Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bomoi ekozonga ndenge ezalaki liboso? Ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa biso ntango maladi mabe oyo ekosila na mokili

Bomoi ekozonga ndenge ezalaki liboso? Ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa biso ntango maladi mabe oyo ekosila na mokili

 “Biso nyonso tolingi ete bomoi na biso ezonga ndenge ezalaki liboso.”—Angela Merkel, Chancelière allemande.

 Lokola maladi mabe ya COVID-19 ezali kokoba konyokola bato na mokili mobimba, na ntembe te, ozali mpenza kondima maloba ya mokonzi wana. Kozongela bomoi ndenge ezalaki liboso, elakisi mpenza nini? Bato bazali kokana kosala nini?

  •   Kozongela lolenge ya bomoi oyo bazalaki na yango liboso. Bato mosusu bazali na mposa makasi ya kozongela kofanda na baninga na bango esika moko, báyambanaka mpe bápesanaka mbote na mabɔkɔ, mpe bákendaka mibembo. Dr. Anthony Fauci a alobi ete ‘bazali kokanisa ete kozonga na bomoi ndenge ezalaki elakisi kokende na barestora, na sinema, mpe na bisika mosusu ya ndenge wana.’

  •   Kokómisa bomoi na bango malamu koleka. Bato mosusu bazali kokanisa ete ezali libaku malamu mpenza ya kokómisa bomoi na bango malamu koleka. Bazali komona ete makambo esengeli kobongwana, na ndakisa, misala oyo ezali kolya bato ngonga mpe makasi, konyokola bato mpo bazali babola to bato ya loposo mosusu, mpe ndenge bato ebele mpenza bazali konyokwama na makanisi. Klaus Schwab, moto oyo asalaki ebongiseli moko ya makambo ya nkita (Forum économique mondial), alobi ete “maladi mabe oyo epesi biso libaku ya kokanisa mpo na bomoi na biso mpe ndenge oyo tolingi ete mokili ezala, mpe na nsima kobongola makambo na mokili. Kasi libaku yango ekoumela libela na libela te.”

 Maladi mabe yango enyokoli bato mosusu kino bakómi kokanisa ete bomoi ekobonga lisusu ata moke te. Na ndakisa, bato mingi babungisi misala, bandako na bango, sante na bango ebebi, mpe baninga ná bandeko na bango mosusu bakufi.

 Na ntembe te, moto moko te azali na likoki ya koloba na bosikisiki ndenge bomoi ekozala na mokili mobimba ntango maladi mabe oyo ekosila. (Mosakoli 9:11) Kasi, Biblia ekoki kosalisa biso tóbongisa ndenge ya kotalela makambo mpe ndenge ya kosala mpo na makambo oyo ekoki koya. Lisusu, Biblia ezali kolobela bomoi ya malamu oyo tokoki kozala na yango, oyo okanisá ata moke te.

Kotalela maladi mabe ya COVID-19 na ndenge ya malamu

 Banda kala mpenza, Biblia esakolaki ete “bamaladi mabe” ekozala na “bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” (Luka 21:11; Matai 24:3) Ntango tozali kotalela maladi mabe ya COVID-19 na ndenge wana, tokomona ete ezali moko ya makambo ya kokamwa oyo Biblia esakolaki ete ekosalema. Esakolaki mpe ete bitumba, koningana ya mabele, mpe banzala ekozala.

 Ntina oyo koyeba makambo yango ekoki kosalisa biso: Ata soki makambo ya maladi mabe oyo ebongi, Biblia ezali kokebisa biso ete tozali kobika na “ntango moko ya mpasi mpenza.” (2 Timote 3:1) Koyeba yango ekoki kosalisa biso tótalela makambo na ndenge ya malamu na ntango oyo ya mpasi.

 Biblia epesi biso makanisi oyo ebongi: Na mokili oyo etondi na minyoko, makambo ekobongwana mpenza na ndenge ya kosakana te. Makambo nini ekobongwana?

Nsima ya maladi mabe oyo, makambo ekobongwana na ndenge oyo tokoki kutu kokanisa te

 Biblia esakoli kaka te makambo ya mpasi oyo tozali kokutana na yango sikoyo, kasi esakoli mpe makambo ya malamu oyo ekosalema mosika te. Elobi ete bomoi na mikolo ezali koya ekozala malamu koleka nyonso oyo baguvɛrnema ya bato ekoki kosala; bolamu wana kaka Nzambe nde akoki kosala yango. Biblia elobi ete Nzambe “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka, ná koganga, ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”—Emoniseli 21:4.

 Yehova b Nzambe alaki ete: “Talá! Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika.” (Emoniseli 21:5) Akolongola bampasi nyonso ya mokili, ata mpe mikakatano oyo maladi mabe ebakisi. Akopesa bato makambo oyo:

  •   Nzoto malamu mpenza mpe makanisi ya kokoka, mpe maladi ná liwa ekozala lisusu te.—Yisaya 25:8; 33:24.

  •   Mosala ya malamu mpenza oyo epesaka esengo, misala oyo elyaka bato ngonga, oyo enyokolaka bato to esilisaka bango makasi ekozala lisusu te.—Yisaya 65:22, 23.

  •   Moto nyonso akozala na bozwi, mpo bobola ná nzala ekosila.—Nzembo 72:12, 13; 145:16.

  •   Komitungisa na makanisi ekosila, tokozala na likoki ya komona baninga ná bandeko na biso oyo bakufá bazongi na bomoi.—Yisaya 65:17; Misala 24:15.

 Ntina oyo koyeba makambo yango ekoki kosalisa biso: Biblia elobi ete: “Elikya oyo tozali na yango ezali lokola longo.” (Baebre 6:19) Elikya ya malamu boye ekoki kopesa makanisi na biso kimya. Ekosalisa biso tóyikela mikakatano ya lelo mpiko, tókitisa mitungisi na biso, mpe tózala na esengo.

 Ebongi mpenza kondimela bilaka ya Biblia? Talá lisolo “Biblia—Buku oyo ebongi kotyela motema.”

Mitinda ya Biblia oyo ekosalisa biso tóyika mpiko nsima ya maladi mabe

  •   Zwá bomoi na valɛrɛ

     Vɛrsɛ: “Bwanya ebatelaka na bomoi baoyo bazali na yango.”—Mosakoli 7:12.

     Elingi koloba nini? Zwáká bikateli ya malamu, saláká makambo oyo ekosalisa yo ozwa maladi te. Yebá malamu ndenge makambo ezali kotambola na esika ofandi. Landelá malako ya bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto mpe ya libateli, motángo ya bato oyo bazali kozwa maladi, mpe motángo ya bato oyo bazwi ntonga nyonso ya mangwele.

  •   Zaláká ntango nyonso na bokɛngi

     Vɛrsɛ: “Moto ya bwanya abangaka mpe alongwaka na mabe, kasi zoba akómaka na nkanda makasi mpe amityelaka motema.”—Masese 14:16.

     Elingi koloba nini? Kobá kosala oyo esengeli mpo na kobatela bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto na yo. Bato ya mayele balobi ete maladi ya coronavirus ekoumela mpo na mwa ntango.

  •   Yokáká bansango oyo ekoki kotyelama motema

     Vɛrsɛ: “Moto nyonso oyo azangi mayele andimaka liloba nyonso, kasi moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.”—Masese 14:15.

     Elingi koloba nini? Ponáká na mayele mpenza toli oyo okolanda. Makambo oyo okopona ezali na ntina mingi. Ntango mosusu okoki kobebisa bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto na yo mpo oyokaki bansango ya lokuta mpe ozwi ekateli ya mabe.

  •   Zaláká na makanisi malamu

     Vɛrsɛ: “Koloba te ete, ‘Mpo na nini mikolo ya liboso elekaki mikolo oyo na malamu?’ Ezali bwanya te nde etindi yo otuna ndenge wana.”—Mosakoli 7:10.

     Elingi koloba nini? Salá nyonso osepela na bomoi oyo ozali na yango sikoyo. Tiká kokanisakanisa bomoi oyo ozalaki na yango liboso ya maladi oyo mabe, mpe tiká kokanisakanisa makambo oyo osalaki te mpo na bipekiseli oyo euti na maladi oyo mabe.

  •   Pesáká basusu lokumu

     Vɛrsɛ: “Bókumisaka bato ya ndenge nyonso.”—1 Petro 2:17.

     Elingi koloba nini? Bato na bato basalaki makambo na ndenge na bango mpo na maladi mabe oyo mpe mikakatano na yango. Tiká bango na makanisi na bango, kasi kangamá mpenza na bikateli ya malamu oyo ozwi. Kebáká na bato oyo bazwi mangwele te, mibange, mpe bato oyo bazali na maladi ya makasi.

  •   Zaláká na motema molai

     Vɛrsɛ: “Bolingo ezali na motema molai.”​—1 Bakorinti 13:4.

     Elingi koloba nini?: Zalá na boboto ntango bato bazali komitungisa soki bakokoka kozongela makambo oyo bamesanaki kosala kala. Wana bipekiseli oyo euti na maladi mabe ebandi kosila mokemoke, zalá na motema molai ntango ozali kobongisa makambo oyo okani kosala.

Ndenge oyo Biblia ezali kosalisa bato bálonga mikakatano oyo euti na maladi mabe

 Batatoli ya Yehova bazwaka libɔndisi na bilaka ya Biblia oyo emonisi ete bomoi ekozala malamu na mikolo ezali koya, mpe yango ezali kosalisa bango bátyaka makanisi na bango kaka na maladi mabe yango te. Bazali mpe kosalisana na ndenge bazali kotosa mobeko ya Biblia ya koyanganaka ntango nyonso mpo na kosambela. (Baebre 10:24, 25) Moto nyonso oyo alingi akoki kokɔta na makita ya Batatoli ya Yehova, na eleko ya maladi mabe oyo makita yango ezali kosalema na nzela ya Internet.

 Bato mosusu balobi ete koyangana elongo na Batatoli ya Yehova mpo na kosambela na eleko ya mikakatano oyo esalisi bango mingi. Na ndakisa, mwasi moko ya libala, oyo abɛlaki maladi mabe ya COVID-19 andimaki kokɔta na makita ya Batatoli ya Yehova oyo basalaka na Internet. Makita yango esalisaki ye amiyoka malamu atako akobaki konyokwama na maladi oyo abɛlaki. Na nsima alobaki boye: “Namoni ete nazali mpe moko ya bato ya libota oyo. Kotánga bavɛrsɛ ya Biblia epesi ngai kimya na makanisi mpe na motema. Esalisi ngai natya makanisi na ngai na elikya ya bomoi ya mikolo ezali koya kasi na mikakatano na ngai te. Matɔndi mingi ndenge bosalisi ngai nakóma na boyokani ná Nzambe oyo nazalaki koluka bomoi na ngai mobimba.”

a Mokambi ya ebongiseli moko oyo etali maladi mabe (Institut américain d’allergologie et d’épidémiologie) na États-Unis.

b Biblia elobi ete Yehova ezali nkombo ya Nzambe.​—Nzembo 83:18.