka mpe toli oyo ebongi mpo na kosalisa baboti bálandelaka kelasi ya bana na bango. e

 Esengeli kotalela kelasi na makanisi oyo ebongi

 Totalelaka malamumalamu kelasi nini tokotánga. Biblia elobi: “Moto nyonso oyo azangi mayele andimaka liloba nyonso, kasi moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.” (Masese 14:15) Tosalelaka toli yango ntango totalelaka malamumalamu kelasi nini tokotánga lisusu nsima ya kosilisa kelasi ya ntei, mbongo oyo ekosɛnga mpe valɛrɛ na yango. Na ndakisa, mbala mingi kozwa formasyo ya mosala moko boye esalisaka biso tósalela ntango na ndenge oyo ebongi.

 Mateya ya Biblia eleki bakelasi ya mokili na valɛrɛ. Mateya ya Biblia ekeseni na bakelasi ya mokili, mpo yango epesaka boyebi ya Nzambe oyo ezali kobikisa bomoi. (Yoane 17:3) Eteyaka mpe bizaleli malamu; elingi koloba “boyengebene ná bosembo ná kolongobana, nzela mobimba ya oyo ezali malamu.” (Masese 2:9) Ntoma Paulo atángaki bakelasi oyo lelo tokoki kokokanisa yango na iniversite, ata bongo andimaki “motuya monene ya boyebi ya Kristo Yesu.” (Bafilipi 3:8; Misala 22:3) Lelo oyo mpe, Batatoli ya Yehova mosusu batángá bakelasi mingi, ata bongo bandimaka ete mateya ya Biblia ezali na valɛrɛ koleka. f

Mateya ya Nzambe esalisaka bato bázala na bizaleli ya malamu

 Bakelasi ya milai ekoki kobebisa bizaleli mpe boyokani ya moto na Nzambe

 Lisese moko ya Biblia elobi: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi.” (Masese 22:3) Batatoli ya Yehova bamonaka ete makambo oyo elekaka na bainiversite to na biteyelo mosusu ya likoló ekoki kobebisa bizaleli mpe boyokani ya moto na Nzambe. Yango wana, mingi na bango baboyaka komikɔtisa to kokɔtisa bana na bango na bisika ya ndenge wana. Bamonaka ete na bakelasi yango, mbala mingi balendisaka makanisi oyo ya libunga:

  •   Libunga: Mbongo nde epesaka esengo mpe libateli

     Mbala mingi balobaka ete kotánga bakelasi ya milai nde esalisaka moto azwa mosala ya mbongo mingi, yango wana ebele ya bana-kelasi bakɔtaka iniversite libosoliboso mpo na koluka kozwa mbongo mingi. Basusu bakanisaka ete mbongo ekopesa bango esengo mpe libateli, kasi Biblia elobi ete likanisi ya ndenge wana ezali bozoba. (Mosakoli 5:10) Likambo eleki ntina, Biblia eteyaka mpe ete “bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso” mpe mbala mingi etindaka moto awangana kondima. (1 Timote 6:10) Batatoli ya Yehova basalaka makasi mpenza mpo “nguya ya bokosi ya bomɛngo” ekanga bango na motambo te.​—Matai 13:22.

  •   Libunga: Bakelasi ya milai ekoki kopesa moto lokumu

     Na ndakisa, Nika Gilauri, oyo azalaki ministre-mokonzi na Georgie, akomaki makanisi oyo bato mingi ya mboka na ye bazalaka na yango: “Diplome ya iniversite ezali lokola elembo ya lokumu na Géorgie. . . . [Na ntango ya kala,] bilenge oyo bazalaki kozwa diplome yango te, bazalaki kopesa mabota na bango nsɔni.” g Kasi Biblia ekebisi na likambo ya koluka lokumu na mokili oyo. Yesu ayebisaki bakonzi ya mangomba ya ntango na ye oyo bazalaki koluka lokumu boye: “Ndenge nini bokoki kondima, wana bozali koyamba nkembo oyo bino na bino bozali kopesana?” (Yoane 5:44) Iniversite ekoki kotinda moto akóma na lolendo, ezaleli oyo Nzambe ayinaka.​—Masese 6:16, 17; 1 Petro 5:5.

  •   Libunga: Moto na moto asengeli komityela mibeko na oyo etali malamu ná mabe

     Batatoli ya Yehova bandimaka mibeko ya Nzambe na oyo etali malamu ná mabe. (Yisaya 5:20) Kasi, na kotalela lisolo oyo ebimaki na zulunalo moko Journal of Alcohol and Drug Education, mbamba oyo batyaka bato na bainiversite etindaka bana-kelasi mingi “bázwa bikateli oyo eyokani te na makambo oyo bango batalelaka ete ezali malamu to mabe.” h Likanisi yango eyokani na toli oyo ya Biblia: “Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Bakorinti 15:33) Na bainiversite, makambo oyo Nzambe aboyaka, na ndakisa kolangwa masanga, kosalela drɔgɛ mpe kosangisa nzoto na moto oyo azali molongani na yo te esalemaka mingi mpe balendisaka yango kutu.​—1 Bakorinti 6:9, 10; 2 Bakorinti 7:1.

  •   Libunga: Bakelasi ya milai ezali lolenge eleki malamu mpo na kobongisa mokili

     Toboyi te ete bato mingi bakɔtaka bakelasi ya milai mpo na koluka bomɛngo te, lokumu te, to komisepelisa na ndenge ya mabe, kasi mpo na kobongisa bomoi na bango mpe kobongisa mokili. Ezali mikano ya malamu, kasi Batatoli ya Yehova batalelaka makambo na ndenge mosusu. Ndenge moko na Yesu, tomonaka ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekobongisa mokili. (Matai 6:9, 10) Ata bongo, tokangaka mabɔkɔ te mpo na kozela Bokonzi yango esilisa mikakatano ya mokili. Kutu, ndenge moko na Yesu, tosakolaka “nsango malamu oyo ya bokonzi” na mabele mobimba mpo na kosalisa ebele ya bato mbula na mbula bábongola bomoi na bango ekóma malamu koleka. i​—Matai 24:14.

a Bilenge Batatoli ya Yehova oyo bazali naino na ndako ya baboti basalaka oyo baboti na bango balingi na likambo etali kelasi soki yango ebuki mibeko ya Nzambe te.​—Bakolose 3:20.

b Mpo na yango, tobimisá mwa buku Omipesa na kotánga mpe kokoma koleka milio 11 mpo na kosalisa bato báyeba kotánga mpe kokoma. Na mokili mobimba, tozali na biteyelo ya kotánga mpe kokoma ofele na minɔkɔ 120. Kobanda 2003 tii 2017, tolakisi bato soki 70 000 kotánga mpe kokoma.

c Talá lisolo “Nasengeli nde kokata kelasi?

d Na ndakisa, tolendisaka baboti bákɔtisa bana na bango ya mibali mpe ya basi kelasi. Talá lisolo “Mwana na ngai asengeli kokɔta kelasi?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/03/2003.

f Kende na jw.org na eteni “Makanisi na oyo etali ebandeli ya bomoi.”

g Practical Economics: Economic Transformation and Government Reform na Georgie 2004​—2012, lokasa 170.

h Volimi 61, No. 1, 04/2017, lokasa 72.

i Kende na jw.org na eteni “Biblia ebongolaka bato” epai okokuta bandakisa ya mikolo na biso oyo emonisi nguya ya Liloba ya Nzambe mpe ya nsango ya Bokonzi.